Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya libwa 4–10. 1 Bakolinti 14–16: “Nzambe Azali Mokeli ya Mobulungano Te, kasi ya Kimia”


“Sanza ya libwa 4–10. 1 Bakolinti 14–16: ‘Nzambe Azali Mokeli ya Mobulungano Te, kasi ya Kimia,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya libwa 4–10. 1 Bakolinti 14–16,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
liziba ya libatisi na tempelo

Sanza ya libwa 4–10

1 Bakilinti 14–16

“Nzambe Azali Mokeli ya Mobulungano Te, kasi ya Kimia”

Koma makanisi na yo ntango ozali kotanga 1 Bakolinti 14–16. Sambela na ntina ya oyo Molimo ateyi yo, mpe tuna Tata ya Lola soki ezali na mingi koleka oyo Ye alingi oyekola.

Koma Makanisi na Yo

Mpo ete Eklezia mpe malongi na yango ekokaki kozala sika na Kolinti, tokoki kososola ete Basantu Bakolinti bakutanaki na mobulungano. Paulo ateyaki bango bosolo ya moboko ya nsango malamu: “Ete Klisto akufaki mpo na masumu na biso … mpe ete akundamaki mpe ete asekwaki lisusu mokolo ya misato” (1 Bakolinti 15:3–4). Kasi boko bandimi mosika te babandaki koteya ete “lisekwa na kati ya bakufi ejali te” (1 Bakolinti 15:12). Paulo abondelaki bango na “kobomba na makanisi” bosolo bateyamaka (1 Bakolinti 15:2). Ntango tokutani na makanisi ekeseni na ntina ya bosolo ya nsango malamu, ezali malamu na kokundola ete “Nzambe azali mokeli ya mobulungano te, kasi ya kimia” (1 Bakolinti 14:33). Koyokaka basali oyo Nzambe aponaki mpe kokangamaka na bosolo ya pete bateyaka ntango nyonso ekoki kosalisa biso tozwa kimia mpe “kotelema ngwi na bondimi” (1 Bakolinti 16:13).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

1 Bakolinti 14

Nakoki koluka likabo ya lisakoli.

Ezali nini likabo ya lisakoli? Ezali likoki ya koyeba lobi ekoya? Ezali se mpo na baprofeta? To ekoki moto nyonso kozwa yango?

Kanisa mituna oyo ntango ozali koyekola 1 Bakolinti 14:3, 31, 39–40. Okoki lisusu kotanga Emoniseli 19:10 mpe “Lisakoli, Kosakola” (scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Kowuta na oyo oyekoli, lolenge nini okolimbola likabo ya lisakoli? Nini Paulo akoki kolimbola ntango abengisi Bakolinti na “kolinga lisakoli”? (1 Bakolinti 14:39). Lolenge nini okoki kondima libiangi oyo?

Tala lisusu Yuda 2:28–29; Alma 17:3; Malongi mpe Mayokani 11:23–28.

1 Bakolinti 14:34–35

Lolenge nini maloba na ntina ya basi na milongo oyo esalelami lelo?

Na eleko ya Paulo, ezalaki na makanisi ekeseni na ntina ya lolenge nini basi basanganaki na lisanga, kotangaka mpe na makita ya Eklezia. Ezala mateya nini kati na 1 Bakolinti 14:34–35 elimbolami na ntango ya Paulo, yango esengeli te kososolama ete basi bakoki te koloba mpe kokamba na Eklezia lelo (tala Joseph Smith Translation, 1 Bakolinti 14:34 [in 1 Bakolinti 14:34, makomi ya nse b]). Mokambi Russell M. Nelson alobaki na basi ya lelo ya Eklezia : “Tozali … na mposa ya makasi na bino, mbomgwana na bino, boyambi na bino ya sikisiki, makoki na bino ya kokamba, bwania na bino, mpe mingongo na bino. Bokonzi ya Nzambe ezali te mpe ekoki kozala ya mobimba te soki ezangi basi oyo basala mayokani esantu, mpe babateli yango, basi oyo bakoki koloba na nguya mpe likoki ya Nzambe! (“A Plea to My Sisters,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 96).

1 Bakolinti 15:1–34, 53–58

Yesu Klisto alongaki liwa.

Lisekwa ya Yesu Klisto ezali bongo moboko ya Boklisto, moto moko akoki koloba ete soki yango te Boklisto ezali te—na kosalelaka maloba ya Paulo, “kosakola na biso ezali mpamba, mpe kondima na bino ezali mpamba mpe” (1 Bakolinti 15:14). Nzokande Basantu basusu Bakolinti bazalaki koteya ete “lisekwa kati ya bakufi ejali te” (1 Bakolinti 15:12). Ntango ozali kotanga eyano ya Paulo kati na 1 Bakolinti 15, zwa ntango ya kokanisa lolenge nini bomoi na yo ekokaki kokesena soki ondimelaki Lisekwa te (tala 2 Nefi 9:6–19; Alma 40:19–23; Malongi mpe Mayokani 93:33–34). Elimboli nini epai na yo maloba “Soko Klisto asekwi te, kondima na bino ejali bobele mpamba”? (molongo 17).

Ezali mpe motuya na koyeba ete Paulo alobelaki libatisi mpo na bakufi lokola liloba emonisi solo ya lisekwa (tala 1 Bakolinti 15:29). Lolenge nini tempelo mpe mosala ya mambi ya kala ya libota elendisi bondimi na yo na malongi ya lisekwa?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 138:11–37.

1 Bakolinti 15:35–54

Banzoto esekwa ezali na bokeseni na banzoto ya kufa.

Osila komitungisa te na ntina ya lolenge nini ezali nzoto oyo esekwa? Engebene na 1 Bakolinti 15:35, boko Bakolinti bamitunaki likambo se moko wana. Tanga eyano ya Paulo kati na milongo 36–54, mpe yeba maloba oyo elimboli bokeseni kati na banzoto ya kufa mpe banzoto esekwa. Ntango osali yango, okoki kokokanisa milongo 40–42 na Malongi mpe Mayokani 76:50–112. Nini emoniseli oyo ya Profeta Joseph Smith ebakisi na bososoli na yo? (tala lisusu Joseph Smith Translation, 1 Bakolinti 15:40 [in 1 Bakolinti 15:40, makomi ya nse a]). Mpo na nini bosolo oyo ezali ya motuyat epai na yo?

Tala lisusu Luka 24:39; Alma 11:43–45; Malongi mpe Mayokani 88:14–33.

Elilingi
moi ebimi

“Ezali na nkembo moko ya moi” (1 Bakolinti 15:41).

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Bakolinti 15:29.Toyekoli wuta na molongo 29 ete Baklisto ya kala basanganaki na mabatisi ya bakufi, bobele se lokola tozali kosala lelo. Lolenge nini okolimbola na basusu mpo na nini tobatisami mpo na bankoko na biso? ChurchofJesusChrist.org. Nini tozali kosala lokola libota mpo na kosala milulu ya tempelo mpo na bankoko na biso bakufa oyo bazali na mposa na yango? Okoki kozwa mateya mingi etali likambo oyo na kati ya mokanda oyo kati ya ba Articles na Masolo ya Nsango Malamu “Baptisms for the Dead” (topics.ChurchofJesusChrist.org) and at FamilySearch.org.

1 Bakolinti 15:35–54.Biloko to bilili nini okoki kolakisa mpo na kosalisa libota na yo esosola ndambu ya maloba Paulo asalelaki mpo na kolimbola lolenge nini banzoto ya kufa ekeseni na banzoto esekwa? Ndakisa, mpo na kolakisa bokeseni kati na ya kopola mpe ezanga kopola (tala milongo 52–54) okoki kolakisa libende oyo epola mpe libende oyo epola te. To okoki kokesenisa eloko moko ya bolembu na eloko moko ya nguya (tala molongo 43).

1 Bakolinti 15:55–57.Lisolo na ntina ya milongo oyo ekoki kozala mingi mingi malamu soki libota na yo eyebi moto moko oyo akufa. Bandeko ya libota bakoki kopesa litatoli ya lolenge Yesu Klisto alongoli “esweli na kufa” (molongo 56).

1 Bakolinto 16:13.Mpo na kosalisa bandeko na yo ya libota balobela molongo oyo, okoki koyema zolongano na mabele mpe koteya ndeko moko ya libota na “kotelema ngwi” na kati na yango na miso na ye ya kokangama. Nsima basusu bakoki komeka kotindika to kobenda ye wuta na zolongano. Bokeseni nini esali ntango moto kati na zolongano azali na miso na ye kofungwama mpe akoki “kotala”? Tokoki kosala nini mpo na “kotelama ngwi” ntango tomekami mpo na kosala maponi ya mabe? ChurchofJesusChrist.org).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Asekwi,” Hymns, no. 199.

Kobongisa Koyekola Makomi ya Moto Ye Moko

Luka bandakisa. Kati na makomi tozwi bandakisa oyo elakisi lolenge nini Nkolo asalaka mosala na Ye. Bandakisa nini ozwi kati na 1 Bakolinti 14 oyo esalisi biso kososola lolenge nini kolendisa moko mpe mosusu?

Elilingi
Klisto abimeli Malia na lilita ya elanga

Ojali Kolela mpo na nini, Mama?, © Simon Dewey 2021. Esalelami na ndingisa uta na Altus Fine Art/www.altusfineart.com

Bimisa na lokasa