Na Miso ya Nzambe
mpo na kosalisa basusu malamu mpenza, tosengeli komona basusu na miso ya moboti, na miso ya Tata ya Lola.
Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, natondi bino mpo bosungaki ngai lokola moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. Ezali mpasi koloba motuya kani yango elingi koloba mpo na ngai. Nazalaki mingimingi na botondi mpo na loboko ya lisungi ya basi babale ya kafukafu na bomoi na ngai, Ruth, mwasi na ngai, mpe mwana na ngai ya mwasi ya bolingo, Ashley.
Libiangi na ngai elakisi mpenza bosolo ya lisakola ya Nkolo ya ebandeli na eleko oyo: “ete litondi ya nsango malamu na ngai ekosakolama na batau mpe basokemi na bansuka ya mokili.”1 Nazali moko ya batau mpe basokemi wana. Bamibu zomi mileki ntango, nabiangemaki episikopo na palwais ya esiti ya Etazini, ndeko na ngai ya mobali, mwa nkulutu mpe na mayele koleka ngai, abengaki ngai na telephone. Alobaki, “Osengeli koyeba ete Nkolo abengi yo te na ntina ya likambo kani osalaki. Na likambo na yo, ezali ntango mosusu na ntina te ya oyo osalaki. Nkolo abengi yo mpo alingi kosala na nzela na yo, mpe yango ekoya bobele soki osali yango na lolenge na Ye.” Nayebi ete mayele oyo ewutaki na ndeko na ngai ya nkulutu ezali ya solo mpenza lelo.
Ntango mosusu likamwisi eyaka ya mosala ya misio ntango moto asosoli ete libiangi wana etali ye te; kasi, etali Nkolo, mosala na Ye, mpe bana ya Tata ya Lola. Nayoki yango ezali ya solo mpo na Apostolo. Libiangi oyo etali ngai te. Etali Nkolo, Mosala na Ye, mpe bana ya Tata ya Lola. Ata etinda to mosala kani ezali na Eklezia, mpo na kosala na esika, moto asengeli kosala koyebaka ete moto nionso okosalela “azali mwana ya molimo ya bolingo ya baboti ya lola, mpe, na boye … azali na lolenge mpe atandele bonzambe.”2
Na mosala na ngai ya kala, nazalaki monganga ya monene mpo na kosalisa bolembu ya mitema mpe kolongola yango. Elongo na bakono mingi oyo bazalaki na mpasi makasi. Mwasi na ngai asekaki ngai nakolobaka ete ezalaki elembo ya kolakelama mabe kozala moko ya moto ya maladi na ngai. Longola se matumboli, namonaki bato mingi kokufa mpe nakolisaki lolenge moko ya kozala mosika na mayoki ntango makambo ezalaki mabe. Na bongo, koyoka mwa mpe nkele elembisamaki.
Na 1986, elenge mobali moko na nkombo ya Chad azalaki na bolembu ya motema mpe esengelaki kalongola yango mbala na mbala. Azalaki malamu mibu zomi na ndambu. Chad asalaki nionso akokaki mpo na kotikala kolongono mpe kozala na bomoi moko ya malamu lokola akokaki. Asalaki misio, azwaki mosala, mpe azalaki mwana mobali ya botosi na baboti na ye. Na mwa mibu ya nsuka ya bomoi na ye, nzokande, ezalaki ya mikakatano, mpe azalaki kokota mpe kobima na lopitalo mbala na mbala.
Mpokwa moko, bamemaki ye na kisuku ya makama na lopitalo na motema ya kokangama mpenza. Baninga na ngai mpe ngai tosalaki ngonga molai mpo na kozongisa makila na ye etambola lisusu. Na nsuka, ekomaki polele ete Chad akoki kobika te. Totikaki bokasi na biso ya mpamba, mpe nasakolaki liwa na ye. Ata mawa mpe nkele, nakobaki na lolenge ya mosali. Nakanisaki na ngai moko, “Chad alengelamaki malamu. Azwaki mibu mingi ya bomoi koleka ye akolingaki kozala na yango.” Kozala mosika ya mayoki wana esilaki, nzokande, baboti na ye bakotaki na ekuke ya kisuku ya makama mpe bamonaki mwana na bango ya mobali oyo akufaki alalaki na mbeto. Na ngonga wana, namonaki Chad na miso ya mama mpe tata na ye. Namonaki elikia mpe bozeli monene bozalaka na yango mpo na ye, mposa bazalaki na yango ete akozala na bomoi ya mwa molai mpe ya mwa malamu koleka. Na bososoli wana, nabandaki kolela. Na kobaluka ya makambo ya liseki mpe na ekela moko ya boboto nakobosana mokolo moko te, baboti ya Chad babondisaki ngai.
Nasosoli sikawa ete na Eklezia, mpo na kosalisa basusu malamu mpenza, tosengeli komona basusu na miso ya moboti, na miso ya Tata ya Lola. Kaka nde ekoki biso kobanda kososola ntina ya solo ya molimo. Kaka nde ekoki biso koyoki bolengeli ya Mobikisi mpe na bango. Tokoki te mobimba kokokisa lotomo na biso toyokanaki oyo mpo na kolela elongo na baye bakolela mpe kobondisa baye bazali na mposa ya libondisi longola se soki tomoni bango na miso ya Nzambe.3 Komonela oyo ya monene ekofungola mitema na biso na nkele, bobangi, mpe mpasi na motema ya basusu. Kasi Tata ya Lola akosalisa biso mpe akobondisa biso, kaka lokola baboti ya Chad babondisaki ngai mibu mileki. Tosengeli kozala na miso oyo ekomona, matoyi oyo ekoyoka, mpe motema oyo ekoyeba mpe ekoyoka soki tosengeli kopesa libiki oyo elendisami mbala na mbala na Mokambi Thomas S. Monson.4
Kaka ntango tomona na miso ya Tata ya Lola tokoki kotondisama na “bolingo ya peto ya Klisto.”5 Mokolo na mokolo tosengeli kobondela Nzambe mpo na bolingo. Mormon alendekisi: “Yango wana, bandeko na ngai, bosambela na Tata na bokasi nionso ya motema, ete botondisama na bolingo, oyo atii likoli ya banso oyo bazali balandi ya solo ya mwana na ye ya mobali, Yesu Klisto.”6
Na motema na ngai mobimba nalingi kozala molandi ya solo ya Yesu Klisto.7 Nalingaka Ye. Nakumbamelaka Ye. Natatoli bosolo ya Ye ya bomoi. Natatoli ete Ye azali Mopakolami Se Moko, Masiya. Nazali nzeneneke moko ya ngoly, mawa, mpe bolingo na Ye. Nabakisi litatoli na ngai oyo ya Bapostolo, na mobu 2000, basakolaki “ete Yesu azali Klisto ya Bomoi, Mwana Mobali ya Nzambe Azanga Kufa. … Ye azali pole, bomoi, mpe elikia ya mokili.”8
Natatoli ete mokolo moko na 1820 na zamba ya bule na New York, Nkolo mosekwi abimelaki, elongo na Nzambe, Tata na biso ya Lola, epai ya profeta Joseph Smith alobaki. Basali Bafungula ya Bonganganzambe ezali na mabele lelo mpo na ekokisa makuli ya kobikisa mpe konetola. Nayebi yango. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.