Makomi
2 Nefi 15


Mokapo 15

Elanga ya vinyo ya Nkolo (Yisalaele) ekokoma mpamba, mpe bato na Ye bakopanzama—Masuma ekoya likolo na bango na ezalela na bango ya bopengwi mpe ya bopanzami—Nkolo akotombola bendele mpe akosangisa Yisalaele—Meka na Yisaya 5. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe nde nakoyembela molingami malamu na ngai loyembo ya molingami na ngai, mpo na oyo etali elanga ya vinyo na ye. Molingami malamu na ngai azali na elanga ya vinyo na ngomba ya moke oyo ebimisaka mbuma mingi.

2 Mpe atongelaki yango lobala, mpe asangisaki mabanga libanda na yango, mpe alonaki yango na vinyo oyo eponami mingi koleka nyonso, mpe atongaki linongi na katikati na yango, mpe lisusu asalaki ekamolelo ya vinyo kuna na kati; mpe azelaki ete ebota mbuma ya vinyo, mpe ebotaki mbuma ya vinyo ya zamba.

3 Mpe sikawa, O bafandi ya Yelusaleme, mpe bato ya Yuda, bosambisa, nasengi bino, katikati na ngai mpe elanga na ngai ya vinyo.

4 Nini ekokaki kosalema mingi malamu na elanga na ngai ya vinyo oyo nasalaki kati na yango te? Yango wana, ntango nazelaki ete ebota mbuma ya vinyo ebotaki mbuma ya vinyo ya zamba.

5 Mpe sikawa bokende; nakolobela bino nini nakosala na elanga na ngai ya vinyo—nakolongola lopango na yango, mpe ekoliama nie; mpe nakobuka efelo na yango, mpe ekoniatama na nse;

6 Mpe nakotika yango eloko ebebi mpamba; ekokatama bitape te to mabele na misisa ya nzete ekobalusama mpe te; kasi ekobimisa matiti mabe mpe nzube; lisusu nakotinda mapata ete manokisa mvula likolo na yango te.

7 Mpo elanga ya vinyo ya Nkolo na Bibele ezali ndako ya Yisalaele, mpe bato ya Yuda nzete na ye oyo alingaka; mpe azelaki mpo na bosambisi, mpe tala, monyokoli; mpo na bosembo, kasi tala, boleli.

8 Lisuma epayi na bango oyo bakokangisa ndako na ndako, kino esika ekoka kozala lisusu te, ete batikala bango moko na katikati ya mabele!

9 Na matoyi na ngai, elobaki Nkolo na Bibele, na bosolo ndako mingi ekotikala mpamba, mpe bingumba minene mpe ya kitoko ezanga bafandi.

10 Iyo, ntaka zomi ya elanga ya vinyo ekobimisa bobele bati moko, mpe nkona ya homele moko ekobimisa efa moko.

11 Lisuma epayi na bango oyo bakolamuka na ntongo mpenza, ete bakoka kolanda vinyo ya makasi, baoyo bakokoba kino na butu, mpe vinyo ezikisi bango!

12 Mpe likembe, mpe nzeze, lokole, mpe mondule, mpe vinyo ezali na lipati na bango; kasi bakokeba te na misala ya Nkolo, mpe bakotala mosala ya maboko na ye te.

13 Boye, bato na ngai bakei kati na bokangemi, mpo bazali na boyebi te; mpe bato na bango ya lokumu bakufi nzala, mpe ebele ya bato kati na bango bakawuki na mposa ya mai.

14 Boye, lifelo emikomisi monene, mpe ezipaki monoko ya yango na kozangaka ndelo; mpe nkembo na bango, mpe ebele ya bato kati na bango, mpe monzele na bango, mpe ye oyo akosepela, bakokita na kati na yango.

15 Mpe moto ya mpamba akokitisama, mpe moto ya makasi akokweisama, mpe miso ya baye ya lolendo ekokitisama.

16 Kasi Nkolo na Bibele akonetolama na bosambisi, mpe Nzambe oyo azali mosantu akosantisama na bosembo.

17 Nde bana ya mpate bakolia na lolenge na bango, mpe bisika bitikali mpamba ya bato na bozwi bapaya bakolia yango.

18 Lisuma epayi na bango oyo bakobenda mabe na basinga ya lipombo, mpe lisumu lokola soki ezalaki na singa ya likalo;

19 Baoyo balobi: Tika ye asala mbangu, awelisa mosala na ye, ete tokoka komona yango; mpe tika toli ya Moko Mosantu ya Yisalaele ebelema penepene mpe eya, ete tokoka koyeba yango.

20 Lisuma epayi na baoyo babiangaka mabe bolamu, mpe bolamu mabe, baoyo batiaka molili ezala lokola pole, mpe pole ezala lokola molili, baoyo batiaka bololo ezala lokola sukali, mpe sukali ezala lokola bololo!

21 Lisuma epayi ya bato ya bwania na miso na bango moko mpe bato ya ekenge na miso na bango moko!

22 Lisuma epayi ya bato ya makasi mpo na komela vinyo, mpe bato ya makasi mpo na kosangisa vinyo ya makasi;

23 Baoyo balongisaka moto ya nkuna mpo na mbano, mpe balongolaka bosembo ya moto ya sembo mosika na ye!

24 Boye, lokola moto eliaka mpumbulu, mpe lokola mololi ezikisaka matiti ekawuka, mosisa na bango ekozala lokola eloko esila kopola, mpe bafololo na bango ekopanzana lokola mputulu; mpo babwakaki mosika mobeko ya Nkolo na Bibele, mpe batiolaki liloba ya Moko Mosantu ya Yisalaele.

25 Boye, nkanda ya Nkolo epeli na bato na ye, mpe atandolaki loboko na ye na bango mpe abetaki bango; mpe bangomba ya mike mike elengaki, mpe bibembe na bango bipasolamaki na katikati ya balabala. Ata nyonso oyo, nkanda na ye elongwe te, kasi loboko na ye ezali naino ya kotandolama.

26 Mpe akotombola bendele epayi na bikolo uta na mosika, mpe akobetela bango piololo uta na nsuka ya mabele; mpe tala, bakoya na lombangu mpenza; moko te akolemba soki mpe akobeta libaku na kati na bango.

27 Moko te akozala motau to akolala; to mpe mokaba ya nketo na bango mokofungwama te, to mpe singa ya sapato na bango ekokatana te;

28 Oyo na ye makula ekozala mino makasi mpe matimbo nyonso na bango ebendani, mpe makaka ya bampunda na bango ekotangama lokola libanga ya makasi, mpe biyika na bango lokola mopepe ya kaina, koganga na bango lokola nkosi.

29 Bakoganga lokola bankosi ya bilenge; iyo, bakoganga mpe bakanga nyama, mpe bakomema yango mosika na bokengi, mpe moko te akokangola.

30 Mpe na mokolo wana bakoganga likolo na bango lokola lokito ya mbu; mpe soki batali epayi na mboka, tala, bakomona se molili mpe mawa, mpe pole ekomaki molili na lola wapi ezwami.

Bimisa na lokasa