Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi na moko 27–Sanza ya zomi na mibale 3. 1–3 Yoane; Yuda: “Nzambe Azali Bolingo”


“Sanza ya zomi na moko 27–Sanza ya zomi na mibale 3. 1–3 Yoane; Yuda: ‘Nzambe Azali Bolingo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi na moko 27–Sanza ya zomi na mibale 3. 1–3 Yoane; Yuda,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu Klisto azali koseka afandi na bana bazali koseka

Bolingo Ebonga Nie, na Del Parson

Sanza ya zomi na moko 27–Sanza ya zomi na mibale 3

1–3 Yoane; Yuda

“Nzambe Azali Bolingo”

Ntango otangi Mikanda ya Yoane mpe ya Yuda, luka bofuli na ntina ya lolenge nini okoki kolakisa bolingo na yo epai ya Nzambe. Koma makanisi oyo mpe salela yango.

Koma Makanisi na Yo

Ntango Yoane mpe Yuda bakomaki mikanda na bango, malongi ya mabe esilaki kobanda komema Basantu ebele na bopengwi. Boko basakoli ya lokuta bazalaki kutu kotuna soki Yesu Klisto ya solo ayaki “na nzoto” (tala, na ndakisa, 1 Yoane 4:1–3; 2 Yoane 1:7). Eloko nini mokambi ya Eklezia akoki kosala na ntango ya boye? Apostolo Yoane ayanolaki na kokabolaka litatoli na ye moko ya Mobikisi: “Oyo ezali litatoli oyo topesi ya oyo ezalaki uta na ebandeli, oyo toyoki, oyo tomoni na miso na biso, oyo totali yango, mpe oyo maboka na biso esimbi, ya Liloba na bomoi” (Joseph Smith Bobongoli, 1 Yoane 1:1 [kati na 1 Yoane 1:1, maloba na nse ya lonkasa a]). Bongo na nsima Yoane ateyaki na ntina na bolingo: Bolingo ya Nzambe mpo na biso mpe bolingo tosengeli kozala na yango mpo na Ye mpe bana na Ye nyonso. Kutu, Yoane azalaki nzeneneke na yango, mpe. Ye moko omonaki bolingo ya Mobikisi (tala Yoane 13:23; 20:2), mpe alingaki Basantu komona bolingo se moko wana. Litatoli mpe mateya ya Yoane na ntina ya bolingo ezali se lokola tozali na yango mposa lelo, ntango bondimi na Yesu Klisto ezali kotielama ntembe to kotunama mpe mateya ya lokuta ebele. Kotanga mikanda ya Yoane ekoki kosalisa biso totelemela mikakatano ya lelo na mpiko, mpo “nsomo ekojalaka kati na bolingi te, kasi bolingo oyo esili kokoka ekobwaka nsomo libanda” (1 Yoane 4:18).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

1 Yoane; 2 Yoane

Nzambe azali pole, mpe Nzambe azali bolingo.

Soki osengeli kopono liloba moko to mibale mpo ya kolimbola Nzambe, esengeli ezala nini? Kati na mikanda na ye, Yoane asalelaki mbala mingi maloba “pole” mpe “bolingo” (tala, na ndakisa, 1 Yoane 1:5; 2:8–11; 3:16, 23–24; 4:7–21). Ntango otangi mikanda mibale ya yambo ya Yoane, maniola makambo Yoane azalaki na yango ya pole mpe bolingo ya Mobikisi. Na ndakisa, kanisa oyo Yoane ayekolaki uta na mateya ya Yesu kati na Yoane 3:16–17; 12:35–36, 46; 15:9–14; 19:25–27. Emoni yo bokokani kati na mateya oyo mpe oyo 1 Yoane ateyi na ntina ya pole mpe bolingo ya Nzambe? Makambo nini eteyi yo ete Nzambe azali pole mpe bolingo?

1 Yoane 2–4; 2 Yoane

“Soki tolingani moko na mosusu, Nzambe afandi kati na biso.”

Okomona lisusu maloba lokola “kowumela kati na” mpe “kofanda kati na” kozongela kati na mikanda ya Yoane. Luka maloba oyo, mingi mingi ntango otangi 1 Yoane 2–4 mpe 2 Yoane. Nini okanisi elimboli “kowumela kati na” to “kofanda kati na” Nzambe mpe malongi na Ye? (tala 2 Yoane 1:9). Elimboli nini epai na yo kozwa Nzambe “kowumela kati na” to “kofanda” kati na yo?

1 Yoane 2:243:3

Nakoki kokoma lokola Yesu Klisto.

Ntina ya kokoma Moklisto emonani koleka makasi mingi mpo na yo? Kanisa toli ya lilendisi ya Yoane: “Bana, bowumela kati na ye, ete, soko ye akomonana, tojali na molende mpe … [mpe] tokojala lokola ye” (1 Yoane 2:28; 3:2). Ozwi nini kati na 1 Yoane 2:243:3 oyo epesi yo elikya na Nkolo mpe bobondisi lokola moyekoli ya Yesu Klisto? Ntango otangi mikanda na Yoane, luka mibeko mosusu to toli oyo ekoki kosalisa yo na makasi na yo na kokoma Moklisto koleka.

Tala lisusu Moroni 7:48; Malongi mpe Mayokani 88:67–68; Scott D. Whiting, “Becoming like Him,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2020, 12–14.

1 Yoane 4:12

Moto “moko te … amona Nzambe na ntango moko”?

Joseph Smith Translation, 1 Yoane 4:12 elakisi polele ete moto moko te amona Nzambe na ntango moko, longola se baoyo bandimi” (kati ya 1 Yoane 4:12, makomi na nse ya lonkasa a; tala lisusu Yoane 6:46; 3 Yoane 1:11). Makomi ebombi bantango ebele oyo Nzambe Tata amimonisaki Yemei na bato na sembo, kotangaka mpe Yoane yemei (tala Emoniseli 4; tala lisusu Misala 7:55–56; 1 Nefi 1:8; Malongi mpe Mayokani 76:23; Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:16–17).

1 Yoane 5

Lokola nazali kosalela bondimi na Yesu Klisto mpe nabotami lisusu, nakoki kolonga mokili.

Ntango otangi 1 Yoane 5, luka oyo tokoki kosala mpo na kolonga mokili mpe kozwa bomoi ya seko. Kolonga mokili ekoki kozala lokola nini na bomoi na yo? Okoki lisusu kozwa biyano mpe makanisi na etinda ya Mpaka Elder Neil L. Andersen “Overcoming the World (Kolonga Mokili)” (Liahona, Sanza ya mitano 2017, 58–62).

Yuda 1

“[Bomitonga] likolo ya kondima na bino ya bosantu koleka nyonso.”

Nini Yuda 1:10–19 eteyi yo na ntina ya baoyo babundisaka Nzambe mpe mosala na Ye? Nini oyekoli uta na milongo 20–25 na ntina ya lolenge nini kobomba makasi bondimi na yo na Yesu Klisto?

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Yoane 2:8–11.Mpo na kosalisa libota na yo emaniola mateya ya Yoane, bosangana na ndako moko ya molili epai wapi bandeko ya libota bakoki komona bokeseni kati na kotambola “kati na molili” mpe kotambola “kati na pole.” Lolenge nini boyini esalaka ete totambola kati na molili mpe libaku? Lolenge nini kolinga moko na mosusu ememaka pole kati na bomoi na biso?

1 Yoane 3:21-22.Nini kati na milongo oyo ekolisi “elikya” oyo tozali na yango na Nzambe mpe likoki na biso ya kozwa biyano na nsambo na biso?

Elilingi
libota efukami elongo na losambo

Kobomba mitindo ya Nzambe esalisaka biso na kolonga mokili.

1 Yoane 5:2–3.Ezali na mibeko songolo oyo tokanisi “ya pete te” to mpasi mpo na kolanda? Lolenge nini bolingo na biso mpo na Nzambe ebongolaka lolenge toyokaka na ntina ya mibeko na Ye?

3 Yoane 1:4.Elimboli nini “kotambola kati na bosolo”? Okoki kozwa libaku oyo mpo na kolobela bandeko ya libota lolenge nini omonaki bango kotambola kati ya bosolo mpe koloba na ntina ya esengo oyo kotambola yango ememeli bango. Bandeko ya libota bakoki kosepela kokoma na ntina na to koyema bosolo bayekoli na lonkasa mpe kosalela yango na kosala nzela epai wapi libota na yo ekoki kotambola elongo.

Yuda 1:3-4.Ezali na makama ya molimo oyo “ezwa moke moke esika” na bomoi mpe libota na biso? (Yuda 1:4). Lolenge nini tokoki kolanda likebisi ya Yuda na “kobunda na etingia mpenza mpo na kozwa bondimi” mpe kotelemela makama oyo? (Yuda 1:3). Tokoki kosala nini mpo ete “kimia, mpe bolingo, ebakisama” kati na libota na biso? (Yuda 1:2).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Where Love Is,” Children’s Songbook, 138–39.

Kobongisa Koyekola ya Moto Ye Moko

Mona Bolingo ya Nzambe. Mokambi M. Russell Ballard ateyaki, “Nsango malamu ezali nsango malamu ya bolingo—bolingo mpo na Nzambe mpe bolingo mpo na moko mpe mosusu” (“Bolingo ya Nzambe mpo na Bana na Ye,” Ensign, Sanza ya mitano 1988, 59). Ntango otangi makomi, koma bilembo oyo emonisi bolingo ya Nzambe.

Elilingi
Klisto azali kotambola pembeni ya etima moko

Tambola Elongo na Ngai, na Greg K. Olsen

Bimisa na lokasa