“Mokapo 3: Liteya 1—Nsango ya Bozongisi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto,” Teya Nsango Malamu ya Ngai: Mokambi mpo na Kokabola Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023)
“Mokapo 3: Liteya 1,” Teya Nsango Malamu ya Ngai
Mokapo 3: Liteya 1
Nsango ya Bozongisi ya Nsango Malamu ya Yesu Klisto
Uta na ebandeli ya mokili, Nzambe abimisaka nsango malamu epai ya bana na Ye na nzela ya baprofeta. Ye asalaki yango na nzela ya Mwana na Ye, Yesu Klisto. Na kala, Yesu abimisaki nsango malamu na baprofeta lokola Adama, Noa, Abalayama, mpe Mose. Kasi bato ebele babwakisaki yango.
Mibu nkoto mibale mileki, Yesu Klisto Yemei ateyaki nsango malamu na Ye mpe atiaki Eklezia na Ye. Bato kutu babwakisaki Yesu. Kala te nsima ya liwa na Ye, bozangi ya bosolo ya Nkolo mpe Eklezia epalanganaki na mokili mobimba. Litondi ya nsango malamu mpe likoki ya bonganganzambe ezalaki lisusu te likolo ya mabele.
Bikeke nsima, Nzambe abengaki profeta mosusu, Joseph Smith. Nzambe azongisaki litondi ya nsango malamu na nzela na ye mpe apesaki ye ndingisa ya kosala Eklezia ya Yesu Klisto lisusu.
Kozalaka na litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto na mabele ezali moko ya mapamboli minene na mikolo na biso. Nsango malamu esungaka biso mpo na koyanola mituna ya boluki makasi ya bomoi. Baprofeta ya bomoi bakambaka biso na ntango ya mimekano. Likoki ya bonganganzambe ya Nzambe ezali lisusu na nse ya mabele mpo na kopambola bana na Ye.
Makanisi mpo na koteya
Eteni oyo epesi ndakisa ya nsango mpo na kosunga bino komilengela mpo na koteya. Ezali lisusu na bandakisa ya mituna mpe mabengisi oyo bokoki kosalela.
Ntango bozali komilengela mpo na koteya, na lisungi ya losambo bobanza bamposa ya lolenge mpe ya molimo ya moto. Bozwa mokano ya nini ekosunga makasi mpo na koteya. Bomilengela mpo na kolimbola maloba oyo bato bakoki kososola te. Bobongama engebene mpo na ntango boni bokozwa, komikundolaka mpo na kobatela mateya ya mikuse.
Bopona makomi ya kosalela ntango bozali koteya. Mpe “Moboku ya Malongi” eteni ya liteya ezali na makomi ya kosunga ebele.
Bobanza mituna nini ya kotuna ntango bozali koteya. Bobongisa mabengisi ya kopesa oyo ekolendisa moto moko na moko asala likambo.
Beta nsete na mapamboli elakama ya Nzambe, mpe kabola litatoli na yo ya maye ozali koteya.
Nini Okoki Koteya Bato na Baminiti 15-25
Pona moko to mingi ya mabongi oyo elandi mpo na koteya. Moboku ya malongi mpo na mabongi moko na moko epesami nsima ya mwango oyo.
Nzambe Azali Tata na Biso ya Bolingo na Lola
-
Nzambe azali Tata na biso ya Lola, mpe tozali bana na Ye. Akelaki biso na elilingi na Ye.
-
Nzambe ayebi biso yemei mpe alingi biso.
-
Nzambe azali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa ya nkembo ebonga nie.
-
Nzambe alingaka kopambola biso na kimia mpe litondi ya esengo oyo ekotikala mpo na seko.
-
Lokola Nzambe alingaka biso, Atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na kosikola biso uta na lisumu mpe nkufa.
Nzambe Abimisaka Nsango Malamu na nzela ya Baprofeta na Eleko Nyonso
-
Nzambe abiangaka baprofeta mpo na kozala bantoma na Ye na mabele.
-
Na kala, Nzambe abengaki baprofeta lokola Adama, Noa, Abalayama, mpe Mose.
-
Profeta ya bomoi azwaka emoniseli uta na Nzambe mpo na koteya mpe kokamba biso lelo.
Mosala ya Yesu Klisto na Mabele mpe Bomikabi na Ye
-
Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe.
-
Na ntango ya mosala na Ye na mabele, Yesu ateyaki nsango malamu na Ye mpe atiaki Eklezia na Ye.
-
Yesu Klisto abiangaki Bapostolo zomi na mibale mpe apesaki bango likoki ya kokamba Eklezia na Ye.
-
Na nsuka ya bomoi na Ye, Yesu amikabaki mpo na masumu na biso na mpasi na Ye na Elanga ya Getesemana mpe na ntango ya Bobaki na ekulusu. Nsima ya liwa ya Yesu, Ye asekwaki.
-
Na ntina ya libonza ya bomikabi ya Yesu, tokoki kolimbisama mpe kopetolama na masumu na biso ntango tozali koyambola. Yango ememelaka biso kimia mpe esalaka ete ekoka mpo na biso tozonga liboso ya Nzambe mpe tozwa litondi ya esengo.
-
Mpo na Lisekwa ya Yesu, biso banso tokosekwa nsima ya liwa na biso. Yango elingi koloba ete molimo ya moto moko na moko mpe nzoto ekozonga elongo mpe kobika mpo na libela.
Bokwei Monene
-
Nsima ya liwa ya Bapostolo ya Yesu, bokwei monene ya nsango malamu mpe ya Eklezia ya Yesu Klisto esalamaki.
-
Na ntango oyo, bato babongolaki mateya ebele ya nsango malamu. Lisusu bato babongolaki makuli ya bonganganzambe, lokola libatisi. Likoki ya bonganganzambe mpe Eklezia oyo Yesu atiaki ezalaki lisusu te na mabele.
Bozongisi bwa Nsango Malamu ya Yesu Klisto o nzela ya Joseph Smith
-
Joseph alukaki koyeba Eklezia nini ezalaki Eklezia ya solo ya Nzambe mpo ete akota na yango. Tata na Lola mpe Yesu Klisto babimelaki Ye na 1820. Likambo oyo ebengami Limoni ya Yambo.
-
Nzambe abengaki Joseph Smith mpo na kozala profeta, kaka lokola Abengaki baprofeta na ebandeli.
-
Nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisamaki na nzela ya Joseph Smith.
-
Batindami misusu ya lola bazongisaki bonganganzambe, mpe Joseph apesamaki ndingisa ya kosala Eklezia ya Yesu Klisto.
-
Yesu Klisto azali kokoba kobamba Eklezia na Ye lelo na nzela ya baprofeta ya bomoi mpe bapostolo.
Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto
-
Buku ya Mormon ezali lisolo ya makomi ekomami na bantango ya kala na baprofeta na Bamelika. Joseph Smith abongolaki yango na likabo mpe nguya ya Nzambe.
-
Na Biblia, Buku ya Mormon epesaka litatoli ya mosala ya Yesu, mateya, mpe mosala lokola Mobikisi na biso.
-
Tokoki kopusana penene ya Nzambe na kotangaka Buku ya Mormon mpe kokangama na mibeko na yango.
-
Tokoki koyeba ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe na kotangaka yango, komanyolaka yango mpe kosambelaka na ntina na yango. Likambo oyo ekosunga biso lisusu toya koyeba ete Joseph Smith azalaki profeta.
Bosambela mpo na Koyeba Bosolo na nzela ya Molimo Mosantu
-
Losambo ezali nzela mibale ya bosololi ya Nzambe mpe bana na Ye
-
Na nzela ya losambo ya solo, tokoki koyeba ete nsango ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali solo.
-
Ntango tosambelaka, Molimo Mosantu eteyaka biso mpe endimisaka bosolo epai na biso.
Mituna oyo Bokoki Kotuna Bato
Mituna oyo elandi ezali bandakisa ya maye bokoki kotuna bato. Mituna oyo ekoki kosunga bino bozala na masolo ya ntina mpe bososoli ya bamposa ya moto mpe bomoni.
-
Ondimelaka nini na ntina ya Nzambe?
-
Lolenge nini koyoka kozala pene pene ya Nzambe esungaka yo?
-
Oyebi nini na ntina ya Yesu Klisto?” Lolenge nini bomoi mpe mateya na Ye esalisi yo?
-
Lolenge nini ozui biyano ya motuya na kati ya mokili ya lelo etondi na mobulungano?
-
Lolenge nini yango esungi yo na koyeba ete ezali na profeta ya bomoi na mabele lelo?
-
Osila koyoka na ntina ya Buku ya Mormon? Tokoki kokabola mpo na nini yango ezali motuya?
-
Okoki kokabola boyambi na yo naoyo etali losambo? Tokoki kokabola boyambi na biso naoyo etali losambo?
Mabengisi oyo Bokoki Kopesa
-
Okosenga Nzambe na losambo mpo na kosunga yo oyeba ete oyo totei ezali solo? (Tala “Teaching Insights: Prayer” na eteni ya suka ya liteya oyo.)
-
Okokende eklezia Eyenga oyo ekoya mpo na koyekola na ntina ya maye toteyi?
-
Okotanga Buku ya Mormon mpe okosambela mpo na koyeba ete ezali liloba ya Nzambe? (Okoki kotalisa mikapo to milongo ya elobeli yango.)
-
Okolanda ndakisa ya Yesu mpe kozwa libatisi? (Tala “Libyangi mpo na Kobatisama mpe Kozwa nkotisa,” oyo eye liboso ya liteya oyo.)
-
Ekoki biso kotia ntango mpo na kotala yo mbala ya nsima?
Moboko ya Malongi
Eteni oyo epesi malongi mpe makomi mpo ete oyekola kolendisa boyebi na yo mpe litatoli ya nsango malamu mpe kosunga yo oteya.
Nzambe Azali Tata na Biso ya Bolingo na Lola
Nzambe azali Tata na biso ya Lola, mpe tozali bana na Ye. Akelaki biso na elilingi na Ye. Azali na nzoto mpe mikuwa “ebonga nie mpe ya nkembo lokola ya moto” (Malongi mpe Mayokani 130:22).
Nzambe ayebaka biso yemei, mpe Alingaka biso koleka bososoli na biso. Asosolaka mikakatano na biso, mawa, mpe botau, mpe Asalisaka biso mpo na yango. Asepelaka na bokobi na biso liboso mpe Akosunga biso tosala maponi ya malamu. Alingaka kosolola na biso, mpe tokoki kosolola na Ye na nzela ya losambo.
Nzambe apesi biso boyebi oyo na mabele ete na yango tokoka koyekola, kokola, mpe kokoma mingi lokola Ye. Na bolingo ebonga nie, Alingaka biso tozonga epai na Ye sima ya nkufa na biso. Na yango, tokoki te kosala yango biso moko. Lokola Tata na Lola alingaka biso, Atindaki Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpo na kosikola biso. “Pamba te Nzambe alingi mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na ye, … mpo ete mokili na nzela na ye ekoka kobikisama” (Yoane 3:16–17).
Nzambe alingaka kopambola biso na kimia mpe litondi ya esengo oyo ekotikala mpo na seko. Apesaki mwango oyo epesaka biso libaku ya kozwa mapamboli oyo. Mwango oyo ebengami mwango ya lobiko (tala liteya 2).
Nzambe Abimisaka Nsango Malamu na nzela ya Baprofeta na Eleko Nyonso
Baprofeta Bazali Bantoma ya Nzambe na Mabele
Nzela moko ya ntina oyo Nzambe alakisaka bolingo na Ye mpo na biso ezali na kobiangaka baprofeta, kopesaka bango likoki ya bonganganzambe, mpe kofulaka bango baloba mpo na Ye. Baprofeta bazali bantoma ya Nzambe na mabele. Profeta Amos ya Boyokani na Kala akomaki ete “Solo Nkolo Nzambe akosala likambo te, soki akobimisa sekele na ye te na basali na ye baprofeta” (Amosa 3:7). Mapamboli misusu oyo tozwaka uta na baprofeta ya bomoi ezali oyo elandi.
Batatoli ya Yesu Klisto. Baprofeta bazali batatoli ya sikisiki ya Yesu Klisto, kotatolaka na ntina na Ye lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso.
Mateya. Baprofeta bazwaka bokambi uta na Nzambe mpo na kosunga biso tososola bosolo uta na libungi. Bateyaka biso mpo na kotosa mitindo ya Nzambe mpe koyambola ntango tokweisami. Basakolaka oyo etali lisumu mpe bakebisaka na ntina ya makama na yango.
Mateya ya baprofeta etombolaka biso epai ya Nzambe mpe esungaka biso tozwa mapamboli Ye alingaka mpo na biso. Bobateli na biso monene eyekamaka na kolandaka liloba ya Nkolo oyo epesami na nzela ya baprofeta na Ye.
Likoki ya Bonganganzambe. Profeta ya lelo azali mokambi mosimbi bonganganzambe na mabele. Bonganganzambe ezali likoki mpe nguya ya Nzambe. Profeta azali na likoki ya koloba mpe kosala na nkombo ya Nzambe mpo na lobiko ya bana na Ye.
Bokambi ya Eklezia. Eklezia ya Yesu Klisto etongami na moboko mwabaprofeta mpe bapostolo (tala Baefese 2:19–20; 4:11–14).
Baprofeta na Bantango ya Kala
Adama azalaki profeta ya yambo na mabele. Nzambe abimisaki nsango malamu ya Yesu Klisto epai na ye mpe apesaki ye likoki ya bonganganzambe. Adama mpe Eva bateyaki bana na bango bosolo mpe balendisaki bango bakolisa bondimi mpe basalela nsango malamu na bomoi na bango.
Na nsuka bana ya Adama mpe Eva batombokelaki mpe bapesaki nsango malamu mokongo. Yango ekambaki na nzela oyo ebengami bopengwi, to bokwei. Ntango bopengwi na mokili mobimba esalami, Nzambe alongolaki likoki ya bonganganzambe na Ye, oyo ezali ntina mpo na koteya mpe kosala makuli ya nsango malamu.
Boyokani na Kala etei makambo ebele ya bopengwi na mokili mobimba. Mpo na kosukisa bileko oyo, Nzambe apusanaki pene ya bana na Ye na kobengaka profeta mosusu. Abimisaki lisusu babosolo ya nsango malamu na baprofeta oyo mpe apesaki bango likoki ya bonganganzambe. Basusu ya baprofeta oyo bazalaki, Noa, Abalayama, mpe Mose. Na mawa, na ndakisa ebandelamaki na eleko, bato na nsuka babwakisaki baprofeta mpe bakweyaki.
Mosala ya Yesu Klisto na Mabele mpe Bomikabi na Ye
Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe. Yesu mpe Bomikabi na Ye ezali katikati ya mwango ya Nzambe mpo na biso. Bomikabi na Ye ezalaki na mpasi na Ye na Elanga ya Getesemane, mpasi mpe liwa na Ye na ekulusu, mpe Bosekwi na Ye.
Uta na eleko ya Adama mpe Eva, bato batalaki liboso na boyei ya Yesu Klisto lokola Mobikisi mpe Mosikoli na bango. Tata na Lola atindaki Yesu Klisto na mabele uta mibu koleka 2000.
Yesu abikaki bomoi ebonga nie mpe ezanga lisumu. Ateyaki nsango malamu na Ye mpe atiaki Eklezia na Ye. Abengaki Bapostolo Zomi na mibale mpe apesaki bango likoki ya bonganganzambe mpo na koteya mpe kosala makuli esantu, lokola libatisi. Apesaki bango lisusu likoki ya kokamba Eklezia na Ye.
Na nsuka ya bomoi na Ye, Yesu Klisto amikabaki mpo na masumu na biso na mpasi na Ye na Getesemane mpe na ntango ya Bobakami na Ye na ekulusu. Na ntina ya libonza ya bomikabi ya Yesu, tokoki kopetolama na masumu na biso ntango toyamboli. Yango episi biso nzela ya kozonga liboso ya Nzambe mpe kozwa litondi ya esengo.
Sima ya bobakami na ekulusu ya Yesu, Asekwaki, azwaki elonga likolo ya nkufa na nzela ya nguya ya Tata na Lola. Lokola Yesu Klisto Asekwaki, banso kati na biso tokosekwa sima ya nkufa na biso. Yango elingi koloba ete molimo mpe nzoto ya moto moko na moko ekosangana lisusu, mpe moko na moko na biso akobika seko na nzoto ebonga nie mpe esekwa. (Tala “The Atonement of Jesus Christ” na liteya 2.)
Profeta Joseph Smith ateyaki, “Mabongi ya ntina ya lingomba na biso ezali litatoli ya Bapostolo mpe Baprofeta, mpo na oyo etali Yesu Klisto, ete Akufaki, akundamaki, mpe asekwaki lisusu mokolo ya misato, mpe amataki na lola; mpe makambo mosusu oyo ezali ya lingomba na biso ezali bobele mabakisi na yango” (Mateya ya Baprofeta ya Eklezia: Joseph Smith [2007], 49).
Bokwei Monene
Nsima ya liwa ya Yesu Klisto, Bapostolo na Ye balukaki kobomba malongi ya Klisto ezala peto mpe kobatela limemia kati na Eklezia. Nzokande, bandimi ebele ya Eklezia babwakisaki Bapostolo mpe malongi oyo Yesu ateyaki.
Nsima bobomi ya Bapostolo, bokwei monene ya nsango malamu mpe Eklezia ya Yesu Klisto esalamaki. Bokwei oyo mbala mosusu ebengami Bopengwi Monene. Mpo na yango, Nzambe alongolaki likoki ya bonganganzambe na mabele. Bobungisi oyo ezalaki ya likoki oyo esengelamaki mpo na kokamba Eklezia. Lokola mbano, Eklezia oyo Yesu atiaki ezalaki lisusu te na mabele.
Na eleko oyo, bato babongolaki mateya ebele ya nsango malamu. Mingi ya boyebi na ntina ya lolenge ya bosolo ya Tata na Lola, Yesu Klisto mpe Molimo Mosantu ekosamaki to ebungaki. Lisusu bato babongolaki bokuli ya bonganganzambe, lokola libatisi.
Bikeke nsima, baluki ya bosolo ya mibali mpe basi bmekaki kosala mateya na ndenge na bango mpe bisalelo ebongwamaki. Balukaki pole ya molimo mingi koleka, mpe mingi na ntina ya bonsenga mpo na bozongisi ya bosolo. Makasi na bango ememaki na kosalaka baeklezia ebele.
Eleko oyo ya ntango ebotaki bonsomi makasi ya biyamba ya bato, oyo efungolaki nzela mpo na bozongisi ya bosolo mpe likoki kowuta na Nzambe.
Baprofeta mpe Bapostolo basakolaki kala Bopengwi Monene (tala 2 Batesalonika 2:1–3). Basakolaki lisusu na kala ete nsango malamu mpe Eklezia ya Yesu Klisto ekozongisama na mabele (tala Misala 3:20–21). Soki bokwei monene esalamaki te, bozongisi ekokaki kozala ntina te.
Bozongisi bwa Nsango Malamu ya Yesu Klisto o nzela ya Joseph Smith
Limoni ya Yambo mpe Libyangi ya Joseph Smith lokola Profeta
Na ntango ya bikeke ntango litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezalaki na mabele te, Tata na Lola akobaki kosala na bana na Ye. Na bokobi ya ntango, Alengelaki nzela mpo ete bakoka kopambolama lisusu na litondi ya nsango malamu na Ye. Ntango mabaku ezalaki malamu, Abengaki Joseph Smith lokola profeta na nzela na ye nde nsango malamu mpe Eklezia ya Yesu Klisto ekokaki kozongisama.
Joseph Smith afandaki na esti ya Etazini na ntango ya mobulungano monene ya eyamba. Bandeko ya libota na ye bamipesaki na Nzambe mpe balukaki bosolo. Eklezia mingi ezalaki koluka bosolo, mpe Joseph Smith azalaki na mposa ya koyeba eklezia nini ezalaki solo (tala Joseph Smith—History 1:18). Biblia eteyi ete ezali se na “Nkolo moko, bondimi moko, libatisi moko” (Baefese 4:5). Lokola Joseph akendeki na baeklezia ya ndenge na ndenge, azalaki na mobulungano na ntina ya eklezia nini kolanda. Nsima alobaki:
“Mobulu mpe kowelana o ntei ya biyamba bikeseni ezalaki boye makasi, ete ekokaki te mpo na moto elenge lokola nazalaki… koyeba libela mpenza nani azali na elonga mpe nani azali na elonga te.
“Na kati ya etumba oyo ya maloba mpe mbilingambilinga ya makanisi, nazalaki mbala na mbala komilobela: Nini nasengeli kosala? Nani kati ya mangomba maye manso azali solo; to, ezali bango banso se na ntango moko kati na libunga? Soki moko kati na bango azali solo, ezali nani, mpe nakoyeba yango lolenge nini?” (Joseph Smith—Mambi ya kala 1:73–74).
Lokola bato ebele, Joseph Smith azalaki na mituna na ntina ya lobiko ya molimo na ye. Alingaki masumu na ye elimbisama mpe apetolama liboso ya Nzambe. Lokola alukaki bosolo na kati ya baeklezia ndenge na ndenge, atangaki na kati ya Biblia, “Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe, oyo apesaka na banso na motema malamu, mpe na kopamela te; mpe ekopesamela ye” (Yakobo 1:5
Na ntina ya litangi oyo, Joseph azwaki mokano ya kotuna Nzambe nini asengeli kosala. Na eleko ya milona ya mobu 1820, akendaki na mwa zamba ya mpembeni ya ndako na ye mpe afukamaki na losambo. Ezali na masolo minei ya limoni oyo elandaki, ekomamaki na Joseph Smith to na bakomi na nse ya bokambi na ye (tala Gospel Topics Essays, “First Vision Accounts”). Kati ya lisolo ekomami lokola makomi, atalisaki boyebi na ye lokola oyo elandi:
“Namonaki likonzi ya pole kaka likolo ya moto na ngai, kongenga koleka moyi oyo ekitaki malembe malembe kino kokita likolo na ngai. Ntango pole yango ezalaki likolo na ngai namonaki Bato mibale, oyo ya bango bongengi mpe nkembo ekoki kolimbolama te, kotelemaka likolo na mopepe. Moko na bango alobaki na ngai, kobiangaka ngai na nkombo mpe alobaki, kolakisaka mosusu —Oyo azali Mwana wa Ngai wa Bolingo Yokela Ye!” (Joseph Smith—History 1:16–17).
Na limoni liye, Nzambe Tata mpe Mwana wa Ye, Yesu Klisto, bamonanaki epai ya Joseph Smith. Mobikisi alobaki na ye akende na eklezia ata moko te.
Na lisolo mosusu ya eteni oyo, Joseph akabolaki ete Mobikisi ayebisaki ye lisusu: “Masumu na yo elimbisami. … Tala, nazali Nkolo ya nkembo. Babakaki ngai na ekulusu mpo na mokili, mpo ete banso baoyo bandimeli nkombo na ngai bakoka kozwa bomoi ya seko.”
Nsima ya limoni, Joseph alobaki, “Molimo na ngai etondisamaki na bolingo, mpe mpo na mikolo ebele nakokaki kosepela na esengo monene mpe Nkolo azalaki na ngai” (Joseph Smith History, circa Summer 1832, 3, josephsmithpapers.org; maloba mpe bilembo etiama na lolenge ya lelo).
Na nzela ya limoni oyo, Joseph Smith akomaki nzeneneke ya Yesu Klisto mpe ayekolaki babosolo ya motuya na ntina ya Bonzambe. Ndakisa, ayekolaki ete Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali bikelamo bikesena. Ntango babengaki ye na nkombo, ayekolaki ete Bayebaki ye moko. Ntango Joseph ayebisamaki ete alimbisamaki, ayekolaki ete Nzambe azalaki ngolu. Boyebi oyo etondisaki ye na esengo.
Lokola Nzambe asalaki na baprofeta mingi ya liboso, Abengaki Joseph Smith azala profeta na nzela ya oyo litondi ya nsango malamu esengelaki kozongisama na mabele. Bozongisi oyo ekoki kosunga bana ya Nzambe bazwa esengo na mokili oyo mpe bomoi ya seko na mokili ekoya—nyonso na ngolu ya Yesu Klisto.
Bozongisi ya Bonganganzambe mpe Bafungola ya Bonganganzambe
Nsima ya bobimi ya Tata mpe Mwana, bantoma basusu ya lola, batindamaki na Joseph Smith mpe moninga wa ye ya mosala Oliver Cowdery. Yoane Mobatisi abimaki lokola mosekwi mpe apesaki bango Bonganganzambe ya Alona mpe bafungola na yango. Bonganganzambe ya Alona ezali na likoki ya libatisi.
Kala te nsima, Petelo, Yakobo mpe Yoane—misato ya Bapostolo ya ebandeli—babimaki lokola basekwi mpe bapesaki Bonganganzambe ya Melekisedeki mpe banfungola na yango na Joseph Smith mpe Oliver Cowdery. Bonganganzambe oyo ezali likoki ya lolenge moko na oyo Klisto apesaki Bapostolo na Ye na kala.
Na kati ya Tempelo ya Kirtland, Mose, Eliasi, mpe Eliya babimelaki Joseph Smith mpe Oliver Cowdery mpe bapesaki epai na bango likoki mosusu mpe bafungola ya bonganganzambe ya motuya mpo na kokokisa mosala ya Nzambe na mikolo ya nsuka. Mose apesaki bafungola ya bosangisi ya Yisalaele. Eliasi apesaki eleko ya nsango malamu ya Abalayama. Eliya apesaki bafungola ya nguya ya bokangisi. (Tala Malongi mpe Mayokani 110:11–16; tala lisusu Buku Monene, 3.1.)
Bokambi ya Eklezia
Joseph Smith akambamaki mpo na kobongisa Eklezia ya Yesu Klisto lisusu na mebele. O nzela na ye, Yesu Klisto abiangaki Bapostolo zomi na mibale.
Baprofeta ya ntango ya biblia balobelaki ntango oyo tozali ya mikolo ya nsuka to mikolo mya nsuka. Ezali eleko ya ntango ya yambo Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Yango wana, Eklezia ebengami na nkombo ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka (tala Malongi mpe Mayokani 115:3–4; tala lisusu 3 Nefi 27:3–8).
Baprofeta ya bomoi mpe Bapostolo ya Lelo
Kaka lokola Yesu abengaki Bapostolo na ntango ya mosala na Ye ya nkufa mpo na kokamba Eklezia na Ye, Abengi Bapostolo mpo na kokamba yango lelo. Bokambi ya Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale bazali baprofeta, bamoni, mpe babimisi.
Kaka Apostolo monene abengami se profeta mpo ete akambaka likolo ya Ekleaia mobimba mpe ye nde apesami likoki ya koloba mpo na Nkolo. Azali moto oyo abengami mokitani ya Joseph Smith. Ye mpe Bapostolo ba sikawa balandisaka likoki na bango kino na Yesu Klisto na monkoloto oyo ebukana te oyo ebandaki ntango Joseph Smith akulisamaki na nse ya maboko ya bantoma ya lola.
Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto
Buku ya Mormon ezali mokanda ya kala ya makomi esantu lokola Biblia. Biblia ezali litatoli moko ya Yesu Klisto, mpe Buku ya Mormon ezali litatoli ya mibale ya mosala na Ye, mateya na Ye, mpe mosala na Ye lokola Mobikisi na biso.
Joseph Smith akambamaki na ntoma uta na lola na nkombo ya Moroni na ngomba moko wapi bapalaki ya makomi ya kala ekundamaki uta bikeke ebele. Makomi oyo, ekomamaki na bapalaki ya wolo (nkasa ya mike ya mabende), ezalaki na makomi ya baprofeta na ntina ya masolo ya Nzambe na bato ya kala ya Bamelika. Joseph Smith abongolaki lisolo oyo na likabo mpe nguya ya Nzambe.
Baprofeta na Buku ya Mormon bayebaki ntina ya etinda ya Yesu Klisto mpe bateyaki nsango malamu na Ye. Nsima ya bosekwi ya Yesu, Abimelaki bato oyo mpe asalaki ye moko epai na bango. Ateyaki bango mpe atiaki Eklezia na Ye.
Buku ya Mormon ememaka biso pene ya Nzambe ntango toyekolaka, tososolaka, mpe tosalelaka mateya na yango. Profeta Joseph Smith alobaki ete “mobali [to mwasi] akopusana pene ya Nzambe na kotosaka mibeko ya [buku], koleka buku mosusu” (Mateya ya: Joseph Smith, 64).
Mpo na koyeba ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe, tosengeli kotanga yango, komanyola yango, mpe kosambela mpo na yango. Profeta ya Buku ya Mormon alakaki ete Nzambe akobimisa bosolo ya buku epai na biso ntango tosambeli na motema moko, na likanisi ya sembo, mpe na bondimi na Klisto (tala Moroni 10:3–5). Koyekola Buku ya Mormon ezali ntina mpo na koyika mpiko na mbongwana.
Ntango tozali kotanga Buku ya Mormon mpe kosambela na ntina na yango, tokoyekola babosolo etali Yesu Klisto oyo ekopambola bomoi na biso. Tokoya lisusu koyeba ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe mpe ete nsango malamu mpe Eklezia ya Yesu Klisto ezongisamaki na nzela na ye.
“Nalaki ete ntango bozali koyekola Buku ya Mormon na nzela ya losambo mikolo nyonso, okozwa bikateli ya malamu koleka—mikolo nyonso. Nalaki ete ntango bomanyoli maye bozali koyekola, maninisa ya lola makofungwama, mpe bokozwa biyano na mituna na bino moko mpe bokambi mpo na bomoi na bino moko. Nalaki ete ntango bozali komizindisa bino moko mikolo nyonso na kati ya Buku ya Mormon, bokoki komibatela na mabe ya mokolo” (Russell M. Nelson, “The Book of Mormon: What Would Your Life Be Like without It?” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 62–63).
Bosambela mpo na Koyeba Bosolo na nzela ya Molimo Mosantu
Mpo ete Nzambe azali Tata na biso, Akosunga biso toyeba bosolo. Tokoki koyeba ete nsango ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali solo ntango tozali kotanga Buku ya Mormon mpe kobondela Nzambe. Ntango tosambelaka na motema moko mpe likanisi ya sembo, Akoyanola mituna na biso mpe akokamba bomoi na biso.
Mbala mingi Nzambe ayanolaka mabondeli na biso na nzela ya Molimo Mosantu. Ntango tozali kosambela, Molimo Mosantu ekoteya biso mpe ekondimisa bosolo. Masolo uta na Molimo Mosantu ezalaka na nguya. Eyelaka mbala mingi lokola ndaka ya kimia na nzela ya mayoki, makanisi, mpe mabanzo (tala 1 Bakonzi 19:11–12; Elamani 5:30; Malongi mpe Mayokani 8:2).
Boyekoli makasi ya makomi (mingimingi Buku ya Mormon), boyei na liyangani ya poso ya elambo, losambo ya sembo esungaka biso toyoka nguya ya Molimo Mosantu mpe kozwa bosolo.
Libongisi ya Liteya ya Mokuse na Mwa Mokuse
Nsango oyo elandi ezali ndakisa ya oyo osengeli koteya moto moko soki ozali na ntango moke. Ntango okosalela nsango oyo, pona moko to mabongi ebele mpo na koteya. Moboko ya malongi moko na moko epesamaki na ebandeli na liteya.
Ntango ozali koteya, tuna mituna mpe yoka. Panza mabyangi oyo ekosunga bato bayekola mpo na kokola pene ya Nzambe. Libyangi moko ya ntina ezali mpo na moto akutana na bino lisusu. Bowumeli ya liteya ekozala engebene na mituna ozali kotuna mpe boyoki ozali na yango.
Nini Okoki Koteya Bato na Miniti 3–10
-
Nzambe azali Tata na biso ya Lola, mpe Akelaki biso na elilingi na Ye. Ye ayebaka biso moko na moko mpe alingaka biso. Alingaka kopambola biso na kimia mpe litondi ya esengo oyo ekowumela seko.
-
Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe. Etinda na Ye ezalaki mpo ete tokoka kopetolama na masumu, kolonga nkufa, mpe kozwa bomoi ya seko.
-
Nzambe abiangaka baprofeta mpo na kozala bantoma na Ye na mabele. Na kala, Abengaki baprofeta lokola Adama, Noa, Abalayama, mpe Mose. Profeta ya bomoi azwaka emoniseli uta na Nzambe mpo na koteya mpe kokamba biso lelo.
-
Na ntango ya mosala ya nkufa ya Yesu, Atiaki Eklezia na Ye. Nsima ya liwa ya Bapostolo ya Yesu, bokwei monene ya nsango malamu mpe ya Eklezia ya Yesu Klisto esalamaki. Bato babongolaki mateya mingi ya nsango malamu mpe makuli ya bonganganzambe, lokola libatisi.
-
Nzambe abengaki Joseph Smith mpo na kozala profeta, kaka lokola Abengaki baprofeta na ebandeli. Tata na Lola mpe Yesu Klisto babimelaki ye. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisamaki na nzela na ye.
-
Buku ya Mormon ezali mokanda ya makomi. Lokola Biblia, ezali boyokani ya Yesu Klisto mpe esungaka biso topusana pene ya Nzambe ntango totanga yango mpe tosalelaka mateya na yango. Profeta Joseph Smith abongolaki yango na likabo ya nguya ya Nzambe.
-
Na nzela ya losambo ya solo, tokoki kosolola na Nzambe. Tokoki koyeba ete nsango ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali solo.