Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya Zomi na Mibale 18–24. Noele: “Bansango ya Nsai ya Esengo Monene”


“Sanza ya Zomi na Mibale 18–24. Noele: ‘Bansango ya Nsai ya Esengo Monene,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Zomi na Mibale 18–24. Noele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
mwana abotami sika

Mwana Mpate Moke, na Jenedy Paige

Sanza ya Zomi na Mibale 18–24

Noele

“Bansango ya Nsai ya Esengo Monene”

Kanisa lolenge nini komaniola mbotama mpe etinda ya Mobikisi ekoki kosalisa komema molimo ya kimia mpe ya bule na eleko ya Noele.

Koma Makanisi na Yo

Mpo na nini kobotama ya mwana ememi esengo monene ya boye? Ntango mosusu mpo ete bebe ya sika akoki kozala elembo ya elikya. Ezali na eloko moko kati na bomoi ya sika etondi na mabaku oyo ebengi biso tokanisa nini bomoi ekoki kobongisela mwana oyo mpe makambo kitoko ye akokokisa. Ata mokolo moko te yango ezala solo koleka na kobotama ya Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto. Ata mokolo moko te ezalaki na elikya mingi etiami na mwana, mpe ezala ata mokolo moko te na mobotami moko na mingi na bilaka ya boye.

Ntango anjelu abengaki babateli mpate baluka mwana abotami sika na elielo ya banyama, apesaki bango lisusu nsango etali mwana wana. Ezalaki nsango moko ya elikya—ete bebe yango ayaki na mabele mpo na kokokisa etinda moko ya bule. Babateli mpate basalaki ete nsango na bango “eyebana na bapaya … mpe baoyo nyonso bayokaki yango bakamwaki na makambo malobelamaki bango na babateli mpate. Nde Malia abombaki makambo oyo nyonso, azalaki kobanjabanja yango na motema na ye” (Luka 2:17–19). Ntango mosusu ekoki kozala malamu kolanda ndakisa ya Malia na Noele oyo: kokanisa na motema na yo biloko oyekolaki oyo etali Mobikisi mobu oyo. Lolenge nini akokisaki mosala na ye ya bosikoli na masolo oyo otangaki? Mpe ya motuya koleka, lolenge nini mosala na Ye ebongolaki bomoi na yo? Nsima okokaki koyoka ete ofulami mpo na kolanda ndakisa ya babateli mpate: lolenge nini okoki kosala yango “eyebana na bapaya” nini Yesu Klisto asalaki mpo na yo?

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 1:18–25; 2:1–12; Luka 1:26–38; 2:1–20

Yesu Klisto andimaki kobotama kati na biso na mabele.

Atako otangaki to oyokaki lisolo ya mbotama ya Yesu Klisto mbala mingi yambo, tanga yango ntango oyo na likanisi oyo na makanisi: “Noele ezali kaka te bosepeli ya lolenge nini Yesu ayaki na mokili kasi lisusu mpo na koyeba nani Ye azali—Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto—mpe mpo na nini Ye ayaki” (Craig C. Christensen, “The Fulness of the Story of Christmas” [First Presidency Christmas devotional, Dec. 4, 2016], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).

Nini oyebi mpo na oyo etali nani Yesu Klisto azalaki yambo Ye abotama? (tala, mpo na ndakisa, Yoane 17:5; Mozia 3:5; Doctrine et Alliances 76:13–14, 20–24; Moise 4:2). Boniboni boyebi oyo esimbi lolenge omiyoki ntango otangi na ntina ya mbotama na Ye?

Nini oyebi mpo na oyo etali mpo na nini Yesu Klisto ayaki na mabele? (tala, mpo na ndakisa, Luka 4:16–21; Yoane 3:16–17; 3 Nefi 27:13–16; Doctrine et Alliances 20:20–28). Boniboni boyebi oyo ebongoli lolenge ozali koyoka na ntina ya oyo etali Mobikisi? Lolenge nini yango esimbi lolenge na bino ya kotambwisa bomoi na bino?

Tala lisusu 2 Bakolinti 8:9; Baebele 2:7–18; 1 Nefi 11:13–33; Alma 7:10–13; “The Nativity” (video), ChurchofJesusChrist.org.

1 Bakolinti 15:21–26; Bakolose 1:12–22; 1 Petelo 2:21–25

Yesu Klisto akokisaki etinda na Ye ete ekoka kosalema mpo na ngai kozwa bomoi ya seko.

Atako lislo ya mbotama ya Klisto ezingamaki na makambo ya kokamwisa, ya Ye elingaki kozala kaka mbotama mosusu soki yango ezalaki te mpo na mosala monene Ye akokisaki nsima na bomoi na Ye. Lokola Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki, “Bebe Yesu ya Beteleyeme alingaki azala bebe mosusu kaka longola Klisto mosikoli ya Getesemane mpe ya Gologota, mpe akomi molongi na Lisekwa” (“The Wondrous and True Story of Christmas,” Ensign, Sanza ya zomi na mibale. 2000, 5).

Elilingi
Yesu afukami na Elanga ya Getesemane

Gethsemane, na J. Kirk Richards

Bilembo ya mosala ya kibonzambe ya Mobikisi mpe bolingo na Ye ya nguya mpo na basusu ezwami katikati ya Kondimana na Sika mobimba. Milongo mpe masolo nini eyei na makanisi na yo? Okoki kotala na sima na nzela ya mokanda oyo to zulunale na yo ya boyekoli mpe kotala lisusu mwa makanisi na yo okomaki. Okoki lisusu kotanga 1 Bakolinti 15:21–26; Bakolose 1:12–22; 1 Petelo 2:21–25 mpe kokanisa lolenge nini Mobikisi mpe mosala na Ye epambolaki bomoi na yo. Nini oyoki efuli yo kobongola na bomoi na yo? Lolenge nini okoyema nguya ya Mobikisi?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 1:18–25; 2:1–12; Luka 1:26–38; 2:1–20.Lolenge nini osepelaka mbotama ya Yesu Klisto elongo na libota na yo? Oyo ezali mwa makanisi moke okoki komeka, to okoki kobimisa ya yo moko:

  • Botanga to bosakana elongo na biteni ya lisolo ya Mbotama ya Mobikisi.

  • Botala video ya “Le Christ Enfant” (ChurchofJesusChrist.org).

  • Bosalela mikanda mosusu na “Jesus Christ” collection in the Gospel Library, especially in the section titled “His Birth (Christmas).”

  • Botala losambo na Mbotama ya Yesu ya Bokambi ya Yambo (broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).

  • Boyemba bakantiki ya Noele elongo, to bopona bato ya pembeni to baninga ya kotala mpe boyemba mpo na bango (tala Hymns, nos. 201–14).

  • Kosala mosala moko ya lisungi

  • Tuna bato ya libota baluka likambo moko moko ya lisolo ya Mbotama ya mobikisi oyo ekopesa bango makanisi mpo na kotia bafololo to ba decoration ekoki kokundolisa bango Yesu Klisto.

1 Bakolinti 15:21–26; Bakolose 1:12–22; 1 Petelo 2:21–25.Mpo na nini tozali na botondi ete Yesu Klisto abotamaki? Libonza nini Ye apesi biso? Lolenge nini ekoki biso kolakisa Ye botondi na biso? Bokoki lisusu koyemba loyembo elobeli Mosala na Ye, lokola “He Sent His Son” (Chants pour Enfants,, 34–35).

Klisto na Bomoi: Litatoli ya Bapostolo.”Soki olingi kosunga libota na yo etia makanisi na Mobikisi na Noele, ekoki kosenga ete ntango mosusu okoka kolekisa ntango mosusu na kotangaka mpe koyekolaka elongo “Klisto ya Bomoi: Litatoli ya Bapostolo” (ChurchofJesusChrist.org). Ntango mosusu okoki kokanga na makanisi milongo uta “The Living Christ” to luka ndenge na bomoi ya Mobikisi na Kondimana na Sika oyo elobeli yango. Okoki lisusu kobenga moto moko moko ya libota akoma ya ye litatoli ya Yesu Klisto mpe, soki obiangemi tanga yango na libota.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Once within a Lowly Stable,” Chants pour Enfants, 41.

Kobongisa Boyekoli Na Yo moko

Luka Yesu Klisto. Makomi eteyi biso ete bikelamu nyonso etatolaka Yesu (tala Moise 6:62–63), boye, tosengeli koluka Ye na makambo nyonso. Ntango ozali kotanga makomi, kanisa kokoma to kotia milongo oyo eteyi yo na ntina na Ye. Zwa ntango na mikolo yambo ya Noele ya koluka biloko nzinga nzinga na yo oyo etatoli Yesu Klisto.

Elilingi
Malia, Yosefe mpe babateli mpate nzinga nzinga ya bebe Yesu

Mbotama, na Brian Call

Bimisa na lokasa