Makomi
1 Nefi 22


Mokapo 22

Yisalaele ekopanzama likolo ya etando nyonso ya mabele—Bayuda-te bakosalisa mpe bakoleisa Yisalaele na nsango malamu na mikolo ya nsuka—Yisalaele ekosangana mpe ekobikisama, mpe bato ya nkuna bakozika lokola matiti—Bokonzi ya zabulu ekobebisama, mpe Satana akokangisama na singa. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ngai, Nefi, esilaki ngai kotanga makambo oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, bandeko mibali na ngai bayaki epayi na ngai mpe balobaki epayi na ngai: Elingi koloba nini makambo oyo otangi? Tala, esengeli yango kososolama engebene na makambo oyo ezali ya molimo, oyo makosalema engebene na molimo kasi na mosuni te?

2 Mpe ngai, Nefi, nalobaki epayi na bango: Tala emonisamaki epayi na profeta na mongongo ya Molimo; mpo makambo nyonso eyebisami epayi na baprofeta na Molimo, oyo ekoya likolo ya bana ya bato engebene na mosuni.

3 Yango wana, makambo oyo natangaki ezali makambo etali ntango mpe molimo; mpo emonani ete ndako ya Yisalaele, ata ndele, ekopanzama likolo ya etando nyonso ya mabele, mpe lisusu na kati ya bikolo nyonso.

4 Mpe tala, ezali na mingi baoyo babungi kala uta na boyebi na bango oyo bazali na Yelusaleme. Iyo, eteni eleki mingi ya mabota nyonso ekambamaki mosika; mpe mapanzanaki epayi na epayi likolo ya bisanga ya mbu; mpe wapi bazali moko te kati na biso ayebi, longola se toyebi ete bakambamaki mosika.

5 Mpe uta ntango bakambamaki mosika, makambo oyo etali bango masakolamaki, mpe lisusu oyo etali bango nyonso oyo bakopanzama mpe bakobulunganisama, na ntina ya Moko Mosantu ya Yisalaele; mpo na ye bayeisi mitema na bango makasi; yango wana, bakopanzama na kati ya bikolo nyonso mpe bakoyinama na bato nyonso.

6 Nzokande, ekosila bango koleisama na baoyo bazali Bayuda-te, mpe ekosila Nkolo kotombola loboko na ye likolo ya Bayuda-te mpe kotia bango likolo lokola bendele, mpe bana na bango komemama na maboko na bango, mpe bana basi na bango bakomemama na mapeka na bango, tala makambo oyo malobami ezali ya ntango oyo; mpo boye nde ezali mayokani ya Nkolo elongo na batata na biso; elingi koloba biso na mikolo mikoya, mpe lisusu bandeko na biso oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele.

7 Mpe elingi koloba ete ntango ezali koya ete ekosila ndako nyonso ya Yisalaele kopanzama mpe kobulunganisama, ete Nkolo Nzambe akotelemisa ekolo ya makasi na kati ya baoyo bazali Bayuda-te, iyo, kutu likolo ya etando ya mabele oyo; mpe na bango nkona na biso ekopanzama.

8 Mpe esili nkona na biso kopanzama, Nkolo Nzambe akobanda kosala mosala ya kokamwa na kati ya Bayuda-te, oyo mokozala ya motuya monene mpo na nkona na biso; yango wana, bameki yango na koleisama na bango na Bayuda-te mpe komemama na bango na maboko mpe likolo ya mapeka na bango.

9 Mpe lisusu ekozala motuya mpo na Bayuda-te; mpe bobele mpo na baoyo bazali Bayuda-te te kasi mpo na ndako nyonso ya Yisalaele, kino na koyebisaka mayokani ya Tata ya lola epayi ya Abalayama, kolobaka: Na nkona na yo mabota nyonso ya mabele ekopambolama.

10 Mpe nalingaki, bandeko na ngai, ete boyeba ete mabota nyonso ya mabele makoki kopambolama te longola se soki azipoli loboko na ye ya santu na miso ya mabota.

11 Yango wana, Nkolo Nzambe akobanda kozipola loboko na ye losantu na miso ya bikolo nyonso, na komemaka mayokani na ye mpe nsango malamu na ye epayi na baoyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele.

12 Yango wana, akomema bango lisusu libanda uta na bokangemi, mpe bakosangana esika moko na mboka ya bosangoli libula na bango; mpe bakobimisama uta na butu mpe uta na molili; mpe bakoyeba ete Nkolo azali Mobikisi mpe Mosikoli na bango, Moko ya Makasi ya Yisalaele.

13 Mpe makila ya eklezia wana ya monene mpe ya nsomo, oyo ezali mwasi ya pite ya mabele nyonso, makobaluka likolo ya mitu na bango moko; mpo bakobunda bitumba bango na bango, mpe mompanga ya loboko na bango moko mokokweya likolo ya mitu na bango moko, mpe bakolangwisama na makila na bango moko.

14 Mpe ekolo nyonso oyo ekobunda bitumba na yo, O ndako ya Yisalaele, ekobaluka likolo na bango na bango, mpe bakokweya kati na libulu oyo batimolaki mpo na kokanga bato ya Nkolo na motambo. Mpe nyonso oyo bakobunda na Siona bakobebisama, mpe mwasi monene ya pite, oyo abebisaki nzela ya sembo ya Nkolo, iyo, eklezia wana ya monene mpe ya nsomo, akokweya na mputulu mpe bokwei na yango ekozala ya monene.

15 Mpo tala, elobi profeta, ntango ezali koya na lombangu oyo Satana akozala lisusu te na nguya likolo ya mitema ya bana ya bato; mpo na mokolo ekoya kala mingi te oyo bato ya lolendo mpe bango oyo basalaka makambo ya nkuna bakozala lokola matiti; mpe mokolo ekoya oyo wapi bakozikisama.

16 Mpo ntango ezali koya kala mingi te oyo litondi ya nkele ya Nzambe ekosopana likolo ya bana nyonso ya bato; mpo akopesa te nzela ete bato ya nkuna babebisa basembo.

17 Yango wana, akobatela basembo na nguya na ye, kutu soki ekozala bongo ete litondi ya nkele na ye esengeli koya, mpe basembo bakobatelama, kutu kino na bobebisami ya banguna na bango na moto. Yango wana, basembo bazali te na ntina ya kobanga; mpo boye elobi profeta, bakobikisama, kutu soki ekozala bongo lokola na moto.

18 Tala, bandeko mibali na ngai, nalobi epayi na bino, ete makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te; iyo, kutu makila, mpe moto, mpe mbongi ya molinga esengeli koya; mpe esengeli mpenza kozala likolo ya mabele nyonso; mpe ekoya epayi ya bato engebene na mosuni soki ekozala bongo ete bakoyeisa mitema na bango makasi na Moko Mosantu ya Yisalaele.

19 Mpo tala, basembo bakowa te; mpo ntango solo esengeli koya oyo wapi bango nyonso oyo babundi na Siona bakokatama mosika.

20 Mpe Nkolo solo akolengela nzela mpo na bato na ye, mpo na kokokisa maloba ya Mose, oyo alobaki, kolobaka: Nkolo Nzambe na bino akotelemisa mpo na bino profeta, lokola ngai, bokoyoka ye na makambo nyonso oyo akoloba epayi na bino. Mpe ekosalema ete nyonso oyo bakoyokela profeta wana te bakokatama mosika uta na kati ya bato.

21 Mpe sikawa ngai, Nefi, nayebisaki epayi na bino, ete profeta oyo Mose alobelaki azalaki Moko Mosantu ya Yisalaele; yango wana, akosala bosambisi na bosembo.

22 Mpe basembo bazali te na ntina ya kobanga, mpo bazali bango oyo bakosambwisama te. Kasi ezali bokonzi ya zabulu, boye bokotongama na kati ya bana ya bato, bokonzi boye botiami na kati na bango oyo bazali kati na mosuni—

23 Mpo ntango ezali koya na lombangu oyo wapi Baeklezia nyonso oyo etongami mpo na kozwa matabisi, mpe bango nyonso oyo batongami mpo na kozwa nguya likolo ya mosuni, mpe bango oyo batongami mpo na koyebana na bato na miso ya mokili, mpe bango oyo bazali koluka mposa ya mosuni mpe biloko ya mokili, mpe kosala ndenge nyonso ya mabe; iyo, mpo na kosukisa, baoyo bazali ya bokonzi ya zabulu bango bazali na ntina ya kobanga, mpe kolenga, mpe koningana; bango basengeli kokitisama na nse na mputulu, bango basengeli kozikisama lokola matiti; mpe oyo ezali engebene na maloba ya profeta.

24 Mpe ntango ezali koya na lombangu oyo wapi basembo bakopumbwisama lokola bana ya ngombe ya ndako ya bibwele, mpe Moko Mosantu ya Yisalaele akokonza na mpifo, mpe bokasi, mpe nguya, mpe nkembo monene.

25 Mpe asangisaka bana na ye uta na ntaka minei ya mabele; akotanga mpate na ye, mpe bayebi ye; mpe bakozala etonga moko mpe mobateli moko; mpe akoleisa mpate na ye, mpe na lisalisi na ye bakozwa elanga ya bilei.

26 Mpe na ntina ya bosembo ya bato na ye, Satana azali na nguya te; yango wana, akoki te kofungolama na ntaka ya mibu mingi; mpo azali na nguya moko te likolo ya mitema ya bato, mpo bakofanda na bosembo, mpe Moko Mosantu ya Yisalaele azali kokonza.

27 Mpe sikawa tala, ngai, Nefi, nalobi epayi na bino ete makambo oyo nyonso ekoya engebene na mosuni.

28 Kasi, tala, bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso, mpe bato nyonso, bakofanda na bokengi elongo na Moko Mosantu ya Yisalaele soki ekozala bongo ete bakoyambola.

29 Mpe sikawa ngai, Nefi, nasukisi; mpo nakomeka te koloba mingi nsima sikawa mpo na oyo etali makambo oyo.

30 Yango wana, bandeko mibali na ngai, nalingi ete bokoka komona ete makambo oyo ekomami likolo ya bapalaki ya motako ezali solo; mpe ezali kotatola ete moto asengeli kotosa mitindo ya Nzambe.

31 Yango wana, bozali te na ntina ya kobanza ete ngai mpe tata na ngai tozali bobele baoyo batatolaki, mpe lisusu bateyaki yango. Yango wana, soki bokozala na botosi na mitindo, mpe bokotia molende kino na nsuka, bokobikisama na mokolo ya nsuka. Mpe ezali boye. Amene.

Bimisa na lokasa