2010–2019
Ozali Yomoko te kati na Mosala
sánzá ya zómi 2015


15:48

Ozali Yomoko te kati na Mosala

Ntango ozali kolongua wuta na mosala ya bonganganzambe moko mpo na kokende na mosusu, yo okomona Nkolo azali na mosala elongo na yo.

Bandeko mibali, tozali na botondi monene ya ete Nkolo abiangi Mpaka Ronald A. Rasband, Mpaka Gary E. Stevenson, mpe Mpaka Dale G. Renlund lokola Bapostolo ya Nkolo Yesu Klisto. Mitema na biso, mabondeli na biso, mpe bondimi na biso esungi bango.

Toyebi makoki monene na bango. Lisusu, bakozala na bosenga ya elikia na mabiangi na bango, lokola biso nyonso, ete Nkolo azali na bang na mosala na Ye. Diakona ya sika mpe asengeli na elikia wana, lokola mingi ya banganganzambe minene ya mayele oyo bayambi libiangi ya sika.

Elikya wana ekolaka ntango toye komona ete Ye abengaki yo na nzela ya basali na Ye. Bopesi makasi na ngai ezali mpo na kosalisa bino ete ntango okosala eteni na yo, Nkolo abakisa nguya na Ye na bokasi na yo.

Libiangi nyonso tozwaka na bokonzi ya Nkolo esengi mingi koleka bososoli na biso ya kibomoto mpe nguya na biso ya moto se yemoko. Mabiangi yango esengi lisungi kowuta na Nkolo, yango ekoya. Kutu diakona ya sika akoyekola oyo ezali ya solo, mpe akokoba koyekolaka mibu na mibu.

Moko ya bankoko na ngai ya mibali azali awa na mpokwa na liyangani na ye ya liboso ya bonganganzambe. Ye akulisamaki diakona mikolo motoba eleki. Akoki kokanisa ete mosala na ye ya liboso na bonganganzambe ekozala kokabola elambo eyenga ekoya. Losambo na ngai ezali ete akomona ngonga wana lokola yango ezali mpenza.

Akoki kokanisa ete mosala na ye ya liboso na bonganganzambe ekozala kokabola elambo na bato bafandi na liyangani ya elambo. Kasi ntina ya Nkolo ezali kaka te kosala ete bato balia limpa na mayi te. Yango ezali mpo ete na bango babatela liyokani moko oyo ekomema bango liboso na nzela bomoi ya seko. Mpe mpo na oyo ekoya, Nkolo asengeli kopesa mayele moko ya molimo na moto oyo diakona apesi plato.

Namoni yango kokoma na lopitalo ntango diakona moko atengamaki liboso mpo na kolekisa sani na muasi moko ya nsuki pembe. Atalaki limpa lokola soki ezalaki motuya. Nabosani mokolo moko te koseka na ye ya muke ntango aliaki mpe atombolaki loboko mpo na kobeta moke moto ya diakona, kolobaka na mongongo makasi, “O, natondi yo!”

Diakona wana azalaki kokokisa na pete mosala na ye ya bonganganzambe. Lisusu Nkolo abongolaki ekela ya diakona. Emonanaki ete ndeko muasi akanisaki Mobikisi lolenge alakisaki botondi na ye ya bosembo mpo na mosala moko ya diakona. Azuaki elikia ete lokola ye akabolaki elambo epai na ye ete ye akokaki akozua Molimo elongo na ye. Azalaki ye moko te mokolo wana na lopitalo yango. Diakona azalaki ye moko mpe te na mosala na ye ya komikitisa.

Moteyi moko ya elenge na Bonganganzambe ya Alona akoki komona ntina te, ntango akeyi koteya libota moko, ete azali moninga ya mosala na Nkolo na mosala na Ye. Nakobi kokanisa litatoli moke ya moninga ya elenge moteyi na libota oyo ayaki na ndako na biso. Molimo endimisaki maloba na ye. Akoki kokanisa te mokolo yango, kasi ngai nakanisaki.

Nkolo akokolisa bokasi ya elenge mobali lisusu ntango ye abengami kokoma nganganzambe. Libatisi ya liboso akokisaki ntango mosusu mpo na elenge moke ayebi yango te. Akokaki komitungisa na ntina ya soki akoloba maloba esengeli mpe okokisa likuli na malamu mpenza.

Kasi Nkolo, oyo ye azali mosali, akokumisa komipesa na ye. Moto oyo ye abatisaki aponaki kotambola na nzela ya bomoi ya seko. Nkolo akosala eteni na Ye ya monene. Ye asalaki yango mpo na ngai mbala moko ntango elenge mobali nabatisaki, mpizoli kokitaka na elongi na ye, alobaki na litoyi na ngai, ‘‘napetuami. Napetuami’’

Ntango bozali kolongua wuta na mosala ya bonganganzambe moko mpo na kokende na mosusu, bokomona Nkolo azali na mosala elongo na bino. Nayekolaki yango wuta na kokutanaka mokambi moko ya lisanga likoki ya bampaka na likita ya likonzi moko mibu eleki. Na likita yango ezalaki ebele koleka bankombo 40 oyo elakisamaki ya mibali oyo basengelaki kozwa Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Mokambi ya likonzi atengamaki likolo na ngai mpe alobaki na mongongo moke, ‘‘Mibali oyo nyonso bazalaki bampaka ya mikolo ekoya ya mosala moke.’’ Na kokokamwa, natunaki mokambi nini ezalaki pologalami na ye mpo na kobikisa mibali wana.

Ye alakisaki mosapi na elenge mobali moko na nsuka ya ndakonzambe. Alobaki, “Ye wana kuna. Ebele ya mibali wana bazongisamaki mpo na mokambi ya lisanga likoki ya bampaka wana.’’ Azalaki na molongo ya nsuka, alati bongo na bongo, makolo na ye ya kotandolama na basapato na ye minene ezingami liboso na ye.

Nasengaki mokambi ya likonzi okutanisa ngai na ye nsima ya likita. Ntango tokutanaki, nalobaki na elenge mobali ete nakamuaki mingi na oyo ye asalaki mpe natunaki ye lolenge nini asalaki yango. Atombolaki mapeka na ye. Akanisaki te solo ete asengelaki kondimama.

Nsima alobaki na pete nyoso, ‘‘nayebi mibali ebele oyo balembi na mboka oyo. Mingi kati na bango bazali na mituka. Ngai mpe nazali na motuka. Nasokolaka motuka na ngai epai wapi bango mpe basokolaka ya bango. Ntango mosusu, bakomaka baninga na ngai.

“Bongo nazelaki tii eloko moko ebeba na babomoi na bango. Yango esalamaka ntango nyonso. Bayebisaka ngai oyo etali yango. Nayokaka mpe namonaka mbeba te. Nde, ntango baloba, ‘Ezali na mbeba moko na bomoi na ngai. Esengelaki kaka ezala eloko moko ya malamu koleka oyo,’ Nayebisaki bango nini ezalaki kozanga mpe wapi bango bakoki kozua yango. Bantango mosusu bango bandimaka ngai, mpe soki bandimi, namemaka bango elongo na ngai.”

Okoki komona mpo na nini azalaki ya komikitisa. Ezalaki mpo ete ye ayebaki ete asalaki ndambo na ye ya moke mpe Nkolo azalaki kosala oyo etikalaki. Ezalaki Nkolo nde asimbaki mitema ya mibali wana na mitungisi na bango. Ezalaki Nkolo nde apesaki bango liyoki ete esengeli kozala kuna na eloko ya malamu koleka mpo na bango mpe balikiaki ete bakoki komona yango.

Elenge mobali, oyo—loloka yo—azalaki mosali moko ya Nkolo, na pete nyonso andimaki ete soki ye asali eteni na ye ya moke, Nkolo akosunga mibali wana na nzela ya ndako mpe ya esengo oyo kakaYe akoki kopesa bango. Mobali oyo ayebaki lisusu ete Nkolo abengaka ye lokola mokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpo ete ye akosala ndambo na ye.

Ekozala na bantango ya mosala na bino oyo bokoki kozua bilonga ya kokamuisa to ya komonana ya mokambi ya lisanga likoki ya bampaka wana te. Wana ezali ngonga oyo ntango bokosengela kozala na kondima ete Nkolo, ayebi ete bino bolingi kosala ndambo na mosala, abengaki bino na nzela ya basali na Ye bapesameli ndingisa. Kozalaka na bondimi na libiangi ya basali na Nkolo ezali ntina na mosala ya misio ya nkokololo na ngai Henry Eyring.

Abatisamaka na sanza ya misato 11, 1855, na St. Louis Missouri. Erastus Snow akulisaki ye na mosala ya nganganzambe ntango moke nsima na wana. Mokambi ya Likonzi ya St. Louis, John H. Hart, abiangaki ye kosala etinda moko na 6. Ye akulisamaki mpaka na sanza ya zomi 11. Alonguaki likolo ya mokongo ya mpunda mpo na Misio ya Cherokee na sanza ya zomi 24. Ye azalaki na mibu 20 mpe mobonguani ya basanza kaka sambo.

Soki mosimbi nini ya bonganganzambe azalaki na ntina moko ya komiyoka ya kolongobana te to ya komilengela te, ezalaki Henry Eyring. Ntina moko kaka ekokaki kopesa ye makasi ya kokende ezalaki ete ye ayebaki na motema na ye ete Nzambe nde abengaki ye na nzela ya basali na Ye bapesameli ndingisa. Yango ezali liziba ya bokasi na ye. Wana esengeli ezala liziba ya bokasi ya koyika mpiko, ata lolenge nini mabiangi na biso na bonganganzambe ezali.

Nsima Mpaka Eyring asalelaka Nzambe mpo na mibu misato ya mikakatano mpe na liwa ya mokambi ya misio, Henry abiangemaki mpe asungamaki lokola mokambi ya misio na  liyangani moko esalemaki na sanza ya zomi 6, 1858. Akamuaki mpe apasukaki motema lokola diakona ya sika akoki kozala. Akomaka, “Ekokaki kondimama te na ngai kobiangama na mosala monene ya boye kasi lokola ezalaki mposa ya bandeko mibali nandimaki na esengo makasi, koyokaka na ngonga moko wana bolembu na ngai monene mpe bozangi ya mayele ya mosala.’’1

Mokambi Eyring ya sikoyo akendaki mobembo na mboka Cherokee, Crèce, mpe Choctaw na 1859. Na nzela ya bokasi na ye, Nkolo “abakisaki” lokola Henry akomaki; “motango moko na eklezia.” Abongisaki bitape mibale kasi ayebaki ete “moke mpenza bazali na bomoi na ntina yango.” 2

Mobu moko nsima, Henry akutanaki na mokakatano ya solo ete batambuisi ya politiki na kati ya bato azalaki kosaleka bapesaki lisusu te nzela na bamisionele ya Bansantu ya Mikolo ya Nsuka kosala. Lokola azalaki komanyola lolenge nini asengelaki kosala, ye akundolaki ndingisa kowuta na mokambi na ye ya misio ya liboso koyebisaka ye ete asengeli kokoba na etinda na ye tii na 1859. 3

Na sanza ya zomi ya mobu wana, Henry akomelaki Mokambi Brigham Young mpo na kozua ndingisa, kasi azuaki eyano te na motuna . Henry akomaki, “Kozalaka na makoki te ya koyoka eloko moko kowuta na Bokambi ya Eklezia, nabengaki Nkolo na losambo, kosengaka ye abimisela ngai makanisi mpe bolingi na ye kotalaka molai ya kotikala to ya kokende na ngai tii na Siona.”

Akobaki: “Liloto oyo elandi epesaka eyano na libondeli na ngai, nalotaki ete nakomaka na [Salt Lake] City mpe mbalamoko nakendaki na bilo ya [Mokambi Brigham] Young, kuna nakutaki ye. Nalobaki na ye: ‘[Mokambi] Young natiki etinda na ngai, nazongi na ndingisa na ngai moko, kasi soki ezali na likambo ya mabe na yango, nakolinga kozonga mpe kosilisa etinda na ngai.’ [Na kati ya ndoto profeta] azongisaki: ‘Otikalaki ngonga molayi ekoki, yango ezali malamu.’ ”

Henry akomaki na zulunale na ye, “Kozuaka bandoto liboso oyo ekokisama mobimba nazali na bondimi ya kondima, ete oyo mpe ekozala mpe nabandaki na mbala moko komibongisa mpo na kobanda.”

Akomaki na Salt Lake City na sanza ya mwambe 29, 1860, kotambolaka makolo mingi koleka ya nzela. Mikolo mibale nsima, akendaki makolo na bilo ya Mokambi Brigham Young.

Henry alimboli mayele wana na maloba oyo: “[Ngai] nabiangamaki na [Mokambi] Young, oyo ayambaki [ngai] na boboto mpenza. Nalobaki na ye, ‘[Mokambi] Young nazongi ya kotindamaka te mpo na yango, soki nasalaki mabe, nalingi kozonga mpe kosili sa etinda na ngai.’ [Brigham Young] ayanolaki: ‘Nyonso ezali malamu, tozalaki koluka yo.’”

Henry alimbolaki esengo na ye, kolobaka, “Boye liloto na ngai ekokisamaki mpenza.” 4

Esengo na ye eyaki uta na kondimisama ete Nkolo azalaka kosala elongo na ye mpe kotalaka ye. Ye ayekolaki nini ezali solo mpo na biso banso—ete basali ya Nkolo bafulami mpo na koyeba bolingi ya Nkolo. Mpe Henry Eyring andimaka oyo nayebi mpe lokola: ete profeta, lokola mokambi ya bonganganzambe, afulami na Nzambe mpo na kotala mpe kobatela mpo na basali na Nkolo mpe kobianga bango.

Atako libiangi na yo nini na bonganganzambe, okoki kozala na ngonga moko koyoka Tata na Lola azalaki pembeni na yo te. Okoki kobondela mpo na koyeba bolingi na Ye, mpe na mposa ya solo ya kosala nyonso Ye akosenga yo kosala, yo okozua eyano.

Tata na Lola akopesa yo makoki ya koyoka ete Ye ayebi yo, ete Ye asepelaka na mosala na yo, mpe ete ozali kokoma ya kolongobana na boyambi kouta na Nkolo ozali kolinga mpenza koyoka: “Malamu, mosali malamu mpe sembo ; ozalaki sembo na makambo mike, nakotia yo likolo na mingi, yingela na esengo na nkolo na yo.”5

Ezali libondeli na ngai ete mosimbi nyonso ya bonganganzambe atanda loboko na bondimi mpo na kobikisa molimo nyonso oyo ye azui mokumba. Nzambe akobakisa nguya na Ye na babokasi ya basali na Ye. Mitema ya bato ekosimbama mpo na kosala maponi oyo ekomema bango na nzela ya nsango malamu tii na esengo mpe mosika wuta na mpasi.

Oyo ezali libondeli na ngai lokola mpe ete mosimbi nyonso ya bonganganzambe akoyoka bolingo mpe botali ya kobatela ya Tata ya Lola, ya Mobikisi, mpe ya profeta ya Nzambe na libiangi na ye na bonganganzambe.

Napesi bino litatoli na ngai ya kafukafu ete tozali na mosala ya Nkolo Yesu Klisto mosekwi. Natatoli ete Ye abiangi bino mpe ngai na mosala na Ye koyebaka makoki na biso mpe lisungi tokozala na yango bosenga. Akopambola babokasi na biso koleka bozeli na biso ya kati ntango topesi mobimba na biso na mosala na Ye. Natatoli ete profeta ya Nzambe, oyo azali mokambi ya bonganganzambe nyonso na mabele, afulami na Nzambe.

Nazali na botondi mpo na bandakisa ya bosembo ya basimbi ya bonganganzambe bisika nyonso. Tata na Lola mpe Mobikisi bazali na botondi ete bino bosala eteni na bino. Bango bayebi bino mpe balingi bino. Na nkombo ya Yesu Klisto.amene.

Matangi

  1. Mokanda ya Henry Eyring epai ya Brigham Young, sanza ya zomi 7, 1858, Brigham Young Office Files, Church History Library Salt Lake City.

  2. Rapport ya Henry Eyring epai ya Church Historian’s Office, sanza ya mwambe 1860, Missionary Reports, Church History Library, Salt Lake City.

  3. Tala mokanda ya Henry Eyring epai ya Brigham Young, sanza ya Zomi. 9, 1859, Brigham Young Office Files, Church History Library, Salt Lake City.

  4. Makundoli ya Henry Eyring, 1896, ebetami na masini. 27–28. Church History Library. Salt Lake City.

  5. Matai 25:23.