“Sanza ya mwambe 14–20. Baloma 7–16: ‘Longa Mabe na Kosalaka Bolamu,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)
“Sanza ya mwambe 14–20. Baloma 7–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023
Sanza ya mwambe 14–20.
Baloma 7–16
“Longa Mabe na Kosalaka Bolamu”
Kaka ndambo ya mibeko ya nsango malamu kati na Baloma 7–16 ekoki kokotisama kati na makambo oyo, yango wana kosuka te na oyo elobami awa. Keba na bofuli ozwi ntango ozali koyekola.
Koma Makanisi na Yo
Na ebandeli ya mokanda na ye epai ya Baloma, Paulo apesaki mbote na bandimi ya Eklezia na kobengaka bango “balingami ya Nzambe” baoyo babiangami kozala basantu.” Alobaki ete bondimi na bango [epalanganaki] mokili mobimba” (Baloma 1:7–8). Atako Paulo alekisaki kokoma mingi na mokanda na ye kobongisaka makanisi ya lokuta mpe bizaleli ya mabe, emonanaki ete alingaki lisusu kondimisa Baklisto babongwani ya sika ete bazalaki solo mpenza Basantu oyo bazali balingami ya Nzambe. Toli na ye ya boboto epamboli biso nyonso baoyo tobundanaka mpo koyoka bolingo ya Nzambe mpe mpo na oyo akokoma Mosantu akoka koyoka likoki wana. Na komikitisa ya motema mawa, Paulo andimaki ete amiyokaki lokola “moto ya mabe” na bantango mosusu (Baloma 7:24), kasi nsango malamu ya Yesu Klisto epesaki ye nguya ya kolonga lisumu (tala Joseph Smith Translation, Baloma 7:22–27 [in the Bible appendix]). Na nguya wana, nguya ya bosikoli ya Mobikisi, tokoki “kolonga mabe”—mabe na mokili mpe mabe kati na bisomei nyonso mibale—“na kosalaka bolamu” (Baloma 12:21).
Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko
Baoyo balandaka Molimo bakoki kokoma “basangoli na libula na Klisto.”
Kutu nsima ya kokota kati na “bomoi ya sika” na nzela ya likuli ya libatisi (Baloma 6:4), ntango mosusu boyokaka mitungisi na kati ya oyo Paulo alimbolaki kati ya Baloma 7—“etumba” kati na moto ya mokili mpe bamposa na yo ya sembo (Baloma 7:23). Kasi Paulo alobelaki elikya kati na Baloma 8:23–25. Bantina nini ya elikya oyo ozwi na mokapo 8? Okokaki lisusu koluka mapamboli oyo ewuti na kozala na “Molimo ya Nzambe kovanda kati na yo” (Baloma 8:9). Lolenge nini okoki koluka kimoninga na Molimo Mosantu na mobimba mpenza koleka kati na bomoi na yo?
Likabo ya ngolu ya seko eleki monene koleka mimekano na ngai ya nse.
Mwa mibu nsima Paulo akomaki mokanda oyo, Basantu na Loma banyokwamaki minyoko ya nsomo. Bomoni nini kati na Baloma 8:16–39 oyo ekoki kosalisa Basantu oyo ntango monyoko eyaki? Lolenge nini maloba oyo ekoki kosalelama na yo mpe na mimekano ozali kokutana na yango sikawa?
Luka mikangano kati na milongo oyo mpe toli oyo ewuti na ndeko mwasi Linda S. Reeves: “Nayebi te mpo na nini tozali na mimekano ebele oyo tozali na yango, kasi ezali liyoki na ngai moko ete mbano ezali bongo monene, bongo ya seko mpe ya libela, bongo etonda na esengo mpe koleka bososoli na biso ete na mokolo wana ya mbano, tokoka kozala na mposa ya koloba na Tata na biso atonda boboto, ya bolingo, ‘Ezalaki wana nyonso oyo esengelamaki?’ Nandimi ete soki tokoki kokundola mpe koyeba bozindo ya bolingo wana Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi na biso bazali na yango mpo na biso, tokolinga kosala eloko nyonso mpo na kozonga liboso na bango lisusu, kozingama na bolingo na bango mpo ya seko mpenza. Ekosala eloko te … oyo tozali konyokwama awa soki, na nsuka, mimekano oyo ezali makambo oyo esengami biso mpo na kozwa bomoi ya seko mpe bonetoli na bokonzi ya Nzambe elongo na Tata mpe Mobikisi na biso?” (“Worthy of Our Promised Blessings,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 11). Zwa ekateli ya oyo okosala mpo na “kokundola mokolo na mokolo mpe koyeba” bolingo ya Nzambe mpo na yo.
Paulo alimboli nini na “ekoya lobi,” “maponami,” mpe “koyeba liboso”?
Paulo asalelaki maloba “ekoya lobi,” “maponami,” mpe “koyeba liboso” mpo koteya ete yambo ya bomoi oyo, Nzambe aponaki boko ya bana na Ye na kozala eteni ya Yisalaele, bato na Ye ya elaka. Oyo elimbolaki ete bakozwa mapamboli mpe mikumba moko boye bongo bakoka kopambola bato nyonso ya mokili (tala Mokambi na Makomi, “Boponi,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Nzokande, Paulo abetaki nsete na Baloma 9–11 ete banso ya bana ya Nzambe bakoki kokoma bato na Ye ya elaka, mpe banso tokozwa bomoi ya seko lolenge se moko—na nzela ya bondimi na Yesu Klisto mpe botosi na mitindo na Ye.
Tala lisusu Baefese 1:3–4; 1 Petelo 1:2; Alma 13:1–5; Masolo ya Nsango Malamu, “Kokulisama Liboso,” topics.ChurchofJesusChrist.org.
Paulo abengisi ngai nazala Mosantu ya solo mpe molandi ya Yesu Klisto.
Mikapo mitano ya nsuka ya Baloma ezali na mitindo moko boye soko zomi na ntina ya kobika lokola Basantu. Lolenge moko ya koyekola mitindo oyo ezali koluka mateya oyo ezali kozongelama. Lolenge nini okoki kolimbola na bokuse toli ya Paulo?
Okoki kososola makambo nyonso na mbala moko te, kasi Molimo akoki kosunga yo ozwa moko to mibale ya mabongi oyo okoki kobanda kosalela uta lelo. Kabola bamposa na yo na Tata na yo ya Lola na losambo, mpe senga Ye lisalisi.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Baloma 8:31–39.Nini ozwi kati na Baloma 8:31–39 oyo eteyi lolenge Tata ya Lola mpe Yesu Klisto bayokaka na ntina na biso? Ntango nini oyokaki ngolu ya Nzambe?
Mpo na ndakisa milongo 38–39, bandeko ya libota bakoki kozwa bandakisa ya makambo oyo, lokola biso mpe bolingo ya Nzambe, tokoki kokabwana te.
-
Baloma 9:31–32.Etinda ya Mpaka Wilford W. Andersen “The Music of the Gospel” (Liahona, Sanza ya mitano 2015, 54–56; tala lisusu the video on ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosalisa lokola ndakisa ya oyo Paulo ateyi na ntina ya mobeko, misala, mpe bondimi. Nsima ya kolobela lisolo na ye, libota na yo ekoki komeka kobina na miziki to te. LoLolenge nini bondimi esalisi yo mpo na koyeba esengo ya nsango malamu?
-
Baloma 10:17.Koma likolo ya bakopo ebele ya mai maloba ya Nzambe (lokola makomi, bobimisi ya moto ye moko, mpe likita linene). Solola lolenge nini liloba ya Nzambe ekolisaka bondimi na biso ntango ozali kotia kopo ya mai moko moko na katini bakoma “Bondimi.”
-
Baloma 12.Elimboli nini kosala bisomei “mbeka ya bomoi, esantu, endimami na Nzambe”? (molongo 1).
-
Baloma 14:13–21.Libota na yo ekoki kozwa uta na koyekolaka toli ya Paulo na ntina ya kosambisa mpe kolobela makambo oyo esepelisaka yo. Ntango mosusu okoki kosolola banzela ya malamu na koyanola ntango bato mosusu, esangisi mpe bandeko na yo ya libota, kosala maponi oyo ekeseni na maye ya yo. Lolenge nini tokoki koluka biloko oyo epesaka kimya”? (molongo 19).
Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.
Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Feel My Savior’s Love,” Children’s Songbook, 74–75.