“Sanza ya Zomi na Moko 13–19. Yakobo: ‘Bozala nde Batosi na Liloba, Bobele Bayoki Mpamba Te,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)
“Sanza ya Zomi na Moko 13–19. Yakobo,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023
Sanza ya Zomi na Moko 13–19
Yakobo
“Bozala nde Batosi na Liloba, Bobele Bayoki Mpamba Te”
Ntango otangi Mokanda ya Yakobo, sala keba na maloba oyo ezali komonana polele na yo. Lolenge nini ofulami mpo na kozala “motosi” ya maloba oyo? (Yakobo 1:22).
Koma Makanisi na Yo
Ntango mosusu molongo se moko ekoki kobongola mokili. Yakobo 1:5 emonani lokola toli ya mwa moke mpamba—soki ozali na mposa ya bwania, senga Nzambe. Kasi ntango elenge Joseph Smith ya mibu 14 atangaki molongo oyo, “emonanaki kokota na nguya makasi kati na liyoki nyonso ya motema [na ye]” (Joseph Smith—History 1:12). Boye na nse ya bofuli, Joseph asalaki engebene na toli ya Yakobo mpe alukaki bwania uta na Nzambe na nzela ya losambo. Mpe Nzambe apesaki ya solo na pete, kopesaka Joseph moko ya limoni ya monene mpe ya kokamwa koleka mpenza na mambi ya kala ya bato—Limoni ya Yambo. Limoni oyo ebongolaki ezaleli ya bomoi ya Joseph Smith mpe ememaki Bozongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto na mabele. Biso nyonso topambolami lelo mpo ete Joseph Smith atangaki mpe asalaki engebene na Yakobo 1:5.
Okozwa nini ntango oyekoli Mokanda ya Yakobo? Ntango mosusu molongo moko to mibale ekobongola yo to moto moko oyo olingaka. Okoki kozwa lisungi ntango ozali koluka kokokisa etinda na yo na bomoi. Okoki kozwa bolendisi mpo ya koloba na boboto mpenza to kozala na bompikiliki mingi koleka. Okoki koyoka bitindampo na kokomisa misala na yo elongobana na bondimi na yo. Oyo nyonso ekofula yo, tika maloba oyo “ekota … kati na liyoki nyonso ya motema [na yo].” Mpe nsima, ntango ”ozwi na bomikitisi … liloba,” lokola Yakobo akomaki, zala nde motosi ya liloba, bobele moyoki mpamba te (tala Yakobo 1:21–22).
Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko
Yakobo azalaki nani?
Endimami mingi mingi ete mobandisi ya Mokanda ya Yakobo azalaki mwana ya Malia, mama ya Yesu Klisto, mpe na yango ndeko mobali ya Mobikisi. Yakobo atangami kati na Matai 13:55; Malako 6:3; Misala 12:17; 15:13; 21:18; mpe Bagalatia 1:19; 2:9. Emonani uta na makomi oyo ete Yakobo azalaki mokambi ya Eklezia na Yelusaleme mpe abiangamaki lokola Apostolo (tala Bagalatia 1:19).
Kokanga motema na bompikiliki ememaka na bobongi nie.
Nsima ya kotanga Yakobo 1:2–4; 5:7–11, okoki koloba nini ezalaki etinda ya ntina ya Yakobo na ntina ya bompikiliki? Ekoki kosalisa yo komaniola oyo libota ya Mpaka Jeremy R. Jaggi bayekolaki na ntina ya bompikiliki uta na milongo oyo (tala “Let Patience Have Her Perfect Work, and Count It All Joy!,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 99–101). Nini ezali “mosala ebonga nie” ya bompikiliki? (Yakobo 1:4). Lolenge nini okoki kolakisa Nkolo ete olingi kozala na bompikili?
Yakobo 1:3–8, 21–25; 2:14–26; 4:17
Bondimi esengaka mosala.
Lolenge nini oyebi soki ozali na kondima epai ya Yesu Klisto? Lolenge nini misala na yo elakisi kondima na yo epai ya Nzambe? Kanisa na ntina ya mituna oyo ntango oyekoli mateya ya Yakobo na ntina ya bondimi. Ekoki kosepelisa yo na kotangaka lisusu na ntina ya Abalayama mpe Rahaba, bandakisa mibale Yakobo atangaki (tala Genese 22:1–12; Josua 2). Lolenge nini balakisaki ete bazalaki na kondima na Nzambe?
Kotanga Yakobo 1:3–8, 21–25; 2:14–26; 4:17 ekoki kosalisa yo kokanisa ndenge okoki kozala motosi ya liloba. Koma makanisi songolo ozwi, mpe sala miango mpo na kosala engebene na makanisi yango.
Tala lisusu Alma 34:27–29; 3 Nefi 27:21.
Maloba nalobi ezali na nguya ya kozokisa to kopambola basusu.
Kati na maloba ya elilingi Yakobo asalelaki na nzela ya mokanda na ye, boko ya maloba na ye ya elilingi ezwami kati na toli na ye na ntina ya lokota. Kanisa kokoma mokanda ya ndenge nyonso Yakobo alimbolaki lolemo to monoko. Eloko niniekokanisi to elilingi moko na moko emonisi na ntina ya maloba tolobeli? Kanisa na ntina ya likambo moko okoki kosala mpo na kopambola moto moko na maloba na yo (tala Malongi mpe Mayokani 108:7).
Lokola moyekoli ya Yesu Klisto, nasengeli kolinga bato nyonso, na kozangaka kotala makambo na bango mosusu.
Yakobo akebisaki Basantu mingi mingi na kosepelisaka bazwi mpe kotyolaka babola, kasi bakoki kosalela likebisi na ye na makanisi ya mabe to kokanisela bato mabe tozalaka na yango mpo na basusu. Ntango otangi na losambo mpenza Yakobo 2:1–9, luka ya yo motema mpe yokaka bitindaya Molimo Mosantu. Ekoki kosalisa na kotia na esika ya maloba oyo kati na milongo, lokola ete “mobola angeli na bilamba bibebi” (molongo 2), na maloba mosusu oyo elimboli moto oyo okoki kosnginiama na kosambisaka na sembo te. Okanisi mbongwana nyonso ozali na yango mposa mpo na kosala na lolenge osalelaka to okaniselaka basusu?
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Yakobo 1:5.Nsima ya kotanga Yakobo 1:5, libota na yo ekoki kotia na bokuse lisolo ya Limoni ya Yambo (tala Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:8–20.(ChurchofJesusChrist.org). Bengisa bandeko ya libota bakabola matatoli na bango ya Profeta Joseph Smith mpe makambo ntango Tata na Lola ayanolaki nsambo na bango.
6:42 -
Yakobo 1:26–27.Kanisa kotala video “Kimoklisto ya Solo” (ChurchofJesusChrist.org). Nsima tanga ndimbola ya Yakobo ya “losambo ya peto” kati na Yakobo 1:26–27, mpe solola banzela libota na yo ekoki kokomisa esaleli ya losambo na bino koleka peto mingi koleka.
-
Yakobo 3.Yakobo 3 esangisi na makanisi ebele oyo ekoki kofula mateya ya biloko ya kobosana te mpo na kosalisa libota na yo ekundola na koloba na boboto. Na ndakisa, okoki bopelisa moto elongo mpe koloba na ntina ya lolenge nini liloba ya moke ya kozanga boboto ekoki kobota likambo ya monene (tala milongo 5–6). To okoki kopesa eloko moko ya bololo na esika ya eloko moko oyo mbala mingi esalelamaka lokola bilei ya sukali—lokola ete mai ya lilala kati na molangi ya mafuta ya nzoi. Yango ekoki komema na lisolo na ntina ya kosalela maloba ya sukali mpe ya bobondisi (tala milongo 9–14).
-
Yakobo 4:5–8.Mpo na nini tosengeli “kobelema epai ya Nzambe” (Yakobo 4:8)
-
Yakobo 5:14–16.Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki ete “baboti basengeli kolendisa koleka mapamboli ya bonganganzambe kati ya libota” (“The Powers of the Priesthood,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 67). Ntango mosusu kotanga Yakobo 5:14–16 mpe kokabola boyebi mpe kozwa lipamboli ya bonganganzambe ekoki kolendisa bandeko ya libota ntango bazali kobela to bazali na mposa ya makasi ya molimo.
Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.
Loyembo oyo ekoki koyembama: “Esili Ngai Kosala Bolamu Songolo?,” Nzembo, no. 223.