Makomi
2 Nefi 19


Mokapo 19

Yisaya alobi na ntina ya Masiya—Bato na molili bakomona pole monene—Mpo na biso mwana abotami—Akozala Mwana Mokonzi ya Kimia mpe akokonza likolo ya kiti ya bokonzi ya Dawidi—Meka na Yisaya 9. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Nzokande, butu ekozala te lokola ezalaki na ntango ya mitungisi na ye, ntango atungisaki yambo ya moke mboka ya Zebuluna, mpe mboka ya Nafatali, mpe nsima atungisaki makasi mpenza na nzela ya Mbu Etane mosika na ngambo mosusu ya Yaladene na Galilea ya bikolo.

2 Bato oyo batambolaki na molili bamonaki pole monene; bango oyo bafandaki na mboka ya molili ya liwa, likolo na bango pole engengaki.

3 Otondisaki ekolo, mpe obakisi bosepeli—basepeli liboso na yo na lolenge ya bosepeli ya ntango ya bobuki, mpe lokola bato basepelaka ntango bakabolaka biloko bipunzami.

4 Mpo obukaki nkanga ya mokumba na ye, mpe ngondo ya lipeka na ye, lingenda ya monyokoli na ye.

5 Mpo etumba na etumba ya mobundi etumba ezali na makelele ya mobulu, mpe bilamba bibalolami na makila; kasi oyo ekozala elongo na bozikisi mpe biloko oyo bipelisaka moto.

6 Zambi mpo na biso mwana abotami, mpo na biso mwana mobali apesami; mpe mbulamatari ekozala likolo ya lipeka na ye; mpe nkombo na ye ekobiangama, Mokamwisi, Mopesi toli, Nzambe ya Bokasi, Tata ya Libela, Mwana Mokonzi ya Kimia.

7 Na bobakisi ya mbulamatari mpe kimia nsuka ezali te, likolo ya kiti ya bokonzi ya Dawidi, mpe likolo ya bokonzi na ye mpo na kobongisa yango, mpe mpo na kobandela yango na bosambisi mpe na boyengebene uta sikawa kokende liboso, kutu libela. Mpila ya Nkolo na Bibele ekosala oyo.

8 Nkolo atindaki liloba na ye epayi ya Yakobo mpe pole engengi likolo ya Yisalaele.

9 Mpe bato nyonso bakoyeba, kutu Efelaima mpe bafandi ya Samalia, baoyo balobi na lolendo mpe bokasi ya motema:

10 Biliki ezali kokweya, kasi tokotonga na mabanga oyo masebisami; banzete ya mosuke esili kokatama, kasi tokobongola yango na banzete ya eleze.

11 Boye Nkolo akotelemisa bayini ya Lesini babunda na ye, mpe akosangisa banguna na ye esika moko;

12 Basulia liboso mpe Bafilisitia nsima; mpe bakolia Yisalaele na monoko ya kofungwama. Mpo na nyonso oyo nkanda na ye elongwe te, kasi loboko na ye ezali naino ya kotandolama.

13 Mpo bato babaluki epayi na ye oyo abeti bango te, mpe baluki Nkolo na Bibele te.

14 Boye Nkolo akokata uta na Yisalaele moto mpe mokila, etape mpe mondengba na mokolo moko.

15 Mokolo, azali moto; mpe profeta oyo ateyaka lokuta, azali mokila.

16 Mpo bakambi ya bato oyo basali ete bango babunga; mpe baoyo bakambami na bango babebisami.

17 Boye Nkolo akosepela te na bilenge na bango, mpe akozala na boboto te likolo ya baoyo bakufela batata mpe baoyo bakufela mibali na bango; mpo moko na moko na bango azali mokibisi mpe mosali mabe, mpe monoko na monoko molobaka liboma. Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda nyonso na ye elongwe te, kasi loboko na ye ezali naino ya kotandolama.

18 Mpo nkuna ezikisaka lokola moto; ekomela nkobongo mpe nzube; mpe ekopela na bisika ya zamba ya nkaka, mpe bakomata likolo lokola bomati ya molinga.

19 Na nzela ya nkele ya Nkolo na Bibele nde mboka eyindisami, mpe bato bakozala lokola biloko oyo bipelisaka moto; moto moko te akobikisa ndeko na ye ya mobali.

20 Mpe akobakola na loboko ya mobali mpe akoyoka nzala; mpe akolia na loboko ya mwasi mpe bakotonda te; Bakolia moto na moto mosuni ya loboko ya ye moko—

21 Manase, Efelaima; mpe Efelaima, Manase; esika moko bakotelemela Yuda. Mpo nkanda na ye nyonso elongwe te, kasi loboko na ye ezali naino ya kotandolama.

Bimisa na lokasa