Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mwambe 21–27. 1 Bakolinti 1–7: “Bozala na Bomoko Ebonga Nie Kati Na Bino”


“Sanza ya mwambe 21–27. 1 Bakolinti 1–7: ‘Bozala na Bomoko Ebonga Nie Kati Na Bino,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mwambe 21–27. 1 Bakolinti 1–7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika: 2023

Elilingi
Kolinti ya kala

Corinth, Southern Greece, the Forum and Civic Center, eyembami na Balage Balogh/www.ArchaeologyIllustrated.com

Sanza ya mwambe 21–27

1 Bakolinti 1–7

“Bozala na Bomoko Ebonga Nie Kati Na Bino”

Koma makanisi na yo ntango ozali kotanga 1 Bakolinti 1–7. Kati na makanisi oyo ekoki kozala na mamimisi mpo na koyekola likanisi na nsima, mpo na kokabola na basusu likambo oyekoli, to kosala mbongwana kati na bomoi na yo.

Koma Makanisi na Yo

Na ntango ya basanza oyo Paulo alekisaki na Kolinti, “ebele ya Bakolinti oyo bazalaki koyokai [ye] bandimelaki, mpe babatisamaki” (Misala 18:8). Yango wana esengelaki kosala mpasi mingi na motema mpo na Paulo koyoka ete, bobele mwa mibu moke na nsima, ezalaki na “bokabwani” mpe “boswani” kati na Basantu Bakolinti mpe ete na bozangi na ye babandaki kotosa “mayele ya mokili oyo” (1 Bakolinti 1:10–11, 20). Na eyano, Paulo akomaki mokanda tobengi sikawa 1 Bakolinti. Etondisami na malongi, mpe atako bongo, na ntango se moko, Paulo alembaki nzoto ete Basantu balengelamaki te mpo na kozwa malongi nyonso alingaki kopesa bango. “Ngai, bandeko, nakokaki koloba na bino te pelamoko na molimo,” amilelaki, “jambi bojali bato na mosuni” (1 Bakolinti 3:1–3). Ntango tozali komilengela mpo na kotanga maloba ya Paulo, ekoki kosalisa mpo na kotalela ndenge na bisomei mpo na kozwa bosolo—esangisi na bolingi ya kotosa Molimo mpe kosala makasi mpo na bomoko kati na mabota na biso, na baninga na biso Basantu, mpe na Nzambe.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi Yo Moko

1 Bakolinti 1:10–17; 3:1–11

Bandimi ya Eklezia ya Klisto basalaka makasi mpo na kozala na bomoko.

Toyebi te biteni nyonso na ntina ya bozangi bomoko kati na Basantu Bakolinti, kasi toyebi na ntina ya bozangi bomoko kati ya mikanganoi ya biso moko. Kanisa mokangano moko kati na bomoi na yo oyo ekoki kozala na litomba koleka bomoko, nsima luka oyo Paulo ateyaki kati na 1 Bakolinti 1:10–17; 3:1–11 na ntina ya bozangi bomoko kati ya Basantu Bakolinti. Makanisi nini okoki kozwa na ntina ya lolenge ya kokolisa bomoko monene koleka na baninga?

Tala lisusu Moziya 18:21; 4 Nefi 1:15–17; Malongi mpe Mayokani 38:23–27; 105:1–5; Gospel Topics, “Bomoko,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

1 Bakolinti 1:17–312

Mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, nazali na mposa ya bwanya ya Nzambe.

Atako ezali malamu—kutu elendisami—koluka bwania bisika nyonso tokoki kozwa yango (tala 2 Nefi 9:29; Malongi mpe Mayokani 88:118), Paulo apesaki boko maloba makasi ya bokebisi na ntina ya mayele mabe ya bato, oyo abengaki “bwania ya mokili oyo.” Ntango ozali kotanga 1 Bakolinti 1:17–25, maniola nini liloba oyo ekoki kolimbola. Okanisi Paulo alingaki kolobela nini na “bwania ya Nzambe”? Mpo na nini tozali na mposa ya bwania ya Nzambe mpo na kokokisa mosala ya Nzambe?

Na makasi na yo ya kokokisa mikumba na yo na kokokisaka mosala ya Nzambe, osila komona “bobangi, mpe … kolenga koleka” oyo Paulo ayokaki ntango ateyaki Basantu Bakolinti? (1 Bakolinti 2:3). Omoni nini kati na 1 Bakolinti 2:1–5 oyo epesi yo mpiko? Kanisa lolenge nini okoki kolakisa ete otiaka elikya na “nguya ya Nzambe” koleka na “bwania ya bato.”

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 1:17–28.

1 Bakolinti 2:9–16

Nazali na mposa ya Molimo Mosantu mpo na kososola makambo ya Nzambe.

Soki olingaki koyekola mingi koleka na ntina ya likambo lokola mituka to lolenge ya kotonga bandako ya moyen-age, okosala yango ndenge nini? Engebene na 1 Bakolinti 2:9–16, lolenge nini boyekoli ya “makambo ya Nzambe” ekeseni na boyekoli ya “makambo ya moto”? Mpo na nini tosengeli kozala na Molimo Mosantu mpo na kososola makambo ya Nzambe? Nsima ya kotanga milongo oyo, nini omiyoki osengeli kosala mpo na kososola makambo ya molimo na mobimba koleka? Lolenge nini maloba ya Paulo ekokaki kosalisa mobali to mwasi oyo azali kobunda na litatoli na ye?

1 Bakolinti 6:13–20

Nzoto na ngai ezali esantu.

Bato mingi koleka na Kolinti bakanisaki ete ekobo endimamaki mpe ete banzoto na bango esalamaki yambo mpo na bilengi. Na maloba mosusu, Kolinti ezalaki na bokeseni te na mokili ya lelo. Nini Paulo ateyaki kati ya 1 Bakolinti 6:13–20 oyo ekoki kosalisa yo olimbola epai na basusu mpo na nini olingi kozala na etamboli ya peto?

Lokola Paulo, Ndeko Mwasi Wendy W. Nelson alendisaki Basantu bazala peto; tala etinda na ye “Bolingo mpe Libala” (worldwide devotional for young adults, Sanza ya yambo 8, 2017, broadcasts.ChurchofJesusChrist.org). Engebene na Ndeko Mwasi Nelson, mapamboli nini eyaka na kosalelaka mibeko ya Nzambe mpo na oyo etali bolingo mpe boyokani?

1 Bakolinti 7:29–33

Paulo ateyaki ete ezali malamu kozala monzemba koleka mobalani?

Milongo mingi kati na 1 Bakolinti 7 emonisi ete ntango libala endimami, kozala monzemba mpe koboya ekobo ezali malamu mokangano nyonso mosusu ya bosangisi nzoto. Nzokande, Joseph Smith Translation, 1 Bakolinti 7:29–33 (na Bobakisi na ya Biblis) asalisi biso kososola ete Paulo azalaki kolobela baoyo babiangamaki kozala bamisionele ya ntango mobimba, komonaka ete bakokoka kosalela Nzambe malamu koleka soki batikali minzemba ntango ya misio na bango. Nkolo ateyaki na nzela ya basali na Ye, kotangaka mpe Paulo, ete libala ezali eteni ya mwango na Ye ya seko mpe ntina mpo na bonetoli (tala 1 Bakolinti 11:11; Malongi mpe Mayokani 131:1–4).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Bakolinti 1:10–17; 3:1–11.Ntango bandeko na yo ya libota bazali kotanga milongo oyo bengisa bango bazwa likanisi oyo ekoki kosalisa bango bazala kati na bomoko koleka.

1 Bakolinti 3:1–2.Ntango mosusu okoki kotanga milongo oyo ntango ozali kolia miliki mpe mosuni. Okoki kokokanisa lolenge bana mike bakomaka mikolo na lolenge tokolaka na molimo.

1 Bakolinti 3:4–9.Paulo akokanisaki makasi na ye ya misionele na kolona mboto. Kokokanisa na ye oyo eteyi biso nini na ntina ya kokabola nsango malamu?

1 Bakolinti 6:19–20.Kokokanisa banzoto na biso na batempelo, lokola Paulo asalaki, ekoki kozala lolenge moko ya malamu mpo na koteya na ntina ya bosantu ya banzoto na biso. Ntango mosusu okoki kolakisa bilili ya batempelo, lokola oyo ezali kokende na mwango oyo. Mpo na nini batempelo ezali esantu? Lolenge nini banzoto na biso ezali lokola batempelo? Nini tokoki kosala mpo na kozwa banzoto na biso lokola batempelo? (Tala lisusu the August 2020 special edition ya Liahona na ntina na ekobo.)

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nkolo Apesaki Ngai Tempelo,” Chants pour Enfants, 153.

Kobongisa Koyekola Makomi ya Moto Ye Moko

Zala na bompikiliki na yo moko. Paulo ateyaki ete miliki eyaka yambo ya mosuni ntango tozali koyekola nsango malamu (tala 1 Bakolinti 3:1–2). Soki omoni ete malongi mosusu ezali mpasi mpo na kososola sikoyo, zala na bompikiliki. Ndima ete bososoli ekoya ntango ozali na bondimi mpe ozali koyekola na etingia.

Elilingi
batempelo minei

Paulo akokanisaki banzoto na biso na bosantu ya tempelo. Na kolandaka etamboli ya makonga ya montele banda na loboko ya mobali Tempelo ya Curitiba na Brazil, Tempelo ya Mexico City na Mexico; Tempelo ya Tokyo na Japon, Tempelo ya Accra na Ghana.

Bimisa na lokasa