Makomi
3 Nefi 1


Nefi ya Misato

Buku ya Nefi
Mwana mobali ya Nefi, oyo azalaki mwana mobali ya Elamani

Mpe Elamani azalaki mwana mobali ya Elamani, oyo azalaki mwana mobali ya Alma, oyo azalaki mwana mobali ya Alma, oyo azalaki eboto ya Nefi oyo azalaki mwana mobali ya Lehi, oyo ayaki uta na Yelusaleme, na mobu ya yambo ya boyangeli ya Sidikiya, mokonzi ya Yuda.

Mokapo 1

Nefi, mwana mobali ya Elamani, akeyi uta na mboka, mpe mwana mobali na ye Nefi abombi masolo ya makomi—Ata bilembo mpe makamwisi ezali beboo, bato ya nkuna bakani koboma basembo—Butu ya mbotama ya Klisto ekomi—Elembo epesami mpe monzoto ya sika mobimi. Lokuta mpe bobubi ebakisami, mpe bayongoli ya Gadiatoni babomi bato mingi. Penepene na mibu 1–4 ya Mobu ya Nkolo.

1 Sikawa esalemaki ete mobu ya ntuku libwa na moko elekaki mpe ezalaki mibu nkama motoba uta Lehi atikaki Yelusaleme; mpe ezalaki na mobu oyo Lakonusi azalaki mosambisi mokonzi mpe mokambi etuka likolo ya mboka.

2 Mpe Nefi, mwana mobali ya Elamani, akendaki uta na mboka ya Zalayemila, kopesaka mokumba epayi ya mwana mobali na ye Nefi, oyo azalaki mwana mobali na ye ya nkulutu, mpo na oyo etali bapalaki ya motako mpe masolo ya makomi nyonso oyo ebombamaki, mpe biloko wana nyonso oyo ebombamaki bule banda kokende ya Lehi uta na Yelusaleme.

3 Nsima Nefi akendaki uta na mboka, mpe wapi akendaki moto moko te ayebi, mpe mwana mobali na ye Nefi abombaki masolo ya makomi na esika na ye, iyo, lisolo ya makomi ya bato oyo.

4 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ntuku libwa na mibale, tala, masakoli ya baprofeta ebandaki kokokisama mpenza; mpo bilembo bileki minene mpe makamwisi maleki minene ebandaki kosalema na kati ya bato.

5 Kasi, ezalaki na boko bato oyo babandaki koloba ete ntango elekaki mpo ete maloba yango makokisama, oyo elobamaki na Samwele, Molamani.

6 Mpe babandaki kosepela likolo ya bandeko na bango, kolobaka: Tala, ntango eleki; mpe maloba ya Samwele makokisami te; boye, bosepeli na bino mpe bondimi na bino mpo na oyo etali likambo oyo ezali mpamba.

7 Mpe esalemaki ete batiaki mobulu monene epayi nyonso na mboka; mpe bato oyo bandimaki babandaki kozala na mawa mingi, kobangaka ete na nzela moko to mosusu makambo wana oyo elobamaki makoka kosalema te.

8 Kasi tala, bakengelaki na lolenge ya ngwi mpo na mokolo wana mpe butu wana mpe mokolo wana oyo ekozala lokola mokolo moko lokola soki butu ezalaki te, ete bakoka koyeba ete bondimi na bango ezalaki mpamba te.

9 Sikawa esalemaki ete ezalaki na mokolo moko oyo etiamaki mpembeni na bazanga bondimi, ete bango nyonso oyo bandimaki na mimesanowana batiama na liwa longola se soki bilembo bikosalema, oyo epesamaki na profeta Samwele.

10 Sikawa esalemaki ete ntango Nefi, mwana mobali ya Nefi, amonaki nkuna ya bato na ye, motema na ye etondaki na mawa mingi koleka.

11 Mpe esalemaki ete abimaki na ye mpe amingumbaki likolo ya mabele, mpe abelelaki makasi na Nzambe mpo na litomba ya bato na ye, iyo, bango oyo bazalaki mpembeni mpo na kobebisama na ntina ya bondimi na bango na momeseno ya batata na bango.

12 Mpe esalemaki ete abelelaki makasi epayi ya Nkolo mokolo wana mobimba, mpe tala mongongo ya Nkolo moyaki epayi na ye, kolobaka:

13 Tombola moto na yo, mpe zala na esengo; mpo, tala, ntango ebelemi, mpe na butu oyo elembo ekopesama, mpe na mokolo ya lobi nakoya kati na mokili, mpo na kolakisa epayi na mokili ete nakokokisa nyonso nasalaki ete elobama na monoko ya baprofeta basantu na ngai.

14 Tala, nazali koya epayi ya oyo ya ngai moko, mpo na kokokisa makambo nyonso oyo nasalaki ete eyebana epayi na bana ya bato uta na bokeli ya mokili, mpe mpo na kosala mposa, elongo ya Tata mpe ya Mwana—ya Tata na ntina na ngai, mpe ya Mwana na ntina ya mosuni na ngai. Mpe, tala ntango ebelemi, mpe butu oyo elembo ekopesama.

15 Mpe esalemaki ete maloba oyo elobamaki epayi ya Nefi ekokisamaki, engebene mpenza na lolenge elobamaki; mpo tala, na bokiti ya moi, molili ezalaki te; mpe bato babandaki kokamwa mpo molili ezalaki te ntango butu eyingelaki.

16 Mpe ezalaki na bato mingi, baoyo bandimaki te maloba ya baprofeta, baoyo bakweyaki na mabele mpe bakomaki lokola soki bato bakufi, mpo bayebaki ete mwango monene ya bobebisami oyo etiamaki mpo na bango oyo bandimaki maloba ya baprofeta mobebisamaki; mpo elembo oyo epesamaki esilaki kobelema.

17 Mpe babandaki koyeba ete Mwana ya Nzambe asengeli kala mingi te komonana; iyo, mpo na kosukisa, bato nyonso likolo ya etando ya mabele mobimba uta na westi kino na esti, ezala na mboka epayi na nordi mpe lisusu na mboka epayi na sudi, bakamwaki mingi koleka ete bakweyaki na mabele.

18 Mpo bayebaki ete baprofeta batatolaki na ntina ya makambo oyo mpo na mibu mingi, mpe ete elembo oyo epesamaki esilaki kobelema; mpe babandaki kobanga na ntina ya mabe na bango mpe bozangi boyambi na bango.

19 Mpe esalemaki ete molili ezalaki te butu wana mobimba, kasi pole ezalaki lokola soki ezalaki nzanga. Mpe esalemaki ete moi ebimaki lisusu na ntongo, engebene na molongo ya yango mpenza, mpe bayebaki ete ezalaki mokolo oyo Nkolo akobotama, na ntina ya elembo oyo epesamaki.

20 Mpe esalemaki, iyo, makambo nyonso, eteni na eteni, engebene na maloba ya baprofeta.

21 Mpe esalemaki lisusu ete monzoto moko ya sika ebimaki, engebene na liloba yango.

22 Mpe esalemaki ete uta na ntango oyo, makambo ya lokuta ebandaki kotindama na kati ya bato, na Satana, mpo na koyeisa mitema na bango makasi, na ntina ete bakoka te kondima na bilembo mpe makamwisi wana bamonaki; kasi ata makambo yango ya lokuta mpe bobubi boye eteni eleki mingi ya bato bandimaki, mpe babongwanaki mpo na Nkolo.

23 Mpe esalemaki ete Nefi akendaki na kati ya bato, mpe bato mingi basusu mpe lokola, kobatisaka mpo na boyamboli, kati na oyo wapi ezalaki na bolimbisi monene ya masumu. Mpe boye bato babandaki lisusu kozala na kimia kati na mboka.

24 Mpe boweli ezalaki te, longola se ezalaki ya bato moke oyo babandaki koteya, mpe kosala makasi mpo na kolakisa na makomi ete elongobanaki lisusu te kotosa kobatela mobeko ya Mose. Sikawa na likambo oyo babungaki, basosolaki makomi te.

25 Kasi, esalemaki ete kala mingi te nsima ya kokoma babongwani, mpe bandimisamaki na libungi oyo bazalaki kati na yango, mpo bayebisaki epayi na bango ete mobeko mokokisamaki naino te, mpe ete esengeli mokokisama eteni na eteni; iyo, liloba eyaki epayi na bango ete esengeli kokokisama; iyo, ete nsonge moko te to i moko te ekoleka kino ekokokisama nyonso. Boye na mobu se moko oyo bamemamaki na boyebi ya libunga na bango mpe batubelaki mabunga na bango.

26 Mpe boye mobu ntuku libwa na mibale molekaki, komemaka nsango ya nsai epayi ya bato mpo bilembo oyo esalemaki, engebene na maloba ya masakoli ya baprofeta basantu.

27 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku libwa na misato molekaki lisusu na kimia, longola se soki ezalaki bayongoli ya Gadiatoni, oyo bazalaki kofanda likolo ya bangomba, oyo batondisamaki na mboka; mpo bisika ezwamaki bango ezalaki makasi mpenza mpe ezalaki bisika ya nkuku ete bato bakokaki te kolonga bango; boye basalaki bobomi mingi, mpe ebomi ya mingi na kati ya bato.

28 Mpe esalemaki ete na mobu ntuku libwa na minei babandaki kobakisama na lolenge moko monene, mpo ezalaki na bakabwani mingi ya Banefi oyo bakimaki epayi na bango, oyo esalaki mawa mingi epayi na Banefi oyo wana batikalaki kati na mboka.

29 Mpe ezalaki lisusu ntina ya mawa mingi na kati ya Balamani; mpo tala, bazalaki na bana mingi baoyo bakolaki mpe babandaki kokoma bakolo, ete bazalaki se mpo na bango moko, mpe bakosamaki na Bazolami, na lokuta na bango mpe maloba makolete na bango, mpo na kosangana na bayongoli bana ya Gadiatoni.

30 Mpe boye Balamani batungisamaki lisusu, mpe babandaki kokita na kotalaka bondimi mpe bosembo na bango, na ntina ya nkuna ya nkola oyo ezalaki komata.

Bimisa na lokasa