Totikela Nzambe Motema na Biso
Ntango tomifungoli na Molimo, tokoyekola nzela ya Nzambe mpe tokoyoka bolingi na Ye.
Mpaka Dallin H. Oaks, na likita linene ya sanza ya minei, alobaki mposa ya “kobongola bomoi na biso moko.”1 Nandimi ete mbongwana ya moto na moto ekobanda na mbongwana ya motema—kotala te makambo ya bomoi na yo to esika ya mbotama na yo.
Nawuti na Sudi ya Mozindo ya Etazini, mpe na bolenge na ngai maloba ya nzembo ya kala ya bamisioni eteyaki ngai etali motema ya mayekoli ya solo—moko oyo abongwani. Bomaniola maloba oyo, nalingaka yango mingi mpenza:
Zala na nzela na yo moko, Nkolo!
Zala na nzela na yo moko!
Ozali mosali nzungu ya mabele;
Nazali mabele.
Yema ngai mpe sala ngai
Na bolingi na Yo,
Ntango nazali kozela,
Namitika mpe na kimia.2
Boniboni biso, bato ya mikolo oyo, totonda na misala, ya komekana, tokokoma tomitika mpe na kimia? Boniboni tokokomisa banzela ya Nkolo ya banzela na biso moko? Nandimi ete tobandaka na koyekolaka na Ye mpe kosambelaka mpo na bososoli. Ntango elikia na biso ekoli, tofungoli mitema na biso, toluki kosala bolingi na Ye, mpe tozeli biyano oyo ekosunga biso mpo na kososola.
Mbongwana ya motema na ngai moko ebandaki ntango, lokola elenge ya mibu 12, nabandaki koluka Nzambe. Mosusu koleka koloba Losambo ya Nkolo,3 nayebaki mpenza te boniboni kosambela. Namikundoli kofukamaka, kolikiaka nakokaki koyoka bolingo na Ye, mpe kotunaka, “Ozali wapi, Tata ya Lola? Nayebi osengeli kozala esika moko, kasi wapi?” Nionso oyo na mibu na ngai ya bolenge, natunaki. Nayebaki mwa moke bosolo ya Yesu Klisto, kasi Tata ya Lola atikaki ngai naluka mpe nazela mibu 10.
Na 1970, ntango bamisionele bateyaki etali mwango ya lobiko ya Tata mpe Bomikabi ya Mobikisi, kozela na ngai esilaki. Nayambaki bosolo oyo mpe nabatisamaki.
Na ntina ya boyebi ya mawa mpe nguya ya Nkolo, molongani, bana na ngai, mpe ngai toposaki esakola ya libota oyo: “Nionso ekosimba.” Kasi boniboni tokoki kolobana maloba oyo ntango mobulu makasi ekomi mpe biyano ezwami noki te?
Ntango mwana na biso ya mwasi ya kitoko, ya kolongobana, mwana mwasi ya mibu 21, Georgia, akotaki lopitalo na mpasi makasi kolanda likama ya velo, libota na biso elobaki, “Nionso ekosimba.” Ntango nazwaki mpepo uta na misio na Bresil tii na Indianapolis, na Indiana, mpo na kozala elongo na ye, nakangamaki na esakola ya libota na biso. Nzokande, mwana na biso ya mwasi ya kitoko akufaki mwa ngonga liboso mpepo na ngai ekita. Na mpasi mpe kozoka na motema oyo ekatisaki na kati ya libota na biso lokola lotiliki, boniboni tokokaki kotalana mpe na kimia koloba, “Nionso ekosimba”?
Kolanda liwa ya nzoto ya Georgia, mayoki na biso ezalaki mabe, tobundaki, mpe lelo tozali naino na bangonga ya mawa makasi, kasi tosimbaki bososoli ete moto te akufaka mpenza. Aatako monioko na motema na biso ntango nzoto ya mosuni ya Georgia etikaki kosala, tozalaki na bondimi ete akendeki mpenza kozala lokola molimo, mpe tondimaki tokozala elongo na ye seko soki tokangami na mayokani na biso ya tempelo. Bondimi na Mosikoli na biso mpe Lisekwa na Ye, bondimi na nguya ya bonganganzambe, mpe bongimi na kokangisama ya seko esalaki biso tosakola esakola na biso na bondimi.
Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki: “Soki osali malamu na yo koleka, ekosimba. Botia elikia na Nzambe. … Nkolo akotika biso te.”4
Esakola ya libota na biso elobi te, “Nionso ekosimbasikoyo.” Elobeli elikia na biso na mbano ya seko kaka te mbano ya sikoyo. Makomi elobi, “Boluka na etingia, bosambela ntango nionso, mpe bondima, mpe makambo nionso ekosala elongo mpo na bolamu na bino.”5 Elingi koloba nionso te eteezali malamu, kasi mpo na basokemi mpe bandimi, makambo—ya malamu mpe ya mabe—esalaka elongo mpo na malamu, mpe ntango ezali ya Nkolo. Tozelaki Ye, ntango mosusu lokola Yobo na mpasi na ye, koyebaka ete Nzambe “oyo azokisaka, mpe akangaka mpota: azokisaka, mpe maboko na ye ebikisaka.”6 Motema ya bosekomi endimaka momekano mpe kozela ntango ya libiko mpe lobiko oyo ekoya.
Ntango tomifungoli na Molimo, tokoyekola lolenge ya Nzambe mpe tokoyoka bolingi na Ye. Na ntango ya elambo, oyo nabengaka motema ya Saba, namoni ete nsima ya losambo mpo na bolimbisi ya masumu, ezali na litomba kotuna na Tata ya Lola, “Tata, ezali na likambo mosusu?” ntango tozali na bosekomi mpe na kimia, mayele na biso ekoki kokambama na likambo mosusu tosengeli kobongwana—likambo ezali kokanga bokoki biso ya kozwa bokambemi ya molimo to kutu libiki mpe lisungi.
Ndakisa, ntango mosusu nazali na nkanda moko ebombana mpenza mpo na moto moko. Ntango nasengi soki ezali na mosusu ya kotubela, “sekele” ekoya polele na mayele. Na bozindo, Molimo Mosantu ekolobaka na sese, “Otunaki na bosembo soki ezali na likambo mosusu, mpe yango oyo. Nkanda na yo ekokitisa bokoli na yo mpe ekobebisa bokoki na yo ya kozala na mikangano ya molamu. Okoki kotika yango esala.” O, ezali mosala ya makasi—tokoki koyoka tolongi na nkanda na biso—kasi komitika ya lolenge ya Nzambe ezali lolenge moko kaka mpo na esengo ya kowumela.
Na ntango mpe mokemoke, tokozwa bokasi mpe bokambemi ya kitoko—ntango mosusu komemaka biso na kokende na tempelo mbala na mbala to koyekola na mozindo mingi Bomikabi ya Mobikidi, to kosolola na moninga, na episikopo, mopesi toli ya mayele, to kutu monganga. Libiki ya motema ekobanda ntango tomitiki mpe tokumbameli Nzambe.
Bokumbami ya solo ekobanda ntango mitema na biso ekomi sembo liboso ya Tata mpe Mwana. Lolenge ya motema na biso ezali nini lelo? Likambo ya kokamwa, mpo na motema ya kobika mpe ya bondimi, tosengli kotika yango ebukana liboso ya Nkolo. “Okopesa lokola libonza epai na ngai motema moko ebukana mpe molimo ya mawa,”7 Nkolo asakoli. Mbano ya libonza ya motema, to bolingi na biso, epai ya Nzambe ezali bokambemi tosengeli na yango.
Ntango bososoli ya ngolu mpe mawa ya Nkolo ebakisami, tokomona ete mitema na biso ya komilinga ekobanda kopasuka mpe kobukana na botondi. Nde tokoluka Ye, kolingaka komikangisa Mwana Mobali Mobotami Se Moko ya Nzambe. Na kolukaka mpe komikangisaka ya motema na biso ebukana, tokozwa elikia ya sika mpe bokambemi ya sika na lisalisi ya Molimo Mosantu.
Nabundaki kolongola mposa na ngai ya kufa mpo na kosala makambo na lolenge na ngai, na nsuka nasosolaki ete lolenge na ngai ezali o na bozangi, ya kosuka, mpe na nse mingi mpenza ya lolenge ya Yesu Klisto. “Lolenge na Ye ezali nzela oyo ekomema na esengo na bomoi oyo mpe na bomoi ekoya.”8 Ekoki biso kolinga Yesu Klisto mpe lolenge na Ye koleka tolingaka biso moko mpe mposa na biso?
Mingi bakoki kokanisa bakoki ye mbala mingi mpenza mpe bamiyoki ya kolemba mpenza mpo na kobongola misala na bango ya masumu to bamposa na bango ya mokili. Nzokande, lokola Yisalaele ya liyokani, tokomeka mpe komaka kaka te na biso moko mpo na kobongwana. Soki na lokengo tobeleli Nzambe, Ye akokamata biso lokola tozali—mpe akokomisa biso koleka oyo tokanisaka mpenza. Moto ya mayele ya bonzambe Robert L. Millet akomaki etali “mposa ya kolongono mpo na komibongisa,” ekokisami na “elikia ya molimo ete na mpe kati ya Yesu Klisto tokokoka.”9 Na bososoli ya boye, tokoki na bosembo koloba na Tata ya Lola:
Boye kolikiaka mobimba na ngai na bolengeli na yo ya boboto,
Mpe koyebaka ete yo olingaka ngai,
Nakosala bolingi na yo na motema moko ya alima:
Nakozala nini yo olingi ngai nazala.10
Ntango tobonzi motema na biso epai ya Yesu Klisto, Ye akondima libonza na biso. Akozongisela biso. Kotala mpasi kani ya kobungisa te, ya kozoka, mpe ya kobwakisama toyoki, ngolu mpe libiki na Ye ezali na nguya koleka nionso. Soki tokangisami ya solo na Mobikisi, tokoki koloba na bondimi, “Nionso ekosalema.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.