Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya libwa 11-17. 2 Bakolinti 1–7: “Bozala na Boyokani na Nzambe”


“Sanza ya libwa 11-17. 2 Bakolinti 1-7: ‘Bozala na Boyokani na Nzambe,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya libwa 11-17. 2 Bakolinti 1-7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu Klisto

Sanza ya Libwa 11–17

2 Bakolinti 1–7

“Bozala na Boyokani na Nzambe”

Ntango ozali kotanga mikanda ya Paulo epai na Bakolinti, koma boko mibeko ya nsango malamu okundoli mpe kanisa lolenge nini okoki kosalela yango na bomoi na yo.

Koma Makanisi na Yo

Ntango mosusu kozala mokambi na Eklezia elimboli kozala na mokumba ya koloba makambo ya mpasi. Oyo ezalaki solo na ntango ya Paulo kaka lokola ezali lelo. Emonani ete mokanda ya yambo ya Paulo epai ya Basantu Bakolinti esangisaki etumbu mpe esalaki mpasi na kati. Na mokanda oyo eyebanaki lokola 2 Bakolinti, amekaki kolimbola oyo etindaki ye kosalela maloba ya mpasi: “Jambi nakomeli bino na boloji mpe na mpasi mingi na motema mpe na mpinzoli mingi mpo na koyokisa bino mpasi te kasi ete boyeba bolingo na ngai mpo na bino ete eleki mingi mpenja” (2 Bakolinti 2:4). Ntango ozali kozwa boko bosemboli uta na mokambi, nsuka nsuka esalisaka mpo na koyeba ete bosemboli wana efulami na bolingo ya Klisto. Mpe kutu na bantango wapi ezali te, soki tolingi komona basusu na lolenge ya bolingo Paulo ayokaki, ezali pete na koyanola malamu na mabe manso basali biso. Lokola Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki, “Zala na boboto mpo na oyo etali bolembu ya bomoto—ya yo moko mpe lokola ya basusu oyo bazali kosala elongo na yo na Eklezia oyo ekambami na bato bamipesa, mibali mpe basi na nzoto oyo ya kufa. Longola se na ntango ya bobele kaka Mwana na Ye moko ya Likinda abonga nie, bato na masumu bazali banso baoyo Nzambe azali kosala na bango” (“Lord, I Believe,” Liahona, Sanza ya mitano 2013, 94).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

2 Bakolinti 1:3–7; 4:6–10, 17–18; 7:4–7

Mimekano na ngai ekoki kozala lipamboli.

Mpo na makambo nyonso Paulo akutanaki na yango na bomoi na ye, ezali ya kokamwa te ete akomaki makambo mingi mpo na bantina mpe mapamboli ya momekano. Ntango ozali kotanga 2 Bakolinti 1:3–7; 4:6–10, 17–18; 7:4–7, kanisa na ntina ya ndenge mimekano na yo ekoki kozala lipamboli. Ndakisa, okoki kokanisa lolenge Nzambe “akobondisa [yo] kati ya boloji [na yo] nyonso” mpe lolenge nini okoki, na bongo, “kobondisa bango baye bajali kati na boloji” (2 Bakolinti 1:4). To okoki kofandisa makanisi na lolenge nini pole ya Yesu Klisto “engengaki” kati na motema na yo, kutu ntango ozalaki kati na “mobulu” mpe “mitungisi” (2 Bakolinti 4:6, 8).

Tala lisusu Moziya 24:13–17; Henry B. Eyring, “Tested, Proved, and Polished,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 96–99; Masolo ya Nsango Malamu, “Adversity,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

2 Bakolinti 2:5–11

Kolimbisa ezali lipamboli nakoki kosala nyonso mibale oyo kopesa mpe kozwa.

Toyebi mingi te na ntina ya mobali oyo Paulo alobelaki kati na 2 Bakolinti 2:5–11—bobele kaka ete abukaki mibeko (tala milongo 5–6) mpe ete Paulo alingaki Basantu balimbisa ye (tala milongo 7–8). Mpo na nini ntango mosusu tolingaka te “kolakisa [ya biso] bolingo na ”molingami moko oyo asali biso mabe? (molongo 8). Lolenge nini koboya kolimbisa esalaka basusu mpe biso moko mpasi? (tala milongo 7, 10–11). Lolenge nini koboya kolimbisa epesaka nguya na “Satana … litomba likolo na biso? (molongo 11).

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 64:9–11.

2 Bakolinti 5:14-21

Na nzela ya Libonza ya Bomikabi ya Yesu Klisto, nakoki kozongisa bondeko na Nzambe.

Lokola moto nyonso moto mosusu, Paulo ayebaki nini yango elingaki koloba lokola kokoma “ekelamu ya sika” (2 Bakolinti 5:17). Abandaki na kozala monyokoli ya Baklisto na kokoma molobeli oyo abangaka te ya Klisto. Ntango ozali kotanga 2 Bakolinti 5:14-21, kanisa na ntina ya motuna lokola: Elimboli nini kozongisa boyokani? Elimboli nini kozongisa boyokani na Nzambe? Kanisa eloko nini oyo ekoki kokabola yo na Nzambe. Nini osengeli kosala mpo na kozala mobimba ya koyokana na Ye? Lolenge nini Mobikisi akokisaka [kozongisa boyokani] yango?

Okoki lisusu kokanisa nini yango elimboli kozala “bantoma ya Klisto” kati na “mosala ya koyokana” (milongo 18, 20). Makanisi nini ozwi uta na etinda ya Mpaka Jeffrey R. Holland “Mosala ya Boyokani”? (Liahona,, Sanza ya zomi na moko 2018, 77–79).

Tala lisusu 2 Nefi 10:23–25.

2 Bakolinti 7:8–11

Kolakisa motema ya mawa ya Nzambe ememaka na boyamboli

Mbala mingi tokanisaka te kolakisa motema ya mawa lokola eloko ya malamu, kasi Paulo alobelaki “kolakisa motema na mawa ya Nzambe” (2 Bakolinti 7:10) lokola eteni ya motuuya ya boyamboli. Banza maye ozali koyekola na ntina ya mawa ya Nzambe uta na mikapo oyo elandi: 2 Bakolinti 7:8–11; Alma 36:16–21; Mormon 2:11–15; mpe liteya ya Ndeko mwasi Michelle D. Craig “Divine Discontent” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 52–55). Ntango nini oyokaki mawa na motema na mokano ya Nzambe, mpe esalaki nini kati na bomoi na yo?

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

2 Bakolinti 3:1–3.Bandeko na yo ya libota basila kosenga na moto moko akoma mokanda mpo na kolobela bango, lokola mpo na mosala to bondimi na eteyelo? Senga bango baloba na ntina ya likambo oyo. Paulo ateyaki ete bomoi ya Basantu ezalaki lokola mikanda ya kolobela nsango malamu ya Yesu Klisto, “ekomami te na mai ya biki, kasi na Molimo ya Nzambe na bomoi.” Ntango ozali kotanga 2 Bakolinti 3:1–3 elongo, bolobela lolenge nini bandakisa na biso ekokani na mikanda oyo ekoki “koyebana mpe kotangama na bato banso,” kolakisaka bosolo mpe motuya ya nsango malamu. Ntango mosusu ndeko moko moko ya libota akoki kokoma mokanda to “nkasa” kolimbolaka lolenge nini ndeko mosusu ya libota azali ndakisa malamu ya moyekoli ya Yesu Klisto. Bakoki kotanga mikanda na bango na libota mpe kopesa yango na ndeko ya libota oyo bakomi na ntina na ye. Mpo na nini ezali ntina na kososola ete bomoi na biso ezali “moka[nda] ya Klisto”?

2 Bakolinti 5:6–7.Elingi koloba nini “kotambola na bondimi, na komona te”? Nini ezali biso kosala mpo na kolakisa ete tondimeli Mobikisi ata kutu tokoki komona Ye te?

2 Bakolinti 5:17.Libota na yo ekoki kokanisa to kozwa bandakisa na mokili ya biloko oyo ekendaka na mbongwana makasi mpe ekomi bikelamu ya sika? (tala elili na nsuka ya mwango oyo). Lolenge nini nsango malamu ya Yesu Klisto ekoki kobongola biso?

2 Bakolinti 6:1–10.Engebene na 2 Bakolinti 6:1–10, elimboli nini kozala “basali ya Nzambe”? (molongo 4). Bizaleli nini mosali ya Nzambe azali na yango?

2 Bakolinti 6:14–18.Lolenge nini tokoki kolanda toli ya Paulo mpo na “kobima kati na [bindo], mpe kokabwana na yango, ”bongo lisusu kolinga baoyo zingazinga na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Help Me, Dear Father,” Children’s Songbook, 99.

Kobongisa Mateya na Biso

Kabola biloko ya mateya. Boko maloba ya nsango malamu, lokola Bomikabi, ekoki kozala mpasi mpo na kososola. Kanisa kosalela bilili to biloko oyo ekoki kosalisa libota na yo esosola mibeko okundoli na kati ya makomi.

Elilingi
mbinzo, alingami na mwa ndako ya nzoto na ye moko, mpe lipekapeka

Ntango tobongwani na nsango malamu ya Klisto, mbongwana na biso ezali bongo ya mozindo ete Paulo alimbolaki yango lokola kokoma “ekelamu ya sika” (2 Bakolinti 5:17).

Bimisa na lokasa