Mabiangi Ya Misio
Mokapo 3: Libiangi mpo na Kobatisama mpe Kokotisama


“Mokapo 3: Libiangi mpo na Kobatisama mpe Kokotisama,” Teya Nsango Malamu ya Ngai: Mokambi na Kokabola Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023)

“Libyangi mpo na Kobatisama mpe Kokotisama,” Teya Nsango Malamu na Ngai

Mokapo 3

Libyangi mpo na Kobatisama mpe Kokotisama

Elilingi
Yaka na kati ya Lisanga ya Nzambe, na Walter Rane

Moboko ya Malongi

Tozali banso bana ya Tata na Lola. Toyaki na mabele mpo na kozwa libaku ya koyekola, kokola, mpe kokoma mingi lokola Ye na yango tokoka kozonga liboso na Ye (tala Mose 1:39). Tokoki te kokoma lokola Ye to kozonga epai na Ye na bozangi lisalisi ya bonzambe. Tata na biso na Lola atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na kosikola biso mpe kokata nkanga ya nkufa (tala 3 Nefi 27:13–22).

Tozwaka nguya ya bosikoli ya Klisto na kosalelaka bondimi epai na Ye na nzela ya boyamboli, kobatisama, kozwaka likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya nkotisa mpe koyika mpiko kino na nsuka. Kobatela liyokani ya libatisi ezali litambe ya yambo ya bokangisi na biso moko na Nzambe mpo ete Molimo Mosantu ekoka kopetola, kolendisa, mpe kobongola lolenge na biso ebonga malamu. Koyeba nguya ya komipetola oyo ebengami kobotama lisusu na molimo. (Tala 2 Nefi 31:7, 13–14, 20–21; Mosiya 5:1–7; 18; 27:24; 3 Nefi 27:20; Yoane 3:5.)

Kobotama lisusu na molimo ebandaka ntango tobatisamaka na mayi mpe na Molimo. Libatisi ezali bokuli ya esengo mpe ya elikya. Ntango tobatisami na motema ya kobukana mpe molimo ya mawa, tobandaka bomoi ya sika na lisungi ya nguya ya Nzambe. Sima ya libatisi mpe nkotisa na biso, tokoki kokoba kolendisama na koliaka elambo na lolenge elongobana. (Tala 2 Nefi 31:13; Mosiya 18:7–16; Moroni 6:2; Malongi mpe Mayokani 20:37.)

Kopalanganisa Libyangi

Ntango boyoki bokambami na Molimo, bengisa bato babatisama mpe bazwa nkotisa. Yango ekoki kosalema na ntango ya liteya songolo.

Teya malongi ya libatisi mpe sunga bato basosola malongi ya Klisto (tala liteya 3). Teya oyo etali ntina mpe esengo ya liyokani ya libatisi, ya kozwa bolimbisi ya masumu, mpe ya kozwa likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya nkotisa.

Lengela bato mpo na libyangi ya libatisi na kosalaka makasi ete bazali kososola maye oteyaki mpe liyokani oyo bakosala. Liyokani ya libatisi ezali lokola oyo elandi:

  • Kozala na bolingi ya kokamata likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto.

  • Kobatela mibeko ya Nzambe.

  • Kosalela Nzambe mpe kosalisa basusu.

  • Koyika mpiko kino na nsuka. Tala liteya 4.)

Okoki kokabola makambo oyo elandi:

“Ntango tobatisami, biso ‘totatolaka liboso ya [Nzambe] ete [biso] tokoti kati ya liyokani na ye, ete [biso] tokosalela ye mpe kobatela mibeko na ye.’ Ntango tosalaka liyokani oyo, Alakaka ete Ye ‘akosopa litondi ya Molimo na ye koleka likolo na [biso]’ (Mosiya 18:10).”

Libiangi na yo ya libatisi esengeli kozala polele mpe ya kozela te. Okoki koloba

“Okolanda ndakisa ya Yesu Klisto ya kobatisama na moto oyo akulisamaki mpo na kosala bokuli oyo? Tokosunga yo omilengela mpo na libatisi. Tobanzi okoki kobongama na [mokolo]. Okomilengela mpo na kobatisama na mokolo wana?

Lokola na libiangi nyonso oyo okopesa, laka mapamboli minene bato bakozwa ntango bandimi libiangi ya kobatisama mpe kobatela mayokani oyo ezalaka na yango. Kabola litatoli na yo ya mapamboli oyo.

Teya ete libatisi mpe nkotisa ezali nsuka ya nzela na biso te. Kasi, ezali esika moko na nzela ya liyokani oyo ememaka elikya, esengo mpe nguya ya Nzambe etonda koleka kati ya bomoi ya moto (tala Mosiya 27:25–26). Nsima ya libatisi mpe nkotisa ya bato, bakoki kotala liboso mpo na kosantisama na Molimo ntango bazali kokoba kokende liboso na nzela ya liyokani.

Soki ekoki kosalema, bobianga baye bozali koteya baya kotala mosala ya libatisi mpe liyangani ya elambo na ntango moto songolo azali kozwa nkotisa.

Makanisi mpo na libiangi ya Kobatisama

Banza kotanga lisolo ya makomi ya Yesu Klisto azali kobatisama (tala Matai 3:13–17). Bokoki lisusu kolakisa Bible video oyo ezali kolakisa libatisi ya Mobikisi to Book of Mormon video ya libatisi ya bayekoli ya Mobikisi.

Bokoki lisusu kotanga lisolo ya Nefi ya libatisi ya Yesu (tala 2 Nefi 31:4–12). Kotanga masolo ya libatisi ya Yesu Klisto ekoki kolendisa baye bazali koteyama.

Yekola Makomi

Boyekola makomi oyo elandi:

Koma bokuse ya maye oyekoli.

Bimisa na lokasa