Mabiangi Ya Misio
Mokapo 3: Liteya 4—Kokoma Bayekoli ya Yesu Klisto ya Bomoi Mobimba


“Mokapo 3: Liteya 4—Kokoma Bayekoli ya Yesu Klisto ya Bomoi Mobimba,” Teya Nsango Malamu ya Ngai: Mokambi na Kokabola Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023)

“Mokapo 3: Liteya 4,” Teya Nsango Malamu ya Ngai

Mokapo 3: Liteya 4

Kokoma Bayekoli ya Yesu Klisto ya Bomoi Mobimba

Mwana Mpate oyo Ebungaki, na Del Parson

Koteya Liteya Oyo

Libatisi ezali likuli ya esengo ya elikya. Ntango tobatisami, tolakisi mposa na biso ya kolanda Nzambe mpe kokota na nzela oyo ekambaka na bomoi ya seko. Tolakisi lisusu ekateli na biso ya kokoma bayekoli ya Yesu Klisto ya bomoi mobimba.

Liteya oyo ebongisami engebene na mayokani tosalaka na libatisi. Esangisi biteni minene oyo elandi, mokomoko na yango ezali na biteni mikemike:

Bosalisa bato basosola ete mibeko mpe mitindo bozali koteya bango ezali biteni ya liyokani oyo bakosala na libatisi. Bolakisa bango lolenge nini eteni moko na moko ya liteya oyo ekosalisa bango “koya epai ya Klisto … mpe kozwa lobiko na ye” (Omini 1:26; tala lisusu 1 Nefi 15:14).

Bokolinga koteya liteya oyo na bozongeli mingi. Esalemaka mingi te ete liteya moko ewumela ntango molai koleka miniti 30. Mbala mingi ezalaka malamu kotala bato na ngonga mokuse, mbala na mbala oyo etali biteni mikemike ya makambo.

Bobongisa oyo bokoteya, ntango nini bokoteya yango, mpe ntango boni bokozwa. Bokanisa bamposa ya bato oyo bozali koteya, mpe boluka bokambi ya Molimo. Bozali nsomi ya koteya engebene na oyo ekosalisa bato malamu koleka bamilengela mpo na libatisi mpe nkotisa.

Biteni mosusu na liteya oyo ezali na nkasa ya mabyangi ya sikisiki. Boluka bofuli na kozwa mokano ya lolenge nini mpe ntango nini kosembola mabyangi. Bokanisa likoki ya bososoli ya moto na moto. Bosalisa ye (mwasi to mobali) abika nsango malamu litambe moko na mbala moko.

mwasi azali kozwa elambo

Liyokani na Biso ya Kolinga Kozwa Likolo na Biso Nkombo ya Yesu Klisto

Ntango tozwaka libatisi, tondimaka kolanda Yesu Klisto “na mokano mobimba ya motema.” Totatolaka lisusu ete “tondimi kozwa likolo na [biso] nkombo ya Yesu Klisto” (2 Nefi 31:13; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 20:37).

Kozwa likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto elimboli ete tokundolaka Ye mpe tosalaka makasi ya kobika lokola bayekoli na Ye ya bomoi mobimba. Totikaka mwinda na Ye engenga na nzela na biso epai ya basusu. Tomimonaka lokola ya Ye mpe totiaka Ye liboso na bomoi na biso.

Biteni oyo elandi elobeli banzela mibale oyo tomikundolaka mpe tolandaka Yesu Klisto.

Kosambela mbala na mbala.

Losambo ekoki kozala lisolo ya pete elongo na Tata na Lola oyo ewuti na motema. Na losambo, tosololaka na Ye polele mpe na bosembo. Tolakisaka bolingo na biso mpo na Ye mpe botondi mpo na mapamboli na biso. Tosengaka lisusu lisalisi, bobateli, mpe litambwisi. Ntango tosilisi nsambo na biso, tosengeli kopema mwa moke mpe koyoka.

Yesu Klisto ateyaki, “Bosengeli ntango nyonso kosambela epai ya Tata na nkombo na ngai” (3 Nefi 18:19, nsete ebakisami; tala lisusu Mose 5:8). Ntango tosambelaka na nkombo ya Yesu Klisto, tozali komikundola bango mibale Ye mpe Tata na Lola.

Yesu apesaki biso ndakisa ya kolanda ntango tosambelaka. Tokoki koyekola mingi na ntina ya losambo na koyekolaka nsambo ya Mobikisi na makomi (tala Matai 6:9–13; Yoane 17).

Nsambo na biso ekoki kosangisa biteni oyo elandi:

  • Kobanda na koloba na Tata na Lola.

  • Kolakisa mayoki ya motema na biso, lokola botondi mpo na mapamboli tozwaka.

  • Kotuna mituna, koluka litambwisi, mpe kosenga mapamboli.

  • Kosukisa na kolobaka, “Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.”

Makomi epesi biso toli ete tosambela na ntongo mpe na mpokwa. Nzokande, tokoki kosambela ntango nyonso mpe esika nyonso. Mpo na nsambo na biso moko mpe ya libota, ekoki kozala na ntina kofukama ntango tozali kosambela. Tosengeli ntango nyonso kozala na losambo na mitema na biso. (Tala Alma 34:27; 37:36–37; 3 Nefi 17:13; 19:16.)

Nsambo na biso esengeli kozala na makanisi mpe kowuta na motema. Ntango tozali kosambela, tosengeli koboya koloba makambo lolenge moko na bandenge moko.

Tosambela na bondimi, na bosembo, mpe na mokano ya solo ya kosala na biyano oyo tokozwa. Ntango tosali yango, Nzambe akokamba biso mpe akosalisa biso tozwa bikateli ya malamu. Tokoyoka ete tozali penepene na Ye. Akopesa biso bososoli mpe bosolo. Akopambola biso na libondisi, kimya, mpe bokasi.

Koyekola Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi: “Losambo

  • Diksionere ya Biblia: “Losambo

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Losambo

Koyekola Makomi

Nefi ateyaki, “Salani limpati likolo lya maloba ma Klisto; mpo tala, [yango] makolobela bino makambo manso kani bokosala” (2 Nefi 32:3; tala lisusu 31:20).

Koyekola makomi ezali nzela ya ntina ya kokundola mpe kolanda Yesu Klisto. Na makomi tozali koyekola bomoi, mosala, mpe mateya na Ye. Tozali koyekola lisusu na ntina ya bilaka na Ye. Ntango tozali kotanga makomi, tozali komona bolingo na Ye. Milimo na biso epanzani, bondimi na biso na Ye ebakisami, mpe makanisi na biso engengami. Matatoli na biso ya etinda na Ye ya bonzambe ekomi makasi koleka.

Tomikundolaka mpe tolandaka Yesu ntango tozali kosalela maloba na Ye na bomoi na biso. Tosengeli koyekola makomi mokolo na mokolo, mingimingi Buku ya Mormon.

Makomi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali Biblia Esantu, Buku ya Mormon, Malongi mpe Mayokani, mpe Liyaka ya Ntalo Monene. Yango ebengami lisusu “misala ya momeseno.”

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi, “Makomi

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Makomi

Yesu Klisto azali koteya ebele ya bato

Liyokani na Biso ya Kobatela Mitindo ya Nzambe

Koma: Ezali na banzela mingi ya koteya mitindo mizwami na eteni oyo. Ndakisa, bokoki koteya yango na mwa bokutani moke. To bokoki koteya mwa ndambo na yango lokola eteni ya mateya misato ya liboso. Ntango bozali koteya mitindo, bosala makasi bokangisa yango na boyokani ya libatisi mpe mwango ya lobiko.

Ntango tozwi libatisi, tondimaka ete “tokobatela mitindo ya Nzambe” (Moziya 18:10; Alma 7:15).

Nzambe apesi biso mitindo mpo ete Alingaka biso. Alingi ya malamu koleka mpo na biso, sikawa mpe na seko. Lokola Tata na biso ya Lola, ayebi nini tozali na yango mposa mpo na bolamu na biso ya molimo mpe ya nzoto. Ayebi lisusu nini ekomemela biso esengo mingi koleka. Motindo moko na moko ezali likabo ya bonzambe, epesami mpo na kokamba mikano na biso, kobatela biso, mpe kosunga biso tokola.

Moko ya ntina toyaki awa na mabele ezali koyekola mpe kokola na kosalelaka bonsomi na biso ya kopona na mayele nyonso (tala Abalayama 3:25). Kopona kotosa mitindo ya Nzambe—mpe koyambola ntango tokweyi na nse—esungaka biso na kosala mbala mingi mobembo oyo ya mpasi ya nkufa.

Mitindo ya Nzambe ezali liziba ya bokasi mpe mapamboli (tala Malongi mpe Mayokani 82:8–9). Na kobatelaka mitindo, toyekoli ete ezali te na mibeko ya kilo oyo ezali kopekisa bonsomi na biso. Esengo ya solo eyaka uta na botosi mitindo ya Nzambe. Botosi ezali liziba ya bokasi oyo ememelaka biso pole mpe boyebi na nzela ya Molimo Mosantu. Ememelaka biso esengo monene mpe esungaka biso tokoma na makoki na biso ya bonzambe lokola bana ya Nzambe.

Nzambe alaki kopambola biso ntango tobateli mitindo na Ye. Mapamboli mosusu ezali mpenzampenza mpo na mitindo mosusu. Mapamboli na ye ya nsuka ezali kimya na bomoi oyo mpe bomoi ya seko na mokili oyo ekoya. (Tala Moziya 2:41; Alma 7:16; Malongi mpe Mayokani 14:7; 59:23; 93:28; 130:20–21.)

Mapamboli ya Nzambe ezali ya molimo mpe ya nzoto. Na bantango mosusu, tosengeli kozala na motema molai na kozelaka yango, kotiaka motema ete ekoya engebene na bolingi mpe ntango na Ye (tala Moziya 7:33; Malongi mpe Mayokani 88:68). Mpo na kososola mwa mapamboli, tosengeli kotia likebi na molimo mpe kotala. Yango ezali mingimingi solo mpo na mapamboli oyo eyaka na banzela ya pete mpe oyo emonani lokola ya momesano.

Mapamboli mosusu ekoki komonana bobele na kozongisa makanisi nsima. Misusu ekoki koya te kino nsima ya bomoi oyo. Kotalela te ntango to lolenge nini mapamboli ya Nzambe ezali, tokoki kondimisama ete ekoya ntango tozali kosala makasi mpo na kobika nsango malamu ya Yesu Klisto (tala Malongi mpe Mayokani 82:10).

Nzambe alingaka bana na Ye nyonso na ndenge ya kokoka. Azali na motema molai na botau na biso, mpe Ye azali kolimbisa ntango toyamboli.

Mitindo Minene Mibale

Ntango Yesu atunamaki, “Mobeko nini ejali eleki monene?” Ye ayanolaki, “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.”

Na nsima Yesu alobaki ete mobeko monene ya mibale ekokani na oyo ya liboso: “Okolinga moninga na yo lokola yo moko” (Matai 22:36–39). “Ezali na mobeko mosusu te oyo eleki oyo” (Malako 12:31).

Lokola tozali bana ya molimo ya Nzambe, tozali na likoki monene ya bolingo. Ezali eteni ya libula na biso ya molimo. Kobika mibeko mibale minene—kolinga Nzambe liboso mpe kolinga mozalani na biso—ezali ezaleli ya kolimbola bayekoli ya Yesu Klisto.

Bolingo ya Nzambe.

Ezali na banzela ebele oyo tokoki kolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe. Tokoki kobatela mitindo na Ye (tala Yoane 14:15, 21). Tokoki kotia Ye liboso na bomoi na biso, kotiaka bolingi na biso na oyo ya Ye. Tokoki kotia bamposa, makanisi, mpe mitema na biso na Ye (tala Alma 37:36). Tokoki kozala na botondi mpo na mapamboli Ye apesi biso—mpe kozala na motema malamu na kokabolaka mapamboli wana (tala Moziya 2:21–24; 4:16–21). Na nzela ya losambo mpe mosala epai ya basusu, tokoki komonisa mpe kokolisa bolingo na biso mpo na Ye.

Lokola mitindo misusu, mobeko ya kolinga Nzambe ezali mpo na litomba na biso. Oyo tolingaka nde emonisaka oyo tolukaka. Oyo tolukaka nde emonisaka oyo tokanisaka mpe tosalaka. Mpe oyo tokanisaka mpe tosalaka nde emonisaka nani tozali—mpe nani tokokoma.

Bolingo ya Basusu

Kolinga basusu ezali eteni ya bolingo na biso mpo na Nzambe. Mobikisi ateyaki biso banzela mingi ya kolinga basusu (tala, ndakisa, Luka 10:25–37 mpe Matai 25:31–46). Tosembolaka loboko mpe toyambaka bango na mitema mpe bomoi na biso. Tolingaka na kosalelaka—na komipesaka ata na banzela mike. Tolingaka basusu na kosalelaka makabo oyo Nzambe apesi biso mpo na kopambola bango.

Kolinga basusu esangisi kozala na motema molai, boboto, mpe sembo. Esangisi mpe kolimbisa na bonsomi nyonso. Elingi koloba kosalela bato nyonso na limemya.

Ntango tolingaka moto, biso mpe moto yango topambolami. Mitema na biso ekolaka, bomoi na biso ekomaka ntina mingi koleka, mpe esengo na biso ebakisamaka.

Mapamboli

Mibeko minene mibale—kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na biso—ezali moboko ya mibeko nyonso ya Nzambe (tala Matai 22:40). Ntango tolingi Nzambe liboso, mpe lisusu tolingi basusu, makambo nyonso na bomoi na biso ekokende na esika na yango oyo ebongi. Bolingo yango ekozala na bopusi likolo ya lolenge na biso ya kotalela makambo, ndenge ya kosalela ntango na biso, matomba oyo tozali kolanda, mpe molongo ya makambo na biso ya kotia na esika ya liboso.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi, “Boboto,” “Bolingo

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Boboto,” “Bolingo

Kolanda Profeta

Nzambe abiangaka baprofeta mpo kozala bamonisi na Ye na mabele. Na nzela ya baprofeta na Ye, Ye abimisaka bosolo mpe apesaka litambwisi na makebisi.

Nzambe abiangaki Joseph Smith azala profeta ya yambo ya mikolo mya nsuka (tala liteya 1). Bakitani ya Joseph Smith babiangamaki lolenge moko na Nzambe mpo na kokamba Eklezia na Ye, kobakisa mpe profeta oyo azali kokamba yango lelo. Tosengeli kozwa bondimi ya libyangi ya bonzambe ya profeta ya bomoi mpe kolanda mateya na ye.

Mateya ya baprofeta mpe bapostolo ya bomoi epesaka longo ya bosolo ya seko na mokili ya motuya oyo ezali kobongwana. Ntango tozali kolanda baprofeta ya Nzambe, mobulungano mpe bowelani ya mokili ekozindisa biso te. Tokozwa esengo mingi koleka na bomoi oyo mpe tokozwa bokambama mpo na eteni oyo ya mobembo na biso ya seko.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Kobomba Mitindo Zomi

Nzambe abimisaki Mibeko Zomi epai ya profeta moko ya kala na nkombo ya Mose mpo na kokamba bato na ye. Mibeko yango esalelamaka kaka lolenge moko na mikolo na biso. Miteyaka biso kokumbamela mpe kolakisa limemya mpo na Nzambe. Miteyaka biso lisusu lolenge nini kosalela moko mpe mosusu.

  • “Okokumisa banzambe basusu te liboso na ngai” (Esode 20:3). “Banzambe” basusu ekoki kosangisa biloko mingi, lokola bozwi, nguya, to lokumu.

  • “Okosala ekeko moko te mpo na kokumisa yango” (Esode 20:4).

  • “Okokamata nkombo ya Nkolo Nzambe wa yo mpamba te” (Esode 20:7).

  • “Okokanisa mokolo mwa saba, komisa yango esantu” (Esode 20:8).

  • “Kumisa tata wa yo mpe mama wa yo” (Esode 20:12).

  • “Okoboma te” (Esode 20:13).

  • “Okosala ekobo te” (Esode 20:14).

  • “Okoyiba te” (Esode 20:15).

  • “Okopesa litatoli ya lokuta na moninga wa yo te” (Esode 20:16).

  • “Okolula te” (Esode 20:17).

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi: “Mitindo, Zomi

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Mitindo Zomi

mobali azali komema mwasi

Kobika Mobeko ya Bopeto

Mobeko ya bopeto ezali eteni ya ntina ya mwango ya Nzambe mpo na lobiko mpe bonetoli na biso. Bozalani ya penepene ya kosangisa nzoto kati na mobali mpe mwasi epesameli na Nzambe mpo na kokela bana mpe mpo na kolakisa bolingo na kati ya libala. Bozalani ya penepene oyo mpe nguya ya kokela bomoi ya moto ezali na mokano ya kozala kitoko mpe ya bule.

Mobeko ya Nzambe mpo na bopeto ezali koboya kosangisa nzoto na libanda ya libala ya mibeko kati na mobali moko mpe mwasi moko. Mobeko yango elimboli mpe kozala sembo epai ya molongani na yo ata nsima ya kobalana na ye.

Mpo na kosunga biso tobatela mobeko ya bopeto, baprofeta bapesi biso toli ete tozala peto na makanisi mpe na maloba na biso. Tosengeli koboya bilili to makomi ya bato bolumbu ya lolenge nyonso. Na boyokani na mobeko ya bopeto, tosengeli kozala na bopolo na bizaleli mpe na lolenge na biso ya komonana.

Bato oyo balingi kozwa libatisi basengeli kobika mobeko ya bopeto.

Boyamboli mpe Bolimbisi

Na miso ya Nzambe, kobuka mobeko ya bopeto ezali likambo monene (tala Esode 20:14; Baefese 5:3). Esalelaka na lolenge ya mabe nguya ya bule oyo Ye apesi mpo na kokela bomoi. Kasi Ye azali kokoba kolinga biso ata soki tobuki mobeko oyo. Abengisi biso toyambola mpe tokoma peto na nzela ya libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto. Bozangi elikya ya masumu ekoki kozwa esika na yango na kimya ya elengi ya bolimbisi ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 58:42–43).

Mapamboli

Nzambe apesi mobeko ya bopeto mpo na kopambola biso mpe bana ya molimo oyo atindi na mabele. Kotosa mobeko oyo ezali na ntina mingi mpo na kimya ya moto na moto mpe mpo na kozala na bolingo, bondimi, mpe bomoko na boyokani na biso ya libota.

Ntango tozali kobika na mobeko ya bopeto, tokobatelama na mbeba ya molimo oyo ewuti na bosangisi nzoto ya penepene na libanda ya libala. Tokoboya lisusu mikakatano ya mayoki mpe ya nzoto oyo mbala mingi eyaka elongo na boyokani ya lolenge wana. Tokokola na elikya na biso liboso ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 121:45). Tokoyoka mingi koleka nguya ya Molimo Mosantu. Tokolengelama malamu koleka mpo na kosala mayokani ya bule na tempelo oyo esangisaka mabota na biso mpo na seko.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi, “Bopeto

  • Masolo ya Nsango Malamu “Bopeto

Kobatela Mobeko ya Moko na Zomi

Libaku monene ya kozala mondimi ya Eklezia ezali libaku ya kopesa moko na zomi. Ntango tozali kopesa moko na zomi, tozali kosunga na kotombola mosala ya Nzambe mpe kopambola bana na Ye.

Mobeko ya moko na zomi mobandi na ntango ya Kondimana ya Kala. Ndakisa, propfeta Abalayama afutaki moko na zomi ya nyonso azalaki na yango (tala Alma 13:15; Genese 14:18–20).

Liloba moko na zomi elimboli mpenza ndambo moko ya zomi. Ntango tozali kopesa moko na zomi, topesaka ndambo moko ya zomi ya mosolo na biso na Eklezia (tala Malongi mpe Mayokani 119:3–4; litabisi esosolami kolimbola mosolo). Oyo nyonso tozali na yango ezali likabo uta na Nzambe. Ntango tofuti moko na zomi, tolakisaka botondi na biso epai na Ye na kozongisaka eteni ya oyo Ye apesi biso.

Kofuta moko na zomi ezali elembo ya bondimi. Yango ezali lisusu lolenge ya kokumisa Nzambe. Yesu ateyaki ete tosengeli “koluka … liboso bokonzi ya Nzambe” (Matai 6:33), mpe moko na zomi ezali lolenge ya kosala yango.

Likuta ya Mwasi-mokufeli-Mobali, na Sandra Rast

Bosaleli ya Misolo ya Moko na Zomi

Misolo ya moko na zomi ezali bule Topesaka moko na zomi na biso na mosungi moko ya episikopo, to na bisika mingi tokoki kofuta na nzela ya interneti. Ntango episikopo ezwi moko na zomi, etindi yango na biro monene ya Eklezia.

Likita moko oyo esangisi Bokambi ya Yambo, Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, mpe Episikopo ya Bokambi etalaka lolenge nini kosalela misolo ya zomi na moko na mosala ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 120:1). Balolenge ya kosalela yango ezali:

  • Kotonga mpe kobongisa batempelo mpe bandako ya losambo.

  • Kolimbola mpe kobimisa makomi.

  • Kosunga misala mpe milulu ya masanga ya Eklezia ya mboka.

  • Kosunga mosala ya misionele na mokili mobimba.

  • Kosunga mosala ya bonkoko ya libota

  • Kofuta biteyelo mpe mateya

Moko na zomi esalelamaka te mpo na kofuta bakambi ya Eklezia ya mboka. Basalaka na bolingi na bango moko kozanga lifuti ata moko.

Mapamboli

Ntango topesi moko na zomi, Nzambe alaki mapamboli oyo eleki na mosika oyo biso topesaka. “Akofungola … maninisi ma lola, mpe akosopa… lipamboli, ete esika ekozala te mpo na kozwa yango” (Malaki 3:10; tala milongo 7–12). Mapamboli oyo ekoki kozala ya molimo mpe ya nzoto.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

Kotosa Liloba ya Bwanya

Mobeko ya Nkolo mpo na Kolongono ya Nzoto

Banzoto na biso ezali makabo ya bule uta na Nzambe. Mokomoko na biso azali na mposa ya nzoto ya mosuni mpo na kokoma mingi lokola Ye. Banzoto na biso ezali na ntina mingi na boye ete makomi ekokanisi yango na batempelo (tala 1 Bakolinti 6:19–20).

Nkolo alingi biso tosalela nzoto na biso na limemya. Mpo na kosunga biso tosala yango, Abimisaki mobeko moko ya kolongono ya nzoto ebengami Liloba ya Bwanya. Bobimisi oyo eteyi biso na ntina ya kolia bilei ya malamu mpe kosalela te biloko oyo ebebisaka nzoto na biso—mingimingi masanga, makaya, mpe mai ya moto (elingi koloba tii mpe kafe).

Na molimo ya Liloba ya Bwanya, baprofeta ya mikolo na biso bakebisi mpo na kosalela te biloko mosusu oyo ezali mabe, oyo ezali na mibeko te, to oyo ezali boombo. Baprofeta bakebisi lisusu mpo na kosalela na lolenge ya mabe bankisi oyo minganga bakomaka. (Mokambi ya misio na bino akoyanola na mituna soki esengeli te kosalela biloko mosusu na esika na bino).

Mapamboli

Nkolo apesaki Liloba ya Bwanya mpo na bolamu na biso ya nzoto mpe ya molimo. Alaki mapamboli minene ntango tozali kobatela mobeko oyo. Mapamboli yango esangisi kolongono ya nzoto, bwanya, bozwi ya boyebi, mpe libateli (tala Malongi mpe Mayokani 89:18-21).

Kotosa Liloba ya Bwanya ekosunga biso tozala na boyambi mingi ya banungunungu ya Molimo Mosantu. Atako biso banso tokutanaka na mikakatano ya kolongono ya nzoto, kotosa mobeko oyo ekosunga biso tozala na nzoto kolongono, na makanisi mpe na molimo.

Bato oyo balingi kozwa libatisi basengeli kotosa Liloba ya Bwanya.

Mpo na litambwisi na ntina ya kosalisa bato oyo bazali kobunda na boombo, tala mokapo 10.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi: “Liloba ya Bwanya

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Kolongono ya Nzoto,” “Liloba ya Bwanya

  • Lisalisi mpo na Bomoi: “Boombo

Santisa Mokolo ya Saba

Mokolo ya Bopemi mpe ya Losambo

Saba ezali mokolo esantu oyo Nzambe aponi mpo na biso poso na poso mpo na kopema na misala na biso ya mokolo na mokolo mpe kosambela Ye. Moko ya Mitindo Zomi oyo epesami na Mose ezali ya “kokundola mokolo ya saba, mpo na kobatela yango esantu” (Esode 20:8; tala lisusu milongo 9–11).

Na bobimisi moko ya mikolo oyo, Nkolo andimisaki lisusu ete Saba “ezali mokolo oyo epesameli bino mpo na kopema uta na misala na bino, mpe kofuta bomipesi na bino epai ya Oyo-Aleki-Likolo” (Malongi mpe Mayokani 59:10). Alobaki lisusu Saba esengeli kozala mokolo ya esengo, ya losambo, mpe ya botondi (tala milongo 14–15).

Lokola eteni ya losambo na biso ya Saba, tosanganaka na likita ya elambo poso nyonso. Na likita oyo, tosambelaka Nzambe mpe toliaka elambo mpo na kokundola Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye. Ntango tozali kolia elambo, tozongisaka sika mayokani na biso elongo na Nzambe mpe tolakisaka ete tondimi koyambola masumu na biso. Likuli ya elambo ezali katikati ya kokumisa mokolo na biso ya Saba.

Na eklezia tosanganaka lisusu na bakelasi epai wapi toyekolaka mingi na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Bondimi na biso ekolaka ntango tozali koyekola makomi elongo. Bolingo na biso ekolaka ntango tozali kosalela mpe kolendisama moko na moko.

Na bobakisi na kopema na misala na biso na mokolo ya Saba, tosengeli koboya kosomba biloko mpe misala mosusu oyo ekosala ete ezala lokola mokolo ya bato nyonso. Totiaka pembeni misala ya mokili mpe totiaka makanisi mpe misala na biso na makambo ya molimo.

Mokolo ya Kosala Malamu

Kosala malamu na mokolo ya Saba ezali ata na ntina lokola oyo toboyaka kosala mpo na kobatela yango esantu. Toyekolaka nsango malamu, tolendisaka bondimi, totongaka boyokani, tosalaka mosala, mpe tosalaka misala mosusu ya kolendisa elongo na libota mpe baninga.

babalani bazali kotanga makomi

Mapamboli

Kobatela mokolo ya Saba esantu ezali elembo ya bomipesi na biso epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Ntango tozali kosala ete misala na biso ya Saba eyokana na mokano ya Nzambe mpo na mokolo, tokoyoka esengo mpe kimya. Tokoleisama na molimo mpe tokopema na nzoto. Tokomiyoka lisusu penepene na Nzambe mpe tokoyeisa na mozindo boyokani na biso na Mobikisi na biso. Tokomibatela mpenza “kozanga litono na mokili” (Malongi mpe Mayokani 59:9). Saba ekokoma “esengo” (Yisaya 58:13; tala lisusu molongo 14).

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Mokolo ya Saba

  • Mokambi na Makomi: “Mokolo ya Saba

Kotosa mpe Kokumisa Mobeko

Basantu ba Mikolo mya Nsuka bandimelaka kotosa mobeko mpe kozala bana mboka malamu (tala Malongi mpe Mayokani 134; Biteni ya Bondimi 1:12). Bandimi ya Eklezia balendisami kosala mosala mpo na kobongisa masanga mpe bikolo na bango. Balendisami lisusu mpo na kozala bopusi mpo na bizaleli malamu na kati ya bato mpe na leta.

Bandimi ya Eklezia babengisami mpo na kosangana na boyangeli mpe na mosala ya politiki engebene na mobeko. Bandimi oyo bazali na bisika na leta basalaka na mikumba lokola bana-mboka oyo bamibanzabanzaka mpo na bango, kasi te lokola bamonisi ya Eklezia.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mosala ya Politiki mpe ya Bato” na eteni 38.8 ya Buku Monene

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Bozali Mwana-Mboka

Mokonzi Monene na kati ya Bokonzi, na J. Kirk Richards

Liyokani na Biso ya Kosalela Nzambe mpe Basusu

Mosala

Ntango tobatisami, tosalaka elaka ya kosalela Nzambe mpe kosalela basusu. Kosalela basusu ezali moko ya banzela ya liboso oyo tosalelaka Nzambe (tala Moziya 2:17). Profeta Alma ateyaki baoyo bazalaki na mposa ya kobatisama ete basengeli “kolinga komema mikumba ya moko na mosusu, … kolela elongo na baoyo bazali kolela … , mpe kobondisa baoyo batelemi na mposa ya libondisi”.(Moziya 18:8–9).

Kala mingi te nsima ya libatisi bandimi ya sika bazwaka libyangi mpo na kosala na Eklezia. Mabiangi oyo ezali ya bolingi mpe efutami te. Ntango tondimi yango mpe tozali kosalela na molende, tozali kokola na bondimi, kokolisa batalanta, mpe kopambola basusu.

Eteni mosusu ya mosala na biso na Eklezia ezali kozala “ndeko mobali ya mosala” to “ndeko mwasi ya mosala.” Na mokumba oyo, tosalelaka bato mpe mabota oyo totindami.

Lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tolukaka mabaku ya kosalela mokolo na mokolo. Lokola Ye, tokendaka “na kosalaka malamu” (Misala 10:38). Tosalelaka bazalani na biso mpe basusu kati ya lisanga na biso. Tokoki kosangana na mabaku ya mosala na nzela ya JustServe esika ezali. Tokoki kosunga milende ya bosungi ya Eklezia mpe kosangana na eyano na makama.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi, “Mosala

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Mosala

bato bazali koloba

Kokabola Nsango Malamu

Lokola eteni ya kondimana na biso ya libatisi, tolaki “kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe” (Moziya 18:9). Lolenge moko tozali kotelema lokola banzeneneke ezali na kokabolaka nsango malamu ya Yesu Klisto. Kosunga basusu kozwa nsango malamu ezali moko ya lolenge ya esengo mingi ya mosala oyo tokoki kopesa (tala Malongi mpe Mayokani 18:15–16). Ezali elembo ya nguya ya bolingo na biso.

Ntango tozwi mapamboli ya kobika nsango malamu, na momeseno tolingaka kokabola mapamboli wana. Bato ya libota, baninga, mpe bayebani mbala mingi bakomaka kosepela ntango tozali kopesa ndakisa ya sembo mpe bazali komona lolenge nini nsango malamu epambolaka bomoi na biso. Tokoki kokabola nsango malamu na banzela ya malamu mpe ya solo (tala Buku Monene, mokapo 23).

Tobengisaka basusu kosangana elongo na biso na mosala, na lisanga, na masano, mpe misala ya Eklezia. Tokoki kobengisa bango na likita ya Eklezia to mosala ya libatisi. Tokoki kobengisa bango kotala video ya interneti oyo ezali kolimbola nsango malamu ya Yesu Klisto, kotanga Buku ya Mormon, to kotala ndako ya bofungoli ya tempelo. Ezali na bankama ya mabyangi oyo tokoki kopanza na basusu. Mbala mingi, kobengisa elimboli kaka kosangisa libota na biso, baninga mpe bazalani na oyo tosila kosala.

Soki tosengi, Nzambe akosalisa biso toyeba mabaku ya kokabola nsango malamu mpe koyebisa basusu na ntina ya lolenge nini yango epambolaka bomoi na biso.

Mpo na koyeba makambo mingi na ntina ya kosalela mitinda ya kolinga, kokabola, mpe kobengisa, tala “Sangana na Bandimi” na mokapo 9.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi: “Mosala ya Misionele

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Mosala ya Misionele

Kokila Bilei mpe Makabo ya Kokila

Nzambe atyaki mobeko ya kokila bilei lokola nzela mpo na biso ya kokolisa makasi ya molimo mpe kosunga baoyo bazali na bosenga.

Kokila bilei elimboli kozanga kolia mpe komela mpo na eleko moko ya ntango. Mbala mingi Eklezia etiaka pembeni mokolo ya Eyenga ya yambo ya sanza nyonso lokola mokolo ya kokila bilei. Mokolo ya kokila bilei mbala mingi esangisaka kozanga kolia bilei mpe komela na bowumeli ya ngonga 24 soki tozali na makoki ya nzoto. Biteni mosusu ya ntina ya mokolo ya eyenga ya kokila bilei esangisi losambo mpe kotatola. Tolendisamaka lisusu mpo na kokila bilei na bantango mosusu ntango tozali koyoka mposa.

Kotonga Bokasi ya Molimo

Kokila bilei ekoki kosalisa biso tomikitisa, topusana penepene na Nzambe, mpe tomiyoka ete tokomi sika na molimo. Yambo ya kobanda mosala na Ye, Yesu Klisto akilaki bilei (tala Matai 4:1–2). Makomi ekomi masolo mingi ya baprofeta mpe basusu kokila bilei mpo ete bakoka kobakisa makasi na bango ya molimo mpe koluka mapamboli ya ntina mpo na bangomei to basusu.

Kokila bilei mpe kosambela ekendaka elongo. Ntango tozali kokila bilei mpe kosambela na bondimi, tozali mingi na boyambi ya kozwa bobimisi ya moto ye moko. Tosepelaka lisusu mingi koyeba solo mpe kososola bolingi ya Nzambe.

Kosalisa Baoyo bazali na Bosenga

Ntango tokili bilei, topesaka mbongo na Eklezia mpo na kosunga bato oyo bazali na mposa. Yango ebengami likabo ya kokila bilei. Tobengisami na kopesa likabo oyo ekokani na motuya ya bilei oyo tolie te. Tolendisami kozala na bokabi mpe kopesa mingi koleka motuya ya bilei yango soki tokoki. Kopesa likabo ya kokila ezali lolenge moko tokoki kosalela basusu.

Makabo ya kokila esalelamaka mpo na kopesa bilei mpe biloko mosusu ya ntina na bato oyo bazali na bosenga, ezala na mboka to na mokili mobimba. Mpo na koyeba lolenge ya kopesa makabo ya kokila, tala “Kopesa Moko na Zomi mpe Makabo Mosusu” na liteya oyo.

Boyekoli Makomi

Kokila

Kolengela Baye Bazali na Bosenga

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi: “Bokili, Kokila

  • Buku Monene: 22.2.2

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Kokila mpe Makabo ya Kokila

libota libanda ya tempelo

Liyokani na Biso ya Kotya Molende Kino Nsuka

Ntango tobatisami, tosalaka liyokani na Nzambe mpo na “kotya molende kino na nsuka” na kobikaka nsango malamu ya Yesu Klisto (2 Nefi 31:20; tala lisusu Moziya 18:13). Tosalaka makasi ya kokoma bayekoli ya Yesu Klisto ya bomoi mobimba.

Profeta Nefi ya Buku ya Mormon alimbolaki libatisi lokola ekuke oyo tozali kokota na nzela ya nsango malamu (tala 2 Nefi 31:17). Nsima ya libatisi, tozali kokoba “kokende liboso na kokangama na Klisto” (2 Nefi 31:20).

Ntango tozali “kokende liboso” na nzela ya boyekoli, tozali komilengela mpo na kokende na tempelo. Kuna tokosala mayokani elongo na Nzambe ntango tozali kozwa makuli ya tempelo. Na tempelo, tokopesama nguya mpe tokoki kokangama lokola mabota mpo na boseko. Kobatela mayokani tosali na tempelo ekofungola ekuke mpo na libaku nyonso ya malamu mpe lipamboli nyonso ya molimo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso.

Ntango tozali kokoba na bosembo na nzela ya nsango malamu, nsukansuka tokozwa likabo monene ya Nzambe—likabo ya bomoi ya seko (tala 2 Nefi 31:20; Malongi mpe Mayokani 14:7).

Biteni oyo elandi elimboli makambo mosusu ya oyo Nzambe apesi mpo na kosunga biso kotya molende kino na nsuka ya mobembo na biso ya nkufa—mpe kozwa esengo na yango.

Bonganganzambe mpe Mabongisi ya Eklezia

Bonganganzambe ezali likoki mpe nguya ya Nzambe. Na nzela ya bonganganzambe, Tata na Lola akokisaka mosala na Ye “mpo na kokokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya seko” ya bana na Ye (Mose 1:39). Nzambe apesi likoki mpe nguya na bana na Ye ya mibali mpe ya basi na mabele mpo na kosunga na kokokisa mosala oyo.

Bonganganzambe epambolaka biso nyonso. Makuli lokola libatisi mpe elambo ezwamaka na nzela ya baye bazali na misala ya bonganganzambe. Tozwaka lisusu mapamboli ya lobiko, bobondisi mpe toli.

Bonganganzambe mpe Bokambi mpe Mabyangi ya Eklezia

Eklezia ekambami na Yesu Klisto o nzela ya baprofeta mpe bapostolo. Bakambi oyo babiangami na Nzambe, bakulisami, mpe bapesameli likoki ya bonganganzambe mpo na kosala na nkombo ya Mobikisi.

Na kala, Klisto apesaki Bapostolo na Ye likoki se moko kaka ya bonganganzambe, oyo epesaki bango nzela ya kokamba Eklezia na Ye nsima ya komata na Ye na lola. Nsukansuka bokonzi wana ebungaki ntango bato baboyaki nsango malamu mpe Bapostolo bakufaki.

Bamemi-nsango ya lola bazongisaki bonganganzambe na 1829 na nzela ya Profeta Joseph Smith, mpe Nkolo atelemisaki lisusu Eklezia na Ye elongo na bapostolo mpe baprofeta. (Tala liteya 1.)

Na etando ya mboka, baepisikopo mpe bakambi ya bituka bazali na likoki ya bonganganzambe mpo na kokamba masanga ya Eklezia.

Ntango mibali mpe basi babiangami mpe batyami pembeni mpo na kosala na Eklezia, bapesamelaka bokonzi uta na Nzambe mpo na kosala na libyangi wana. Likoki oyo epesami na bamisionele, bakambi, bateyi, mpe basusu kino bakobimisama na mabyangi na bango. Epesami na nse ya bokambi ya baye basimbaka bafungola ya bonganganzambe.

Likoki ya bonganganzambe ekoki kosalelama bobele na bosembo (tala Malongi mpe Mayokani 121:34–46). Likoki oyo ezali elikya ya bule mpo na komonisa Mobikisi mpe kosala na nkombo na Ye. Ezali ntango nyonso mpo na kopambola mpe kosalela basusu.

bilenge mibali na kelasi ya eyenga

Bonganganzambe ya Alona mpe Bonganganzambe ya Melikisedeki

Na Eklezia, bonganganzambe esangisi Bonganganzambe ya Alona mpe Bonganganzambe ya Melikisedeki. Na nse ya bokambi ya baye basimbaka bafungola ya bonganganzambe, Bonganganzambe ya Alona mpe ya Melikisedeki epesami na bandimi ya Eklezia ya mibali baoyo balongobani. Nsima ya kozwa bonganganzambe oyo ebongi, moto akulisami na mosala moko ya bonganganzambe wana, lokola diakono to mpaka. Asengeli kukulisama na moto oyo azali na likoki esengeli.

Ntango mobali to elenge mobali azwi bonganganzambe, asalaka liyokani elongo na Nzambe mpo na kokokisa mikumba ya bule, kosalela basusu, mpe kosunga kotonga Eklezia.

Bilenge mibali bakoki kozwa Bonganganzambe ya Alona mpe kokulisama lokola badiakono kobanda na sanza ya yambo ya mobu oyo bakokokisa mibu 12. Bakoki kokulisama bateyi na mbula oyo bakokisi mbula 14 mpe banganga-nzambe na mbula oyo bakokisi mbula 16. Babongoli mibali oyo bazali na mibu bakoki kozwa Bonganganzambe ya Alona noki nsima ya libatisi mpe nkotisa. Basimbi ya Bonganganzambe ya Alona batambwisaka makuli lokola elambo mpe libatisi.

Nsima ya kosala mpo na ntango moko lokola nganga-nzambe na Bonganganzambe ya Alona,​mobali oyo alongobani oyo azali na mibu ata 18 akoki kozwa Bonganganzambe ya Melikisedeki mpe kokulisama mpaka. Mibali oyo bazwi Bonganganzambe ya Melikisedeki bakoki kosala makuli ya bonganganzambe lokola kopesa mapamboli ya kobikisa mpe kobondisa na bayi libota mpe basusu.

Tala Buku Monene, 38.2.9.1, mpo na nsango etali bandimi ya sika oyo bazali kozwa bonganganzambe.

Masanga Makoki mpe Mabongisi ya Eklezia

Masanga Makoki ya Bonganganzambe. Lisanga likoki ezali lisanga libongisami ya basimbi bonganganzambe. Palwasi moko na moko ezali na lisanga likoki ya bampaka mpo na mibali ya mikolo. Lisanga likoki ya badiakono, bateyi, mpe banganganzambe ezali mpo na bilenge mibali.

Lingomba ya Bamama Basungi. Lingomba ya Bamama Basungi esangisi basi ya mibu 18 mpe koleka. Bandimi ya Lingomba ya Bamama Basungi balendisaka mabota, bato, mpe lisanga.

Bilenge Basi. Bilenge basi bakotaka na libongisi ya Bilenge Basi kobanda na sanza ya yambo ya mobu oyo bakokokisa mibu 12.

mwasi azali koteya na kelasi

Eteyelo ya Bana. Bana banso ya mibu 3 kino 11 bazali na libongisi ya Bana.

Eteyelo ya Eyenga. Mikolo mpe bilenge nyonso bakotaka na Eteyelo ya Eyenga, epai wapi bakutanaka mpo na koyekola makomi elongo.

Mpo na nsango mingi na ntina ya bonganganzambe, tala Buku Monene, mokapo 3.

Mpo na nsango mingi na ntina ya masanga ya bonganganzambe mpe mabongisi ya Eklezia, tala Buku Monene, mikapo 8–13.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Buku Monene, mokapo 3: “Mibeko ya Bonganganzambe

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Bonganganzambe ya Alona,” “Bonganganzambe ya Melikisedeki,” “Bonganganzambe

Libala mpe Mabota

Libala

Libala kati na mobali mpe mwasi ekulisami na Nzambe. Ezali na kati kati ya mwango na Ye mpo na bokoli ya seko ya bana na Ye.

Bosangani ya mobali na mwasi na libala esengeli kozala boyokani na bango ya mabele oyo balingaka mingi koleka. Bazali na mokumba esantu ya kozala sembo moko na mosusu mpe sembo na liyokani na bango ya libala.

Mobali na mwasi bakokani na miso ya Nzambe. Moko asengeli te koyangela mosusu. Bikateli na bango esengeli kokamatama kati na bomoko mpe na bolingo, na kosangana mobimba ya bango mibale.

Ntango mobali mpe mwasi balinganaka mpe basalaka elongo, libala na bango ekoki kozala liziba ya esengo na bango monene. Bakoki kosungana mpe bana na bango kokende liboso mpo na kozwa bomoi ya seko.

Libota

Lokola libala, libota ekulisami na Nzambe mpe ezali na ntina mingi na mwango na Ye mpo na esengo na biso ya seko. Mabota na biso ezalaka na esengo mingi soki tozali kobika engebene na mateya ya Yesu Klisto. Baboti bateyaka bana na bango nsango malamu ya Yesu Klisto mpe bapesaka ndakisa na nzela ya kobika yango. Mabota epesaka biso mabaku ya kolingana mpe kosalelana.

Baboti basengeli kotia libota na bango esika ya liboso mpenza. Ezali libaku malamu mpe mokumba esantu mpo na baboti na kobatela bana oyo bakoki kobota to kobokola.

Mabota nyonso ezalaka na mikakatano. Ntango tozali koluka lisungi ya Nzambe mpe kobatela mibeko na Ye, mikakatano ya libota ekoki kosunga biso koyekola mpe kokola. Ntango mosusu mikakatano yango esungaka biso toyeba koyambola mpe kolimbisa.

mobali azali koteya libota

Bakambi ya Eklezia balendisi bandimi kosala likita ya mpokwa na libota ya poso na poso. Baboti basengeli kosalela ntango oyo mpo na koteya bana na bango nsango malamu, kolendisa mikangano na bango ya libota, mpe kosakana elongo. Bakambi ya Eklezia babimisaki lisusu esakola oyo eteyaka bosolo ya ntina etali libota (tala “ “Libota: Esakola na Mokili,” ChurchofJesusChrist.org).

Banzela mosusu ya kolendisa libota ezali losambo ya libota, boyekoli makomi, mpe kokumbamela elongo na eklezia. Tokoki mpe kolukaluka bonkoko ya libota, kosangisa masolo ya libota, mpe kosalela basusu.

Bato mingi bazali na mabaku moke ya kobala to ya kozala na boyokani ya bolingo na libota. Mingi bakutanaki na koboma libala mpe makambo mosusu ya mpasi na libota. Nzokande, nsango malamu epambolaka biso moko na moko kozanga kotala ezalela ya libota na biso. Mpe lokola tozali sembo, Nzambe akopesa biso nzela mpo na kozala na mapamboli ya mabota ya bolingo, ezala na bomoi oyo to na bomoi ekoya.

Boyekoli Makomi

Libala

Libota

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Mokambi na Makomi, “Libota,” “Libala, Kobala

  • Buku Monene, mokapo 2: “Supporting Individuals and Families in the Work of Salvation and Exaltation (Kosunga Bato mpe Mabota na Mosala ya Libiki mpe Bonetoli)

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Libala,” “Libota,” “Kobokola Bana

Tempelo mpe Mosala ya Bonkoko ya Libota mpo na Bankoko Bakufa

Tata na Lola alingaka bana na Ye nyonso mpe azali na mposa ya lobiko mpe bonetoli na bango. Nzokande ebele ya bato bakufa kozanga koyoka nsango malamu ya Yesu Klisto to kozwa makuli ya nsango malamu. Makuli oyo esangisi libatisi, nkotisa, kokulisama bonganganzambe mpo na mibali, dotasio ya tempelo, mpe libala ya seko.

Na nzela ya ngolu mpe boboto na Ye, Nkolo apesi nzela mosusu mpo na bato oyo bazwa nsango malamu mpe makuli na yango. Na mokili ya molimo, nsango malamu eteyami na baye bakufa kozanga kozwa libaku ya koyoka yango (tala Malongi mpe Mayokani 138). Na batempelo, tokoki kosala makuli na nkombo ya bankoko na biso bakufa mpe basusu. Bato bakufa oyo bazali kofanda na mokili ya molimo bazali na libaku ya kondima mpe koboya nsango malamu mpe makuli masalemi na nkombo na bango.

Libota ezali koyekola makomi

Yambo tokoki kosala makuli oyo, tosengeli koyeba bankoko na biso oyo bazwaki yango te. Koyeba baye libota na biso mpo ete bakoka kozwa makuli ezali mokano ya ntina ya mosala na biso ya bonkoko ya libota. Ntango tozwi nsango etali bango, tobakisaka yango na ebombeli ya makambo ya Eklezia na FamilySearch.org Nsima biso (to basusu) tokoki kozwela bango makuli na tempelo.

Ntango tozali koyeba bankoko na biso mpe kosala makuli mpo na bango, mabota na biso ekoki kokoma bomoko mpo na boseko.

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Buku Monene, mokapo 28: “Milulu ya Tempelo mpo na Bakufi

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Baptisms for the Dead (Mabatisi mpo na Bakufi),” “Bonkoko ya Libota

Batempelo, Dotasio, Libala ya Seko, mpe Mabota ya Seko

Batempelo

Tempelo ezali ndako ya Nkolo. Ezali esika esantu epai wapi tokoki kosala mayokani elongo na Nzambe ntango tozali kozwa makuli na Ye ya bule. Ntango tozali kobatela mayokani oyo, tokozala na nguya ya bonzambe oyo ekomonisama na bomoi na biso (tala Malongi mpe Mayokani 84:19–22; 109:22–23).

Dotasio

Moko ya makuli tozwaka na tempelo ebengami dotasio. Liloba dotasio elakisi “ likabo.” Likabo oyo ya boyebi mpe ya nguya ewuti na Nzambe. Na tango ya dotasio, tosalaka mayokani na Nzambe oyo ekangisaka biso na Ye mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto (tala mokapo 1).

Mikolo bakoki kozala na makoki ya kozwa dotasio na bango moko ya tempelo nsima ya ata mobu moko ya bondimi na Eklezia. Mpo na nsango mingi na ntina ya dotasio, tala Buku Monene, 27.2.

Libala ya Seko mpe Mabota ya Seko

Mwango ya esengo ya Nzambe epesaka makoki na boyokani ya libota kotya molende koleka lilita. Kati na tempelo tokoki kobalana mpo na ntango mpe boseko. Yango esalaka ete mabota mazala esika moko mpo na libela.

Nsima babalani bazwi dotasio na bango bakoki kokangisama to kobalana mpo na boseko. Bana na bango bakoki kokangisama na bango.

Mobali mpe mwasi oyo bakangisami na tempelo basengeli kobatela mayokani basalaki mpo na kozwa mapamboli ya libala ya seko.

babalani bazali kotambola na balabala

Boyekoli Makomi

Koyekola Mingi Koleka na Ntina ya Mobeko Oyo

  • Buku Monene, mokapo 27: “Milulu ya Tempelo mpo na Bato na Bomoi

  • Masolo ya Nsango Malamu: “Batempelo,” “Dotasio,” “Libala

  • temples.churchofjesuschrist.org