Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya Zomi na Mibale 11–17. Emoniseli 6–14: “Balongaki … na Makila ya Mwana na Mpate”


“Sanza ya Zomi na Mibale 11–17. Emoniseli 6–14: ‘Bango balongaki … na Makila ya Mwana na Mpate,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Zomi na Mibale 11–17. Emoniseli 6–14,” Yaka, Langa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu atelemi katikati ya minzoto

Bilili esalemi na Eric Johnson: The Grand Council, na Robert T. Barrett; minzoto ebele na ndingisa ya bolingo ya Agence Spaciale Européene

Sanza ya Zomi na Mibale 11–17.

Emoniseli 6– 14

“Bango Balongaki … na Makila ya Mwana na Mpate”

Mokambi Boyd K. Packer apesaki toli: “Soki na ebandeli lokota ya makomi ezali lokola na kpokoso mpo na yo, koba na kotanga. Na ntango moke okososola bonzenga mpe nguya ezwami na nkasa oyo” (“The Key to Spiritual Protection,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2013, 27).

Koma Makanisi na Yo

Kanisa mwasi moko “kobundaka mpo na kobota, mpe komonaka mpasi na kobota.” Sikawa kanisa “dalagona moko monene ya motane, na mitu nsambo mpe maseke zomi” kobalukaka likolo ya mwasi, kozelaka mpo na “kolia mwana na ye ntango akobotama” (Emoniseli 12:2–4). Mpo na kososola milongo oyo ya emoniseli ya Yoane, kundola ete bilili yango elakisi Eklezia mpe bokonzi ya Nzambe mpe mabe yango ekokutana na yango liboso. Mpo na Bansatu oyo bamonaki minyoko ya makasi na ntango ya Yoane, elonga likolo ya mabe emonanaki lokola ekokaki kosalema te. Elonga yango ekoki lisusu kozala mpasi mpo na komona yango liboso na ntango moko lokola oyo ya biso, ntango monguna azali na “etumba na basantu” mpe azali na “nguya … likolo ya bikolo, mpe minoko, mpe mabota nyonso” (Emoniseli 13:7). Kasi nsuka ya emoniseli ya Yoane elakisi na nkembo nyonso ete malamu ekoleka likolo ya mabe. Babilona ekokweya. Mpe Basantu bakotelema “likolo ya monyoko minene” na bilamba ya mpembe—te mpo ete bilamba na bango etikala kobeba ata mokolo moko te kasi mpo ete Basantu “bakosukola bilamba na bango, mpe bakokomisa yango mpembe na makila ya Mwana na mpate” (Emoniseli 7:14).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Emoniseli 6–11

Yoane amonaki makambo mingi ya lisitwale ya mabele, mingi mingi oyo ya mikolo ya nsuka.

Kati ya mikapo oyo okotanga makambo matali buku moko na bilembo nsambo. Soki omitungi nini yango elakisi, ozali yo moko te. Profeta Joseph Smith asalaki yango mpe. Nkolo amonisaki na Joseph ete buku mpe bilembo na yango nsambo elakisi lisitwale ya “bozali ya ntango,” ya mabele elongo na elembo moko moko kolakisaka mibu nkoto moko (tala Doctrine et Alliances 77:6–7). Okoki kosepela na koyeba ete makambo ya bilembo minei ya yambo elobami na bokuse na limoni ya Yoane kaka na milongo mwambe (Emoniseli 6:1–8). molongo misato elandi elobeli elembo ya mitano (molongo 9–11). Makambo ya bilembo mibale ya nsuka ezwi biteni minene etikali ya buku ya Emoniseli. Na lolenge mosusu, ntina monene ya limonisi ya Yoane ezali mikolo ya nsuka—mikolo na biso. Ntango ozali kotanga, manyola mpo na nini ezali motuya ya koyeba nini Yoane akomaki mpo na oyo etali mikolo ya nsuka.

Ntango ozali kotanga na ntina ya oyo etali makambo Yoane asakolaki, tala makanisi mpe mituna elandi:

Emoniseli 12–13

Etumba ya Lola ezali kokoba na mabele.

Toyebi mingi te mpo na oyo etali Etumba ya Lola, kasi ezali na ndimbola ya polele mpe mokuse na yango na Emoniseli 12:7–11. Ntango ozali kotanga milongo oyo, mikanisa yo moko lokola ozali eteni ya kowelana wana ya yambo ya kufa. Oyekoli nini mpo na oyo etali lolenge nini Satana alongamaki na Nkolo? (tala molongo 11).

Etumba oyo ebandaki na lola ezali kokoba na mabele, lokola Satana atingami na “kosala etumba na [baoyo] bazali na litatoli ya Yesu Klisto” (Emoniseli 12:17). Oyekoli nini uta na Emoniseli 13 mpo na oyo etali lolenge nini azali kokumba etumba wana lelo? Lolenge nini “makila ya Mwana na Mpate” mpe “liloba ya [oyo ya yo] litatoli” (Emoniseli 12:11) ezali kokoba kosalisa yo na etumba oyo?

Tala lisusu 1 Nefi 14:12–14; Moroni 7:12–13; Moise 4:1–4; Doctrine et Alliances 29:36–37; Gospel Topics, “War in Heaven,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Emoniseli 14:6–7

“Namonaki anjelu mosusu … kozalaka na nsango malamu ya seko.”

Bookisami ya lisakoli na milongo oyo esalamaki ntango Moroni abimelaki Joseph Smith mpe amemaki ye na oyo abongolaki mpe abimisaki yango lokola Buku ya Mormon. Buku oyo etondi na “nsango malamu ya seko” oyo topesami mokumba ya koteyaka kati na “mabota, mpe bikoolo, mpe minoko, mpe bato nyonso” (Emoniseli 14:6).

Mpo na koyekola oyo etali banjelu basusu oyo basangaki na bozongisi ya nsango malamu ya seko, tala Doctrine et Alliances 13; 27:5–13; 110:11–16; 128:20–21.

Tala lisusu “The Restoration of the Fulness of the Gospel of Jesus Christ: A Bicentennial Proclamation to the World,” ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Emoniseli 7: 9, 13– 15.Milongo oyo eteyi biso nini na ntina ya mpo na nini tolataka bilamba ya mpembe mpo na libatisi mpe makuli ya tempelo?

Emoniseli 7:14–17Kanisa kobengisa bato ya libota kokabola mayoki na bango mpo na oyo etali bilaka ya Nkolo na milongo oyo. Lolenge nini bilaka na Ye ekoki kosalisa biso ntango tozali kati “monyoko monene”? (molongo 14).

Emoniseli 12:7–11; 14:6.Boko bato ya libota bakoki kosepela koyemaka bililii ya mamonisi malimbolami na Emoniseli. Ndakisa, koyemaka bilili engebene na Emoniseli 12 ekoki kobamba masolo oyo etali Etumba na Lola (tala milongo 7–11). Bilili oyo etali Emoniseli 14:6 ekoki kokamba na masolo oyo etali Bozongisi ya nsango malamu.

Sima ya kotanga Emoniseli 14:6 elongo, kanisa kolakisaka bilili ya anjelu Moroni mpe banjelu mosusu oyo basalisaki mpo na kozongisa nsango malamu na mikolo na biso (tala bilili na nsuka ya mwango oyo). Ntango mosusu bato ya libota bakoki moto moko na ntango na ye kosimba bilili mpe kokabola bantina nini bango bazali na botondi ete banjelu baya “kozalaka na nsango malamu ya seko ya koteya epai na [biso].”

Emoniseli 12:11Maloba “liloba ya litatoli na bango” elingi koloba nini ? Lolenge nini matatoli na biso na Yesu Klisto ezali kosalisa biso mpe basusu kolonga Satana?

Emoniseli 13:11–14.Makanisi nini libota na yo ezali na yango mpo na oyo etali nyama ya lokuta? Lolenge nini tozali kososola mpe kokima lokuta tozali komona na mokili lelo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nakozala Elombe,” Chants pour Enfants,162.

Kobongisa Boyekoli Na Yo Moko

Mikotisa yomei kati ya Makomi. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Bomipesi ya mikolo na mikolo kati na liloba ya Nzambe ezali ntina mpo na kobika ya molimo mingi mingi na mikolo oyo ya mobulu makasi” (“Boyoka Ye,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 89). Nini “bomizindisa na liloba ya Nzambe” elingi koloba mpo na yo?

Elilingi
Yesu azali kobeta na ekuke

Na lolenge ya bobaluki ya makonga ya montre uta likolo na loboko ya mwasi Moroni Delivering the Golden Plates[Moroni Azali Kopesa Bapalaki ya Wolo], na Gary L. Kapp; Upon You My Fellow Servants [Likolo na Yo Basali na Ngai ya Mosala], na Linda Curley Christensen mpe Michael T. Malm (Yoane Mobatisi azali kopesa Bonganganzambe ya Alona na Joseph Smith); Keys of the Kingdom i[Bafungola ya Bokonzi], na Linda Curley Christensen mpe Michael T. Malm (Petele, Yakobo, mpe Yoane bazali kopesa Bonganganzambe ya Melekisedeke na Joseph Smith; Vision in the Kirtland Temple [Limonisi na Tempelo ya Kirtland], na Gary E. Smith (Mose, Elia, mpe Elija babimeli Joseph Smith mpe Oliver Cowdery).

Bimisa na lokasa