Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi 16–22. 1 mpe 2 Batesaloniki: “Bongisa Oyo Ezangi na Bondimi na Yo”


“Sanza ya zomi 16–22. 1 mpe 2 Batesaloniki: ‘Bongisa Oyo Ezangi na Bondimi na Yo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi 16–22. 1 mpe 2 Batesaloniki,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
ndeko mwasi ya misionele azali kosolola na elenge mobali

Sanza ya zomi 16–22

1 mpe 2 Batesalokini

“Bongisa Oyo Ezangi na Bondimi na Yo”

Soki tozali kokoma te makanisi tozwi wuta na Molimo, tokoki kobosana yango. Molimo atindi yo okoma nini ntango ozali kotanga 1 mpe 2 Batesalokini?

Koma Makanisi na Yo

Kati na Batesaloniki, Paulo mpe Sila bafundamaki mpo “basili kobalola mokili” (Misala 17:6). Kosakola na bango epesaki boko bakambi kati ya Bayuda nkanda, mpe bakambi oyo bapusaki bato kati na mobulu (tala Misala 17:1–10). Lokola mbano, Paulo mpe Sila bapesaki bango toli ya kolongwa na Tesaloniki. Paulo amitungisaki mpo na babongwani Batesaloniki ya sika mpe minyoko bakutanaki na yango, kasi akokaki te kozonga kotala bango. “Wana eyebi ngai kokanga motema te,” akomaki, “Natindi mpo na koyeba lolenge ya kondima na bino.” Lokola eyano, Timote, mosungi ya Paulo, oyo azalaki kosala na Tesaloniki, “apesaki biso nsango malamu mpo na kondima mpe bolingo na bino” (1 Batesaloniki 3:5–6). Kasi, Basantu Batesaloniki bayebanaki lokola bandakisa “epai ya bandimi nyonso” (1 Batesaloniki 1:7), mpe nsango ya kondima na bango epanzanaki na bingumba ya bapaya. Kanisa esengo mpe kimia oyo Paulo ayokaki ete mosala na ye kati na bango “ezalaki mpamba te” (1 Batesaloniki 2:1). Kasi Paulo ayebaki ete bosembo ya kala ekokaki te mpo na lobiko ya molimo na mikolo ezali koya, mpe azalaki na bokengi ya bopusi ya bateyi ya lokuta kati na Basantu (tala 2 Batesaloniki 2:2–3). Etinda na ye epai na bango, mpe na biso, ezali kokoba “kobongisa oyo ezangi na kondima [na biso]” mpe ”kokola koleka mpe koleka” na bolingo (tala 1 Batesaloniki 3:10; 4:10).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

1 Batesaloniki 1:-2

Bayekoli ya Klisto basalisaka basusu na bosolo mpe bolingo.

Kati na 1 Batesaloniki, maloba ya Paulo ebimisi nyonso mibale mposa mpe esengo ya moto oyo amipesi mobimba mpo na kosalela bana ya Nzambe. Mingi mingi kati na mikapo mibale ya yambo ya 1 Batesaloniki, okomona maloba oyo elimboli bizaleli mpe misala ya moyekoli ya Nkolo. Ndakisa, oyekoli nini uta na 1 Batesaloniki 1:5–8; 2:1–13 na ntina ya kosalela Nkolo?

Kanisa na ntina na mabaku na yo moko ya kosalela Nzamne mpe bana na Ye. Nini omoni na mikapo oyo, oyo efuli yo na kobongisa mosala na yo? Kanisa komituna yo moko kotalaka oyo ozwi, lokola “Nazali ndakisa ya makambo nayebi?” (tala 1 Batesaloniki 1:7).

1 Batesaloniki 3:7–13; 4:1–12

“Kokola mpe kofulukisa na bolingo.”

Paulo asepelaki na bosembo ya Basantu ya Tesalonika (tala 1 Batesaloniki 3:7–9). Kasi alingaki bango lisusu “bafulukisa koleka mpe koleka” kati na bosembo (1 Batesaloniki 4:1). Ntango ozali kotanga 1 Batesaloniki 3:7–13; 4:1–12, maniola banzela okoki “kokola mingi koleka mpe koleka” na molimo (1 Batesaloniki 4:10). Ndakisa, omoni ete Paulo asalelaki maloba lokola “bosantu” mpe “kosantisama.” Oyekoli nini uta na makomi ya Paulo na ntina ya bandimbola ya maloba oyo? Lolenge nini Nkolo akoki kosalisa yo okoma koleka mosantu mpe ya kosantisama?

Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Mosantu,” “Kosantisama,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

1 Batesaloniki 4:16–18; 5:1–10; 2 Batesaloniki 1:4–10

Soki nazali sembo mpe na bokebi, nakomilengela na ntina ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi.

Kati na 1 Batesaloniki 5:1–10, Paulo asalelaki maloba mingi ya bililingi mpo na koteya na ntina ya ntango oyo Yesu akozonga na mabele. Ntango ozali kotanga maloba ya bililingi oyo, kanisa kokoma makanisi oyo eyeli yo na ntina ya Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto:.

  • “Moyibi kati na butu”:

  • “Mpasi ya mwasi na zemi”:

  • moko ya maloba ya elilingi ozwi:

Bosolo nini ya kobakisa oyekoli uta na 1 Batesaloniki 4:16–18; 5:1–10; 2 Batesaloniki 1:4–10? Nini ofulami kosala mpo na komilengela mpo na boyei ya Mobikisi?

Tala lisusu D. Todd Christofferson, “Komilengela mpo na Bozongi na Nkolo,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 81–84.

2 Batesaloniki 2

Bopengwi, to kobungisa bosolo, esakolamaki mpo eya kosalema liboso ya Boyei ya Mibale.

Kati na minyoko ekolaki, ebele ya Basantu Batesaloniki bandimaki Boyei ya Mibale ya Mobikisi esengeli kozala pene. Kasi Paulo ayebaki ete yambo Yesu azonga na mabele ekozala na bopengwi—botomboki to “kobungisa ya bosolo” (tala 2 Batesaloniki 2:1–4). Okoki kokolisa bososoli na yo ya Bopengwi Monene—mpe boyebi na yo ya Bozongisi—na komaniolaka boko ya oyo elandi:

  • Makomi oyo esakolaki Bopengwi: Yisaya 24:5; Amosa 8:11–12; Matai 24:4–14; 2 Timote 4:3–4

  • Makomi oyo elakisi ete Bopengwi esilaki kobanda na ntango ya Paulo: Misala 20:28–30; Bagalatia 1:6–7; 1 Timote 1:5–7

  • Makanisi na ntina ya Bopengwi Monene na Babandi Baklisto:

    Martin Luther: “Namekaki bobele se kobandela Eklezia engebene na Makomi Masantu. … Nalobaki kaka ete Boklisto ezalaki lisusu te kati na baoyo basengelaki kobatela yango” (kati na E. G. Schweibert, Luther and His Times: The Reformation from a New Perspective [1950], 590).

    Roger Williams: “Bopengwi … ebebisaki makasi oyo nyonso etalaki bozongisi uta bopengwi oyo kino Klisto atindaki bapostolo ya sika mpo na kotia lisusu baeklezia” (kati na Philip Schaff, The Creeds of Christendom [1877], 851).

Tala lisusu 2 Nefi 28; Gospel Topics, “Apostasy,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

1 Batesaloniki 3:9–13.Nini esimbi yo na ntina ya makanisi Paulo azalaki na yango mpo na baninga na ye? Lolenge nini tokoki “kokola mpe kofulukisa bolingo moko na mosusu”? (molongo 12).

1 Batesaloniki 4:13–18.Maloba nini kati na milongo oyo na ntina ya Bosekwi epesi yo libondisi?

1 Batesaloniki 5:14–25.Ntango ozongeli toli ya Paulo kati na 1 Batesaloniki 5:14–25, bengisa ndeko moko na moko ya libota aluka liloba oyo libota ekoki kotalela malamu mpenza. Luka banzela ya kokamwa mpo na komonisa maloba oyo kati ya ndako na yo lokola likundoli. Ndakisa, moto moko na moko akoki koluka to koyema bilili oyo elakisi to elendisi liloba ye aponaki.

2 Batesaloniki3:13.Eyoki biso ya “kolemba mpo na kosala bolamu”—totondisami na mawa, ntango mosusu, na babosenga ya bolandi? Nini esalisaka biso ntango toyoki lolenge oyo? (Tala Bagalatia 6:9; Malongi mpe Mayokani 64:33.) Lolenge nini tokoki kosungana soki ekomi boye?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Banzembo oyo ekoki koyembama: “Nazali Komeka Kozala lokola Yesu,” Chants pour les Enfants,78–79.

Kobongisa Koyekola Na Yo Moko

Luka emoniseli mokolo na mokolo. “Emoniseli eyaka mbala mingi “monkoloto likolo ya monkoloto” (2 Nefi 28:30), kasi nyonso na mbala moko te. … Kokanisa te [koyekola nsango malamu] lokola eloko moko ya kolekisa ntango kasi lokola eloko oyo osalaka mikolo nyonso” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi12).

Elilingi
Klisto na mapata

Klisto Mosekwi, na Robert T. Barrett

Bimisa na lokasa