Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya libwa 18–24. 2 Bakolinti 8–13: “Nzambe Alingaka Moto oyo Apesaka na Esengo”


“Sanza ya libwa 18-24. 2 Bakolinti 8-13: ‘Nzambe Alingaka Moto oyo Apesaka na Esengo,’” Yaka, Langa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya libwa 18–24. 2 Bakolinti 8–13,” Yaka, Langa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali koloba na mwana moke

Sanza ya Libwa 18–24

2 Bakolinti 8–13

“Nzambe Alingaka Moto oyo Apesaka na Esengo”

Kokoma makanisi uta na molimo ekosalisa yo komikundola nini osimbakii na ntango ya koyekola makomi. Okoki kokoma na zulunale ya koyekola, tia bankoma pembeni ya makomi, bakisa bankoma kati ya Applikasio na yo ya Ebombelo ya Buku ya Eklezia, to sala audio ya makanisi na yo.

Koma Makanisi na Yo

Okosala nini soki oyoki ete lisanga ya Basantu na esika mosusu ezali kobundana na bobola? Oyo ezali likambo oyo Paulo alimbolelaki Basantu Bakolinti kati na 2 Bakolinti 8–9. Alikyaki kondimisa Basantu Bakolinti kopesa ndambu ya ebele ya biloko na bango na Basantu oyo bazali kokelela. Kasi nsima ya bosenga ya makabo, maloba ya Paulo ezalaki lisusu na bosolo ya mozindo na ntina ya kopesa: “Moto na moto asala pelamoko na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo” (2 Bakolinti 9:7). Na ntango na biso, ezali kaka na basantu na mokili mobimba baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Ntango mosusu oyo mingi koleka tokoki kosala mpo na bango ezali kokila mpe kopesa makabo ya kokila. Na makambo mosusu, bopesi na biso ekoki kozala ya kopesa mbala moko na mokeleli mpe na moto yangonye moko. Lolenge nyonso mabonza na biso ekoki kozwa, ezali motuya na kotalaka mokano na biso ya kopesa. Mabonza na biso ezali ndimbola ya bolingo na biso? Nsima na nyonso, ezali bolingo oyo esalaka ye oyo akopesa na esengo.

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

2 Bakolinti 8:1–15; 9:5–15

Nakoki na botosi nyonso kokabola oyo nazali na yango mpo na kopambola babola mpe bakeleli.

Ezali na bato mingi oyo bazali kati na mposa na mokili mobimba. Lolenge nini tokoki kosala bokeseni? Mpaka Jeffrey R. Holland apesaki toli: “Mozwi to mobola, tosengeli ‘kosala oyo tokoki’ ntango basusu bazali na mposa [tala Malako 14:6, 8]. … [Nzambe] akosunga mpe akokamba bino na misala na bino ya moyekoli oyo azali kokabola mawa na basusu soki bolingi mpenza solo mpe bosambeli mpe boluki lolenge ya kotosa mitindo Ye apesaki biso mbala na mbala.” (“Are We Not All Beggars?,” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 41).

Tanga 2 Bakolinti 8:1–15; 9:6–15, koma mibeko Paulo ateyaki na ntina ya kosalisa babola mpe bazangi. Nini efuli yo na ntina ya toli ya Paulo? Okoki kosambela mpo ete okambama na ntina ya nini okoki kosala mpo na kopambola moto moko oyo azali kokelela. Ndima kokoma makanisi nyonso ozwi mpe salela yango.

Tala lisusu Moziya 4:16–27; Alma 34:27–29; Russell M. Nelson, “Mobeko Monene ya Mibale,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 96–100; Henry B. Eyring, “Oyo Ezali Te Kokila Oyo Naponaki?,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 22–25.

2 Bakolinti 11:1–6, 13–15; 13:5–9

“Bomitala bino mpenja soko bojali kati na kondima.”

Lelo, lokola na ntango ya Paulo, ezali na baoyo bazali koluka kopengwisa biso na “bosembo mpe bopeto mpo na Klisto” (2 Bakolinti 11:3). Mpo na ntina wana, ezali ntina mingi mpo na kosala likanisi oyo Paulo apesaki: “Bomitala bino mpenja soko bojali kati na kondima” (2 Bakolinti 13:5). Okoki kobanda mokemoke na kokanisa na ntina na oyo elimboli “kozala kati na kondima.” Lolenge nini okoyeba soki ozali kati na kondima? Luka mabaku ozali na yango mpo na komitala yo moko.

Lokola eteni ya momekano na yo, okoki lisusu kokanisa liloba “sembo mpe mpeto mpo na Klisto” (2 Bakolinti 11:3). Lolenge nini omoni sembo mpe mpeto mpo na Klisto mpe nsango malamu na Ye? Lolenge nini okanisi “kopengwa uta na sembo mpe mpeto [wana] mpo na Klisto”? Toli nini ya malamu ozwi kati na 2 Bakolinti 11:1–6, 13–15?

Kanisa lisusu toli oyo ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf: “soki otikala kokanisa ata mokolo moko te ete nsango malamu ezali kosala malamu te mpo na yo, nabengisi yo ozonga nsima, tala bomoi na yo uta na mpepo moko likolo, mpe lembisa lolenge na yo ya kosala mpo na kokoma moyekoli. Tia makanisi na malongi ya ebandeli, mibeko, mpe kosalelama ya nsango malamu. Nalaki ete Nzambe akotambwisa mpe akopambola yo na nzela na yo ya bomoi oyo etondisama, mpe nsuka nsuka nsango malamu ekotambola malamu koleka mpo na yo” (“It Works Wonderfully!,” Liahona, Sanza ya mitano. 2015, 22).

2 Bakolinti 12:5–10

Ngolu ya Mobikisi ekoki mpo na kosalisa ngai nazwa makasi kati na bolembu na ngai.

Toyebi te oyo ezalaki “monjube kati na njoto” na Paulo, kasi biso banso tozali na ya bisomei banzube oyo tolingi Nzambe alongola na bomoi na biso. Kanisa na ntina ya banzube ntango ozali kotanga 2 Bakolinti 12:5–10, mpe maniola oyo oyekoli na ntina na Yesu Klisto kati na milongo oyo. Paulo ateyaki nini kati na milongo oyo na ntina ya mimekano mpe bolembu? Elimboli nini epai na yo ete ya Nzambe “ngolu ekoki” mpo na yo?

Tala lisusu Moziya 23:21–24; 24:10–15; Etele 12:27; Moroni 10:32–33.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

2 Bakolinti 8–9.Tozwi nini na mikapo oyo efuli biso “kosalisa babola mpe basusu na mposa ya lisalisi? Oyo ekokaki kozala ngonga malamu mpo na kosala mwango ya lisalisi lokola libota mpo na moto moko oyo azali kati na mposa.

2 Bakolinti 9:6–7.Libota na yo eyebi moto moko oyo akoki kolimbolama lokola mopesi oyo apesaka na esengo”? Lolenge nini tokoki kosala mosala na biso epai na basusu na esengo koleka? Bandeko na yo ya libota ya bilenge bakoki kosala bamakaro oyo elobi “Nazali ye oyo akopesa na esengo.” Okoki kokabola bamakaro na bandeko ya libota ntango nyonso omoni bango kosalisa moko mosusu na esengo.

2 Bakolinti 10:3–7.Lolenge nini okoki koteya libota na ntina ya “etumba” na biso ya kotelemela mabe? Ekoki libota na yo kosepela kotonga efelo to engumba na bakiti mpe babulangeti? Oyo ekoki komema na lisolo na ntina ya lolenge nini kobwaka makambo oyo epengwisaka biso na Nzambe mpe lolenge nini “[kokanga] makanisi yonso na nkanga ete matosa Klisto.” Nini ezali “bibundeli” ya molimo tosalelaka mpo na kokonza makanisi na biso? (tala Baefese 6:11–18).

2 Bakolinti 11:3.Nini libota na yo ekoki kosala mpo na kofandisa makanisi mingi koleka “bosembo mpe bopeto mpo na Klisto”?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “‘Give,’ Said the Little Stream,” Children’s Songbook, 236.

Kobongisa Koyekola ya Moto Ye Moko

Koma Makanisi. Mpaka Richard G. Scott alobaki: “Boyebi oyo ekomami na bokebi mpenza ezali boyebi esengeli na ntango ya bosenga. … [Kokoma toli ya molimo] ekomisaka lisusu makasi elikya ya kozwa mwinda mosusu” (“Acquiring Spiritual Knowledge,” Ensign, Sanza ya mitano. 1993, 88; tala lisusu Teaching in the Savior’s Way, 1230).

Elilingi
bilenge bana bazali kosalisa na mosala

“Moto na moto asala pelamoko na motema na ye, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo” (2 Bakolinti 9:7).

Bimisa na lokasa