Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi na moko 20–26. Petelo 1 mpe 2: “Sepela na Esengo Oyo Ekoki Kolobama Te mpe Etonda na Nkembo”


“Sanza ya zomi na moko 20–26. Petelo 1 mpe 2 : ‘Sepela na Esengo Oyo Ekoki Kolobama Te mpe Etonda na Nkembo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi na moko 20–26. Petelo 1 mpe 2 ,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu Klisto azali koteya nsango malamu na mokili ya milimo

Klisto Azali Koteya na Mokili ya Milimo, na Robert T. Barrett

Sanza ya zomi na moko 20–26

petelo1 mpe

“Sepela na Esengo Oyo Ekoki Kolobama Te mpe Etonda na Nkembo”

Ntango ozali kotanga Mikanda ya Petelo, okoki kozwa mayoki ya molimo. Mbala moko koma yango ntango ozali “naino na nse ya Molimo” (Malongi mpe Mayokani 76:80) boye okoki malamu malamu kokanga oyo Nzambe ateyi yo.

Koma Makanisi na Yo

Mwa ntango moke nsima ya Lisekwa na Ye, Mobikisi asalaki lisakoli oyo esengelaki kotungisa Petelo. Ye asakolaki ete Petelo akokufa martiru mpo na kondima na ye, wana ememamaki ye “na esika ezali mposa na [ye] te … , mpo na komonisa lolenge ya liwa nini akokumisa Nzambe na yango” (Yoane 21:18–19). Mibu mingi nsima, ntango Petelo akomaki mikanda na ye, ayebaki ete mokolo ya kufa na ye lokola martiru ezalaki pene: “Nayebi ete ntango na kotika hema oyo na njoto ekokoma mbango, lokola nkolo na biso, Yesu Klisto ayebisaki ngai” (2 Petelo 1:14). Mpe nzokande maloba ya Petelo etondisamaki na bobangi to kozanga elikya te. Na esika na yango, ateyaki Basantu na “kosepela mingi,” atako bazalaki na “bozito kati na masenginia mingi mpenza.” Petelo apesaki bango toli mpo na komikundola ete “momekano ya kondima na [bango]” ekomema na “kosanzola mpe kokumisa bobimi ya Yesu Klisto” mpe mpo na “libiki ya milimo na [bango]” (1 Petelo 1:6–7, 9). Bondimi ya Petelo esengelaki kobondisa Basantu wana ya ebandeli, lokola ezali kobondisa Basantu lelo, baoyo bazali lisusu “kosangana na mpasi ya Klisto; oyo, ntango nkembo na ye ekomonana, [biso] tokoki kosepela lisusu na esengo monene” (1 Petelo 4:13).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

1 Petelo 1:3–9; 2:19–24; 3:14–17; 4:12–19

Nakoki kozwa esengo na ntango ya momekano mpe mpasi.

Eleko oyo eyaki nsima ya Bobakami ya Klisto na Ekulusu ezalaki ntango ya pete te mpo kozala Moklisto, mpe mokanda ya yambo ya Petelo endimi yango. Kati na mikapo minei ya liboso, okomona maloba mpe biteni ya maloba kolimbolaka minyoko: bozito, masenginia, mawa, momekano ya nsomo, mpe bampasi (tala 1 Petelo 1:6; 2:19; 4:12–13). Kasi okomona mpe lisusu maloba oyo emonani ya esengo—okoki kokoma mokanda ya makambo ya esengo oyo ozwi. Na ndakisa, ntango otangi 1 Petelo 1:3–9; 2:19–24; 3:14–17; mpe 4:12–19, nini epesi yo elikya ete okoki kozwa esengo ata kutu na kati ya bantango ya mpasi?

Okoki lisusu kotanga etinda ya Mokambi Russell M. Nelson “Joy and Spiritual Survival (Esengo mpe Lobiko ya Molimo)” (Liahona, Sanza ya mitano 2016, 81–84) mpe luka maloba ekokani kati na oyo Petelo ateyaki mpe oyo Mokambi Nelson ateyaki. Nini elobami na ntina ya mwango ya lobiko mpe nsango malamu ya Yesu Klisto oyo epesi yo esengo?

Tala lisusu Ricardo P. Giménez, “Finding Refuge from the Storms of Life (Kobatelama na Mipepe Makasi ya Bomoi),” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 101-3.

1 Petelo 3:18–20; 4:1–6

Nsango malamu eteyami na bakufi mpo ete bakoka kosambisama na bosembo nyonso.

Mokolo moko, moto moko moko akotelema liboso ya esika ya bosambisi mpe “bakoyanola epai na oyo asili kobelema mpo na kosambisa bato na bomoi mpe bakufi lokola” (1 Petelo 4:5). Lolenge nini Nzambe akosambisa bato nyonso na boyengebene ntango mabaku na bango ya kososola mpe kosalela nsango malamu ezali bongo ya kokesena? Kanisa lolenge nini malongi oyo Petelo ateyaki kati na 1 Petelo 3:18–20; 4:6 esalisi koyanola motuna oyo. Lolenge nini milongo oyo elendisi bondimi na yo na boyengebene mpe bosembo ya Nzambe?

Mpo na kotala lisusu malongi oyo mosika, yekola Malongi mpe Mayokani 138, emoniseli Mokambi Joseph F. Smith azwaki ntango azalaki komaniola makomi oyo ya Petelo. Bosolo mosusu nini Mokambi Smith ayekolaki?

Tala lisusu Masolo ya Nsango Malamu, “Baptisms for the Dead (Mabatisi mpo na Bakufi),” topics.ChurchofJesusChrist.org.

2 Petelo 1:1–11

Na nzela ya nguya ya Yesu Klisto, nakoki kokolisa lolenge na ngai ya bonzambe.

Osila koyoka ete kokoma lokola Yesu Klisto mpe kokolisa bizaleli na Ye ekoki kosalema te? Mpaka Robert D. Hales apesaki likanisi ya bolendisi oyo na ntina ya lolenge nini tokoki kokolisa bizaleli ya Boklisto: “Bizaleli ya Mobikisi … ekangisama, etongama moko likolo ya mosusu, oyo ekolaka kati na biso na bandenge ya kosalaka elongo na basusu. Na maloba mosusu, tokoki kozwa ezaleli moko ya Boklisto te longola se soki ezaleli yango ezali lisusu kozwa mpe na nguya likolo ya bizaleli mosusu. Ntango ezaleli moko elendisami, ebele mpe koleka esali bongo mpe lokola” (“Becoming a Disciple of Our Lord Jesus Christ,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 46).

Elilingi
basinga ya tapi etongami na ntoki ya kitoko mingi

Ezaleli moko moko ya Boklisto tokolisaka esalisaka biso totonga tapi ya molimo ya moyekoli.

Ntango ozali kotanga 2 Petelo 1:1–11, manyola bizaleli “ya lolenge ya bonzambe” etangi milongo oyo. Ndenge ya boyebi na yo, lolenge nini ezali “kotongama,” lokola Mpaka Hales alimbolaki? Lolenge nini etongami likolo ya moko na mosusu? Nini lisusu oyekoli uta na milongo oyo na ntina ya mosala ya kokoma mingi lokola Klisto?

Okoki lisusu komaniola “bilaka minene mpe ya motuya mingi” Nzambe apesi Basantu na Ye—kotangaka mpe yo (2 Petelo 1:4). Etinda ya Mpaka David A. Bednar “Exceeding Great and Precious Promises (Bilaka Minene mpe ya Motuya Mingi” (Liahona, Sanza ya mitano 2017, 90–93) ekoki kosalisa yo kososola nini bilaka wana ezali mpe lolenge nini kozwa yango.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Petelo 2:5–10.Ntango ozali kotanga milongo oyo na libota na yo, kanisa kosalela mabanga mpo kosalisa bandeko ya libota bamona mateya ya Petelo ete Mobikisi azali “libanga mokonzi na biso ya litumu ya ndako.” Lolenge nini tokokani na “mabanga ya [bomoi]” oyo Nzambe azali kosalela mpo na kotonga bokonzi na Ye? Nini toyekoli uta na Petelo na ntina ya Mobikisi mpe mosala na biso kati ya bokonzi na Ye? Nini ezali etinda ya Petelo na libota na yo?

1 Petelo 3:8–17.Lolenge nini tokoki: “kozala ntango nyonso kozala ya komilengele mpo na kopesa eyano” na baoyo batuni biso ntina ya bondimi na biso? Libota na yo ekoki kosala lisano epai wapi moto moko abelemi pene na bango na motuna na ntina na nsango malamu.

1 Petelo 3:18–20; 4:6.Nini libota na yo ekoki kosala na komiyoka ya kokangama na bankoko na yo? Ntango mosusu okoki kosepela mikolo ya mbotama ya bankoko bakufa na kolambaka bilei na bango balingaki mingi, kotalaka bafoto, to kobetaka masolo ya bomoi na bango. Soki ekoki kosalema, okoki lisusu kobongisa kosala makuli mpo na bankoko na yo kati na tempelo FamilySearch.org).

2 Petelo 1:16–21.Kati na milongo oyo, Petelo akundolaki Basantu likambo na ye na Ngomba ya Bobongwani (tala lisusu Matai 17:1–9). Toyekoli nini wuta na milongo oyo na ntina ya mateya ya baprofeta? (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 1:38). Nini epesi biso elikya na kolanda profeta na biso ya bomoi lelo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Mambi ya kala ya Libota—Nazali Kosala Yango,” Chants pour Enfants,, 94.

Kobongisa Koteya na Biso

“Zala ya komilengela ntango nyonso.” Bantango ya koteya elongobana te elekaka mbangu mpenza, na yango ezali ntina kosalela yango ntango emonani. Lolenge nini okoki kosala makasi na kozala ya komilengela ntango nyonso” na koteya bandeko ya libota na yo bosolo ya nsango malamu mpe kokabola “elikya oyo ezali kati na yo” (1 Petelo 3:15) (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi16.)

Elilingi
Petelo azali koteya liboke ya bato

Atako Petelo akutanaki na minyoko mpe botelemeli mingi, atikalaki ngwi kati na litatoli na ye ya Klisto.

Bimisa na lokasa