Makomi
3 Nefi 19


Mokapo 19

Bayekoli zomi na mibale basali epayi ya bato mpe basambeli mpo na kozwa Molimo Mosantu—Bayekoli babatisami mpe bazwi Molimo Mosantu mpe lisalisi ya banjelu—Yesu asambeli kosalelaka maloba oyo makoki te kokomama—Atatoli bondimi monene koleka ya Banefi. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu amataki na lola, ebele ya bato yango bapanzanaki, mpe moto na moto akamataki mwasi na ye mpe bana na ye mpe azongaki epayi na ye moko.

2 Mpe nsango epanzanaki noki mosika epayi na epayi na kati ya bato, liboso kutu ete butu eyingela, ete ebele ya bato yango bamonaki Yesu, mpe ete asalelaki bango, mpe ete akomilakisa lisusu na mokolo ya nsima epayi na ebele ya bato yango.

3 Iyo, mpe kutu butu mobimba nsango epanzanaki mosika epayi na epayi mpo na oyo etali Yesu; mpe batindaki nsango epayi ya bato na lolenge ete bazalaki mingi, iyo, motango moko monene koleka, basalaki mpenza butu mobimba, ete bakoka kozala na mokolo ya nsima na esika wapi Yesu akomilakisa epayi na ebele ya bato wana.

4 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima, ntango esanganaki ebele ya bato yango elongo, tala, Nefi mpe ndeko na ye ya mobali oyo asekwaki uta na bakufi, oyo kani nkombo ezalaki Timote, mpe lisusu mwana mobali na ye, oyo kani nkombo ezalaki Yona, mpe lisusu Matoni, mpe Matoniya ndeko na ye ya mobali, mpe Kumene, mpe Kumenoni, mpe Yilimia, mpe Semenoni, mpe Yona, mpe Sidikiya, mpe Yisaya—sikawa oyo ezalaki nkombo ya bayekoli oyo Yesu aponaki—mpe esalemaki ete bakendaki mpe batelemaki na katikati ya ebele ya bato.

5 Mpe tala, ebele ya bato bazalaki monene ete bakabolaki bango na mangomba zomi na mibale.

6 Mpe Bazomi na mibale bateyaki ebele ya bato yango; mpe tala, basalaki ete ebele ya bato yango bafukama na nse likolo ya etando ya mabele, mpe basengelaki kosambela Tata na nkombo ya Yesu.

7 Mpe bayekoli basambelaki mpe lokola Tata na nkombo ya Yesu. Mpe esalemaki ete batelemaki mpe basalelaki bato.

8 Mpe ntango bateyaki bango maloba se moko wana kaka oyo Yesu alobaki—eloko moko te ekeseneki na maloba oyo Yesu alobaki—tala, bafukamaki lisusu mpe basambelaki Tata na nkombo ya Yesu.

9 Mpe basambelaki mpo na oyo wana bazalaki na yango mposa mingi koleka; mpe bazalaki na mposa ete Molimo Mosantu mopesama epayi na bango.

10 Mpe ntango esilaki bango boye kosambela bakitaki epayi na ndelo ya mai, mpe ebele ya bato balandaki bango.

11 Mpe esalemaki ete Nefi akitaki kati na mai mpe azwaki libatisi.

12 Mpe abimaki uta na mai mpe abandaki kobatisa. Mpe abatisaki bango nyonso baoyo Yesu aponaki.

13 Mpe esalemaki ete ntango babatisamaki bango nyonso mpe babimaki uta na mai, Molimo Mosantu akitaki likolo na bango, mpe batondisamaki na Molimo Mosantu mpe na moto.

14 Mpe tala, bazingamaki mpembeni lokola soki na moto, mpe ekitaki uta na lola, mpe ebele ya bato bamonaki yango, mpe bapesaki litatoli, mpe banjelu bakitaki uta na lola mpe basalelaki bango.

15 Mpe esalemaki ete ntango ezalaki banjelu kosalela bayekoli, tala Yesu ayaki mpe atelemaki na katikati na bango mpe asalelaki bango.

16 Mpe esalemaki ete alobaki epayi na ebele ya bato mpe atindaki bango ete bafukama na nse lisusu likolo ya mabele, mpe lisusu ete bayekoli na ye bafukama na nse likolo ya mabele.

17 Mpe esalemaki ete ntango bafukamaki bango nyonso na nse likolo ya mabele, atindaki bayekoli na ye ete basambela.

18 Mpe tala, babandaki kosambela; mpe basambelaki Yesu, kobiangaka ye Nkolo na bango mpe Nzambe na bango.

19 Mpe esalemaki ete Yesu akendaki uta na katikati na bango, mpe akendaki mwa nzela mosika na bango mpe amigumbaki na mabele mpe alobaki:

20 Tata, natondi yo ete opesi Molimo Mosantu epayi na bango oyo naponi; mpe ezali na ntina ya boyambi na bango na ngai ete naponi bango uta na mokili.

21 Tata, nasambeli yo ete olinga kopesa Molimo Mosantu epayi na bango nyonso baoyo bakondima maloba na bango.

22 Tata, opesi bango Molimo Mosantu mpo bandimi ngai; mpe omoni ete bandimi ngai mpo oyokeli bango, mpe basambeli ngai; mpe basambeli ngai mpo nazali elongo na bango.

23 Mpe sikawa Tata, nasambeli yo mpo na bango, mpe lisusu mpo na bango nyonso oyo bakondima na maloba na bango, ete bakoka kondima na ngai, ete nakoka kozala na bango lokola yo, Tata, ozali na ngai, ete tokoka kozala moko.

24 Mpe esalemaki ete ntango Yesu asambelaki Tata boye, ayaki epayi ya bayekoli na ye; mpe tala bazalaki se kokoba, na kotikaka te, kosambela ye; mpe bayikanaki koloba maloba mingi te, mpo epesamaki epayi na bango nini basengelaki kosambela, mpe batondaki na mposa.

25 Mpe esalemaki ete Yesu apambolaki bango lokola basambelaki ye, mpe elongi na ye esekaki na bango, mpe pole uta na elongi na ye engengaki likolo na bango, mpe tala bazalaki mpe mpembe lokola elongi na ye mpe bilamba ya Yesu mpe lokola; mpe tala mpembe na bango elekaki mpembe nyonso, iyo, kutu ekokaki kozala na eloko moko te ya mpembe boye likolo ya mabele lokola mpembe na bango.

26 Mpe Yesu alobaki epayi na bango: Bokoba kosambela; nzokande batikaki te kosambela.

27 Mpe abalukaki uta na bango lisusu, mpe akendaki mwa nzela mosika mpe agumbamaki na mabele; mpe asambelaki lisusu epayi ya tata, kolobaka:

28 Tata, natondi yo ete opetoli bango oyo naponi, na ntina ya bondimi na bango; mpe nasambeli mpo na bango, mpe lisusu mpo na bango oyo bakondima na maloba na bango, ete bakoka kopetolama na ngai, na nzela ya bondimi na maloba na bango, kutu lokola bapetolami na ngai.

29 Tata, nasambeli te mpo na mokili, kasi mpo na bango oyo opesi ngai uta na mokili, na ntina ya bondimi na bango, ete bakoka kopetolama na ngai, ete nakoka kozala na bango lokola yo, Tata, ozali na ngai, ete tokoka kozala moko, ete nakoka kokembelama na bango.

30 Mpe ntango Yesu alobaki maloba oyo, ayaki lisusu epayi ya bayekoli na ye; tala, basambelaki na molende; na kotikaka te, epayi na ye; mpe asekaki na bango lisusu; mpe tala bazalaki mpembe, kutu lokola Yesu.

31 Mpe esalemaki ete akendaki lisusu mwa nzela mosika mpe asambelaki epayi ya tata;

32 Mpe lolemo ekoki te koloba maloba oyo asambelaki, mpe ekoki kokomama na moto moko te maloba oyo Yesu asambelaki.

33 Ebele ya bato bayokaki mpe bapesi litatoli; mpe mitema na bango mifungwanaki mpe basosolaki na mitema na bango maloba oyo asambelaki.

34 Nzokande, maloba oyo asambelaki ezalaki minene mpe ya kokamwa ete makokaki kokomama te, mpe makoki kolobama na moto te.

35 Mpe esalemaki ete ntango Yesu atiaki nsuka na losambo ayaki lisusu na bayekoli, mpe alobaki epayi na bango: Namona soki moke te bondimi monene boye na kati ya Bayuda nyonso; yango wana nakokaki te kolakisa epayi na bango makamwisi minene mpenza, na ntina ya bozangi boyambi na bango.

36 Solo, nalobi epayi na bino, ete ezali na moto moko te na kati na bango oyo amona makambo minene mpenza lokola bomoni; mpe bayoka naino te makambo minene boye lokola boyoki.

Bimisa na lokasa