Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya Zomi na Mibale 4–10. Emoniseli 1–5: “Nkembo, mpe Makasi, Ezala na … Mwana Mpate mpo na Libela na libela”


“Sanza ya Zomi na Mibale 4–10. Emoniseli 1–5: ‘Nkembo, mpe Makasi, Ezala na … na Mwana mpate Libela na libela,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Zomi na Mibale 4–10. Emoniseli 1–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
mwana ya mpate afandi na matiti

Sanza ya Zomi na Mibale 4–10

Emoniseli 1– 5

“Nkembo, mpe Makasi, Ezala na … Mwana Mpate mpo na Libela na libela”

Kanisa kokoma mituna ozali na yango oyo etali maye otangi na Emoniseli. Okoki nsima koluka biyano na mituna na yo to kosolola yango na moto ya libota moko to na bakelasi ya Eklezia.

Koma Makanisi na Yo

Osila kblundabunda mpo na kolakisa basusu oyo oyokaka katikati ya likambo moko ya molimo ya nguya? Elobeli ya mikolo nyonso ekoki komonana lokola elongobani te mpo na kolimbola mayoki mpe makanisi ya molimo. Ntango mosusu oyo ezali mpo na nini Yoane asalelaki bilembo ya motuya mpe bilili ya boye mpo na kolimbola emoniseli na ye ya lokumu. Akokaki na pete nyonso koloba ete amonaki Yesu Klisto, kasi mpo na kosunga biso tososola mayele na ye, alimbolaki Mobikisi na kosalelaka maloba lokola oyo: “Miso na Ye ezalaki lokola epeleli ya moto,” “mopanga ebimi na monoko na ye mopelaki na bipai nyonso mibale,” mpe “elongi na ye ezalaki lokola moyi kongengaka na makasi na yango nyonso” (Emoniseli 1:14–16). Ntango otangi buku ya Emoniseli, meka kokundola bansango Yoane alingaki yo oyekola mpe oyoka, ata soki ososoli te ndimbola na yango nsima ya elembo moko moko. Mpo na nini akokanisaki mangomba ya Eklezia na bitelemelo ya mwinda, Satana na dalagona, mpe Yesu Klisto na mwana mpate? Nsuka na nyonso, osengeli kososola te elembo nyonso na Emoniseli mpo na kososola mama na makambo na yango ya mituya, kotangaka mpe mama ya likambo na yango ya motuya koleka: Yesu Klisto mpe balandi na Ye bakolonga likolo ya babokonzi ya bato mpe ya Satana.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Limoni ya Yoane eteyi na ntina ya mwango ya Tata na Lola mpo na kobikisa bana na Ye.

Mokanda ya Emoniseli ekoki kozala mpasi mpo na kososola, kasi kolemba nzoto te. Elaka ya Yoane ekoki kofula yo okoba komekaka: “Bapambolami ezali baye oyo batangi, mpe baye oyo bayoki mpe basosoli maloba ya lisakoli oyo, mpe babombi makambo yango oyo ekomamaki na kati, mpo ntango ya boyei ya Nkolo ekomi pembeni” (Joseph Smith Translation, Revelation 1:3 [na mabakisi ya Biblia], sete ebetami).

Lolenge moko ya koyekola Emoniseli ezali koluka babokutanisi na mwango ya lobiko. Makanisi oyo ya kosangisa ekoki kosunga yo:

Ntango ozali kotanga, mituna yo moko, “Yango eteyi ngai nini oyo mpo na oyo etali mwango ya Nzambe? Nzambe asalaki nini mpo na kosunga ngai koterlemela mabe mpe kozonga epai na Ye? Bilaka na ye ezali nini mpo na bato ya bosembo?”

Ekoki lisusu kosunga koyeba ete Doctrine et Alliances 77 elimboli mwa bilembo oyo esalelami na Emoniseli. Lisusu, Bobongoli ya Joseph Smith ebimisi polele milongo mingi na Emoniseli, bongo botala makomi na nse ya lokasa mpe mabakisi ya biblia mbala na mbala.

Tala lisusu Dikisionele ya Biblia, “Yoane,” “Emoniseli ya Yoane.”

Emoniseli 1

Yesu Klisto azali Mwana na Bomoi ya Nzambe na Bomoi.

Mokapo ya yambo ya Emoniseli elobeli bobimeli ya Yesu Klisto epai na Yoane na limoni. Ntango mosusu okoki kosala mokanda ya makambo nyonso mokapo oyo elobi oyo etali Yesu Klisto, kotangaka mpe nani Ye azali, nini Asalaka mpo na biso, mpe lolenge nini Ye azali.

Makambo mingi oyekoli ekoya na nzela ya bilembo. Maniola nini Nkolo akokaki komeka koteya yo oyo etali Ye moko na nzela ya bilembo. Ndakisa, yeba ete Mobikisi amibengi Ye moko “ebandeli mpe nsuka” mpe “wa yambo mpe wa nsuka.” Mpo na nini okanisi ete bankombo oyo ezali na motuya? Bankombo oyo eteyi yo nini mpo na oyo etali Mobikisi?

Emoniseli 2–3

Yesu Klisto ayebi ngai malamu koleka mpe akosalisa ngai nalonga mikakatano na ngai.

Maloba ya Mobikisi na Emoniseli 2–3 emonisi ete Ye asosolaki baelonga mpe bitumba se moko ya etape moko na moko ya Eklezia na mikolo ya Yoane. Ye asazolaki makasi ya Basantu mpe lisusu akebisaki bango na biloko basengelaki kobongola. Oyekoli nini uta kosanjola mpe makebisi ya Mobikisi?

Mobikisi asosoli lisusu ya bino elonga nyonso mpe bitumba, mpe Ye alingi kosalisa yo. Koma bilaka ya mbala na mbala Ye apesi na baoyo balongaka. Nini esimbi yo mpo na oyo etali bilaka oyo? Nini Mobikisi akoki kolinga yo olonga? Bokoki kosala nini mpo na koyamba lisalisi na Ye?

Emoniseli 4–5

Kaka Yesu Klisto nde akoki kosala ete mwango ya Tata na biso na Lola ekokisama.

Nini oyekoli mpo na oyo etali Tata na Lola uta Emoniseli 4 mpe mpo na oyo etali Yesu Klisto uta na Emoniseli 5? Kanisa nini yango ekokaki kozala lokola ntango biso nyonso tomonaki ete Yesu Klisto (“Mwana Mpate”) akokaki kosala ete mwango ya Tata ya Lola ekokisama (Mobikisi akokaki “kofungola buku, mpe … kokangola bilembo nsambo” [Emoniseli 5:5]). Mpo na nini Yesu Klisto ye moko akokaki kosala yango? Lolenge nini okoki kolakisa bondimi na yo epai na Ye lokola Mobikisi na yo?

Tala lisusu Yobo 38:4–7; Doctrine et Alliances 77:1–7.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na KoyekoliaMakomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Emoniseli 1:20Mpo na nini Yesu akokanisaki Eklezia na Ye na bisimbelo ya mwinda? (tala Matai 5:14–16). Boyemba loyembo moko oyo etali lolenge nini tokoki kozala lokola pole na esimbeli ya mwinda, ndakisa “Shine On” (Children’s Songbook, 144).

Emoniseli 2:3Sala lokola Yoane asengamaki kopesa etinda na libota na yo lokola baoyo apesaki na baeklezia na ntango na ye. Nini akokaki koloba ezali malamu? Boniboni ekokaki yo kobongisa?

Emoniseli 3:15–16Nsima ya kotanga milongo oyo, libota na yo ekoki komela eloko moko ya moto makasi te oyo ekoki kozala elengi na moto to malili makasi koleka. Elingi koloba nini kozala moto makasi te na molimo?

Emoniseli 3:20Lakisa foto ya Mobikisi kobetaka na ekuke (tala nsuka ya mateya na interneti) ntango libota na yo ezali kotanga Emoniseli 3:20. Mpo na nini Yesu abetaki na ekuke na esika ya kokota na kati? Bato ya libota bakoki kobetaka na ekuke moto na moto na ngonga na ye. Nsima moto mosusu na kati ya libota akoki kolakisa lolenge moko tokoki “kofongola ekuke” mpo na Mobikisi mpe kotika bato ya libota bakota na kati. Ekokaki koyokama lolenge nini kozala na mobikisi na ndako na biso?

Emoniseli 4:10–11Oyo elingi koloba nini kokumbamela Tata na Lola? Nini toyebi na ntina na Ye oyo ekosala ete biso tolinga kosanjola Ye?

Emoniseli 5: 6, 12– 13.Mpo na nini Yesu Klisto abiangemaki “Mwana Mpate”? Nini nkombo oyo eteyi biso na ntina na Ye?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Jesus, Once of Humble Birth,” Cantiques,, no. 196.

Kobongisa Mateya na Biso

Mituna mya bolendisi. Mituna ezali elembo ete bato ya libota babelami mpo na koyekola mpe kopesa bososoli na lolenge bazali koyanola na oyo bango bazali koteyama Teya libota na yo lolelnge nini kozwa biyano kati na makomi. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi,, 25–26

Elilingi
Klisto azali kobeta na ekuke

Tika Ye Akota, na Greg K. Olsen

Bimisa na lokasa