Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mwambe 28–Sanza ya libwa 3. 1 Bakolinti 8–13: “Bozali Nzoto ya Klisto”


“Sanza ya mwambe 28–Sanza ya libwa 3. 1 Bakolinti 8–13: “Bozali Nzoto ya Klisto,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mwambe 28–Sanza ya libwa 3. 1 Bakolinti 8–13,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
likita ya elambo

Sanza ya mwambe 28–Sanza ya libwa 3

1 Bakolinti 8–13

“Bozali Nzoto ya Klisto”

Ntango ozali kotanga na losambo 1 Bakolinti 8–13, Molimo Mosantu akoki kolobela yo na banzela ya mongongo ya nse (tala 1 Bakonzi 19:11–12). Koma makanisi oyo ekosalisa yo omikundola mayoki mpe makanisi ozwaki ntango ozalaki koyekola.

Koma Makanisi na Yo

Na eleko ya Paulo, Kolinti ezalaki engumba moko ya mombongo na bato oyo bafandaki wana bawutaki bisika nyonso ya Bokonzi ya Loma. Na bizaleli mpe biyamba ebele ekeseni kati na engumba, Bandimi ya Eklezia na Kolinti babundanaki mpo kotia bomoko, yango wana Paulo alukaki kosalisa bango bazwa bomoko na bondimi na bango na Klisto. Bomoko oyo ezalaki koleka mpenza kimia nyonso esika, Paulo asengaki bango te kondima na pete bokeseni ya moto na moto. Na esika, ateyaki ete ntango bokoti na Eklezia ya Yesu Klisto, “bobatisami na nzoto moko,” mpe eteni ya moto nyonso esengami.(1 Bakolinti 12:13). Ntango mondimi moko abungi, ezali lokola kobungisa eteni moko, mpe lokola mbano nzoto elembi. Ntango mondimi moko azali konyokwama, tosengeli banso koyoka yango mpe kosala ya biso eteni mpo na kosunga ye. Na lolenge ya bomoko oyo, bokeseni ezali kaka koyebana te kasi kolingama, mpo ete soki bandimi na makabo mpe makoki ekeseni te, nzoto ekokaki kosuka. Yango wana soki okanisi ete ozali ntango nyonso na ndako na Eklezia to ozali komituna soki solo solo ozali mondimi, etinda ya Paulo epai na yo ezali ete bomoko ezali ndenge se moko te. Ozali na mposa ya Basantu baninga na yo, mpe Basantu baninga na yo bazali na mposa na yo.

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

1 Bakolinti 10:1–13

Nzambe apesaka nzela ya kolonga lisenginia.

Makambo ya molimo, kutu ya kokamwa, ekolongola biso te na masenginia oyo “ezali ya bato nyonso” (1 Bakolinti 10:13). Wana ekoki kozala moko ya bantina Paulo akomaki na ntina ya lolenge nini Bayisalaele na ntango ya Mose babundaki na masenginia, kutu atako batatolaki makamwisi ya nguya (tala Esode 13:21; 14:13–31). Ntango ozali kotanga 1 Bakolinti 10:1–13, makebisi nini na makambo ya Bayisalaele ekoki kosalelama epai na yo? Bandenge nini ya “kokima” masenginia Tata na Lola apesi yo? (tala lisusu Alma 13:27–30; 3 Nefi 18:18–19).

1 Bakolinti 10:16–17; 11:16–30

Elambo esangisaka biso lokola bandimi ya Eklezia ya Klisto.

Atako elambo esengi mokano ya moto ye moko kati na yo mpe Nkolo, ezali mpe lisusu likambo ozali kokabola na baninga basusu. Toliaka elambo ntango mosusu mokolo na mokolo elongo, lokola liboke ya Basantu. Tanga oyo Paulo akomaki na ntina ya elambo, mpe kanisa na ntina ya ndenge nini molulu oyo esantu ekoki kosalisa “ebele” bakoma “moko” na Klisto (1 Bakolinti 10:17). Lolenge nini kolia elambo esalisi yo oyoka obelemi na Klisto mpe bandimi mosusu? Lolenge nini milongo oyo epusi mayoki na yo na ntina ya elambo mpe ndenge ozali komilengele mpo na yango?

1 Bakolinti 11:11

Na mwango ya Nzambe, mibali mpe basi bazali na mposa ya moko na moko.

Kati na 1 Bakolinti 11:4–15, Paulo alobelaki mimesano ya bonkoko oyo tozali kolanda te lelo. Nzokande, Paulo ateyaki lisusu bosolo ya motuya oyo ya kosalela mpo na seko, ezwami kati na molongo 11. Okanisi nini molongo oyo elimboli, mpe mpo na nini ezali na ntina? Mpaka David A. Bednar ateyaki, “Mobali mpe mwasi basengeli koyekola na, kolendisa, kopambola, mpe kosukisa moko na mosusu” (“We Believe in Being Chaste,” Liahona, Sanza ya mitano 2013, 42). Lolenge nini bosolo oyo ekoki kosalisa libala? Lolenge nini ekoki kosalisa ndenge tosalaka na Eklezia?

Tala lisusu Jean B. Bingham, “United in Accomplishing God’s Work,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 60–63.

1 Bakolinti 12–13

Makabo ya molimo epesamaka mpo na bolamu ya bana nyonso ya Tata na Lola.

Mokanda ya makabo ya molimo kati na 1 Bakolinti 12–13 ezali molai. Kasi ezali esika malamu mpo na kobanda lokola oyebi mpe okanisi makabo ya molimo Tata ya Lola apesi yo. Mokanda “Spiritual Gifts” (topics.ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosalisa yo ososola makabo oyo malamu koleka. Ntango ozali kotanga mokanda ya Paulo ya makabo, okoki kobakisa boko omonaki na basusu, na yomei, to na bato na makomi. Soki ozali na lipamboli ya nkoko, ekoki kolobela boko ya makabo na yo ya molimo. Lolenge nini makabo oyo esalisaka yo opambola basusu? Kanisa lolenge nini okoki koluka “na etingia mpenza makabo malamu” (1 Bakolinti 12:31).

Tala lisusu 1 Bakolinti 14; Moroni 10:8–21, 30; Malongi mpe Mayokani 46:8–26; Biteni ya Bondimi 1:7.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Bakolinti 9:24–27.Uta Paulo akokanisaki kobika nsango malamu na kokima mbangu, okoki kokima mbangu na libota mpo na kolimbola likambo na ye. Pesa ekoti na moto nyonso oyo asukisi momekano ya mbangu, mpe solola lolenge nini banso oyo bazali na etingia ya kolanda Yesu Klisto na bomoi oyo bakozwa motole “ekobeba te” (1 Bakolinti 9:25; tala lisusu 2 Timote 4:7–8). Eloko nini mopoti-mbangu alengelaka mpo na momekano ya mbangu? Nini tokoki kosala mpo na kolengela kozonga epai na Tata ya Lola?

Elilingi
Bapoti-mbangu na nzela

Paulo akokanisaki kobika nsango malamu na momekano ya kopota mbangu.

1 Bakolinti 12:1–11.Nsima ya kotanga milongo oyo elongo, kanisa kopesa moto nyonso eteni ya lonkasa na nkombo ya ndeko mosusu ya libota na likolo. Tuna moto nyonso apesa mokanda ya makabo ya molimo bakanisi moto wana azali na yango. Okoki kolekisa nkasa kino moto nyonso azwa libaku ya kokoma na ntina ya makabo ya ndeko moko moko ya libota.

1 Bakolinti 12:3.Mpo na nini Molimo Mosantu azali na ntina mpo na kozwa litatoli ya Yesu Klisto? Nini ekoki biso kosala mpo na kobengisa Molimo Mosantu alendisa matatoli na biso mpo na Ye?

1 Bakolinti 12:12–27.Ndakisa Paulo ya nzoto ekokaki kozala lolenge malamu mpo na kosolola bomoko ya libota. Mpo na ndakisa, bandeko ya libota bakokaki komeka koyema nzoto esalemi bobele se na miso to matoyi (tala molongo 17). Milongo oyo emonisi nini na ntina ya boniboni tosengeli kosalela moko mpe mosusu lokola bandeko ya libota?

1 Bakolinti 13:4–8.Ndimbola ya Paulo ya bolingani ekoki kokoma liloba ya lotomo efulami ya libota na yo. Okoki kopesa ndeko moko moko ya libota na yo mosala ya koyekola liloba kati na molongo 4–8 mpe koteya libota etikali oyo elimboli kosalela bandimbola, bandakisa, mpe makambo ya moto ye moko. Lolenge nini Mobikisi azali ndakisa ya bizaleli oyo? Okoki lisusu kosala bitando elongo ya maloba oyo moko moko mpe komonisa yango bisika nyonso ya ndako na yo. Zala mokeli!

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Love Is Spoken Here,” Children’s Songbook, 190–91.

Kobongisa Koteya na Biso

Monisa makomi Monisa molongo oyo omoni ezali motuya, esika wapi bandeko ya libota bakomona yango mbala na mbala. Bengisa bandeko ya libota kopona makomi ya komonisa.

Elilingi
likita ya elambo

“Lipa oyo tokataka, ejali lisanga na njoto ya Klisto te? Bongo biso tojali bato mingi lipa ejali moko, mpe njoto moko” (1 Bakolinti 10:16–17).

Bimisa na lokasa