Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi 30–Sanza ya zomi na moko 5. Baebele 1–6: “Yesu Klisto, ‘Mobandisi ya Lobiko ya Seko’”


“Sanza ya zomi 30–Sanza ya zomi na moko 5. Baebele 1–6: ‘Yesu Klisto, “Mobandisi ya Lobiko ya Seko,”’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi 30–Sanza ya zomi na moko 5. Baebele 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Klisto atelemi na elenge mwana mwasi

Nkisi ya Gilada, na Annie Henrie

Sanza ya zomi 30–Sanza ya zomi na moko 5

Baebele 1–6

Yesu Klisto, “Mobandisi ya Lobiko ya Seko”

Kokoma makanisi na yo ya molimo ekosalisa yo oyeba oyo Molimo Mosantu alingi koteya yo. Kosala engebene na makanisi na yo emonisi bondimi na yo ete bitinda wana ezali solo.

Koma Makanisi na Yo

Moko na moko na biso asengeli kotika eloko songolo mpo na kondima nsango malamu ya Yesu Klisto—bizaleli mabe, boyambi ya lokuta, baninga mabe, to likambo mosusu. Mpo na Bapagano na ebandeli ya Eklezia ya Kimoklisto, mbongwana elimbolaki mbala mingi kotika banzambe ya lokuta. Mpo na Baebele (to Bayuda), mbongwana emonanaki, soki te mpasi koleka, mwa moke ya mindondo. Nsima ya nyonso, bindimeli na bango balingaka mpe bizaleli na bango ya bonkoko etiaki misisa na bokumbameli Nzambe ya solo mpe mateya ya baprofeta na Ye, kozongaka nsima bankoto ya mibu. Kasi Bapostolo bateyaki ete mobeko na Mose ekokisamaki kati na Yesu Klisto mpe ete mobeko ya likolo makasi ezalaki sikawa bizaleli ya bandimi. Kondima Kimoklisto elimboli ete Bayuda basengelii kotika bindimela mpe mambi na bango ya kala? Mokanda epai ya Bayuda esalisaki kolimbola mituna ya boye na koteyaka ete mobeko ya Mose, baprofeta, mpe milulu ezali motuya, kasi Yesu Klisto azali monene (tala Baebele 1:1–4; 3:1–6; 7:23–28). Na solo, makambo nyonso oyo etalaka mpe etatolaka na ntina ya Klisto lokola Mwana ya Nzambe mpe Masiya oyo alakamaki oyo Bayuda bazalaki kozela.

Kobongwana, na mikolo wana ya ebandeli mpe lelo, elimboli kosala ete Yesu Klisto azala ntina na biso ya yambo ya bokumbameli mpe bomoi na biso. Elimboli kokangama makasi na solo mpe kotika oyo ezali kobungisa biso makanisi uta na Ye, mpo ete Ye azali “mobandisi ya lobiko ya seko mpo na baoyo nyonso batosaka ye” (Baebele 5:9).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Nani akomaki Mokanda epai ya Baebele?

Boko bato na mayele batiaki ntembe soki Paulo akomaki Mokanda epai ya Baebele. Lolenge ya kokoma ya Baebele ezali mwa moke na bokeseni na mikanda mosusu ya Paulo, mpe mikanda oyo ebimaki liboso epesaki nkombo ya mokomi te. Nzokande, mpo ete makanisi mabimisami na mokanda na Baebele ezali kokokana na nyonso na mateya mosusu ya Paulo, Basantu ba Mikolo mya Nsuka, na kondimaka momesano ya Kimoklisto, bandimaki mingi mingi ete Paulo azwamaki ata mbala moko na kokomaka mokanda oyo.

Talal lisusu Bible Dictionary, “Pauline Epistles.”

Baebele 1–5

Yesu Klisto azali “elilingi emonisami” ya Tata na Lola.

Ebele ya Bayuda bakokaki te kondima Yesu Klisto lokola Mwana ya Nzambe. Kanisa lolenge nini Mokanda epai ya Baebele etatoli na ntina na Ye. Mpo na ndakisa, ntango ozali kotanga mikapo mitano ya yambo, okoki kosala mokanda ya bankombo ya lokumu ya Yesu, mikumba, bizaleli mpe misala oyo omoni ekomami. Makambo oyo eteyi yo nini na ntina ya Mobikisi? Eteyi yo nini na ntina ya Tata na Lola?

Likanisi nini esakola elandi uta na Mpaka Jeffrey R. Holland ebakisi na bososoli na yo ya mateya kati na mikapo oyo? “Yesu … ayaki kobongisa bososoli ya bato ya Nzambe mpe kosenga na bango balinga Tata na bango na Lola lokola Ye ntango nyonso mpe ntango nyonso akolinga bango. … Bongo, koleisaka bato bazalaki na nzala, kobikisaka babeli, kopamelaka bokosi, kosengaka bondimi—oyo ezalaki lolenge Klisto alakisaki biso nzela ya Tata” (“The Grandeur of God,” Liahona, Sanza ya mitano 2003, 72).

Baebele 2:9–18; 4:12–16; 5:7–8

Yesu Klisto lisusu anyonkwamaki na makambo nyonso mpo ete Ye akoka kososola mpe kosalisa ngai ntango nakonyokwama.

Okanisi okoki koya “na molende na kiti ya ngolu” mpe koluka mawa? (Baebele 4:16). Etinda moko ya Mokanda epai ya Baebele ezali ete atako masumu mpe bolembu na biso, tokoki kobeleme na Nzambe mpe tokoki kozwa ngolu na Ye. Nini ozwi kati ya Baebele 2:9–18; 4:12–16; 5:7–8 oyo elendisi elikya na yo ete Yesu Klisto akosalisa yo na mikakatano na yo ya bomoi oyo ya kufa? Kanisa kokoma na kati ya zulunale makanisi mpe mayoki na yo na ntina ya nini Mobikisi asali mpo na yo.

Tala lisusu Moziya 3:7–11; Alma 7:11–13; 34; Matthew S. Holland, “The Exquisite Gift of the Son,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 45–47.

Baebele 3:74:11

Mapamboli ya Nzambe ebongisami mpo na baoyo “bayeisaka mitema [na bango] makasi te.”

Na kozongelaka kolobela lisolo ya Bayisalaele ya kala, Paulo alikyaki kondimisa Bayuda bakima mabe bankoko na bango basalaki—koboya mapamboli ya Nzambe mpo na bozangi kondima. (Okoki kotanga lisolo Paulo alobelaki yango kati na Mituya 14:1–12, 26–35.)

Kanisa lolenge nini Baebele 3:74:11 ekoki kosalelama epai na yo. Mpo na kosala yango, okoki komaniola mituna lokola miye:

  • Lolenge nini Bayisalaele batumolaki Nkolo? (tala Baebele 3:8–11). Nini ezali makama ya kozala na motema makasi?

  • Ntango nini napesaki nzela ete motema na ngai ekokoma makasi? Ezali na mapamboli songolo Nzambe alingi kopesa ngai oyo nakoki kozwa te mpo ete nazangi kondima?

  • Nini ekoki ngai kosala mpo na kokolisa motema ya malamu mpe ya komikitisa? (tala Etele 4:15; Masese 3:5–6; Alma 5:14–15).

Tala lisusu 1 Nefi 2:16; 15:6–11; Jacob 1:7–8; Alma 12:33–36; Neill F. Marriott, “Yielding Our Hearts to God,” Liahona, Nov. 2015, 30–32.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Baebele 1:8–9.Na ndenge nini Yesu alakisi ete Ye alingi bosembo mpe Ayini mabe? Soki tozali na bamposa ya sembo te, tokoki kosala nini mpo na kobongola yango?

Baebele 2:1–4.Okoki kokanisa mama ya likambo ya liteya moko mpo na kosalisa libota na yo esosola oyo elimboli kotikala ngwi na bosolo ya nsango malamu “oyo toyoki”? Okoki kolakisa yango na eloko oyo ezali makasi mpo na kokanga. Lolenge nini makasi na biso ya kobatela litatoli na biso ezali ya kotikala ngwi lokola kosimba mpe kokanga eloko oyo? Lolenge nini tokoki kotia motema na “makambo masili biso koyoka” ete “topengwa” na njela te? (molongo 1).

Baebele 2:9–10.Mpo na kosalela liloba “kapiteni ya lobiko na bango,” bokoki kobanda na kosolola nini kapiteni asalaka. Lobiko elingi koloba nini? Lolenge nini Yesu Klisto azali lokola “kapiteni mpo na biso mpe lobiko na biso?

Baebele 5:1–5.Milongo oyo ekoki kosalisa yo ozala na lisolo na ntina ya nini elimboli kobiangama na Nzambe na moto oyo azali na likoki. Nini tokoki koyekola uta na ndakisa ya Yesu Klisto na ntina ya kozwa mpe kokokisa mabiangi?

Elilingi
Mose kokulisaka Alona

“Moto akomijuela lokumu oyo te kati na ye moko, kasi ye oyo abiangami na Njambe, lokola esalemaki na Alona” (Baebele 5:4). Moses Calls Aaron to the Ministry (Mose Abiangi Alona na Mosala), na Harry Anderson

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nazali na Mposa na Yo Ntango Nyonso,” Hymns, no. 98.

Kobongisa Koyekola Na Yo Moko

Meka kosala yango na ndenge ekeseni. Na esika ya koyekola makomi ntango nyonso na lolenge se moko, kanisa makanisi ndenge na ndenge mpo na koyekola. Mpo na boko makanisi, tala “Ideas to Improve Your Personal Scripture Study” na ebandeli ya mokanda oyo.

Elilingi
Yesu Klisto

Pole ya Mokili, na Howard Lyon

Bimisa na lokasa