Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi 23–29. 1 mpe 2 Timote; Tito; Filemona: “Zala Ndakisa ya Bandimi”


“Sanza ya zomi 23–29. 1 mpe 2 Timote; Tito; Filemona: “Zala Ndakisa ya Bandimi,’” Yaka Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi 23–29. 1 mpe 2 Timote; Tito; Filemona:” Yaka Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Basi misato bazali kotambola libanda ya tempelo

Sanza ya zomi 23–29

1 mpe 2 Timote; Tito; Filemona

“Zala Ndakisa ya Bandimi”

Ntango mosusu esalisaka soki obelemi mpo na koyekola makomi na yo na motuna moko to koleka na makanisi. Bengisa Molimo mpo akamba yo na biyano ntango ozali koyekola, mpe koma bofuli nyonso okozwa.

Koma Makanisi na Yo

Na mikanda Paulo akomaki epai ya Timote, Tito, mpe Filemona, tokoyingela na lombangu kati na motema ya mosali ya Nkolo. Na bokeseni na mikanda mosusu ya Paulo epai na mangomba mobimba, mikanda miye ekomamaki epai ya bato—Baninga ya Paulo ya motema mpe baninga kati na mosala ya Nzambe—mpe kotanga yango ezali lokola koyoka lisolo. Tomoni Paulo kolendisa Timote mpe Tito, bakambi mibale ya mangomba, na mosala na bango ya Eklezia. Tomoni ye kolendisa makasi moninga na ye Filemona na koyokana na moninga Mosantu mpe kozwa ye lokola ndeko mobali kati ya nsango malamu. Malobo ya Paulo epesamaki na biso te mbala moko, mpe akoki ata mokolo moko te kondima ete bato ebele bakotanga yango mokolo moko. Kasi tomoni kati na mikanda oyo toli mpe bolendisi mpo na biso, atako ndenge nini mosala na bisomei kati na mosala ya Klisto ekoki kozala.

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Timote mpe Tito bazalaki banani?

Timote mpe Tito basalaki elongo na Paulo na boko mibembo na ye ya misionele. Na ntango ya mosala na bango, bazwaki limemia mpe ya Paulo oyo atielaki bango motema. Nsima Timote abiangamaki mokambi ya Eklezia na Efese, mpe Tito abiangamaki mokambi na Kreti. Kati na mikanda oyo, Paulo apesaki Timote mpe Tito mitindo mpe bolendisi etali mikumba na bango, oyo esangisi na koteya nsango malamu mpe kobianga mibali basunga lokola baepisikopo.

Tala lisusu Bible Dictionary, “Pauline Epistles,” “Timothy,” “Titus.”

Elilingi
bamisionele mibale bazali kosolola na mobali

“Tika te ete moto atiola bolenge na yo; kasi zala ndakisa ya bandimi” (1 Timote 4:12).

1 Timote 4:10-16

“Zala ndakisa ya bandimi”.

Timote azalaki mpenza elenge, kasi Paulo ayebaki ete akoki kozala mokambi monene ya Eklezia atako bolenge na ye. Toli nini Paulo apesaki Timote kati na 1 Timote 4:10–16? Lolenge nini toli oyo ekoki kosalisa yo omema basusu epai ya Mobikisi mpe na nsango malamu na Ye?

Tala lisusu Alma 17:11.

2 Timote

“Nzambe apesi biso molimo ya kobanga te, kasi ya nguya, mpe ya bolingo, mpe ya makanisi malamu.”

2 Timote endimami kozala mokanda ya nsuka ya Paulo akomaki, mpe emonani ete ayebaki akokufa kala te (tala lisusu 2 Timote 4:6–8). Lolenge nini Timote akokaki koyoka, koyebaka ete kala te akozanga molobeli mpe mokambi na ye ya elikya? Eloko nini Paulo alobaki mpo na kolendisa ye? Okoki lisusu kotanga na kobatelaka mikakatano mpe bobangi na yo moko na makanisi. Bansango nini ya elikya mpe bolendisi Nkolo azali na yango mpo na yo kati na 2 Timote?

Tala lisusu Kelly R. Johnson, “Nguya ya Koyika Mpiko,” Liahona,, Sanza ya zomi na moko. 2020, 112-14.

2 Timote 3

Kosalela nsango malamu ebatelaka na makama ya molimo ya mikolo ya nsuka.

Tozali kobika na “mikolo ya nsuka” oyo Paulo alobelaki, mpe “ntango ya mpasi” esili kokoma (2 Timote 3:1). Ntango otangi 2 Timote 3, koma bampasi ya mikolo ya nsuka oyo ekomami (tala lisusu 1 Timote 4:1–3):

Okoki kokanisa bandakisa ya bampasi oyo kati na mokili nzinganzinga na yo—to kati na bomoi na yo moko? Lolenge nini bampasi oyo, lokola bato balimbolaki kati na molongo 6, “eyingeli kati na [ndako na yo], mpe ememi [yo] na bowumbo”? Toli nini ozwi kati na 2 Timote 3, mpe epai mosusu kati na mikanda oyo, oyo ekoki kobatela yo mpe libota na yo na makama oyo ya molimo? (tala, mpo na ndakisa, 1 Timote 1:3–11; 2 Timote 2:15–16; Tito 2:1–8).

Filemona azalaki nani?

Filemona azalaki Moklisto oyo abongwanaki na nsango malamu na Paulo. Filemona azalaki na mowumbo moko na nkombo ya Onezimo, oyo emonani lokola ete akimaki na Loma. Kuna Onezimo akutanaki na Paulo mpe abongwanaki na nsango malamu. Paulo azongisaki Onezimo na Filemona na mokanda kolendisaka Filemona mpo na koyamba Onezimo “lokola mowumbo lisusu te, kasi koleka mowumbo, lokola ndeko molingami” (Filemona 1:16).

Filemona

Bayekoli ya Yesu Klisto basalelaki baninga moko na mosusu lokola bandeko mibali mpe bandeko basi.

Ntango otangi mokanda ya Paulo epai ya Filemona, maniola lolenge nini okoki kosalela toli na ye na mokangano na yo na basusu. Oyo ezali mwa mituna okoki koyeba:

  • Milongo 1–7: Maloba lokola “moninga mosali bilanga” mpe “moninga na etumba” emonisi nini na ntina ya mikangano kati na Basantu? Ntango nini oyokaki ete “obondisami na” ndeko mobali to ndeko mwasi na Klisto?

  • Milongo 8–16: Elimboli nini “kozala na molende kati na Klisto” mpe “kolomba”? Mpo na nini Paulo aponaki kobondela Filemona na esika ya kozala na molende na ye? Nini Paulo alikyaki ekokisama na kozongisaka Onesimo epai ya Filemona?

  • Molongo 16: Elimboli nini kozala “ndeko mobali [to ndeko mwasi] molingami … kati na Nkolo”? Oyebi moto moko oyo ozali na mposa ya koyamba na lolenge oyo?

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Timote 2:9–10.Elimboli nini ”kolatisa [bisomei] … na misala malamu? Nini ezali boko misala malamu libota na biso ekoki kosala na poso oyo? Okoki koyemba elongo nzembo na ntina ya kosala malamu, lokola ete “Esali Ngai Mosala Malamu Songolo?” (Nzembo,, no. 223).

1 Timote 4:12.Mpo na kosalisa bandeko na yo ya libota balinga kozala “ndakisa ya bandimi,” kanisa kobengisa bango bayema bilili ya bato oyo bazalaki bandakisa malamu mpo na bango. Lolenge nini bato oyo bafuli biso mpo na kolanda Yesu Klisto? Etinda ya Mokambi Thomas S. Monson “Zala Ndakisa mpe Mwinda” (Liahona, Sanza ya mitano 2015, 86–88) ekoki kopesa boko makanisi ya lolenge ya kozala ndakisa mpo ya basusu.

1 Timote 6:7–12.Mpo na nini okanisi “mposa ya mosolo ejali ntina na mabe nyonso“? Nini ezali makama ya kovandisa bomoi na biso na mosolo to bozwi? Lolenge nini tokoki kosepela na mapamboli tozali na yango?

2 Timote 3:14–17.Engebene na milongo oyo, mapamboli nini eyelaka baoyo bayebi mpe bayekoli makomi? Ntango mosusu bandeko ya libota bakoki kokabola makomi bamoni kozala mingi mingi ya “litomba.”

Filemona 1:17–21.Paulo alingaki kosala nini mpo na Onesimo? Lolenge nini yango oyo ezali ya kokokana na maye Mobikisi na bolingi nyonso asalaki mpo na biso? (tala lisusu 1 Timote 2:5–6; Malongi mpe Mayokani 45:3–5). Lolenge nini tokoki kolanda bandakisa ya Paulo mpe Mobikisi?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Kongenga,” Chants pour Enfants,, 144.

Kobongisa Mateya na Biso

Teya malongi ya polele mpe ya pete. Nsango malamu ezali kitoko na bopete na yango (tala Malongi mpe Mayokani 133:57). Na esika ya koleisa libota na yo na mateya oyo esengi bolengeli mingi, sala makasi na koteya malongi ya peto mpe ya pete 1 Timote 1:3–7).

Elilingi
bana mibale koyekolaka makomi

“Oyo ewuti na mwana oyo ayebaki makomi masantu, oyo ezali na makoki ya kosala yango na bwania mpo na lobiko na nzela ya bondimi na Klisto Yesu.” (2 Timote 3:15).

Bimisa na lokasa