Boyokani ya Sika 2023
Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi


“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi,” Yaka Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
mwasi azali koyekola makomi

Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi

Oyo ezali mwa banzela ya pete mpo na kokolisa boyekoli na yo ya liloba ya Nzambe kati na makomi.

Luka Bosolo na ntina na Yesu Klisto

Makomi eteyaka biso ete makambo manso etatolaka Klisto (tala 2 Nefi 11:4; Mose 6:63), boye kanisa kokoma to kotia bilembo na milongo oyo etayi oyo etali Mobikisi, mpe boniboni kolanda Ye.

Luka Maloba mpe Biteni ya maloba oyo Ezali Kofula

Okoki komona ete maloba mpe biteni ya maloba mosusu na makomi etuti yo, lokola soki ekomamaki bobele mpo na yo. Ekoki komonana elongobani na yo mpe ekoki kofula mpe kozala na ntina mpo na yo. Kanisa kotia yango bilembo na makomi na yo to kokoma yango na zulunale moko ya boyekoli.

Luka Bosolo ya Nsango Malamu

Ntango mosusu bosolo ya nsango malamu (ebengami mbala mingi malongi to mabongi) elobami mbala moko, mpe ntango mosusu etalisami na nzela ya ndakisa to lisolo. Mituna, “Bosolo nini ya seko eteyami kati na milongo oyo?”

Yokela Molimo

Tia bokebi na makanisi mpe mayoki na yo, atako soki etali makambo oyo ozali kotanga te. Mayoki wana ekoki kozala makambo oyo mpenza Tata na yo na Lola alingi yo koyekola.

Kokanisa makomi na Bomoi na Yo

Kanisa lolenge nini masolo mpe mateya ozali kotanga esalelami na bomoi na yo. Ndakisa, okoki komituna, “Boyebi nini nazwi oyo ekokani na maye nazali koyekola?” to “Lolenge nini nakoki kolanda ndakisa ya moto oyo kati na makomi?”

Tuna Mituna ntango Ozali Koyekola

Ntango ozali koyekola makomi, mituna ekoki koya na makanisi. Mituna oyo ekoki kotala oyo ozali kotanga to bomoi na yo na mbala mingi. Manyola mituna oyo mpe luka biyano ntango ozali kokoba koyekola makomi.

Elilingi
mwana mobali azali koyekola makomi

Salela Masalisi ya Boyekoli Makomi

Mpo na kozwa boyebi ya kobakisa na kati ya milongo ozali kotanga, salela matangi na nse ya lokasa, Bokambi na Masolo, lisusu Dikisionele ya Biblia, Bokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org), mpe masalisi masusu mpo na boyekoli.

Kanisa Esika mpe Eleko ya Makomi

Okoki kozwa boyebi ya motuya na ntina na makomi soki okanisi esika mpe eleko na yango—mabaku to esika ya makomi. Ndakisa, koyeba makambo ya kala mpe boyambi ya bato oyo profeta alobelaki ekoki kosunga yo ososola likanisi ya maloba na ye.

Koma Makanisi mpe Mayoki na Yo

Ezali na nzela ya ndenge na ndenge ya kokoma mayoki oyo eyaka ntango ozali kotanga. Ndakisa, okoki kotia elembo na liloba to lisakola moko ya ntina mpe kokoma makanisi na yo lokola litangi moko na makomi na yo. Okoki lisusu kobomba zulunale moko ya boyebi, mayoki, mpe makanisi ozali kozwa.

Yekola Maloba ya Baprofeta mpe Bapostolo ba Mikolo mya Nsuka

Tanga maye baprofeta mpe bapostolo ya mikolo ya nsuka bateyi mpo na oyo etali mabongi omoni kati na makomi (ndakisa, tala conference.ChurchofJesusChrist.org mpe Magazini ya Eklezia)

Kabola Boyebi

Kosolola boyebi uta na boyekoli na yo moko ezali bobele nzela moko ya malamu mpo na koteya basusu te, kasi ezali lisusu kosalisa na kolendisa bososoli na yo ya maye otangi.

Salela Maye Yo Oyekoli

Boyekoli ya makomi esengeli bobele kofula biso te kasi lisusu kokamba biso na kobongola lolenge tozali kotambwisa bomoi. Yoka nini Molimo azali kolobela yo na mongongo moke osala ntango ozali kotanga, mpe nsima zwa ekateli ya kosalela bitinda yango.

Mpaka David A. Bednar alobaki: “Tosengeli te kozela ete Eklezia lokola lingomba eteya to elobela biso nyonso tosengeli koyeba mpe kosala mpo na kokoma bayekoli oyo bamipesa mpe koyika mpiko tii na nsuka [tala Doctrine et Alliances 121:29]. Nzokande, mokumba na biso moko ya moto na moto ezali ya koyekola nini tosengeli koyekola, kotambwisa bomoi lolenge toyebi tosengeli kotambwisa, mpe kokoma banani Moteyi alingi biso tokoma. Mpe bandako na biso ezali esika ya nsuka mpo na koyekola, kozala mpe kokoma” (“Prepared to Obtain Every Needful Thing,” Liahona, Sanza ya mitano 2019 2019, 102).

Bimisa na lokasa