Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi 2–8. Baefese: “Mpo na Bobongi nie ya Basantu”


Sanza ya zomi 2–8. Baefese: ‘Mpo na Bobongisi ya Basantu,’” Yaka Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika2023 (2022)

Sanza ya zomi 2–8. Baefese,” Yaka Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Libota ezali kotala bafoto

Sanza ya zomi 2–8.

Baefese

“Mpo na Bobongi nie ya Basantu”

Omoni mokangano songolo kati na bitinda ya likita linene mpe Mokanda ya Paulo epai ya Baefese?

Koma Makanisi na Yo

Ntango nsango malamu ebandaki kopanzana na Efese, esalaki “mwa nungunungu monene” (Misala 19:23) kati na Baefese. Batuli ya mboka ya palata baoyo bazalaki kosala bisambelo ya nzambe ya mopagano bamonaki Boklisto lokola likama na mosala na bango, mpe mosika te “bangalaki na nkanda, … mpe mboka mobimba etondaki na mobulu” (tala Misala 19:27–29). Kanisa kozala mobongwani ya sika na nsango malamu kati na esika ya boye. Mingi ya Baefese bandimaki mpe basalelaki nsango malamu kati na “mobulu” oyo (Misala 19:40), mpe Paulo andimisaki bango ete “Klisto … azali kimia na biso” (Baefese 2:13–14). Maloba oyo, elongo na libiangi ya kotika makambo nyonso ya bololo mpe likunia mpe nkanda mpe kotonga mpe kolobana mabe elongwa uta na bino mpe makambo nyonso ya mabe lokola” (Baefese 4:31), emonani ya kolongabana mpe bobondisi na ntango na biso lokola ezalaki na ntango wana. Mpo na Baefese, lokola mpo na moko na moko na biso, makasi ya kotelemela momekano ewutaka, “na Nkolo, mpe na makasi ya nguya na ye” (tala Baefese 6:10–13).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Baefese 1:4–11, 17–19

Nzambe aponaki, to akulisaki ngai uta ebandeli, mpo na kokokisa misala mosusu na mabele.

Paulo alobaki na ntina ya Basantu ete bazalaki ya “kotangama“ na Nzambe mpe “baponamaki … liboso ya kobokeli ya mokili” mpo na kozala bana na Ye. Nzokande, ntango Mokambi Henry B. Eyring alobi, oyo elimboli te “ete Nzambe asilaki kobongisa kala liboso banani kati ya Ye bana Ye bakobika mpe akopesa bango nsango malamu, mpe banini wana baoyo bakoyoka ata mokolo moko te nsango malamu kaka mpo ‘baponamaki te.’ … Mwango ya Nzambe ezali ya mingi koleka ya bolingo mpe kaka se yango wana. Tata na biso na Lola amitungisaka mpo na kosangisa mpe kopambola libota na Ye mobimba” (“Gathering the Family of God,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 20–21). Bana ya Nzambe nyonso bakoki kondima nsango malamu mpe milulu na yango mpo na mosala moye ezali kosalema mpo na bakufi kati na batempelo esantu.

Atako moko te atangama kala liboso mpo na kobikisama to kobikisama te, emoniseli ya sikawa eteyi ete boko bana ya Nzambe baponamaki, to “bakulisamaki,” na mokili yambo ya mbotama mpo na kokokisa misala mosusu na ntina ya kokokisaka bantina ya Nzambe na mabele. Ntango ozali kotanga Baefese 1 mpe Masolo ya Nsango Malamu, “Foreordination” (topics.ChurchofJesusChrist.org), manyola lolenge nini bosolo oyo esalemaka epai na yo.

Baefese 1:10

Nzambe “akosangisa makambo manso na moko na moko kati na Klisto.”

Mpo na nini okanisi mikolo na biso ebengami “eleko ya litondi ya ntango”? Nini ekoki kolimbola “kosangisa makambo manso na moko kati na Klisto.”? Ntango ozali komaniola maloba oyo, tanga makomi elandi: Baefese 4:13; 2 Nefi 30:7–8; Malongi mpe Mayokani 110:11–16; 112:30–32; 128:18–21. Okoki kofulama na kokoma bandimbola na yo moko ya maloba oyo.

Tala lisusu David A. Bednar,“Kosangisa Makambo Nyonso na Moko kati na Klisto,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 21–24.

Baefese 2:19–22; 3:1–7; 4:11–16

Eklezia ekelamaki na “bapostolo mpe baprofeta, mpe Yesu Klisto azali libanga monene ya litumu ya ndako.

Engebene na Baefese 2:19–22; 3:1–7; 4:11–16, mpo na nini tozali na baprofeta mpe bapostolo? Kanisa na ntina ya bitinda oyokaka uta na baprofeta mpe bapostolo na ntango ya likita linene. Lolenge nini mateya na bango ekokisi bantina Paulo alimbolaki? Ndakisa, lolenge nini mateya oyo esalisaki yo ete “omemama te na mipepe nyonso ya malongi”?

Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola libanga monene ya litumu ya ndako? Lolenge nini ezali Ye lokola libanga monene ya litumu ya ndako mpo na bomoi na yo?

Tala lisusu Misala 4:10-12.

Elilingi
libanga monene ya litumu ya ndako

Yesu Klisto azali libanga monene ya litumu ya ndako ya Eklezia.

Baefese 5:216:4

Kolanda ndakisa ya Mobikisi ekoki kolendisa miakangano ya libota na ngai.

Ntango ozali kotanga Baefese 5:216:4, kanisa na ntina ya lolenge nini toli kati na milongo oyo ekoki kolendisa mikangano ya libota na yo.

Ezali likambo ya ntina na komona ete maloba ya Paulo kati na Baefese 5:22–24 ekomamaki na kotalaka makambo mazingi mimeseno ya ya ntango na bango. Baprofeta mpe bapostolo lelo bateyi ete mibali baleki basi te mpe ete basi ya libala babalani mpo na kozala “balongani” (tala “The Family: A Proclamation to the World,” ChurchofJesusChrist.org). Atako bongo, okoki lisusu kozwa toli esengeli kati na Baefese 5:25–33. Ndakisa, lolelenge nini Klisto alakisaka bolingo na Ye mpo na Basantu? Elingi koloba nini na ntina ya kotalaka basi ya libala, lokola balongani bakokani, basengeli kosalela moko mosusu? Bansango nini ozwi mpo na yo moko na milongo oyo?

Baefese 6:10–18.

Ebundeli ya Nzambe ekosunga kobatela ngai na mabe.

Ntango ozali kotanga Baefese 6:10–18, kanisa mpo na nini Paulo apesaki nkombo na eteni moko moko ya ebundeli lolenge asalaki. “Ebundeli mobimba ya Nzambe” ekobatela yo na nini? Nini ekoki yo kosala mpo na kolata eteni moko moko ya ebundeli mikolo nyonso?

Tala lisusu 2 Nefi 1:23; Malongi mpe Mayokani 27:15–18.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Baefese 1:10.Mpo na koteya na ntina ya molongo oyo, Mpaka David A. Bednar asalelaki ndakisa ya nsinga (tala “Kosangisa Elongo kati na Moko Makambo Nyonso ya Klisto”). Kanisa kolakisa bandeko na yo ya libota nsinga mpe tika bango kosimba mpe kotalela yango na ntango ozali kokabola biteni ya etinda ya Mpaka Bednar. Lolenge nini Nzambe azali kosangisa makambo manso na moko kati na na Klisto? Lolenge nini topambolami mpo na bosangani oyo?

Baefese 2:4–10; 3:14–21.Bengisa bandeko na yo ya libota na kokabola makambo oyo bayokaki bolingo mpe ngolu ya Nzambe mpe ya Yesu Klisto oyo elimbolami kati na milongo oyo.

Baefese 2:12–19.Libota na yo esengeli kosepela kotonga bifelo ya kuse to biloko mosusu ozali na yango na ndako mpe nsima kobetaka yango na mabele. Ntango Paulo alobelaki “efelo” kati na Bapagano mpe Bayuda, bifelo ya lolenge nini ekaboli bato lelo? Lolenge nini Yesu Klisto “abuki” bifelo oyo? Lolenge nini Ye azongisi [biso] na bondeko na Nzambe”? (molongo 16).

Baefese 6:10–18.Libota na yo ekoki kosala ya bango moko “ebundeli ya Nzambe” na kosalelaka biloko ya ndako. Video “Ebundeli ya Nzambe” (ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosalisa bandeko ya libota bamona ebundeli oyo, mpe bakoki kozwa bandimbola ya pete kati na “Ebundeli Mobimba ya Nzambe” (Moninga, Sanza ya motoba 2016, 24–25). Lolenge nini eteni moko moko ya ebundeli ebatelaka biso na molimo? Nini tokoki kosala mpo na kosalisana moko na mosusu “kolata mobimba ya ebundeli ya Nzambe” (Baefese 6:11) mikolo nyonso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Elikya ya Yisalaele,” Hymns, no. 259.

Kobongisa Koyekola Na Yo Moko

Tika Molimo akamba koyekola na yo. Zala ekenge na Molimo ntango Azali kokamba yo na makambo ozali na mposa ya koyekola mokolo na mokolo, ata kutu oyo ekambi yo koyekola liteya oyo obongisaki te na ebandeli.

Elilingi
mobali na ebundeli ya eleko ya Boyokani ya Sika

Kolata ebundeli ya Nzambe ekoki kobatela biso na molimo.

Bimisa na lokasa