Boyokani ya Sika 2023
Mikanda Misusu


“Mikanda Misusu,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Mikanda Misusu,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023

Elilingi
Libota ezali koyekola makomi

Mikanda Misusu

Mingi koleka ya Mikanda oyo ekoki kozwama na kati ya aplikasio ya Etando ya Mikanda ya Nsango Malamu mpe na ChurchofJesusChrist.org

Buku ya Nzembo mpe Chants pour Enfants

Miziki ya bule ebengisaka Molimo, esalisaka koyoka bolingo ya Nzambe, mpe eteyaka malongi na lolenge moko ya kobosana te. Kobakisa na buku ebimisami na nkasa ya Kantiki mpe Chants pour Enfants, okoki kozwa video mpe audio ya koyoka kantiki mpe nzembo ya bana mingi na music.ChurchofJesusChrist.org mpe na kati ya aplikasio ya Miziki ya Bule mpe ya Media ya Nsango malamu.

Mikanda ya Seminele mpe Institut

Mikanda ya Seminele mpe Institut epesaka lisitwale ya motuya mpe makanisi bato bapesi mpo na malongi mpo na mabongi mpe masolo oyo ezwami na kati ya makomi.

Bazulunale ya Eklezia

Bazulunale lokola Moninga, Mpo na Bokasi ya Bilenge, mpe Liahona ezali na masolo mpe milulu oyo ekoki kobakisa mabongi to mateya na oyo ozali koteya uta na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota.

Masolo ya Nsango Malamu

Kati ya Masolo ya Nsango Malamu (topics.ChurchofJesusChrist.org), okoki kozwa nsango ya motuya etali masolo ya ndenge na ndenge ya nsango malamu, na mikoloto to liens ya koyingela na mikanda mpo ya kosalisa, lokola masikulu ya likita linene, bartikele, makomi, mpe bavideo oyo ezali kolobela yango. Okoki mpe komona lisusu Bankoma ya Masolo ya Nsango Malamu, oyo epesi na bozindo nsango etali malongi mpe makambo ya motuya, ndenge moko na biyano na mituna ya ndenge na ndenge oyo etali Eklezia mpe mateya na yango.

Masolo ya Kondimana na Sika

Masolo ya Kondimana na sika ekoki kosunga bana bayekola malongi mpe masolo oyo ezwami na kati ya Kondimana na Sika. Okoki lisusu kozwa bavideo ya masolo oyo na kati ya aplikasio na Etando ya Mikanda ya Nsango Malamu mpe na medialibrary.ChurchofJesusChrist.org.

Buku ya Masolo ya Makomi na Langi: —Kondimana na Sika

Mokanda oyo ezali na nkasa ya milulu ebongisami mpo na kolendisa boyekoli ya bana uta na Kondimana na Sika.

Bavideo mpe Ntoki

Misala ya ntoki, bavideo, mpe media mosusu ekoki kosunga libota na yo esosola malongi mpe etala masolo oyo ezwami na kati ya makomi. Tala media ya Nsango malamu na GospelMedia.ChurchofJesusChrist.org mpo na kokota na liboke ya mikanda ya Eklezia na media. Media ya Nsango malamu ezali lisusu lokola aplikasio ya telefone. Bilili ebele oyo okoki kosalela ezali na Gospel Art Book.

Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Koteya na Lolenge ya Mobikisi ekoki kosunga yo oyekola maye etali mpe osalela mabongi ya koteya lokola Moklisto.

Bimisa na lokasa