Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi na moko 6–12. Baebele 7–13: “Nganganzambe Monene ya Biloko Malamu Bikoya”


“Sanza ya zomi na moko 6–12. Baebele 7–13: ‘Nganganzambe Monene ya Biloko Malamu Bikoya,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi na moko 6–12. Baebele 7–13,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Melikisedeki azali kopesa lipamboli na Abalama

Melikisedeki Azali Kopambola Abalayama, na Walter Rane. Likabo ya moto na ntoki

Sanza ya zomi na moko 6–12

Baebele 7–13

“Nganganzambe Monene ya Biloko Malamu Bikoya”

Ntango otangi Baebele 7–13, okoki kozwa mayoki na nzela ya Molimo Mosantu. Kanisa ndenge okoki kokoma yango, na ndakisa, okoki kokoma yango na mwango oyo, na pembeni ya makomi na yo, to kati na buku ya moke to zulunale.

Koma Makanisi na Yo

Ata Basantu ya bosembo na bantango mosusu banyokwamaka na “botuki mpe minyoko” oyo ekoki koningisa elikya na bango (tala Baebele 10:32–38). Paulo ayebaki ete Bayuda babongwani na Kimoklisto bazalaki konyokwama makasi mpenza mpo na bondimi na bango ya sika. Mpo na kolendisa bango kotikala na bondimi na matatoli na bango, akundolaki bango ezaleli ya kala ya bandimi ya bosembo uta na mambi na bango moko ya kala: Abele, Enoka, Noa, Abalayama, Sara, Yosefe, Mose—“lipata ya batatoli” ete bilaka ya Nzambe ezali solo mpe motuya mpo na kozela (tala Baebele 11; 12:1). Momeseno oyo ezali ya bino mpe. Ezali libula ya kosangola bondimi oyo ekabolami na baoyo nyonso “balukaka Yesu [lokola] mobandisi mpe mosukisi ya bondimi na biso” (Baebele 12:2). Mpo na Ye, ntango nyonso mikakatano elingaka “kozongisa biso nsima”, na esika ya kosala bongo tokoki “kobeleme na motema ya solo na elikya mobimba ya bondimi” (Baebele 10:22, 38). Mpo na biso, lokola mpe mpo na Basantu ya kala, Yesu Klisto azali ya biso “nganganzambe monene ya biloko malamu bikoya” (Baebele 9:11).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Baebele 7

Bonganganzambe ya Melekisedeki ezali kolakisa batala epai ya Yesu Klisto.

Mpo na bikeke, Bayuda basalelaki Bonganganzambe ya Lewi, oyo eyebani lisusu lokola Bonganganzambe ya Alona. Kasi na litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto eyaki bozongisi ya Bonganganzambe monene ya Melekisedeki, oyo epesaki kutu mapamboli minene. Oyekoli nini na ntina ya Bonganganzambe ya Melekisedeki uta na Baebele 7? Bomba na motema ete ntina ya mokanda oyo—lokola makomi nyonso—ezali kotonga bondimi kati na Yesu Klisto, okoki kokoma milongo oyo ezali kotatola na ntina na Ye.

Tala boko bandakisa ya bosolo okoki kozwa.

Mapamboli nini ozwaki na nzela ya Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe “makuli na yango”? (Malongi mpe Mayokani 84:20). Lolenge nini Bonganganzambe ya Melekisedeki esalisi yo oya epai na Klisto?

Tala lisusu Alma 13:1–13; Malongi mpe Mayokani 121:36–46; Gospel Topics, “Melchizedek Priesthood,” topics.ChurchofJesusChrist.org; Mokambi na Makomi, “Melekisedeki,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; Russell M. Nelson, “Spiritual Treasures,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 76–79; Dallin H. Oaks, “The Melchizedek Priesthood and the Keys,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 69–72.

Baebele 9; 10:1–22

Makuli ya kala mpe ya sika ezali kolakisa epai ya Yesu Klisto.

Batangi ya Baebele ya ebandeli ya mokanda oyo bakokaki kokangama na tabelenakele ya kala mpe makuli Paulo alimbolaki. Kasi boko bandimaki mobimba te ete ntina ya makuli oyo ezalaki mpo na kotala epai ya libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto.

Na bileko ya biblia, na bopemi ya mobu na nkombo ya Mokolo ya Bomikabi, nganganzambe monene akotaka na esika esantu koleka mpenza (to Esika eleki Bosantu) kati na tempelo ya Yelusaleme mpe abonzaki ntaba to mwana-mpate mpo na kobonzela mpo na masumu ya Yisalaele.

Ntango otangi ndimbola ya Paulo ya makuli oyo, luka bilembo mpe mateya oyo esalisi yo ososola malamu mpenza etinda ya bomikabi ya Mobikisi.

Makuli tozali kosala lelo ekeseni na oyo ya ntango ya Paulo, kasi ntina na yango ezali se moko. Lolenge nini makuli ya lelo etatoli epai na yo na ntina ya Yesu klisto?

Mpo na koyekola mingi koleka na ntina na milulu ya Bayuda ya kala mpe bilembo na yango, tala bavideo “The Tabernacle” and “Sacrifice and Sacrament” (ChurchofJesusChrist.org).

Baebele 11

Bondimi esengaka kolikya na bilaka ya Nzambe.

Soki moto moko asengi yo olimbola bondimi, okoloba nini? Ndeko mwasi Anne C. Pingree azwaki maloba uta na Baebele 11 mpo na kopesa ndimbola oyo ya bondimi: “makoki ya molimo ya kondimisama bilaka oyo emonani ‘na mosika’ kasi oyo ekoki te kozwama kati na bomoi oyo” (“Seeing the Promises Afar Off,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2003, 14).

Kanisa kokolisa ndimbola na yo moko ya bondimi ntango ozali komaniola makanisi kati na Baebel 11. Nini bandakisa ya bato batangami kati na mokapo oyo eteyi yo na ntina ya bondimi? (Tala lisusu Etele 12:6–22.)

Bilaka nini omoni “na mosika”? Lolenge nini okoki kolakisa Nkolo ete “ondimisami na yango mpe oyambi yango”? (Baebele 11:13).

Tala lisusu Alma 32:21, 26–43; Jeffrey R. Holland, “An High Priest of Good Things to Come,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 1999, 36–38; Gospel Topics, “Faith in Jesus Christ,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Baebele 10:32–36.Okoki kobengisa bandeko ya libota mpo na kokabola boyebi ya molimo ntango bayokaki “bangengisami” na bosolo. Lolenge nini boyebi oyo ekoki kosalisa biso “tobwaka elikya [na biso] te” na bantango ya mimekano to ya ntembe?

Baebele 11.Lolenge nini okoki kosalisa bandeko na yo ya libota koyekola uta na bandakisa ya bosembo oyo etangami kati na Baebele 11? Ekoki kozala malamu na kosala na masolo ya bandakisa oyo mosusu. Okoki kozongela masolo mosusu kati na Masolo ya Kondimana na Kala. To ntango mosusu libota na yo ekoki kosolola na ntina ya bandakisa ya bato mosusu ya bosembo oyebi—kotangaka mpe bankoko, bakambi ya Eklezia, mpe bandeko ya lisanga na bino. Okoki lisusu koyemba nzembo na ntina ya bondimi, lokola “Bondimi” (Children’s Songbook, 96).

Baebele 12:2.Engebene na molongo oyo, mpo na nini Yesu alingaki koyoka mpasi mpe bolozi na ekulusu? Oyo eteyi biso nini na ntina ya lolenge nini tokoki koyika mpiko na mimekano na biso? Mokambi Russell M. Nelson apesaki makanisi ya malamu na molongo oyo kati na etinda na ye “Esengo mpe Lobiko ya Molimo” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 81–84)

Baebele 12:5–11.Mpo na nini Nkolo apesaka biso etumbu mpe asembolaka biso? Nini toyekoli uta na milongo oyo na ntina ya lolenge Nkolo amonaka etumbu? Lolenge nini milongo oyo ebongoli lolenge topesaka to tozwaka etumbu?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Faith,” Chants pour Enfants,, 96.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela miziki mpo na kobengisa Molimo mpe koteya malongi. Bokambi ya Yambo elobaki, “Miziki ezali na nguya ya kokamba [biso] na molimo makasi” (“First Presidency Preface,” Mokanda ya Nzembo,, x). Ntango mosusu nzembo na ntina ya bondimi, lokola “True to the Faith” (Mokanda ya Nzembo, no. 254), ekoki kolendisa lisolo na kati ya libota na Baebele 11.

Elilingi
ndakisa ya Yelusaleme ya kala

Bilembo mpe makuli ya tempelo ya kala eteyaki na ntina ya mosala ya Yesu Klisto.

Bimisa na lokasa