Tozali Awa mpo na Kosalisa Likambo moko ya Bosembo
Ekoka biso kopona kosalisa na likambo moko ya bosembo lokola bantoma ya mpiko ya Nkolo Yesu Klisto.
Nazali na botondi ete tosangani elongo na bamama ya bondimi lokola Lisa, —ndeko mwasi na video—oyo bazali peto na mitema, oyo balingaka Nkolo mpe basalelaka Ye, atako na kati ya mimekano na bango moko. Lisolo ya Lisa ekundolisi ngai ete tosengeli kolingana mpe kotala molimo malamu kati ya moko na moko na biso. Mobikisi ateyaki, “Bokanisa molimo ya peto ezali na ntina na miso ya Nzambe.”1 Tozala na mibu 8 to 108, moko na moko na biso azali “na ntalo mingi na miso na [Ye].”2 Alingaka biso. Tozali bana basi ya Nzambe. Tozali bandeko basi na kati ya Siona. Tozali na lolenge ya bonzambe, mpe moko na moko na biso azali na mosala ya nkembo ya kosala.
Na eleko ya moyi nakendaki kotala molingami moko ya elenge mama ya bana basi. Akabolaki na ngai boyoki na ye ete bilenge na biso ya basi bazali na mposa ya likambo moko, eloko moko mpo na kosalisaka bango bayoka ete bazali na ntina. Ayebaki ete tokoki koyeba bolongobani na biso ya moto na moto mpe ya seko na kosalaka engebene na ntina na biso na mokili oyo ya kufa. Mpokwa ya lelo, Bayembi ya kitoko mpe lokumu bayembaki maloba oyo eteyi ntina na biso. Na nzela ya bomeki mpe momekano, atako na nzela ya bobangi mpe na kati ya bozangi elikia, tozali na mitema ya mpiko. Tokani kosala eteni na biso. Tozali awa mpo na kosalisa na likambo moko ya bosembo.3 Bandeko basi, kati ya likambo oyo tozali biso nionso na ntina. Tosengelami biso nionso.
Likambo oyo ya bosembo tozali kosalisa ezali likambo ya Klisto. Ezali mosala ya lobiko.4 Nkolo ateyaki, “Oyo ezali mosala mpe nkembo na ngai—ya kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya bato.”5 Tozali likambo mpo na yango Yesu Klisto anyokwamaki, makila ebimaki na madusu nionso ya nzoto, mpe na bolingo ebonga mpenza apesaki bomoi na Ye. Likambo na Ye ezali nsango malamu, “nsango ya esengo, … ete ayaki na mokili, kutu Yesu, abakama na ekulusu mpo na mokili, mpe mpo na komema masumu ya mokili, mpe kosantisa, mpe kopetola yango uta na mabe nionso; ete na nzela na Ye bato nionso bakoka kobikisama.”6 Mobikisi na biso “asalaki nzela mpe afungolaki balabala.”7 Natatoli ete ntango tolandi ndakisa na Ye, tolingi Nzambe, mpe tosalisani na bosembo mpe mawa, tokoki kokoma peto, “tokozanga elindo na miso ya Nzambe na mokolo ya nsuka.”8 Topona kosalisa Nkolo na likambo na Ye ya bosembo mpo ete tokoka kokoma moko na Tata mpe Mwana elongo na Ye ya Mobali.9
Profeta Mormon alobaki na lolenge makasi, “Mpo tozali na mosala ya kosala na ntango kati ya mosala oyo tozali na yango, na ntina ete tolonga monguna na boyengebene nionso, mpe kopesa bopemi na na molimo na biso kati ya bokonzi ya Nzambe.”10 Bakambi ya Eklezia oyo baleki na bapionie ya kala bakendaki liboso elongo na mpiko ya balongi mpe na bondimi etonda meke mpo na kotiya nsango malamu ezongisama mpe kotonga batempelo esika eye makuli ya bonetolami ekokaki kosalema. Bapionie ya sikawa, elakisi bino na ngai, tozali mpe kokende liboso na bondimi, “mpo na kosala kati ya elanga ya vino [ ya Nkolo] mpo na lobiko ya milimo ya bato.”11 Mpe, lokola Mokambi Gordon B. Hinckley ateyaki, “Esengo ya lolenge nini ekozala lobi ekoya ntango mikumba ya Nguya ya misala na Ye ya nkembo… na nzela ya bosolo [mosala] ya baoyo mitema na bango etondisami na bolingo mpo na Mosikoli ya mokili.”12 Tosangani elongo na bandeko basi ya bondimi ya kala, ya sikawa, mpe ya nkola oyo ntango tosangani elongo na mosala ya lobiko!
Yambo tobotama, tondimaki mwango ya Tata ya Lola “na yango [biso] tokoki kozwa nzoto ya mosuni mpe kozwa boyebi ya mabele mpo na kokola kino na bobongi nie mpe na nsuka kokokisa nsuka ya bonzambe na [biso] ya lobi lokola basongoli ya bomoi ya seko.”13 Na liyokani ya yambo ya kufa oyo, Mpaka John A. Widtsoe alimbolaki: “Tondimaki, mbala moko mpe na lombango, kozala mobikisi bobele kaka mpo na biso moko te kasi … babikisi mpo na mabota yabato nionso. Toyokanaki elongo na Nkolo. Kati ya mosala ya mwango ekomaki kaka mingi mingi mosala ya Tata te, mpe mosala ya Mobikisi kaka te kasi lisusu mosala na biso. Mwa ndambu kati na biso, moto ya sembo mingi koleka, azalaka kati ya boyokani na Tata ya bokasi nionso na bokokisi ntina ya mwango ya seko ya lobiko.”14
Awa na bokufi tozali lisusu na boyokani ya kosalisa Mobikisi kati ya mosala ya lobiko. Na kozalaka kati ya mayokani ya makuli ya bule ya bonganganzambe. Tomipesi ete tokomipesa na mosala ya Nzambe na motema moko, na bokasi, na makanisi, mpe na bokasi.15 Tozwaka Molimo Mosantu mpe tolukaka lisungi na Ye mpo na kokamba bokasi na biso. Bosembo elakisamaka na miso ya bato ntango tososolaka oyo Nzambe alingaka biso tosala mpe nsima tosali yango.
Nayebi mwana moko ya Eteyelo ya bana oyo alobaki na moninga moko na ntango atelemaki na gare ya bisi, “Okoki koya elongo na ngai na eklezia mpe koyekola etali Yesu!”
Namonaki bana basi na kati ya kelasi ya Bilenge Bamama basimbani na maboko elongo mpe bazali kosala mokumba ya kosalisana mpe nsima bazali kolengela lolenge ya ya kosalisa elenge mwasi moko oyo azalaki kobunda mpo na kotika bowumbu.
Namonaki bilenge bamama bazalaki kopesa nionso ya ntango bango, batalanta na bango, mpe bokasi na bango mpo na koyekolisa mpe kopsa ndakisa ya nsango malamu bongo bana na bango, lokola bana ya Helaman, bakoka kotelema na bomikiliki mpe na bondimi na ntango ya mimekeno, masenginia, mpe mikakatano.
Kasi ntango mosusu mingi bamikitisaka epai na ngai bazalaki mpo na koyoka ndeko moko ya mwasi monzemba alobaki na litatoli ya peto ya esengo ete mosala ya ntina mingi koleka oyo tokoki kosala ezali komilengela mpo na libala mpe libota. Atako yango ezali boyebi na ye te, ayebaka ete libota ezali eteni ya ntina mpenza ya mosala ya lobiko. “Mwango ya bonzambe ya esengo epesaka ndingisa na bozalani ya libota etikala libela atako nsima ya kufa.”16 Totosaka mwango ya Tata mpo tokembisaka nkombo ya Nzambe ntango tolendisaka mpe totombolaka bozalani yango kati ya liyokani ya sika mpe ya seko na seko ya libala. Toponaka kosala na bomoi ya peto mpe ya bwanya na yango ntango libaku eyaka, tomilengeli mpo na kosala liyokani wana ya bule kati ya ndaku ya Nkolo mpe kobatela yango libela.
Biso nionso tokutanaka na bantango mpe bileko kati ya babomoi na biso. Kasi soki tozali tozali na kelasi, na mosala, kati ya lingomba ya bato, to mingi mingi kati ya libota, tozali basaleli ya Nzambe mpe tozali kati ya mosala na Ye.
Kati ya mosala ya lobiko, ndako ya bokesenisi ezali te, kotonga, to kokweyisa. Ezali mpo na mobu te, boyebi, bobeti maboko ya bato. Mosala ya bule oyo ezali mpo na kokolisa motema eyokisama mpasi, boyimiyimi ya molimo, mpe bolingi mpo na kosalela makabo ya bonzambe mpe mayele ya mosala ya moko na moko mpo na kosala mosala ya Nkolo kati na lolenge na Ye. Ezali komikitisa mpo na kokweya na mabolongo na biso mpe koloba, “O Tata na ngai, … bolingi na ngai te, kasi lokolo olingi.”17
Na bokasi ya Nkolo biso “tokoki kosala makambo nionso.”18 Tokobaka koluka ntango nionso bokambami na Ye na losambo, kati ya makomi, mpe kati ya nungu nungu ya Molimo Mosantu. Ndeko mwasi moko, akutanaki na etinda moko elekelaki ye, akomaki, “Ntango mosusu namitunaka soki bandeko basi kati ya lisolo ya Eklezia oyo ewuti koleka bazalaki te lokola biso, batiye mitu na bango likolo ya mifuku na bango na butu mpe basambeli, ‘Atako oyo ekoki koya lolobi, Okosunga ngai na nzela na yango?’” Nsima akomaki, “Moko ya mapamboli ezali [oyo] tozali nango moko mpe mosusu mpe oyo tozali nango banso elongo!”19 Atako lolenge tozali, atako esika tozali na nzela ya lobiko, tosangana na bomoko na boyokani na biso epai ya Mobikisi. Tosungana moko mpe mosusu na mosala na Ye.
Kala te, ekoki kozala botangaki na ntina ya Ndeko mwasi Ella Hoskins, oyo na mibu 100 abengamaki mpo na kosalisa elenge mwasi moko na palwasi na ye na bokobi na ye moko. 20 Penepene ya mibu mibale eleki, na 102, ndeko mwasi Hoskins azwaki Botondi ya mbano ya Kibomwasi na ye ya Bolenge. Bilenge basi, Bilenge Basi ya palwasi mpe likonzi mpe babokambi ya Bamama Basungi, mpe bandeko ya libota basangani mpo na kosepela bolongi na ye. Nsuka ya mobu, lingomba, mpe libala ezali na ntina ten a mosala ya bondimi. Elenge mwasi ayokaki botondi ya Ndeko mwasi Hoskins, mpo na liteya na ye, mpe mpo na ndakisa ya bosembo. Balingi kozala lokola ye. Na nsima, natunaki Ndeko mwasi Hoskins, “Osalaki yango ndenge nini?”
Ayanolaki mbala moko, “Nayambolaka mikolo nionso.”
Uta na mwana mwasi ya bosembo, atondisama na Molimo ya Nkolo oyo angengisamaki na pole ya peto, nakundolisamaki mpo na kongenga na bonzenga ya bobongi nie, mpo na kotelema elongo na Mobikisi mpe kopambola basusu, tosengeli kopetolama. Bopeto ezali pete na nzela ngolu Klisto ntango toboyi lingomba mpe toponi kolinga Nzambe na bokasi, na bokebi, mpe bokasi.21 Apostolo Polo ateyaki, “Kima baposa ya mabe ya bolenge. Mpe luka na mposa monene, bosembo, kondima, bolingo mpe kimiaelongo na baoyo babengaka Nkolo na motema ya peto.”22 Moto moko te azali sembo. Biso nionso tosalaka mbemba. Kasi toyambolaka nantina ete tokoka kokoma sembo mpe “totika nkombo [ya Klisto] ekomama ntango nionso kati ya mitema na [biso].”23 Ntango tosalisaka na nkombo ya Nkolo, na motema ya peto, tolandaka bolingo ya Mobikisi mpe topesaka ndakisa ya lola epai ya basusu.
Ekoka biso kopona kosalela na likambo moko ya bosembo lokola bantoma ya mpiko ya Nkolo Yesu Klisto. Tika ete totelema mpe “elongo na loyembo kati ya [mitema] na [biso] tokende liboso, tosalela nsango malamu, kolingaka Nkolo, mpe kotongaka bokonzi na [Ye].”24 Natatoli ete kati ya mosala ya nkembo oyo, tokoki koyeba bolingo ya peto ya Nzambe. Tokoki kozwa esengo ya solo mpe kozwa nkembo nionso ya seko. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.