Makomi
3 Nefi 11


Yesu Klisto amilakisaki epayi ya bato ya Nefi, wana esanganaki ebele ya bato na mboka ya Beboo, mpe asalelaki bango; mpe na lolenge oyo amilakisaki epayi na bango.

Ebandi na mokapo 11.

Mokapo 11

Tata atatoli na ntina ya Mwana Molingami na Ye—Klisto amonani mpe asakoli Bomikabi na Ye—Bato bayoki bilembo ya mpota na maboko mpe makolo mpe na mopanzi na Ye—Bagangi Hozana—Atii ndakisa mpe lolenge ya libatisi—Molimo ya boweli ezali ya zabulu—Malongi ya Klisto ezali ete bato basengeli kondima, kobatisama mpe kozwa Molimo Mosantu. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete ezalaki na ebele ya bato oyo basanganaki esika moko, ebele ya bato ya Nefi, nzinganzinga mpembeni na tempelo oyo ezalaki na mboka ya Beboo; mpe bazalaki kosepelaka mpe kokamwaka moko na mosusu, mpe kolakisaka moko na mosusu mbongwana monene mpe ya kokamwa oyo esalemaki.

2 Mpe bazalaki lisusu kosololaka mpo na oyo etali Yesu Klisto, oyo kani elembo mpo na oyo etali liwa na ye epesamaki.

3 Mpe esalemaki ete ntango ezalaki bango kosolola boye moko na mosusu, bayokaki mongongo moko lokola soki ebimaki uta na lola; mpe babwakaki miso nzinganzinga mpembeni, mpo basosolaki mongongo yango bayokaki te; ezalaki mongongo moko ya koswa te, mongongo moko makasi mpe te; nzokande, mpe atako ezalaki mongongo ya moke etobolaki bango oyo bayokaki na katikati, na lolenge ete ezalaki na eteni moko te ya nzoto na bango oyo mongongo yango elengisaki te, iyo etobolaki bango kino na molimo mpenza, mpe esalaki mitema na bango eyoka moto.

4 Mpe esalemaki ete lisusu bayokaki mongongo yango, mpe basosolaki yango te.

5 Mpe lisusu mbala ya misato bayokaki mongongo yango, mpe bafungolaki matoyi na bango mpo na koyoka yango; mpe miso na bango ezalaki kotala epayi na lokito ya mwango; mpe batalaki miso gaa epayi na lola, uta wapi lokito eyaki.

6 Mpe tala, mbala ya misato basosolaki mongongo oyo bayokaki; mpe elobaki epayi na bango:

7 Tala Molingami Mwana na ngai, na oyo nani nasepeli mingi, na ye nakembeli nkombo na ngai, boyokela ye.

8 Mpe esalemaki, lokola basosolaki ete babwakaki miso na bango lisusu epayi na lola; mpe tala bamonaki Moto moko kokitaka uta na lola; mpe alataki nzambala ya mpembe, mpe akitaki mpe atelemaki na katikati na bango; mpe miso ya ebele ya bato mobimba ebalukaki epayi na ye; bamekaki te kofungola minoko na bango, kutu moko na mosusu, mpe bayebaki te nini likambo oyo elingaki koloba, mpo bakanisaki ete ezalaki anjelu moko amonanaki epayi na bango.

9 Mpe esalemaki ete asembolaki loboko na ye mpe alobaki epayi ya bato, kolobaka:

10 Tala, nazali Yesu Klisto, oyo baprofeta batatolaki akoya kati na mokili.

11 Mpe tala, nazali pole mpe bomoi ya mokili; mpe namelaki nkeni ya bololo oyo Tata apesaki ngai, mpe nakembeli Tata na kokamataka likolo na ngai masumu ya mokili, na yango namipesaki na bolingi ya Tata na makambo nyonso uta na ebandeli.

12 Mpe esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo ebele ya bato yango bakweyaki na mabele; mpo bamikundolaki ete esakolamaki na kati na bango ete Klisto akomilakisa epayi na bango nsima ya bobuti na ye kati na lola.

13 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi na bango kolobaka:

14 Botelema mpe boya epayi na ngai, ete bokoka kotia maboko na bino kati na mopanzi na ngai, mpe lisusu ete bokoka koyoka bilembo ya nsete kati na maboko na ngai mpe makolo na ngai, ete bokoka koyeba ete nazali Nzambe ya Yisalaele, mpe Nzambe ya mabele mobimba; mpe nabomamaki mpo na masumu ya mokili.

15 Mpe esalemaki ete bibele oyo bakendaki, mpe batiaki maboko na bango na mopanzi na ye, mpe basimbaki bilembo ya nsete kati na maboko na ye mpe kati na makolo na ye; mpe basalaki boye, kokendaka liboso moko na moko kino bango nyonso bakendaki liboso, mpe bamonaki na miso na bango mpe bayokaki na maboko na bango, mpe bayebaki na ntembe te mpe batatolaki, ete ezalaki ye, oyo baprofeta bakomaki, ete akoya.

16 Mpe ntango bakendaki nyonso mpe batatolaki bango nyonso mpo na bango moko, bagangaki na mbala moko, kolobaka:

17 Hozana! Nkombo ya Nzambe Aleki Likolo epambolama! Mpe bakweyaki na makolo ya Yesu, mpe bakumbamelaki ye.

18 Mpe esalemaki ete alobaki epayi ya Nefi (mpo Nefi azalaki na kati ya ebele ya bato oyo) mpe atindaki ete abelema.

19 Mpe Nefi atelemaki mpe akendaki, mpe amigumbaki liboso ya Nkolo mpe apwepwaki makolo na ye.

20 Mpe Nkolo atindaki ye ete atelema. Mpe atombwanaki mpe atelemaki liboso na ye.

21 Mpe Nkolo alobaki epayi na ye: Napesi epayi na yo nguya ete obatisa bato oyo ntango ekozonga ngai lisusu kati na lola.

22 Mpe lisusu Nkolo abiangaki basusu mpe alobelaki bango lolenge moko; mpe apesaki epayi na bango nguya ya kobatisa. Mpe alobaki epayi na bango: Bokobatisa na lolenge oyo; mpe boswani ezala te na kati na bino.

23 Solo nalobi epayi na bino ete, oyo nyonso akoyambola masumu na ye na nzela ya maloba na bino, mpe akozala na mposa ya kobatisama na nkombo na ngai, na lolenge oyo nde bokobatisa bango—Tala, bokokita mpe bokotelema na mai, mpe na nkombo na ngai nde bokobatisa bango.

24 Mpe sikawa tala, oyo ezali maloba oyo bokoloba, na kobiangaka bango na nkombo, kolobaka:

25 Na likoki epesameli ngai na Yesu Klisto, nazali kobatisa yo na nkombo ya Tata, mpe ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu. Amene.

26 Mpe nsima bokozindisa bango kati na mai mpe bokobima lisusu uta na mai.

27 Mpe na lolenge oyo bokobatisa na nkombo na ngai: mpo tala, solo, nalobi epayi na bino, ete Tata, mpe Mwana mpe Molimo Mosantu bazali moko; mpe nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na ngai, mpe Tata mpe ngai tozali moko.

28 Mpe lokola natindi bino, boye nde bokobatisa. Mpe boswani ekozala lisusu te na kati na bino, lokola ezalaki kino sikawa; mpe boswani ekozala te na kati na bino mpo na oyo etali biteni ya malongi na ngai, lokola ezalaki kino sikawa.

29 Mpo solo, solo nalobi na bino ete, ye oyo azali na molimo ya boweli azali ya ngai te, kasi azali ya zabulu, oyo azali tata ya boweli, mpe ye alamusaka mitema ya bato na kowelaka na nkanda, moko na mosusu.

30 Tala, oyo ezali malongi na ngai te, kolamusaka mitema ya bato na nkanda, kasi oyo ezali malongi na ngai, ete makambo ya lolenge oyo esengeli kosila.

31 Tala, solo, solo, nalobi epayi na bino, nakosakola epayi na bino malongi na ngai.

32 Mpe oyo ezali malongi na ngai, mpe ezali mateya oyo Tata apesi epayi na ngai; mpe nazali kotatola po na Tata, mpe Tata azali kotatola mpo na ngai, mpe Molimo Mosantu azali kotatola mpo na Tata mpe na ngai; mpe nazali kotatola ete Tata apesi mobeko na bato nyonso, bisika nyonso, ete bayambola mpe bandimela ngai.

33 Mpe oyo nyonso akondimela ngai mpe akobatisama, moko wana akobikisama; mpe bazali baye bakosangola libula ya bokonzi ya Nzambe.

34 Mpe oyo moto nyonso akondimela ngai te, mpe akobatisama te, akokweisama.

35 Solo, solo nalobi epayi na bino ete oyo ezali mateya na ngai, mpe natatoli mpo na yango uta na Tata; ete oyo nyonso andimeli ngai andimeli Tata mpe lokola, mpe epayi na ye Tata akotatola mpo na ngai, mpo akoya kotala ye na moto mpe na Molimo Mosantu.

36 Mpe boye Tata akopesa litatoli na ntina na ngai, mpe Molimo Mosantu akopesa litatoli epayi na ye na ntina ya Tata mpe ngai; mpo Tata, mpe ngai, mpe Molimo Mosantu tozali moko.

37 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, ete bosengeli koyambola, mpe kokoma lokola mwana moke, mpe kobatisama na nkombo na ngai, soki te bokoki ata moke te kozwa biloko oyo.

38 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, ete bosengeli koyambola, mpe kobatisama na nkombo na ngai, mpe kokoma lokola mwana moke, soki te bokoki na lolenge moko te kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe.

39 Solo, solo, nalobi epayi na bino, ete oyo ezali malongi na ngai, mpe moto nyonso oyo atongi likolo na yango atongi likolo ya libanga ya ngai, mpe bikuke ya lifelo bikolonga bango te.

40 Mpe nyonso oyo akosakola mingi soki te moke koleka oyo, mpe atii yango lokola malongi na ngai, se ye moko wana nde awuti na mabe, mpe atongami likolo ya libanga na ngai te; kasi atongi likolo ya moboko ya zelo, mpe bikuke ya lifelo bifungwami mpo na koyamba oyo ya lolenge oyo ntango mpela ekoya mpe mipepe mikobeta likolo na bango.

41 Boye, bokende epayi ya bato oyo, mpe bosakola maloba oyo nalobi, kino na nsuka ya mabele.

Bimisa na lokasa