2010–2019
Tala Mama na Yo
sánzá ya zómi 2015


Tala Mama na Yo

Bolingo te na bokufi ekomi penepene na mingi mpo na kokokana na bolingo ya peto ya Yesu Klisto koleka bolingo ya moyimi te ya mama amipesa azali na yango mpo na bana na ye.

Tokoki biso nionso elongo kotombela Mpaka Ronald A. Rasband, Mpaka Gary E. Stevenson, mpe Mpaka Dale G. Renlund mpe balongani na bango wives na lisanga kitoko oyo bakoki kokanisa te.

Kosakolaka Bomikabi ya Mobikisi Yisaya akomaki, “Ye amemaki mpasi na biso, mpe akumbaki mawa na biso.”1 Limoni moko ya lipombo ya mokolo ya nsuka ebeti nsete ete “[Yesu] ayaki na mokili … mpo na komema masumu ya mokili.”2 Makomi ya kala mpe ya sika etatoli ete “asikolaki yango, mpe akumbaki yango mikolo nionso ya kala.”3 Loyembo moko elingama mingi ebondeli na biso “yokamela mongongo monene ya Mobikisi na yo!”4

Komema, kokumba, kobikisa. Maloba oyo ezali ya nguya mpe koningisa ya motema etali masiya. Ekopesa lisungi mpe elikia. Ekomema elaka ya kotambola na kimia uta epai tozali kino wapi tosengeli kokende—kasi tokoki te kokoma kuna, na kozanga lisalisi. Na polele oto ezali maloba ya pete te mpe ya mpamba te; elakisi mokumba mpe etumba, bolembu mpe mpasi. Na bongo elongobani mingi na kolimbola misio na Ye oyo, na ntalo moko ekoki kolobama te, atombolaki biso ntango tokweyaki, akumbaki biso liboso ntango bokasi na biso esilaki, abikisaki biso na ndako ya kimia ntango kimia emonanaki mosika na biso.. “Tata na ngai atindaki ngai,” Ye alobaki, “ete nakoka kotombolama likolo ya ekulusu; ete lokola natombolami … kaka bongo bato bakoka kotombolama … epai na … ngai.”5

Kasi bokoki koyoka na lokota mosusu oyo esika ya masano mosusu ya makasi ya bato wapi esika tolobelaka lisusu maloba lokoka komema mpe kokumba,konata mpe kotombola,mosala mpe etumba? LokolaYesu alobaki na Yoane ntango azalaki mpenza kosala Bomikabi, bongo Ye alobaki na biso banso, “Tala mama na yo!”6

Mokolo ya lelo nasakoli uta na etando oyo nini elobama liboso: ete bolingo te na bokufi ekomi penepene na mingi mpo na kokokana na bolingo ya peto ya Yesu Klisto koleka bolingo ya moyimi te ya mama amipesa azali na yango mpo na bana na ye. Ntango Yisaya, azali koloba na oyo etali masiya, alingaki kolobela bolingo ya Yehova, alobalaki elili ya bomipesi ya mama moko. “Ekoki mwasi kobosana mwana akomela mabele?” ye atuni. Bolole kani, alingi koloba, atako ezalaki bolole te kokanisa Klito akobosana biso ntango nionso.7

Lolenge oyo ya bolingo ya makasi “ezali motema pete, mpe ezali na, … ekolukaka te bolamu na yango moko, … kasi … ekomemaka makambo nionso, ekondimaka nionso, ekolikiaka nionso, ekoyika mpiko na nionso.”8 Nionso ezalaka malamu, lolenge ya bosembo ya boye “ekweyaka te.”9 “Mpo bangomba minene ekolongwa mpe bangomba mike ekolimwa, “Yehova alobaki, “kasi boboto na ngai ekolangawa te na bino.”10 Bongo lisusu ekoloba bamama na biso.

Bomoni, ezaki kaka te ete bamemaka biso, kasi bakobaka komema biso. Ezali kaka te komema ya yambo ya mbotama kasi komema ya bomoi mobimba oyo esali kimama ezala nsomo boye. Ya solo, ezali na baoyo tokoki kolongola, kasi bamama mingi koleka bayebi na motema, na kati na bango ete ezali mokumba moko ya bule ya mpete ya likolo koleka, mpe kilo ya mosala wana likolo ya ntango mosusu mapeka ya bamama ya bilenge ekoki na ngonga moko kobangisa mpenza.

Elenge mama moko ya kokamwa kala te akomelaki ngai: “Boniboni ezali ete moto moko akoki kolinga mwana moko na mozindo boye ete ondima kotika eteni moko monene ya bonsomi na yo mpo na ye? Boniboni ekoki bolingo ya kufa kozala makasi boye ete olinga komitika na mokumba, likama, kobangabanga, mpe mpasi na motema mpe kaka kokoba kozonga mpo na mingi na wana kaka? Lolenge kani ya bolingo ya kufa ekoki kosala yo oyoka, ntango ozali na mwana, ete bomoi na yo ezali lisusu ata moke te ya yo moko? Bolingo ya mama esengeli kozala ya bonzambe. Botindiki mpe eyano ya kososola te ya boye ekoki te kozala ya mokili oyo. Ntango mosusu biso bamama toyebi mpenza te tosengeli na nini, kasi toyebi ezali ndambo ya mosala ya Klisto. Yango kaka esengeli ekoki koyebisa biso mbano ya bolingo ya boye ekozala katikati ya oyo ekoki komemama mpe oyo eluti, mbala na mbala lisusu, kino na kimia mpe lobiko ya mwana ya nsuka mpenza na mabele,tokoki [sima] tokoki koloba elongo na Yesu, ‘[Tata!] nasilisi mosala oyo epesaki ngai nasala.’11

Na ntoki ya oyo mokanda wana elamusi na mayele na ngai, tika nakabola makambo misato oyo ekolakisa mbano ya lokumu ya bamama, etatolamaki na mosala na ngai kaka na mwa baposo eleki:

Lisolo na ngai ya yambo ezali ya moko, ekundolisaka biso ete ezali te bokasi ya mama ezali na buku ya lisolo ya nsuka, na yango na mbala moko te. Yango ekundolisi ntina moko utra na lisolo na ngai na molingami moninga moko ya mibu koleka 50 oyo akufaki libanda mosika ya Eklezia oyo ayebaki na motema na ye bosolo. Totala te bambala boni nalendisaki ye. Nakokaki te komona lokola namemelaki kimia. Na nsuka alobelaki ngai, “Jeff,” alobaki “atako ekozala mpasi mpo na kotelema liboso ya Nzambe, nakoki te komema likanisi ya kotelama liboso ya mama na ngai. Nsango malamu mpe bana na ye bazalaki na ntina nionso mpo na ye. Nayebi nabuki motema na ye, mpe ete yango ezali kobuka motema na ngai.”

Sikawa, nazali na kondima likolo ya liwa na ye, mama na ye ayambaki moninga na nagi na motema moko, na bolingo; oyo ezali makambo baboti basalaka. Kasi eteni ya ntina ya lisolo ezali ete bana mibali bakoki kobebisa mitema ya bamama na bango. Awa mpe lisusu tomonaka bokeseni mosusu na bonzambe. Nalingi tomikundola ete Yesu Klisto akufaki na motema ebukana, moko na bolembo mpe bobebisami mpo na komema masumu ya mokili.bongo na ntango nionso ya momekano, tokoki “botala bamama [na]biso” kaka bobele Mobikisi na biso mpe likabo na bango nionso mibale bolozi ya masumu na biso.

Ya mibale, nakolobela etali elenge mobali moko oyo akendeki na esika ya misio kasi na mokano ya ye moko azongaki ndako noki mpo na mposa ya mibali na mibali mpe mwa mabe ayokaki mpo na yango. Azalaki naino ya kolongobana, kasi bondimi na ye ezalaki ya kokita, mokumba na ye ya mayoki ekomaki kilo koleka, mpe mpasi na ye ya molimo ezalaki ya mozindo mingi mpenza. Ye lisusu azwaki mpasi, mobulu, nkanda mpe mawa.

Mokambi ya misio, Mokambi ya likonzi na ye, mpe episikopo na ye balekisaki bangonga ya kotanga te kolukaka mpe kolelaka mpe kopambolaka ye lokola bazalaki kokangama na ye, kasi mingi ya mpota na ye ezalaki ya moko kaka boye ete abombaki ata ndambo ya yango mosika na bango. Tata ya bolingo na lisolo oyo asopaki molimo na ye mobimba na kosungaka mwana na ye, kasi makambo ya mosala na ye ya makasi elingaki koloba ete mbala mingi babutu ya molimo ya molai, ya molili, ebundisaki kaka mwana mobali oyo mpe mama na ye. Na moi mpe na butu, yambo mpo na baposo, nsima mpo na basanza oyo ebongwanaki mibu, balukaki libiki mpe kolongono elongo. Na bileko ya bolobo (mingimingi ya ye ntango mosusu ya mama na ye) mpe kobanga ya nsuka te (mingimingi ya ye ntango mosusu ya mama na ye), apesaki—ezali lisusu liloba ya kitoko, ya kilo—na mwana na ye litatoli ya nguya ya Nzambe, ya nsango malamu na Ye, ya Eklezia na Ye kasi mingimingi ya bolingo na Ye mpo na bana oyo. Na bofuli moko atatolaki bolingo na ye moko ya kolemba te, ya kokosa te, ya kokufa te lokola mpo na ye. Mpo na komema elongo makonzi mibale oyo ya ntina eluti—nsango malamu ya Yesu Klisto mpe libota na ye—asopaki molimi na ye na losambo na kolemba te. Akilaki mpe alelaki, nsima ayokamelaki mpe ayokamelaki lokola oyo mbala na mbala elobelaki ye ete motema na ye ebukanaki mpenza. Yango wana amemaki ye—lisusu—kaka mbala oyo ezalaki te mpo na basanza libwa. Mbala oyo akanisaki ete kosalaka na katikati ya zamba ya etumba ya kozanga elikia elingaki kozala ya libela.

Kasi na ngolu ya Nzambe, molende na ye moko, mpe lisungi ya bayangeli ebele ya Eklezia, baninga, baye libota, bato ya mayele, mama oyo ya motungisi amonaki mwana mobali na ye azongaki ndako na mboka ye elaka. Na mawa toyebaki ete lipamboli moko ya boye ekomeli, to ata esilaki komela te baboti banso oyo bazali na nsomo lokolo ya bizaleli ya ndenge na ndenge ya bana na bango, mpe, mposa ya mibali na mibali ebongwanaki ata moke te—moko te aalongaki elingaki kobongwan. Kasi moke na moke, motema na ye ebongwanaki.

Abandaki kozonga na eklezia. Aponaki kondima kolia elambo na bolongobani. Azwaki lisusu ndingisa ya tempelo mpe andimaki libiangi ya kosala lokola moteyi ya seminele ya ntongontongo, wapi azalaki na elonga. Mpe sikawa, nsima ya mibu mitano na bosengi na ye moko mpe na lisalisi ya Eklezia, azongaki na esika ya misio mpo na kosilisa mosala na ye na Nkolo. Nalelaki na mpizoli mingi koleka nakoki koloba likolo ya mpiko, bosembo, mpe molende ya elenge mobali mpe libota na ye oyo mpo na kosilisa makambo mpe kosunga ye abatela bondimi na ye. Ayebi ete asengeli mingi mpenza na bato mingi mpenza, kasi ayebi ete asengeli mingi koleka na bilonga ya Masiya na bomoi na ye, mibale oyo bamemaki ye mpe bakumbaki te, basalaki elongo na ye, mpe babikisaki ye—Mobikisi na Ye, Yesu Klisto, mpe mama na ye ya molende, ya mobikisi, ya bosantu eluti.

Na nsuka, oyo ewuti na bobulisi lisusu ya Tempelo ya Mexico City n amboka Mexico kaka baposo misato eleki. Ezali kuna elongo na Mokambi Henry B. Eyring nde tmonaki moninga na biso ya bolingi Lisa Tuttle Pieper atelemaki na molulu ya kobulisa wana ya kitoko. Kasi atelemaki na mpasi mpamba te na loboko moko azalaki momema na nzoto kilo mobimba ya mwana mwasi na ye ya bolingo kasi ya momekano ya monene, Dora, ntango na loboko mosusu azalaki komeka kosimba loboko ya mobali esalaka te ya Dora boye mwana mwasi ya botau kasi ya kitoko ya Nzambe akokaki koningisa mosualu ya mpembe mpe, na mongongo moko ya kososola te kasi mpe banzelu ya lola etonda na bondimi koganga makasi, “Hosanna, hosanna, hosanna na Nzambe mpe Mpate.”12

Na bamama bipai binso, kala, lelo, mpe mikolo mikoya, napesi longonia. Botondi na bino. Botondi na bino mpo na kobota, mpo na kosala milimo, mpo na kosala bomoto, mpe mpo na kolakisa bolingi ya peto ya Kliso. Na Mama Ewa, na Sala, na Lebeka, na Laele, na Malia ya Nasalete, mpe na Mama na Lola, nalobi botondi na bino mpo na mosala na bino ya ntina mpenza na kokokisa ntina ya boseko. Na bamama banso na bisika nionso, lokola baye bazali kobunda—mpe banso— nalobi, “Bozala na kimia. Bandimi ya Nzambe mpe bino moko. Ya solo, bozali kosala malamu koleka oyo bokanisi bozali. Bozali babikisi na Ngomba Siona,13 mpe bolingo na bino ‘ekolemba mokolo moko te.’14 ” Nakoki kopesa longonia eleki monene na moto. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.