Makomi
1 Nefi 14


Mokapo 14

Anjelu ayebisi Nefi mpo na oyo etali mapamboli mpe bilakeli mabe oyo ekokweya likolo ya baoyo bazali Bayuda-te—Baeklezia ezali bobele mibale: Eklezia ya Mwana ya mpate ya Nzambe mpe eklezia ya zabulu—Basantu ya Nzambe na bikolo nyonso banyokwami na eklezia ya monene mpe ya nsomo—Apostolo Yoane akokoma mpo na oyo etali nsuka ya mokili. Penepene na mibu 600–592 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe ekosalema, ete soki Bayuda-te bakoyokela Mwana ya mpate ya Nzambe na mokolo wana oyo akomimonisama epayi na bango na liloba, mpe lisusu na nguya, na ekela mpenza, mpo na kolongola mabanga oyo babetisamaki mabaku—

2 Mpe bakoyeisa te mitema na bango makasi na Mwana ya mpate ya Nzambe, bakotangama na kati ya nkona ya tata na yo; iyo, bakotangama na kati ya ndako ya Yisalaele; mpe bakozala bato bapambolama likolo ya mboka elakelama libela; bakomema bango lisusu te kati na bokangemi; mpe ndako ya Yisalaele ekobulunganisama lisusu te.

3 Mpe libulu wana ya monene, oyo etimolami mpo na bango na eklezia oyo ya monene mpe ya nsomo, oyo ekelamaki na zabulu mpe bana na ye, ete akoka kobungisa milimo ya bato na nse ya lifelo—iyo, ete libulu wana ya monene oyo etimolamaki mpo na bobebisami ya bato ekotondisama na baoyo batimolaki yango, mpo na bobebisami nie na bango, elobi Mwana ya mpate ya Nzambe; bobebisami ya molimo te, longola se soki ezali kobwakama na yango kati na lifelo oyo ezali na nsuka te.

4 Mpo tala, oyo ezali engebene na bokangemi ya zabulu, mpe lisusu engebene na boyengebene ya Nzambe, likolo na bango nyonso oyo bakosala nkuna mpe bonsomo liboso na ye.

5 Mpe esalemaki ete anjelu alobaki epayi na ngai, Nefi, kolobaka: Omonaki ete soki baoyo bazali Bayuda-te bayamboli ekozala bolamu mpo na bango; mpe oyebi lisusu mpo na oyo etali mayokani ya Nkolo epayi na ndako ya Yisalaele; mpe oyokaki lisusu ete oyo nyonso ayamboli te asengeli kowa.

6 Yango wana, lisuma ezala epayi ya Bayuda-te soki boye ekozala ete bayeisi mitema na bango makasi na Mwana ya mpate ya Nzambe.

7 Mpo ntango ekoya, elobi Mwana ya mpate ya Nzambe, ete nakosala mosala monene mpe ya kokamwa na kati ya bana ya bato; mosala oyo ekozala ya libela, epayi moko soki te epayi mosusu—ezala mpo na kondimisa bango mpo na kimia mpe bomoi ya seko, soki te mpo na kosundola bango na bokasi ya mitema na bango mpe bokufi miso ya mayele na bango mpo na bomemami na bango kati na bokangemi, mpe lisusu kati na bobebisami, ezala na ndenge ya ntango to ya molimo mpe lokola, engebene na bokangemi ya zabulu, oyo kani nalobelaki.

8 Mpe esalemaki ete elobaki anjelu maloba oyo, alobaki epayi na ngai: Ezali yo komikundola mayokani ya Tata epayi na ndako ya Yisalaele? Nalobaki epayi na ye: Iyo.

9 Mpe esalemaki ete alobaki epayi na ngai: Tala, mpe mona eklezia oyo ya monene mpe ya nsomo, oyo ezali mama ya bonsomo, oyo kani mokeli ezali zabulu.

10 Mpe alobaki epayi na ngai: Tala ezali bobele Baeklezia mibale; moko ezali eklezia ya Mwana ya mpate ya Nzambe, mosusu ezali eklezia ya zabulu; yango wana, oyo nyonso azali ya eklezia ya Mwana ya mpate ya Nzambe te, azali ya eklezia ya monene, oyo ezali mama ya bonsomo; mpe ezali mwasi ya pite ya mabele nyonso.

11 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonaki mwasi ya pite ya mabele nyonso, mpe afandaki likolo ya mai mingi; mpe azalaki na mpifo likolo ya mabele nyonso, na kati ya bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso, mpe bato nyonso.

12 Mpe esalemaki ete namonaki eklezia ya Mwana ya mpate ya Nzambe, mpe motango na yango ezalaki mingi te, na ntina ya nkuna mpe bonsomo ya mwasi ya pite oyo afandi likolo ya mai mingi; nzokande, namonaki eklezia ya Mwana ya mpate, oyo bazalaki basantu ya Nzambe, bazalaki lisusu likolo ya etando nyonso ya mabele, mpe bokonzi na bango likolo ya etando ya mabele ezalaki moke, na ntina ya nkuna ya mwasi ya pite monene oyo namonaki.

13 Mpe esalemaki ete namonaki ete mama monene ya bonsomo asangisaki ebele ya bato esika moko likolo ya etando ya mabele nyonso, na kati ya bikolo nyonso ya Bayuda-te, mpo na kobunda na Mwana ya mpate ya Nzambe.

14 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonaki nguya ya Mwana ya mpate ya Nzambe, ete ekitaki likolo ya basantu ya eklezia ya Mwana ya mpate, mpe likolo ya bato ya liyokani ya Nkolo, oyo bapanzamaki likolo ya etando nyonso ya mabele; mpe balatisamaki na bibundeli ya bosembo mpe na nguya ya Nzambe na nkembo monene.

15 Mpe esalemaki ete namonaki ete nkele ya Nzambe esopanaki likolo ya eklezia ya monene mpe ya nsomo, na lolenge ete bitumba mpe nungunungu ya bitumba ezalaki na kati ya bikolo nyonso mpe mabota nyonso ya mabele.

16 Mpe lokola bitumba mpe nungunungu ya bitumba ebandaki kozala na kati ya bikolo oyo ezalaki ya mama ya bonsomo, anjelu alobelaki ngai, kolobaka: Tala, nkele ya Nzambe ezali likolo ya mama ya basi ya pite; mpe tala, omoni makambo oyo nyonso—

17 Mpe ntango ekoya mokolo oyo nkele ya Nzambe ekosopana likolo ya mama ya basi ya pite, oyo ezali eklezia ya monene mpe ya nsomo ya mabele nyonso, oyo kani mokeli azali zabulu, nde, na mokolo wana, mosala ya Tata mokobanda, na kolengelaka nzela mpo na bokokisi ya mayokani na ye, oyo asalaki mpo na bato na ye baoyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele.

18 Mpe esalemaki ete anjelu alobelaki ngai, kolobaka: Tala!

19 Mpe natalaki mpe namonaki moto, mpe alataki nzambala ya mpembe.

20 Mpe anjelu alobaki epayi na ngai: Tala moko ya bapostolo zomi na mibale ya Mwana ya mpate.

21 Tala, akomona mpe akokoma oyo etikali ya makambo oyo; iyo, mpe lisusu makambo mingi oyo ezalaki.

22 Mpe akokoma lisusu mpo na oyo etali nsuka ya mokili.

23 Yango wana, makambo oyo akokoma ezali sembo mpe solo; mpe tala ekomami na buku oyo omonaki kobimaka uta na monoko ya Moyuda; mpe na ntango ebimaki uta na monoko ya Moyuda, soki te, na ntango buku oyo ebimaki uta na monoko ya Moyuda, makambo oyo ekomamaki ezalaki polele mpe peto, mpe ma motuya mingi koleka nyonso mpe petepete mpo na bososoli ya bato nyonso.

24 Mpe tala, makambo oyo apostolo ya Mwana ya mpate akokoma ezali makambo mingi oyo omonaki, mpe tala, oyo etikali yango nde okomona.

25 Kasi makambo oyo okomona nsima awa okokoma te; mpo Nkolo Nzambe akulisi apostolo ya Mwana ya mpate ya Nzambe ete akoma yango.

26 Mpe lisusu basusu baoyo bazalaki, na bango alakisaki makambo nyonso, mpe bakomaki yango; mpe makangami mpo na kobima na bopeto na yango, engebene na bosolo oyo ezali na Mwana ya mpate, na ntango esengeli ya Nkolo ye moko, mpo na ndako ya Yisalaele.

27 Mpe ngai, Nefi, nayokaki mpe napesi litatoli, ete nkombo ya apostolo ya Mwana ya mpate ezalaki Yoane, engebene na liloba ya anjelu.

28 Mpe tala, ngai, Nefi, epekisami ngai ete nakoma oyo etikali ya makambo oyo namonaki mpe nayokaki; yango wana makambo oyo nakomaki ekoki mpo na ngai, mpe nakomaki bobele eteni ya moke ya makambo oyo namonaki.

29 Mpe napesi litatoli ete namonaki makambo oyo tata na ngai amonaki, mpe anjelu ya Nkolo ayebisaki yango epayi na ngai.

30 Mpe sikawa natie nsuka ya koloba mpo na oyo etali makambo oyo namonaki wana ememamaki ngai na Molimo; mpe soki makambo nyonso oyo namonaki ekomami te, makambo oyo nakomaki ezali solo. Mpe ezali boye. Amene.

Bimisa na lokasa