Bolamu ya Liloba ya Nzambe
Bolamu ya maloba ya Nzambe ezali kolakisa biso mposa ya bokobi ya boyamboli kati na bomoi na biso na yango tokoki kobatela bozalani ya Molimo Mosantu
Mingi kati na biso baoyo tokutani mpo na kosangana kati ya likita oyo toye “koyoka bolamu ya Liloba ya Nzambe, iyo, Liloba oyo ekawusaka mpota ya molimo” (Jacob 2:8). Liloba yango tokoki kokuta yango kati ya makomi mpe na bansango kowuta na bakambi na biso, ememelaka biso elikia mpe bolendisi kati ya molili ya mawa.
Na nzela ya boyebi na biso kati ya bomoi, toyekolaka ete esengo kati ya mokili oyo yango ekoki kaka te, kasi kati na Yesu Klistu esengo na biso ezali ya kokoka (tala D&A 101:36). Akopesa biso bokasi na yango tokonyokwama atako lolenge moko te ya mpasi longola se soki maminamaki mpenza na bosepeli na Ye (tala Alma 31:38).
Mitema na biso ekoki kotondisama na mitungisi ya makasi ntango tomoni moko na biso ya bolingo kati na mpasi ya maladi mabe.
Liwa ya moto moko oyo tolingaka ekoki kofanda kati ya makanisi na biso.
Ntango moko ya bana na biso abungi nzela ya nsango malamu, tokoki koyoka mpasi mpe kozanga kondimisama na oyo etali lobi na bango ya libela..
Elikia ya kosala libala ya selesitiale mpe kosala libota moko kati ya bomoi oyo ekoki kobanda kokita lokola ntango ezali kokende.
kobebisama na baoyo balakisi lokola balingi biso ekokoki kotika bilembo ya mpasi mpenza kati ya milimo na biso.
Bobuki elako ya molongani ekoki kobebisa bozalani oyo tobanzaki ekoki kotikala libela.
Oyo mpe ebele ya mawa misusu oyo ezali lolenge moko na bomoi na biso awa na mabele ntango mosusu etindaka biso tomituna motuna moko oyo Profeta Joseph Smith atunaki: “O Nzambe, ozali wapi?” (D&A 121:1).
Kati ya bangonga yango ya mpasi na bomoi na biso, Liloba malamu ya Nzambe ekawusaka mpota ya molimo ememaka nsango elandi ya bolendisi na motema mpe makanisi na biso:
“Kimia ezala kati ya molimo na yo; motungisi na yo mpe bampasi na yo ekozala bobele mpo na ntango moke;
“Mpe sima soki okangi motema kino na nsuka, Nzambe akotombola yo likolo” (D&A 121:7–8).
Bolamu ya Liloba ya Nzambe etondisaka elikia kati na biso, mpo ete toyebi ete baoyo bakozala na bondimi na ntango ya mitungisi bakozwa lifuti monene na bokonzi ya lola mpe ete “na sima ya mitungisi mingi mingi mapamboli ekoya” (tala D&A 58:3–4).
Bolamu ya Liloba ya Nzambe, elobami na nzela ya baprofeta, epesaka biso bobatelami oyo bokangami na biso ya libela, esungami na bondimi na biso ya bilaka ya bonzambe oyo epesamelaki biso mpo na mosala na biso ya mpiko na ntina ya bosolo, ekopambola biso mpe bana na biso (tala Orson F. Whitney, na Conference Report, Sanza ya minei. 1929, 110).
Yango epesaka biso lisusu bobatelami ete, sima ya biso kozala na bomoi ya bondimi, tokobungisa atako lipamboli moko te mpo na kozanga kosala eloko moko soki topesamaki ata mokolo te libaku ya kosala yango. Soki tobatelaki bondimi na biso kino na mokolo ya liwa na biso, to “kozwa mapamboli nionso, bonetoli, mpe nkembo oyo mobali moko te to mwasi moko [oyo naino azwa libaku] wana te.” (Tala Mateya ya Lorenzo Snow, ed. Clyde J. Williams [1984], 138.)
Sikawa, ezali na ntina ya kososola ete mpasi mpe mawa ekoki koyela biso na bomoi soki tozangisi boyamboli ya solo ya masumu na biso. Mokambi Marion G. Romney ateyaki yango na Liloba elandi: “Mingi ya bampasi mpe minyoko oyo batu bazali kokutana nango na mabele oyo ezali eyano ya bozangi boyamboli mpe bozangi bolimbisi ya masumu. … Bobele lokola mpasi mpe mawa esungi masumu, bongo bosepeli mpe esengo esungi bolimbisami ya masumu (na Rapport de Conference, Sanza ya minei. 1959, 11).
Mpo na nini bozangi ya boyamboli ememaka mpasi mpe minyoko?
Moko ya biyano malamu ezali ete “etumbu [ezalaki] ya kobakisama, mpe mobeko ya boyengene epesamaki, oyo emamaki [na ntina] botukami ya makanisi” (Alma 42:18); tala lisusu eteni ye 16. Profeta Joseph Smith ateyaki ete tozali baoyo bazali komikitisa mpe yango ezali kotumola boyokisami motema mpasi kati ya makanisi na biso oyo esalaka yango kokoma makasi lokola liziba ya moto mpe putulu ekopelisa moto (tala Enseignements des President de l’Eglise: Joseph Smith [2007], 224).
Soki totondisi mayele na biso na komeka na “komitia [mokalo] na ntina ya [masumu] na biso” (Alma 42:30) to na komekaka kobomba yango, eloko moko tokokokisa ezali ya kotuka Molimo (tala D&A 121:37) mpe kopusa boyamboli na biso. Eteni oyo ya bosungi, na ngambo ya kozala na nzoto, na nsuka ekomema mpasi koleka mpe ngambo kati ya bomoi na biso mpe ekokitisa makoki na biso ya kozwa bolimbisi ya masumu na biso.
Mpo na eteni oyo ya mpasi, bolamu ya Liloba ya Nzambe ememaka lisusu bolendisi mpe elikia; eyebisaka biso ete ezali na lisungi kowuta na monyoko esalamaki na masumu. Lisungi oyo eyaka na bomikabi ya likabo ya Yesu Klistu mpe etikaka bilembo soki tosalelaka bondimi epai na Ye, boyamboli, mpe botosi ya mitindo na Ye.
Ezali ntina ete toyeba ete bobele lokola bolimbisi ya masumu, boyamboli ezali na bitape mpe ezali eloko moko te esalemaka na mbalakata. Esengaka bokasi na eteni moko na moko.
Na ndakisa, ntango toliyaka elambo, tolakisaka Nkolo ete tozali kokanisa Ye ntango nionso mpe tozali kobatela mitindo na Ye. Yango ezali ndakisa ya ntina ya bosolo na biso.
Ntango tobandi kokanisa Ye mpe kobatela mitindo na Ye mikolo nionso—mpe kaka mpo na mokolo ya Sabata te—ezali ntango bolimbisi ya masumu na biso ebandaka kozwa bilembo malembe malembe mpe elaka na Ye ya kozwa Molimo na Ye elongo na biso ebandaka kokokisama.
Na kozanga botosi ya solo oyo esengeli kokamba ntina na biso, eyano ya bolimbisami ekoki kobunga liboso na nzela mpe bozalani ya Molimo ebandi kolimwa. Tokozala na likama ya kotosa Ye na mbebo na biso wana tokolongolaka elikia na biso epai na Ye (tala 2 Nefi 27:25).
Na kobakisa na kolendisaka biso, bolamu ya maloba ya Nzambe etiyaka biso kimia ete mosala oyo ya kozwa bolimbisi ya masumu na biso ekoki kosila ntango tobulunganaka “na makambu mpamba ya mokili,” mpe ekoki kolobama na nzela ya bondimi soki toyamboli na bosolo mpe tomikitisi biso moko (tala D&A 20:5–6).
Oyo esengeli kozala ndambo ya makambu mpamba ya mokili oyo ekopekisa na kozwaka bolimbisi ya masumu na biso mpe yango ezali elongo na kotosaka mokolo ya bule ya Sabata?
Ndambo ya ndakisa ezali koyaka na ngonga te na likita ya elambo na bozangi ntina ya solo; boyei, na bozangi bomitali yambo, kolia lipa mpe komela uta na kopo na masumu (tala 1 Bakolinti 11:28); mpe boyei na bozangi yambo kosala boyamboli ya masumu na biso mpe kotuna Nzambe mpo na kolimbisa yango.
Ndakisa misusu: bozangi botosi na kokomanaka bansango na batelefone na biso, kozala na likita sima ya koliya elambo, mpe kosala milulu na mabota na biso oyo ezali na ntina te mpo na mokolo ya bule wana.
Nini ekoki kozala moko ya bantina oyo mpo na nini, koyebaka makambo nionso oyo, mbala mingi ezangisaka kotosa mokolo ya bule ya Sabata?
Na buku ya Yisaya, tokoki kozwa eyano ete, makanisi oyo elobami na ntina ya Sabata, epesaka lisusu ntina na mitindo misusu oyo tosengeli kotosa: “okopengwisa lokolo na yo na mokolo ya sabata, mpe okoboya kosala misala na yo na mokolo na ngai ya bule” (Yisaya 58:13).
Maloba ya ntina ezali “salaka bolamu,” to na maloba mosusu, kosalaka bolingi ya Nzambe. Mbala na mbala, bolingi na biso—esalemi na bamposa, mposa ya kolia, mpe bamposa ya moto ya mokili—kozanga boyokani na bolingi ya Nzambe. Propheta Brigham Young ateyaki ete “ntango bolingi, bamposa ya mitema, mpe mayoki ya moto epesami na lolenge ya malamu na Nzambe mpe na bosenga na Ye, moto wana asantisami.—Ezali, mpo na bolingi na ngai ya komelama na bolingi ya Nzambe, bolingi yango ekambaka ngai na bolamu nionso, mpe elatisaka ngai ekoti ya nkembo na nsuka na bozangi kufa mpe bomoi ya seko” (Deseret News, Sanza ya libwa. 7, 1854, 1).
Bolamu ya maloba ya Nzambe ebengi biso tosalela nguya ya Bomikabi ya Klisto totiya yango kati na biso mpe tokoma lolenge moko na bolingi na Ye—mpe na bolingi ya satana mpe nzoto te —bongo biso, na nzela ya ngolu na Ye, tokoki kobikisama (tala 2 Nefi 10:24–25).
Bolamu ya maloba ya Nzambe oyo tozali kokabola lelo ezali kolakisa biso mposa ya bokobi ya boyamboli kati na bomoi na biso na yango tokoki kobatela bozalani ya Molimo Mosantu na biso mpo na ntango nionso.
Kozalaka na Molimo ekosunga biso kozala bato malamu mingi koleka. Eko “tiya mwa makelele ya kimia mpe esengo na [milimo] na biso, … ekolongola botindami ya kosala mabe, lokunya, boluli, boboyi, mpe nionso ya mabe uta na [mitema] na biso; mpe [bamposa] na biso nioso ekozala ya kosala malamu, komemaka boyengebene liboso, mpe kotonga bokonzi ya Nzambe” (tala Enseignement: Joseph Smith, 98).
Na nzela ya Molimo Mosantu, tokotukama te, to tokotuka basusu te; tokoyoka esengo makasi, mpe makanisis na biso ekosokwama. Bolingo na biso mpo na basusu ekomata. Tokozala na bolingi ya kolimbisa mpe tokolakisa esengo makasi na baoyo bazali nzinga nzinga na biso.
Tokoyoka botondi ya komona lolenge nini bato mosusu bazali kokende liboso, mpe tokoluka bolamu ya basusu.
Ezali losambo na ngai ete tokoki kozwa esengo oyo ewutaka na kolukaka kozala na bomoi ya boyengebene mpe ete tokoki kobatela bozalani ya Molimo Mosantu kati ya bomoi na biso na nzela ya boyamboli ya solo mpe ekokoba. Tokokoma bato malamu koleka, mpe mabota na biso ekopambolama. Na mibeko oyo natatoli na nkombo ya bule ya Yesu Klistu, amene.