Makomi
1 Nefi 11


Mokapo 11

Nefi amoni Molimo ya Nkolo mpe nzete ya bomoi elakisami epayi na ye na limoni—Amoni mama ya Mwana ya Nzambe mpe ayekoli bonkonde ya Nzambe—Amoni libatisi, mosala, mpe bobakami ya Mwana ya mpate ya Nzambe na ekulusu—Amoni lisusu bobiangi mpe mosala ya Bapostolo Zomi na mibale ya Mwana ya mpate. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpo esalemaki ete esilaki ngai koyoka mposa ya koyeba makambo oyo tata na ngai amonaki, mpe kondimaka ete Nkolo akokaki kosala ete eyebana epayi na ngai, lokola efandaki ngai komanyolaka na motema na ngai, nakumbamaki mosika na Molimo ya Nkolo, iyo, kati na ngomba ya molai koleka, oyo namonaki naino te, mpe likolo na yango natiaki naino te lokolo na ngai.

2 Mpe Molimo alobaki epayi na ngai: Tala, mposa na yo ezali nini?

3 Mpe nalobaki: nazali na mposa ya komona makambo oyo tata na ngai amonaki.

4 Mpe Molimo alobaki epayi na ngai: Ondimi ete tata na yo amonaki nzete oyo alobelaki?

5 Mpe nalobaki: Iyo, oyebi ete nandimi maloba nyonso ya tata na ngai.

6 Mpe elobaki ngai maloba oyo, Molimo agangaki na mongongo makasi, kolobaka: Hozana na Nkolo, Nzambe oyo aleki likolo; mpo azali Nzambe likolo ya mabele nyonso, iyo, kutu likolo ya nyonso. Mpe opambolami, Nefi, mpo ete ondimi Mwana ya Nzambe oyo aleki likolo; yango wana, okomona makambo oyo ozalaki na yango mposa.

7 Mpe tala eloko oyo ekopesama epayi na yo lokola elembo, ete ekosila yo komona nzete oyo eboti mbuma oyo tata na yo amekaki, okomona lisusu moto moko kokitaka uta na lola, mpe ye nde okotatola; mpe ekosila yo kotatola ye okopesa litatoli ete ezali Mwana ya Nzambe.

8 Mpe esalemaki ete Molimo alobaki epayi na ngai: Tala! Mpe natalaki mpe namonaki nzete moko; mpe ezalaki lokola nzete oyo tata na ngai amonaki; mpe kitoko na yango ezalaki ya mosika koleka, iyo, kolekaka kitoko nyonso, mpe mpembe na yango elekaki mpembe ya mvula ya mpembe oyo epusami na mopepe.

9 Mpe esalemaki ete esilaki ngai komona nzete yango, nalobaki epayi na Molimo yango: namoni olakisi ngai nzete oyo ezali motuya koleka nyonso.

10 Mpe alobaki epayi na ngai: Mposa na yo ezali nini?

11 Mpe nalobaki epayi na ye: Koyeba ndimbola na yango—mpo nalobaki epayi na ye lokola moto alobaka; mpo namonaki ete azalaki na lolenge ya moto; kasi nzokande, nayebaki ete ezalaki Molimo ya Nkolo; mpe alobaki epayi na ngai lokola moto alobaka na mosusu.

12 Mpe esalemaki ete alobaki epayi na ngai: Tala! Mpe natalaki lokola soki epayi na ye, mpe namonaki ye te; mpo alongwaki uta na liboso ya miso na ngai.

13 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonaki engumba monene ya Yelusaleme, mpe bingumba mosusu mpe lokola. Mpe namonaki engumba ya Nasalete; mpe kati na engumba ya Nasalete, namonaki moseka moko, mpe azalaki bonzenga mpe mpembe mingi koleka.

14 Mpe esalemaki ete namonaki lola efungwami; mpe anjelu akitaki mpe atelemaki liboso na ngai; mpe alobaki epayi na ngai: Nefi omoni nini?

15 Mpe nalobaki epayi na ye: Moseka moko, kitoko mpe bonzenga mingi ya koleka likolo ya baseka nyonso.

16 Mpe alobaki epayi na ngai: Oyebi bonkonde ya Nzambe?

17 Mpe nalobaki epayi na ye: Nayebi ete alingi bana na ye; nzokande, nayebi ndimbola ya makambo nyonso te.

18 Mpe alobaki epayi na ngai: Tala, moseka oyo omonaki azali mama ya Mwana ya Nzambe, na lolenge ya mosuni.

19 Mpe esalemaki ete namonaki ete amemamaki mosika na Molimo; mpe esilaki ye komemama mosika na Molimo na ntaka ya ntango moko, anjelu alobaki epayi na ngai, kolobaka: Tala!

20 Mpe natalaki mpe namonaki moseka yango lisusu, komemaka mwana na maboko na ye.

21 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Tala Mwana ya mpate ya Nzambe, iyo, kutu Mwana ya Tata ya Seko! Oyebi ndimbola ya nzete oyo tata na yo amonaki?

22 Mpe nayanolaki ye, kolobaka: Iyo, ezali bolingo ya Nzambe, oyo esopani na mitema ya bana ya bato; yango wana, ezali eloko oyo esengelami mingi koleka biloko nyonso.

23 Mpe alobaki epayi na ngai, kolobaka: Iyo, mpe ya elengi mingi koleka mpo na molimo.

24 Mpe esilaki ye koloba maloba oyo, alobaki epayi na ngai: Tala! Mpe natalaki, mpe namonaki Mwana ya Nzambe kokendaka na kati ya bana ya bato; mpe namonaki mingi bakwei na makolo na ye mpe bazali kokumbamela ye.

25 Mpe esalemaki ete namonaki ete lingenda ya ebende, oyo tata na ngai amonaki, ezalaki liloba ya Nzambe, oyo ekambaka na liziba ya mai ya bomoi, soki te nzete ya bomoi; oyo mai ezali elilingi ya bolingo ya Nzambe; mpe lisusu namonaki ete nzete ya bomoi ezalaki elilingi ya bolingo ya Nzambe.

26 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai lisusu boye: Tala mpe mona bonkonde ya Nzambe!

27 Mpe natalaki mpe namonaki Mosikoli ya mokili, oyo tata na ngai alobelaki; mpe lisusu namonaki profeta oyo akolengela nzela liboso na ye. Mpe Mwana ya mpate ya Nzambe akendaki mpe abatisamaki na ye; mpe esilaki ye kobatisama, namonaki lola efungwani, mpe Molimo Mosantu akiti uta na lola mpe afandi likolo na ye na lolenge ya ebenga.

28 Mpe namonaki ete akendaki kosalelaka bato, na nguya mpe nkembo monene; mpe ebele ya bato basanganaki elongo mpo na koyoka ye; mpe namonaki ete babenganaki ye uta na kati na bango.

29 Mpe namonaki lisusu zomi na mibale mosusu kolandaka ye. Mpe esalemaki ete bamemamaki na Molimo mosika uta na liboso ya elongi na ngai, mpe namonaki bango te.

30 Mpe esalemaki ete anjelu alobaki epayi na ngai lisusu kolobaka: Tala! Mpe natalaki, mpe namonaki lola efungwani lisusu, mpe namonaki banjelu kokitaka likolo ya bana ya bato; mpe basalelaki bango.

31 Mpe alobaki epayi na ngai lisusu, boye: Tala! Mpe natalaki, mpe namonaki Mwana ya mpate ya Nzambe kokendaka na kati ya bana ya bato. Mpe ebele ya bato oyo bazalaki bakoni, mpe baoyo batungisamaki na bokono ya ndenge nyonso, mpe na bazabulu mpe milimo ya mbindo; mpe anjelu alobaki mpe alakisaki makambo oyo nyonso epayi na ngai. Mpe babikisamaki na nguya ya Mwana ya mpate ya Nzambe; mpe babenganaki zabulu mpe milimo ya mbindo.

32 Mpe esalemaki ete anjelu alobaki epayi na ngai lisusu kolobaka: Tala! Mpe natalaki mpe namonaki Mwana ya mpate ya Nzambe, ete akamatamaki na bato; iyo, Mwana ya Nzambe ya libela asambisamaki na mokili; mpe namonaki mpe napesi litatoli.

33 Mpe ngai, Nefi, namonaki ete atombolamaki likolo ya ekulusu mpe abomamaki mpo na masumu ya mokili.

34 Mpe esilaki ye kobomama, namonaki ebele ya bato ya mabele, ete basanganaki elongo mpo na kobunda na bapostolo ya Mwana ya mpate; mpo boye nde ebiangamaki Bazomi na mibale na anjelu ya Nkolo.

35 Mpe ebele ya bato ya mabele basanganaki elongo; mpe namonaki bazalaki kati na ndako ya monene mpe ya etando, lokola ndako oyo tata na ngai amonaki. Mpe anjelu ya Nkolo alobaki epayi na ngai lisusu kolobaka: Tala mokili mpe bwania na yango, iyo, tala ndako ya Yisalaele esangani mpo na kobunda na bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate.

36 Mpe esalemaki ete namonaki mpe napesi litatoli, ete ndako ya monene mpe ya etando ezalaki lolendo ya mokili; mpe ekweyaki mpe bokwei na yango ezalaki monene mpenza. Mpe anjelu ya Nkolo alobaki epayi na ngai kolobaka: Boye nde ekozala bobebisami ya bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso mpe bato nyonso, baoyo bakobunda na bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate.

Bimisa na lokasa