Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya libwa 25–Sanza ya zomi 1. Bagalatia: “Botambola na Molimo”


“Sanza ya libwa 25–Sanza ya zomi 1. Bagalatia: ‘Botambola na Molimo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya libwa 25–Sanza ya zomi 1. Bagalatia,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Klisto abimeli Paulo na kati ya boloko

Mobikisi mosekwi ayaki kotala Paulo na boloko (tala Misala 23:11). Yesu Klisto akoki kokangola biso na “nkanga ya bowumbo” (Bagalatia 5:1).

Sanza ya libwa 25–Sanza ya zomi 1.

Bagalatia

“Botambola na Molimo”

Ntango ozali kotanga Bagalatia, koma makanisi okozwa. Kosala bongo ekosalisa yo okundola mpe omaniola yango na mikoloi ekoya.

Koma Makanisi na Yo

Nsango malamu ya Yesu Klisto epesi bonsomi na bowumbo ya molimo. Kasi ntango mosusu Bagalatia baoyo bazwaki bonsomi ya nsango malamu bapesaki yango mukongo mpe “bazalaki lisusu na mposa ya kozonga na bowumbo” (Bagalatia 4:9). Oyo ezalaki nini boko Basantu Bagalatia bazalaki kosala—bazalaki koboya bonsomi Klisto apesaki bango (tala Bagalatia 1:6). Mokanda ya Paulo epai ya Bagalatia, na nsima, ezalaki libiangi ya lombangu mpo na kozonga na “Klisto oyo akangolaki biso mpo na bonsomi” (Bagalatia 5:1). Libiangi oyo ezali moko oyo tozali na yango mposa mpo na koyoka mpe kotosa mpo ete ntango makambo ebongwanaka, etumba kati na bonsomi mpe bowumbo ezali ntango nyonso. Lokola Paulo ateyaki, esengeli kaka te “kobiangama mpo na bonsomi” (Bagalatia 5:13); tosengeli lisusu “kotelema ngwi” na yango (Bagalatia 5:1) na kotalelaka Klisto.

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Bagalatia 1–5

Mobeko ya Klisto ekangoli ngai.

Paulo akomelaki Bagalatia ntango ayokaki bajalaki mpe kolanda mateya ya mabe (tala Bagalatia 1:6–9). Moko ya mateya oyo ezalaki ete mpo na kobikisama, Bapagano baoyo bandimaki nsango malamu bazalaki na mposa ya kokatama ngenga mpe kobatela bizalela mosusu ya bonkoko ya mobeko ya Mose (tala Bagalatia 2). Paulo abengaki mimeseno oyo “nkanga ya bowumbo” (Bagalatia 5:1). Ntango ozali kotanga toli ya Paulo epai ya Bagalatia, luka mibeko oyo ekoki kosalisa yo ososola nini ezali bonsomi ya solo. Okoki lisusu komaniola nini ezali mimeseno ya mabe to nkanga ya bowumbo mosusu oyo ekoki kozala kati na bomoi na yo. Ezali na likambo oyo epekisi yo kozwa bonsomi oyo nsango malamu ezali kopesa? Lolenge nini Klisto mpe nsango malamu na Ye “ekomisi [yo] nsomi”? (Bagalatia 5:1).

Tala lisusu 2 Nefi 2:27; 9:10–12.

Bagalati 3

Nazali mosangoli ya mapamboli elakamaki na Abalayama.

Boko Basantu Bagalatia bazalaki kotungisama ete mpo bazalaki bakitani mpenza (“nkona”) ya Abalayama te, bakoki te kozwa mapamboli elakamaki na Abalayama, kotangaka mpe bonetoli. Engebene na Bagalatia 3:7–9, 13–14, 27–29, nini elongisaka moto mpo na kozala “libota ya Abalayama”?

Mpo na koyekola na ntina ya mapamboli oyo elakamaki na Abalayama mpe mapamboli oyo tokoki kosangola lokola libota na ye, tala Masolo ya Nsango Malamu, “Abrahamic Covenant,” topics.ChurchofJesusChrist.org. Mpo na nini mapamboli oyo elakamaki na Abalayama ezali ntina mpo na yo?

Bagalatia 3:6–25

Abalayama azalaki na nsango malamu ya Yesu Klisto.

Profeta Josep Smith alimbolaki: “Tokoki kondima te ete bampaka na mibu nyonso bazangaki koyeba misala ya lola lokola ebele bakanisi, mpo ete baoyo nyonso babikaki, babikaki na nzela ya nguya ya mwango oyo monene ya bosikoli, ndenge moko yambo ya boyei ya Klisto uta kala. … Abalayama apesaki libonza, mpe atako yango, ateyamaki Nsango Malamu” (“The Elders of the Church in Kirtland to Their Brethren Abroad,” The Evening and the Morning Star, Sanza ya misato 1834, 143, JosephSmithPapers.org). Mpo na nini okanisi ezalaki ntina mpo na Basantu na ntango ya Paulo bayeba ete Abalayama mpe baprofeta mosusu ya kala bazalaki na nsango malamu ya Yesu Klisto? Mpo na nini ezali ntina mpo na yo koyeba yango? (Tala Elamani 8:13–20; Mose 5:58–59; 6:50–66.)

Tala Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith 2007), 45–56.

Bagalatia 5:13–26; 6:7–10

Soki “Natamboli na Molimo,” Nakozwa “mbuma ya Molimo.”

Koyekola milongo oyo ekoki kosalisa yo oyeba lolenge nini mpenza ozali kotambola na Molimo. Ezali YO kozwa mbuma ya Molimo etangami kati na milongo 22-23? Mbuma nini mosusu, to bambano, ya bomoi ya molimo osila kozwa? Maniola oyo ozali na yango mposa ya kosala mpo na kolona mbuma oyo koleka mpenza. Boniboni kolona mbuma oyo ekoki kobongisa mikangano na kati ya bomoi na yo?

Elilingi
bambua [pome] na nzete

Nasengeli koluka “mbuma ya Molimo” kati ya bomoi na ngai.

Soki ozali komeka kotambola na Molimo kasi makasi na yo emonisi te kobota mbuma elakamaki, tanga Bagalatia 6:7–10. Etinda nini okanisi Nkolo azali na yango mpo na yo kati na milongo oyo?

Tala lisusu Alma 32:28, 41–43; Malongi mpe Mayokani 64:32–34.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Bagalatia 3:11.Elimboli nini “kobika na kondima”? Boniboni ezali biso kobika na kondima lokola libota?

Bagalati 4:1–7.Okoki kobanda Bagalatia 4 na kosolola bokeseni kati na basali ya mokonzi mpe bana na ye. Mabaku to likoki nini mwana ya mokonzi azali na yango oyo mosali azali na yango te? Kanisa na ntina na oyo ntango ozali kotanga milongo 1–7. Milongo oyo eteyi nini na ntina ya mokangano na biso na Tata ya Lola?

Bagalatia 5:16–26.Kanisa kosolola bokeseni kati na “misala ya njoto” mpe “mbuma ya Molimo.” Mpo na kobakisa ndambo ya maseka na lisolo na yo, libota na yo ekoki kokoma likolo ya bambuma ekeseni maloba Paulo asalelaki mpo na kolimbola mbuma ya Molimo. Na nsima ndeko moko na moko ya libota akoki kopona moko, alimboli yango, mpe alobeli na ntina ya moto moko oyo azali ndakisa ya mbuma wana. Ekoki komema na lisolo etali bandakisa libota na yo ekoki kobengisa Molimo kati na ndako na yo mpe kolona mbuma oyo. Nsima ya lisolo, bokoki kolia mbuma elongo.

Bagalatia 6:1–2.Ekoki kozala na bantango oyo moto moko ya libota na yo “azuami na likambo ya mabe.” Ozwi toli nini na Bagalatia 6:1–2 na ntina ya oyo moto akoki kosala na ntango ya boye?

Bagalatia 6:7–10.Soki libota na yo esila kolona eloko moko te elongo, okoki kosalela likambo oyo mpo na kolakisa mobeko ya “Soki moto akokona nini, akobuka bobele yango” (molongo 7). To okoki kotuna bandeko ya libota na ntina ya bambuma to ndunda oyo balingaka mingi mpe kolobela bangoo na ntina ya nini esengaka mpo na kokolisa nzete oyo ete ekoka kobota bilei wana. (Tala elili na nsuka ya mwango oyo.) Okoki koloba na ntina ya mapamboli libota na yo eliki kozwa mpe lolenge nini “kozwa” mapamboli yango.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Teya Ngai Kotambola na Mwinda,” Chants pour Enfants,, 177.

Kobongisa Mateya na Biso

Salisa libota na yo ekokanisa makomi na bango moko. Nefi alobaki, “Namekaki makomi nyonso epai na biso, ete ekoka kozala mpo na litomba mpe boyekoli na biso” (1 Nefi 19:23). Mpo na kosalisa libota na yo esala yango, okoki kobengisa bango bamaniola bantango oyo bazwaki mbuma ya Molimo elimbolami kati na Bagalatia 5:22 –23. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi21.)

Elilingi
mbuma ya concombre na nzete

Paulo ateyaki ete ntango totamboli na Molimo, tokozwa “mbuma ya Molimo” kati ya bomoi na biso.

Bimisa na lokasa