Makomi
2 Nefi 1


Buku ya Mibale ya Nefi

Lisolo ya liwa ya Lehi. Bandeko mibali ya Nefi batomboki na ye. Nkolo akebisi Nefi mpo na kokende na esobe. Mibembo na ye kati na esobe, mpe bongo na bongo.

Mokapo 1

Lehi asakoli mpo na oyo etali mboka ya lipanda—Nkona na ye ekopanzama mpe ekobetama soki babwaki Moko Mosantu ya Yisalaele—Alendisi bana mibali na ye balata bibundeli ya bosembo. Penepene na mibu 588–570 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki ngai, Nefi, kotia nsuka na koteyaka bandeko mibali na ngai, tata na biso, Lehi, alobelaki lisusu bango makambo mingi, mpe azongelaki koloba yango epayi na bango, lolenge boni Nkolo asalaki makambo minene mpo na bango na komemaka bango uta na mboka ya Yelusaleme.

2 Mpe alobelaki bango mpo na oyo etali botomboki na bango likolo ya mai, mpe boboto ya Nzambe na kobikisaka bomoi na bango, ete bamelamaki na mbu te.

3 Mpe alobelaki bango lisusu mpo na oyo etali mboka ya elaka, oyo bazwaki—lolenge kani Nkolo atondisamaki na boboto na kokebisaka biso ete tosengelaki kokima uta na mboka ya Yelusaleme.

4 Mpo, tala, elobaki ye, namonaki limoni, na nzela ya oyo wapi nayebi ete Yelusaleme ebebisami; mpe soki totikalaka na Yelusaleme tolingaki mpe lokola kowa.

5 Kasi, elobaki ye, ata mitungisi na biso, tozwi mboka ya elaka, mboka oyo ezali ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu; mboka oyo Nkolo Nzambe asalaki liyokani na ngai ete ekozala mboka mpo na bosangoli libula ya nkona na ngai. Iyo, Nkolo apesaki ngai mboka oyo na nzela ya liyokani, mpe mpo na bana na ngai libela, mpe lisusu nyonso oyo bakokambama uta na bamboka mosusu na loboko ya Nkolo.

6 Yango wana, ngai, Lehi, nasakoli engebene na misala ya Molimo oyo azali na ngai, ete moko te akoya na mboka oyo longola se soki akumbami na loboko ya Nkolo.

7 Yango wana, mboka oyo ebulisami mpo na ye oyo ye akomema. Mpe soki ekozala bongo ete bakosalela ye engebene na mitindo oyo apesaki, ekozala mboka ya lipanda mpo na bango; Yango wana, bakoki kokweisama te kati na bokangemi; soki bongo, ekozala na ntina ya mabe; mpo soki mabe makomi beboo mboka ekozala na bolakeli mabe mpo na ntina na bango, kasi mpo na basembo ekopambolama libela.

8 Mpe tala, ezali bwania ete mboka oyo ebombama lokola sikawa uta na boyebi ya bikolo misusu; mpo tala, bikolo mingi bilingaki kokamata mboka, ete esika mpo na bosangoli libula elingaki kozala te.

9 Yango wana, ngai, Lehi, nazwaki elaka, ete mbala mingi lokola bango oyo Nkolo Nzambe akumbaki uta na mboka ya Yelusaleme bakobomba mitindo na ye, bakofuluka likolo ya etando ya mboka; mpe bakobombama uta na bikolo nyonso misusu, ete bakoka kozwa mboka oyo mpo na bango moko. Mpe soki ekozala bongo ete bakobomba mitindo na ye bakopambolama likolo ya etando ya mboka oyo, mpe ekozala na moto moko te mpo na koyokisa bango mpasi, to mpo na kolongola mboka ya bosangoli libula na bango mpe te; mpe bakofanda libela kati na bokengi.

10 Kasi tala, ekoya ntango oyo wapi bakobeba moke moke kati na bozangi boyambi, wana esili bango kozwa mapamboli minene mingi bongo na loboko ya Nkolo—kozalaka na boyebi boko ya bokeli ya mabele, mpe ya bato nyonso, koyebaka misala minene mpe ya kokamwa ya Nkolo uta na bokeli ya mokili; kozwaka nguya epesameli bango mpo na kosala makambo nyonso na bondimi; kozwaka mitindo nyonso uta na ebandeli, mpe kokumbamaka na bolamu na ye boye bozanga ndelo kati na mboka ya motuya ya elaka—tala, nalobi, soki mokolo ekoya ete bakobwaka Moko Mosantu ya Yisalaele, Masiya ya solo, Mosikoli na bango mpe Nzambe na bango, tala, masambisi na ye oyo azali moyengebene makofanda likolo na bango.

11 Iyo, akomema bikolo mosusu epayi na bango, mpe akopesa epayi na bango nguya, mpe akolongola uta na bango mboka ya bozwi na bango, mpe akosala ete bapanzama mpe babetama.

12 Iyo, lokola nkona moko ekoleka mpo na mosusu ekozala na bosopi makila, mpe bobimeli monene na kati na bango; yango wana, bana mibali na ngai, nalingi ete bomikundola; iyo, nalingi ete boyoka maloba na ngai.

13 O tika ete bolamuka; bolamuka uta na mpongi ya mozindo, iyo, kutu uta na mpongi ya lifelo, mpe bolongola miniololo ya nsomo na oyo kani bokangemi, oyo ezali miniololo oyo ekangi bana ya bato, ete bamemami mosika bakangemi na nse ya libulu ya seko ya mpasi mpe ya lisuma.

14 Bolamuka! Mpe botelema uta na mputulu, mpe boyoka maloba ya moboti oyo azali kolenga, oyo kani binama kala mingi te bokolalisa na lilita ya mpio mpe nie, uta wapi moto ya mobembo moko te akoki kozonga; etikali ngai ya mikolo mike mpe nakokende nzela ya mabele nyonso.

15 Kasi tala, Nkolo asikoli molimo na ngai uta na lifelo; namoni nkembo na ye, mpe nazingami mpembeni seko na maboko ya bolingo na ye.

16 Mpe nalingi ete bomikundola kotosa meko mpe masambisi ya Nkolo; tala, oyo ezalaki motungisi ya molimo na ngai uta na ebandeli.

17 Mbala na mbala motema na ngai etondaki na mawa, mpo nabangaki, mbele mpo na bokasi na mitema na bino Nkolo Nzambe na bino abimela bino na litondi ya nkele na ye likolo na bino, ete bokatama mosika mpe bobebisama libela;

18 Soki te, ete bolakeli mabe eya likolo na bino mpo na ntaka ya nkola mingi; mpe bobimelama na mompanga, mpe na nzala, mpe boyinama, mpe bokambama engebene na bolingi mpe bokangemi ya zabulu.

19 O bana mibali na ngai, tika ete makambo oyo makoka koya likolo na bino te, kasi ete bokoka kozala bato ya boponi mpe bato basungami na Nkolo. Kasi tala, bolingi na ye esalema; mpo banzela na ye ezali bosembo libela.

20 Mpe alobaki ete: Mbala mingi lokola ekobomba bino mitindo na ngai bokofuluka na mboka; kasi mbala mingi lokola bokobomba mitindo na ngai te bokokatama mosika uta na miso na ngai.

21 Mpe sikawa mpo ete molimo na ngai ezala na bosepeli mpo na bino, mpe mpo ete motema na ngai etika mokili oyo na bosepeli na ntina na bino, ete nakoka te kokitisama kati na lilita na mpasi mpe mawa, botelema uta na mputulu, bana mibali na ngai, mpe bozala mibali, mpe bozwa mokano na likanisi moko mpe na motema moko, wana ezali bino na bomoko na makambo nyonso, ete bokoka te kokweya kati na bokangemi;

22 Ete bokoka kolakelama mabe te na bolakeli mabe ya nsomo; mpe lisusu, mpo ete bomilukela te bosiliki ya Nzambe moyengebene likolo na bino, kino na bobebisami, iyo, bobebisami ya seko ya molimo mpe nzoto mpe lokola.

23 Bolamuka, bana mibali na ngai; bolata bibundeli ya bosembo. Bolongola miniololo oyo wapi bokangemi, mpe bobima uta na molili, mpe botelema uta na mputulu.

24 Botomboka lisusu te na ndeko na bino ya mobali, oyo kani mamoni ezali ya nkembo, mpe oyo abombaki mitindo uta na ntango totikaki Yelusaleme; mpe oyo azalaki esalelo na maboko ya Nzambe, na komemaka biso na mboka ya elaka; mpo soki ezalaki te mpo na ye, mbele tosengelaki kowa na nzala na esobe; nzokande, bolukaki kolongola bomoi na ye; iyo, mpe ayokaki mpasi ya mawa mingi na ntina na bino.

25 Mpe nazali kobanga mpe nazali kolenga mingi koleka na ntina na bino, mbele akoyoka mpasi lisusu; mpo tala, bofundaki ye ete alukaki nguya mpe likoki likolo na bino; kasi nayebi ete alukaki nguya soki mpe likoki te likolo na bino, kasi alukaki nkembo ya Nzambe, mpe bolamu ya seko na bino moko.

26 Mpe boyima-yimaki mpo ete azalaki polele na bino. Bolobi ete asalelaki maloba makasi; bolobi ete ayokelaki bino nkanda; kasi tala, maloba makasi na ye ezalaki maloba makasi ya nguya ya liloba ya Nzambe, oyo ezalaki na ye; mpe ete oyo bobiangaki nkanda ezalaki bosolo, engebene na bosolo boye ezali na Nzambe, boye akokaki te kokanga, komonisaka bompikiliki mpo na oyo etali mabe na bino.

27 Mpe esengeli mpenza ete nguya ya Nzambe ezala elongo na ye, kutu na lolenge ete atindi bino ete bosengelaki kotosa. Kasi tala, ezalaki ye te, kasi ezalaki Molimo ya Nkolo oyo azalaki na ye, oyo afungolaki monoko na ye na koloba mpe akokaki te kokanga yango.

28 Mpe sikawa mwana na ngai, Lamani, mpe lisusu Lemuele mpe Sami, mpe lisusu bana na ngai mibali baoyo bazali bana mibali ya Yisamaele, tala, soki bokoyoka mongongo ya Nefi bokowa te. Mpe soki bokoyokela ye natikeli bino lipamboli, iyo, kutu lipamboli na ngai ya yambo.

29 Kasi soki bokoyokela ye te nalongoli lipamboli na ngai ya yambo, iyo, kutu lipamboli na ngai, mpe ekotikala likolo na ye.

30 Mpe sikawa, Zolami, nakoloba epayi na yo: Tala, ozali mosali ya Labana; nzokande, okumbamaki uta na mboka ya Yelusaleme, mpe nayebi ete ozali moninga ya solo ya mwana na ngai, Nefi, libela.

31 Yango wana, mpo ozalaki sembo nkona na yo ekopambolama elongo na nkona na ye, ete bawumela na bofuluki ya ntango molai likolo ya etando ya mboka oyo; mpe eloko moko te, longola se soki ekozala mabe na kati na bango, ekobebisa soki te ekotia mobulu na bofuluki na bango likolo ya etando ya mboka oyo libela.

32 Yango wana, soki bokobomba mitindo ya Nkolo, Nkolo asili kobulisa mboka oyo mpo na bokengi ya nkona na yo elongo na nkona ya mwana na ngai.

Bimisa na lokasa