Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi 9–15. Bafilipi; Bakolose: “Nakoki Kosala Makambo Nyonso na Nzela ya Klisto Oyo Alendisaka Ngai”


“Sanza ya zomi 9–15. Bafilipi; Bakolose: ‘Nakoki Kosala Makambo Nyonso na Nzela ya Klisto Oyo Alendisaka Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi 9–15. Bafilipi; Bakolose,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Paulo azali koyebisa makambo basengeli kokoma na mokanda uta na boloko

Sanza ya zomi 9–15

Bafilipi; Bakolose

“Nakoki Kosala Makambo Nyonso na Nzela ya Klisto Oyo Alendisaka Ngai”

Ntango nini ezalaki mbala na yo ya nsuka otangaki makanisi ya molimo okomaki na ntango ya boyekoli na yo ya Boyokani ya Sika? Ekoki kosalisa mpo na kokundola bitinda ozalaki kozwa.

Koma Makanisi na Yo

Paulo akomaki mikanda na ye epai na Bafilipi mpe Bakolose na ntango azalaki moto ya boloko na Loma. Kasi mikanda oyo emonani te lokola ewuti na moto oyo azali kati na boloko. Paulo alobelaki koleka na ntina ya esengo, bosepeli, mpe matondi koleka ye asalaki na ntina ya minyoko mpe mimekano: “Klisto ajali kosakolama,” alobaki, “bongo najali kosepela, iyo, mpe nakosepela” (Bafilipi 1:18). Mpe “jambi soko najali kati na bino na njoto te, najali na bino esika moko kati na molimo, najali kosepela mpo na komona mwango na bino sembo mpe mpiko na kondima na bino kati na Klisto” (Bakolose 2:5). Solo mpenza, “kimia ya Nzambe” oyo Paulo azwaki na bantango na ye ya mpasi “eleki makanisi nyonso” (Bafilipi 4:7), kasi ezalaki sikawa solo. Kati na mimekano na biso moko, tokoki koyoka kimia se moko mpe “kosepela kati na Nkolo ntango nyonso” (Bafilipi 4:4). Tokoki, lokola Paulo asalaki, kolikya mobimba na Yesu Klisto, “kati na ye tozali na bosikoli” (Bakolose 1:14). Tokoki koloba, lokola Paulo asalaki, “Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya Klisto oyo alendisaka ngai” (Bafilipi 4:13; tala lisusu Bakolose 1:11).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Bafilipi 2:5–11; Bakolose 1:12–23

Bondimi na ngai etongami na Yesu Klisto.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki ete ntango amipesaka na koyekola makomi na ye na ntina ya Yesu Klisto, ezalaka na nguya likolo na ye na lolenge ete amiyokaka lokola “moto ya bokeseni!” (“Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona,, Sanza ya mitano 2017, 39). Kanisa kolanda ndakisa na ye ntango otangi Bafilipi mpe Bakolose (tala mingi mingi Bafilipi 2:5–11; Bakolose 1:12–23). Oyekoli nini na ntina ya Nkolo? Lolenge nini bosolo oyo ekoki kosalisa yo kokoma “mobali ya bokeseni” to “mwasi ya bokeseni”?

Bafilipi 2:12–13

Ezali biso “kosala mpo na lobiko na [biso] moko”?

Boko bato basalelaka liloba “kosala mpo na lobiko na yo moko” (Bafilipi 2:12) mpo na komonisa ntina ya likanisi ete tobikisami bobele na makasi na biso moko. Basusu basalelaka liteya ya Paulo “bobikisami na ngolu ya njela na kondima” (Baefese 2:8) mpo na kosakola ete misala esengami te mpo na kozwa lobiko. Nzokande, makomi, kotangaka mpe makomi ya Paulo, eteyi polele polele mposa ya nyonso mibale ngolu ya Yesu Klisto mpe makasi ya moto ye moko mpo na kozwa lobiko. Mpe kutu na makasi na biso mpenza koleka ya kosala mpo na lobiko, “ejali Nzambe kosala mosala kati na bino” (Bafilipi 2:13; tala lisusu Bafilipi 1:6; 2 Nefi 25:23; Bible Dictionary, “Grace”).

Bafilipi 3:4–14

Nsango malamu ya Yesu Klisto eleki libonza nyonso na motuya.

Paulo atikaki mingi ntango abongwanaki na nsango malamu ya Yesu Klisto, kotangaka mpe esika azalaki na yango na mokili ya Bayuda lokola Mofalisai. Kati na Bafilipi 3:4–14, luka oyo Paulo azwaki mpo ete alingaki kosala mabonza mpo na nsango malamu. Ayokaki lolenge nini na ntina ya mabonza na ye?

Nsima kanisa bomoi ya moyekoli na yo moko. Nini osili kobonza mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto? Ozwi nini? Ezali na mabonza mosusu ya kobakisa ozali na yango mposa ya kokoma moyekoli oyo amipesi koleka ya Mobikisi?

Tala lisusu 3 Nefi 9:19–20; Malongi mpe Mayokani 58:2–5; Taylor G. Godoy, “One More Day,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 34–36.

Bafilipi 4:1–13

Nakoki kozwa esengo kati na Klisto, ata soki ezaleli na ngai ekomi ndenge nini.

Bomoi ya Paulo ezali elilingi ya nguya ya bosolo emonisami na Mokambi Russell M. Nelson: “Ntango bomoi na biso efandisami likolo ya … Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo ata soki likambo yango nini ezali kosalema—to kosalama te—na bomoi na biso. Esengo eyaka uta mpe mpo na Ye” (“Joy and Spiritual Survival,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 82).

Ntango otangi Bafilipi—mingi mingi mokapo 4—luka maloba oyo ekoki kosalisa yo kozwa esengo na libaku soki niniya bomoi na yo. Ntango nini ozwaki “kimia ya Nzambe” na ntango ya momekano? (molongo 7). Ntango nini ozwaki makasi “na nzela ya Klisto” mpo na kosala makambo ya makasi? (molongo13). Mpo na nini okanisi ezali motuya mpo na “kozala na esengo” na bantango nyonso? (molongo 11). Lolenge nini kosalela bizaleli oyo kati na molongo 8 ekoki kosalisa yo ozwa esengo kati na makmbo oyo wapi ozwami?

Tala Alma 33:23; Dieter F. Uchtdorf, “Grateful in Any Circumstances,” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 70–77.

Bakolose 3:1–17

Bayekoli ya Yesu Klisto bakomaka “sika” ntango bazali kobika nsango malamu na Ye.

Lolenge nini okoki koloba ete Yesu Klisto azali kosalisa yo okoma “mobali [to mwasi] ya sika”? Lolenge moko ya komaniola yango ezali koyeba Bakolose 3:1–17 mpe kosala mokanda ya bizaleli oyo, bizaleli, mpe misala ya “moto ya kala” mpe mokanda mosusu ya bizaleli, bizaleli, mpe misala ya “moto ya sika.”

Koma makanisi na yo na ntina ya lolenge Mobikisi azali kobongola yo, wana mpo ete okoka kokundola yango lobi mpe komaniola lolenge nini ozali kokende liboso.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Bafilipi.Libota na yo ekoki komona maloba esengo to bosepeli kozonga mbala mingi kati na Bafilipi. Ntango nyonso okutani na maloba oyo, okoki kotelema mpe kosolola oyo Paulo ateyaki na ntina ya lolenge nini kozwa esengo.

Bafilipi 2:14–16.Lolenge nini tokoki “kongenga lokola pole na kati ya mokili”?

Bafilipi 4:8.Bandeko ya libota bakoki koyeba makambo ya “kokanisa” oyo ekokani na bandimbola kati na molongo oyo (tala lisusu Biteni ya Bondimi 1:13). Lolenge nini libota na yo ekoki kopambolama na kolandaka toli ya Paulo?

Bakolose 1:23; 2:7.Ntango mosusu libota na yo ekoki kotanga milongo oyo ntango bofandi nzingazinga ya nzete to kotala elili ya nzete (lokola oyo ekokani na mwango oyo). Elingi koloba nini kozala “ya kotelema ngwi” mpe “kopika misisa” kati na Klisto? Lolenge nini tokoki kosalisa moko mosusu tolendisa misisa na biso ya molimo?

Bakolose 2:2–3.Libota na yo ekoki kosepela kotondisa eloko moko ya motuya na biloko oyo emonisi “bozwi” mpe “motuya ya bwania mpe boyebi” ozwi kati na nsango malamu.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Rejoice, the Lord Is King!,” Hymns, no. 66.

Kobongisa Koteya na Biso

Bika engebene na litatoli na yo. “Teya oyo ozali,” Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki. “Mimekano na yo ekokundolama koleka … bosolo moko boye na liteya songolo” (kati na Koteya na Lolenge ya Mobikisi13).

Elilingi
nzete na misisa ebele

Paulo ateyaki ete bondimi na biso esengeli kozwa misisa kati na Klisto (Bakolose 2:7).

Bimisa na lokasa