Boyokani ya Sika 2023
Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota


“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2022 (2022)

“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota

Mokanda Oyo Ezali Mpo na Nani?

Mokanda oyo ezali mpo na moto mpe libota nyonso kati na Eklezia. Esalemi mpo na kosunga yo oyekola nsango malamu—ezala mpo na yo moko to elongo na libota na yo. Soki na ntango eleki oyekolaki nsango malamu mbala na mbala te, mokanda oyo ekoki kosunga yo mpo na kobanda. Soki osila kozala na momesano malamu ya koyekola nsango malamu, mokanda oyo ekoki kosunga yo mpo na kozwa boyebi ya ntina mingi koleka.

Elilingi
Mobali mpe mwasi bazali koyekola makomi

Lolenge nini Nasengeli Kosalela Mokanda Oyo?

Salela mokanda oyo na lolenge oyo omoni ekoki kosunga yo. Okoki kokamata yango lokola mokambi to lisalisi mpo na boyekoli ya makomi ya moto ye moko mpe mpo ya libota. Okoki lisusu kosalela yango mpo na likita ya libota na mpokwa. Mateya ezali kotalisa mabongi ya ntina maye mazwami kati ya Kondimana na Sika, kopesa makanisi ya koyekola mpe milulu mpo na bato mpe mabota, mpe ezali kopesa bisika mpo na kokoma mayoki ya motema na yo.

Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota esalemi te mpo na kozwa esika to kotelemela makambo mosusu ya malamu oyo bozali kosala. Landa bokambami ya Molimo mpo na kozwa mokano lolenge nini kobanda boyekoli na yo moko ya liloba ya Nzambe.

Lolenge nini Mokanda Oyo Etalisaka Maye Mazali Koleka na Eklezia?

Miango ya mokanda oyo ebongisami engebene na manaka ya kotanga ya poso na poso. Mikanda ya Yaka, Landa Ngai mpo na Kelasi ya Bana, mpo na Eteyelo ya Eyanga, mpe mpo na Masanga Makoki ya Bonganganzambe ya Alona to bakelasi ya Bilenge Basi ezali kolanda manaka kaka moko. Mpo na kosunga bokasi na yo mpo na koyekola mpe kosalela nsango malamu na ndako, bateyi na yo na eklezia bakopesa yo mabaku ya kokabola boyebi, makanisi, mpe mituna na yo mpo na oyo etali biteni ya makomi oyo ozalaki koyekola na ndako.

Lokola Eteyelo ya Eyenga eteyami kaka mbala mibale na sanza, bateyi ya Eteyelo ya Eyenga bakoki kopona kolekisa to kosangisa mateya mpo na kolanda manaka ya poso na poso. Oyo ekoki lisusu kozala na ntina monene (mpo na Eteyelo ya Eyenga mpe Kelasi ya Bana lokola) baposo mosusu ntango makita ya Eklezia oyo esalemaka ntango nyonso ekoki kosalema te mpo na likita ya likonzi to bantina mosusu. Na baposo oyo bobengisami kokoba koyekola Kondimana na Sika na ndako.

Esengeli Ngai Kolanda Manaka?

Manaka lokola ebongisami ekosunga bino kosilisa kotanga Kondimana na Sika na nsuka ya mobu. Mpo na kobakisa, kolandaka manaka se moko lokola basusu ekoki kokamba bino na makambo malamu na ndako, na eklezia, mpe bisika nyonso mosusu. Kasi bomiyoka lokola bakangi bino na manaka to lokola nde botindami na makasi kotanga milongo nyonso te; manaka ezali kaka mokambi mpo na kosunga bino bomitambwisa. Eloko ya motuya ezali ete bozali koyekola nsango malamu bino moko mpe lokola libota.

Bimisa na lokasa