Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya motoba 26–Sanza ya nsambo 2. Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20–21: “Asekwi”


“Sanza ya motoba 26–Sanza ya nsambo 2. Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20–21: ‘Asekwi,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya motoba 26–Sanza ya nsambo 2. Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20–21,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali koloba na Petelo na pembeni ya libongo

Leisa Bampate na Ngai, na Kamille Corry

Sanza ya motoba 26–Sanza ya nsambo 2

Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20–21

“Asekwi”

Na nzela ya losambo tanga Matai 28; Malako 16; Luka 24; mpe Yoane 20–21, kokanisaka esengo oyo ozali na yango na ntina ya Bosekwi ya Klisto. Nani akoki kopambolama na koyokaka litatoli na yo ya molulu oyo?

Koma Makanisi na Yo

Mpo na batali mingi, liwa ya Yesu ya Nazaleti ekokaki komonana lokola nsuka ya lisolo mpo na bomoi moko ya ntina. Ezali Ye moto oyo alamusaki Lazalo te uta na bawei? Ezali Ye te oyo atelemelaki na mitungisi ya bobomi uta na Bafalisai mbala na mbala? Alakisaki nguya ya kobikisa bakufi miso, bato ya maladi ya maba, mpe maladi ya ndeke. Mipepe ya makasi mpe bambu etosaki Ye. Mpe sikawa Ye oyo awa, abakami na ekulusu, kolobaka, “Esili” (Yoane 19:30). Ekokaki kozala na bosutuki ya solo mpenza na kati ya maloba ya botioli “Abikisaki basusu; ye moko akomibikisa te” (Matai 27:42). Kasi toyebi ete liwa ya Yesu ezalaki nsuka ya lisolo te. Toyebi ete kimia ya lilita ezalaki ya ntango moke mpe ete mosala ya kobikisa ya Klisto ezalaki kaka kobanda. Ye azwami lelo “na kati ya bawei te” kasi na kati ya bato na bomoi (Luka 24:5). Mateya na Ye ekokaki te kofanda kimia, mpe ete bayekoli na Ye ya boyengebene bakoki koteya nsango malamu na “bikolo nyonso,” kondimelaka bilaka na Ye ete Ye akoki “kozala na [bango] ntango inso, kutu kino na nsuka ya mokili” (Matai 28:19–20).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20

Yesu Klisto Asekwaki.

Na kati ya milongo oyo, okotanga maye matali moko ya milulu ya ntina kolekakati na mambi ya kala ya bato: Lisekwa ya Yesu Klisto. Ntango ozali kotanga, mitia na esika ya bato oyo batatolaka milulu etali Bosekwi. Oyekoli nini uta na mayebi na bango?

Lolenge nini yo oyoki ntango otangi maye matali Bosekwi ya Mobikisi? Banza lolenge nini yango esali epai na—bomoni na yo ya bomoi, mokangano na yo, bondimi na yo na Klisto, mpe bondimi na bosolo mosusu ya nsango malamu.

Tala lisusu Bible Dictionary, “Resurrection”; Gospel Topics, “Resurrection,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Luka 24:13–35

Nakoki kobengisa Mobikisi mpo “atikala kati na [ngai].”

Ntango ozali kotanga maye emonaki bayekoli mibale oyo bakendaki mobembo mpe bakutanaki na Mobikisi asekwa, luka bokokani na maye okutanaki na yango lokola moyekoli ya Klisto. Lolenge nini okoki kotambola elongo na Ye lelo mpe kobengisa Ye mpo ete “awumela” mwa ntango molai? (Luka 24:29). Lolenge nini oyebaka bomoto na Ye na bomoi na yo? Na ndenge nini Molimo Mosantu atatolaka na ntina ya bonzambe ya Yesu Klisto epai na yo?

Tala lisusu “Abide with Me; ’Tis Eventide,” “Abide with Me!,” Hymns, nos. 165–66.

Luka 24:36–43; Yoane 20

Bosekwi ezali bosangisi ya libela ya molimo na nzoto.

Masolo ya Bosekwi ya Yesu Klisto ekoki kosunga yo ososola nini yango elingi koloba kozala mosekwi. Na ndakisa, bosolo nini ozwi na kati ya Luka 24:36–43 mpe Yoane 20 na ntina ya banzoto esekwa? Okoki lisusu kotala makomi mosusu na ntina ya lisekwa, lokola 1 Bakolinti 15:35–44; Bafilipi 3:20–21; 3 Nefi 11:13–15; Malongi mpe Mayokani 88:27–31; 110:2–3; 130:1, 22.

Yoane 20:19–29

“Bapambolami ezali baoyo bamonaki te, mpe kasi bandimelaki.”

Bato mosusu bayokaka lokola Toma, oyo alobaki, “Nazozela namona … , nakondimela te” (Yoane 20:25). Na makanisi na yo, mpo na nini kondimela na kozangaka komona ezali lipamboli? (tala Yoane 20:29). Manyola lolenge nini opambolamaki mpo na kondimelaka makambo oyo okokaki komona te. Nini esungi yo ozala na bondimi na Mobikisi atako ntango okoki komona Ye te? Lolenge nini okoki kokoba kolendisa bondimi na yo na “makambo maye emonanaka te, kasi ezali solo”? (tala Alma 32:16–21; Etele 12:6). Banza kokoma na zulunale na yo mayebi oyo esungaki yo ondimela Yesu klisto to kokabola yango na moto songolo oyo oyebi.

Yoane 21:1–17

Mobikisi abengisi ngai naleisa bampate na Ye.

Ekoki kozala malamu okokanisa mosala ya Mobikisi elongo na Bapostolo na Ye na kati ya Yoane 21 na mbala ya yambo Atindaki bango batika minyama na bango ya bolobi mbisi, ekomami na kati ya Luka 5:1–11. Bokokani mpe bokeseni nini ozwi? Babomoni nini ya kimoyekoli ozwi?

Banza lolenge nini maloba ya Mobikisi epai ya Petelo na kati ya Yoane 21:15–17 ekoki kosalelama epai na yo. Ezali na eloko songolo ezali kokanga yo osalisa bampate ya Nkolo? Nini ekokaki kozala eyano na yo soki Nkolo atunaki yo, “Yo olingaka ngai?” Manyola lolenge nini okoki kolakisa bolingo mpo na Nkolo.

Tala lisusu 1 Petelo 5:2–4, 8; Jeffrey R. Holland, “Mobeko Mone ya Yambo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2012, 83–85.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Luka 24:5–6Mokambi Thomas S. Monson alobaki na ntina ya Luka 24:5–6, “Maloba moko te na kati ya makomi ya Klisto ezali ntina mpo na ngai koleka” (“Ye Asekwaki!,” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 89). Maloba oyo elimboli nini mpo na yo mpe libota na yo?

Matai 28; Malako 16; Luka 24; Yoane 20–21.Lokola libota na yo ezali kotanga mikapo oyo, yeba bato oyo basololaki na Yesu na lisolo moko na moko. Ndakisa, nini ekamwisi yo na ntina ya bato oyo bayaki kotala lilita ya Mobikisi? Oyekoli nini na kati ya maloba to misala ya Bapostolo to bayekoli na nzela ya Emau?

Banza koyemba elongo “Did Jesus Really Live Again?” (Children’s Songbook, 64). Bosolola na ntina ya moto songolo ya libota na yo bayebi akufa, mpe bosolola lolenge nini bosolo kati na loyembo oyo ememi bolendisi.

Elilingi
Yesu azali kotambola na mibali mibale na nzela

Nzela ya Emause, na Wendy Keller

Matai 28:16–20; Malako 16:14–20; Luka 24:44–53.Na milongo oyo, nini Yesu asengi Bapostolo na Ye basala? Lolenge nini tokoki kosunga kokokisa mosala oyo? Bandeko ya libota bakoki kokabola mayebi na bango ntango bayokaki “Nkolo kosalaka elongo na bango” mpo na kokokisa mikano na Ye (Malako 16:20).

Yoane 21:15–17.Banza kotanga milongo oyo ntango bozali kolia elongo. Yango ekoki kobakisa ndimbola mosusu na maloba ya Mobikisi “leisa bampate na ngai.” Kotala maye Yesu ateyaki na ntina ya bampate na kati ya Boyokani ya Sika (tala, na ndakisa, Matai 9:35–36; 10:5–6; 25:31–46; Luka 15:4–7; Yoane 10:1–16), mpo na nini koleisa bampate ezali lolenge malamu mpo na kotalisa lisungi na bana ya Nzambe? Nini likambo oyo eteyi na ntina ya lolenge nini Tata na Lola mpe Yesu bayokaka mpo na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Did Jesus Really Live Again?,” Children’s Songbook, 64.

Kobongisa Boyekoli Na Yo Moko

Salela miziki mpo na kobengisa Molimo mpe koteya malongi. Koyoka to koyemba nzembo lokola “He Is Risen!” (Hymns, no. 199) ekoki kobengisa Molimo mpe kosunga yo oyekola na ntina ya Lisekwa ya Mobikisi.

Elilingi
mwasi azali kotala Klisto mosekwi pene na lilita

Klisto Mosekwi, na Walter Rane

Bimisa na lokasa