Kolongaka Mikakatano ya Mokili ya Lelo
Maponi bozali kosala—misio, kotanga, libala, mosala, kosalela Nzambe na Eklezia—ekosala boseko na bino.
Makambo ebele ekomami mpe elobami na ntina ya nkola ya bilenge bakola minzemba. Boluki elakisi ete bazali na liyoki moko oyo ezali kokola ya moto yemei mpe botelemeli bakambi ya biyamba. Mingi bazali na baniongo mpe bazangi misala. Ebele balingilikanisi ya libala, kasi mingi bazali na bobangi ya kosala yango. Motango ezali kobakisama oyo balingi bana te. Motuya ya bokabwani ezali komata se komata. Bobangi ezanga ntina mpe bolembu ezali kokoba se kokoba. Na bozangi nsango malamu mpe bokambami efulama, ebele bazali kowayawa na nzela ya ndenge mosusu mpe bazali kobunga nzela na bango.
Na esengo, bandimi ya bilenge bakola ya Eklezia batikali nsima ya banzela oyo ya motungisi, na ndambo mpo ete bapambolami na mwango ya nsango malamu. Mwango yango ya seko esengeli kosinba makasi lingenda ya ebende—koyekamaka na liloba ya Nzambe mpe maloba ya baprofeta na Ye. Tokosimba makasi na libende mpo ete ekamba biso kozonga epai na Ye? Sikawa ezali “mokolo ya boponi”1 mpo na biso nionso.
Na bomwana na ngai, ntango nazalaki penepene ya kosala boponi na ngai ya bomowana, tata na ngai ntango mosusu azalaki koloba, “Robert, zala sembo mpe sala oyo omoni ezali malamu!” Ozalaki kuna. Na molimo ya lisolo na ye ya polele, nakolinga koloba mingimingi na bilenge—bilenge ya lokumu—mpe bilenge bakola ya lokumu, mpo “molimo na ngai esepeli na polele … ete [to] koki koyekola.”2
Bozali na eleko moko ya motuya ya bomoi na bino. Maponi bozali kosala—misio, kotanga, libala, mosala, kosalela Nzambe na Eklezia—ekosala boseko na bino. Yango elakisi bokotala ntango nionso liboso—kotalaka na lobi ekoya.
Lokola mokumbi mpepo ya air Force, nayekolaki libongisi oyo: komitika te opumbwa kati ya mvula ya bankake. (Nakoyebisa bino te lolenge nini namonelaki yango.) Na esika wana, pumbwa nzinganzinga na yango, zwa nzela mosusu, to zela mvula esila yambo okita na mabele.
Bandeko balingami bilenge bakola ya mibali mpe basi, nalingi nasunga bino “bopumbwa malamu” na ntango ya mikakatano ya mvula makasi. Bozali bakumbi mpepo. Bozali na mokumba bino ya kokanisa na ntina ya makama ya boponi nionso bosalaka. Bomituna bino moko: “Soki nasali boponi oyo, eloko nini ya mabe mingi koleka oyo ekoki koya sima? Boponi na bino ya sembo ekobatela bino botambola na nzela elongobani.
Kanisa na ntina na yango: Soki boponi kozwa kopo ya masanga te, bokokoma balangwi te! Soki mokolo moko te boponi kokota niongo, bokokima libaku ya kozanga likoki ya kozongisa nyongo!
Moko ya bantina ya makomi ezali kolakisa biso lolenge nini bato ya sembo bayanolaka na masenginia mpe na mabe. Na mokuse, bakimaka yango! Yosefe akimaki mwasi ya Potifar.3 Lehi azwaki libota na ye mpe batikaki Yelusaleme.4 Malia mpe Yosefe bakendaki Ezipito mpo na kokima mwango ya nkanda ya Helode.5 Na ndakisa nionso, Tata ya Lola akebisaki bandimi oyo. Na lolenge moko, Akosunga biso toyeba kobunda, kokima, to kokende elongo na bondimami ya bambongwana na biso. Akolobela biso na nzela ya losambo, mpe ntango tosambeli, tokozwa Molimo Mosantu, oyo akokamba biso. Tozali na makomi, ya mateya ya baprofeta ya bomoi, ya mapamboli ya batata, toli ya baboti bafulama mpe bakambi ya bonganganzambe mpe ya masanga malandi, mpe likolo ya nionso, mongongo ya kimia, moke ya Molimo.
Nkolo akobatela ntango nionso elaka na Ye: “Nakokamba bino ntango nionso.”6 Motuna moko tokomikamba biso moko? Tokoki koyoka mongongo na Ye mpe mongongo ya basali na Ye?
Natatoli ete soki bozali awa mpo na Nkolo, Akozala wana mpo na bino.7 Soki bolingi Ye mpe bobateli mitindo na Ye, bokozwa Molimo na Ye mpo azala elongo na bino mpe akokamba bino. “Botiya elikia na bino na oyo Molimo akambaka mpo na kosala bolamu. … Na yango bokoyeba, makambo nionso … kozalaka na makambo ya bosembo.”8
Na mabongisi oyo lokola moboko, nakoki kopesa bino mwa toli ya kosalela?
Mingi kati na bino bazali na niongo ya motuya makasi. Ntango nazalaki elenge akola, mokambi na ngai ya likonzi azalaki mokolo banki kopesa mosolo na bato ya nkita na Wall Street. Ateyaki ngai, “Ozali moto ya bozwi soki okoki kozala na bomoi ya kosalela na esengo kati na bozwi na yo.” Lolenge nini okoki kosala yango? Futa moko na zomi na yo mpe bombisaka! Soki ozwi mingi, bomba mingi. Komikokisa na basusu te mpo na kozala na biloko ya kosakana ya ntalo. Kosomba oyo eleki bozwi na yo te.
Bilenge bakola ebele na mokili bakotaka niongo mpo na kotanga, kaka bobele mpo na komona motuya ya kelasi ezali monene koleka ete bakokaka kozongisa. Luka bourse d’etudes mpe makabo. Zwa mosala ya ndambu ya ntango ndambo, soki ekoki, mpo na kosunga yo ofuta na yomei. Yango ekosenga mwa komibonza, kasi ekosunga yo olonga.
Kotanga ezali kolengele bino mpo na kozwa mabaku ya mosala malamu. Ezali kotia yo na esika malamu mpo na kosalisa mpe kopambola baoyo bazali nzinga nzinga na yo. Ekotia bino na nzela ya boyekoli ya bomoi mobimba. Ekolendisa bino mpo na kobunda na bozangi koyeba mpe mbeba. Lokola Joseph Smith ateyaki: “Mayele ebenganaka molili, bozeli mpe ntembe; mpo yango ekoki kozala te esika mayele ezali. … Nguya ezali kati na mayele.”9 “kozala moto ayekoli ezali malamu soki bayokaka toli ya Nzambe.”10 Kotanga ekolengele yo mpo na maye ezali koya liboso, kotangaka mpe libala.
Lisusu, ekoki ngai koloba polele? Nzela oyo ememaka na libala elekaka na terrain oyo tobengi kobima ya bolingo! Kobima ya bolingo ezali libaku mpo na bosololi ya milai. Ntango bozali kobima mpo na bolingo, boyekola makambo nionso bokoki oyo etali moko mpe mosusu. Bantina na bino ezali lolenge moko? Bokabolaka mayoki ya lolenge moko na oyo etali mitindo, Mobikisi, bonganganzambe, tempelo, kiboboti, mabiangi na Eklezia, mpe kosalisa basusu? Bomitali moko na mosusu ntango bozali na nse ya nkanda, koyanolaka na elonga mpe bokweyi, kotelemelaka nkanda, mpe kosololaka mabaku? Moto oyo bozali kobima na ye na bolingo akitisaka basusu to alendisaka bango? Ezali bizaleli mpe elobeli mpe etamboli na ye oyo okolinga kofanda na yango na elongo mikolo nionso?
Nalobi ete, moko te kati na biso abali oyo ezali ya kobonga nie; tobalakamoto oyo azali na makoki kati na ye. Libala malamu ezalaka bobele kaka na oyo nalingaka te; kasi ezali lisusu na oyo ye—oyo akozala moninga na ngai—alingaka mpe azali na mposa ngai nazala.
Mpo na koloba polele, tosengi kobima mpo na bolingo te na bambula na yo ya 20 kaka mpo “na kosepelisa nzoto,” boye kozongisaka libala na yo nsima mpo na matoma to misala mosusu. Mpo na nini? Mpamba te kobima na ntina ya bolingo mpe libala ezali bisika ya nsuka na nzela na biso te. Ezali bikuke wapi kokotela mpo na wapi ozali kokende. “Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye.”11
Mokumba na yo sikawa ezali ya kolongobana mpo na moto oyo olingi kobala. Soki olingi obala moto alongobana, ya kitoko, ya bosembo, ya esengo, ya makasi na mosala, moto ya molimo zala lolenge ya moto wana. Soki ozalimoto ya lolenge wana mpe obali te, zala na bompikiliki. Talela Nkolo. Natatoli ete Nkolo ayebi bamposa na yo mpe alingaka yo mpo na bomipesi na yo ya botongono epai na Ye. Azali na mwango mpo na yo, soki na bomoi oyo to na oyo ekoya. Yokela Molimo na Ye. “Koluka te kopesa toli na Nkolo, kasi kozwa toli uta na loboko na Ye.12 Na bomoi oyo to na oyo ekoya, bilaka na Ye ekokokisama. “Soki omilengeli okobanga te.”13
Soki ozali na makoki ebele te, komitungisa te. Mondimi moko ya Eklezia ya kitoko ayebisaki ngai kala mingi te ete: “Nakolisaki bana na ngai na misolo te, nakolisaki bango na bondimi. Banda kosalela bondimi na yo na eteni nionso ya bomoi na yo. Soki osali yango nde, okomona mpasi na bokono oyo nabengi “kolemba ya bondimi.” Bokasi osengeli mpenza mpo na kosalela bondimi na yo ekokita. Boye salela bondimi na yo mokolo na mokolo, mpe okoya “kokoma makasi se makasi … mpe ngwi se ngwi na bondimi ya Klisto.”14
Kobelema mpo na libala, zala na kondima ete ozali ya kolongobana mpo na kosala likuli mpe kozala na mokanda ya tempelo. Kende na tempelo mbala na mbala. Salela Nzambe na Eklezia. Kobakisa na kosalelaka Nzambe na mabiangi ya Eklezia, landa ndakisa ya Mobikisi, oyo na pete “atambolaki bipai na bipai kosala malamu.”15
Sikawa, bokoki kozala na mituna makasi na ntina ya boponi oyo ezali liboso. Na mibu na ngai ya elenge monzemba, nalukaki toli uta baboti na ngai mpe bapesi toli ya botongono, ya kotiela elikia. Moko na bango azalaki mokambi ya bonganganzambe; mosusu azalaki moteyi oyo andimelaki ngai. Bango mibale bayebisaki ngai, “Soki olingi toli na ngai, milengela mpo na kozwa yango.” Nasosoli nini yango elingi koloba. Na losambo pona balobeli oyo bakobatela mpenza bozali malamu ya molimo na yo na motema. Sala keba na kozwaka toli euti na bato mosusu. Soki olingi mingi koleka oyo ozali na yango sikawa, luka bokambami ya nkuluntu ya bwania koleka,kasi ya baninga ya mibu moko te!16
Bokanisa, moto moko te akoki kosala maponi oyo ekosunga yo okola na nkombo na yo. Bobele bondimi nayo mpe nsambo na yo ekoki kosala ete omitombola mpe ozwa mbongwana ya nguya ya motema. Bobele mokano na yo ya kozala na botosi ekoki kobongola bomoi na yo. Mpo na libonza ya bomikabi ya Mobikisi mpo na yo, nguya ezali epai na yo.17Ozali na bonsomi na yo ya kopona, ozali na matatoli makasi soki ozali na botosi, mpe okoki kolanda Molimo oyo ekambaka yo.
Kala mingi te, elenge moko mosali filimi alobaki ete amiyokaki azalaki moko ya “nkola ya babungi”—nkola moko “kolukaka elikia mpe esengo mpe bokokisi, kasi kolukaka na bisaka binso ya mabe mpe na banzela mabe.”18
Na lisese ya Mobikisi ya mwana mobali oyo abungaki, mwana mobali azalaki na mapamboli ebele oyo ezalaki kozela ye, kasi liboso akoka kozwa yango, asengelaki kotala malama bomoi na ye, maponi na ye, mpe makambo na ye. Likamwisi oyo eyaki nsima elimbolami na makomi na maloba moko ya pete: “Akanisaki na motema.” 19 Ekoki ngai kolendisa bino bomitala naino binomei? Na Eklezia, ntango mikano ya ntina esengeli kosalema, tosalaka mbala mingi mayangani ya toli. Mayangani ya Libota esalisaka na ntina moko. Bokoki kolinga kokamba oyo nakobenga “toli ya moto yemei.” Nsima ya kosambela, lekisa mwa ngonga yo moko. Kanisa na ntina nini ezali liboso. Mituna: “Ndenge nini nasengeli komilendisa na bomoi na ngai mpo ete nakoka kolendisa basusu? Esika nini nalingi kozala mobu moko uta sikawa? Baboponi nini nasengeli kosala mpo na kokota kuna?” Bobele kanisa, ozali mokumbi mpepo mpe ozali kokumba. Natatoli ete ntango omitali yomei, Tata na yo ya Lola akoya epai na yo. Na loboko ya kolendisa ya Molimo Mosantu, Akosalisa yo kino na nsuka.
Natatoli ete Nzambe azali na bomoi. Napesi litatoli na ngai ya kafukafu ete Mobikisi alingaka biso. “Ekokende biso liboso te mpo na ntina [monene na Ye]? Bokende liboso mpe bozonga sima te.”20 Wana ezali bino kolanda Ye, Akolendisa mpe kosunga bino. Akomema bino na ndako. Na nkombo ya Eysu Klisto, amene.