Makomi
3 Nefi 22


Mokapo 22

Na mikolo ya nsuka, Siona mpe makonzi na yango ekotiama, mpe Yisalaele ekosangisama na boboto mpe bolamu—Bakolonga—Meka na Yisaya 54. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe na ntango wana ekosalema oyo wana ekomami: Yemba, O ekomba, yo oyo obotaki te; bukana na koyembaka, mpe ganga makasi, yo oyo oyokaki mpasi ya mwana te; mpo bana ya mwasi oyo azalaki na mwana te bazali mingi koleka bana ya mwasi oyo abala, elobi Nkolo.

2 Tandola esika ya ema na yo, tika bango basembola ezipami ya ndako na yo; kotika te, yeisa singa na yo molai mpe lendisa makonzi na yo.

3 Mpo okobima mingi na loboko ya mobali mpe na loboko ya mwasi, mpe nkona na yo ekosangola libula ya baoyo bazali Bayuda-te, mpe bakoyeisa bingumba bitikala mpamba mpo ete bifandisama.

4 Kobanga te, mpo okoyokisama nsoni te; mpe bakolonga yo mpe te, mpo okosambwisama te; mpo okobosana nsoni ya bolenge na yo, mpe okomikundola te mpamela ya bolenge na yo mpe okomikundola mpamela ya ekomba na yo lisusu te.

5 Mpo mokeli na yo, mobali na yo, Nkolo ya Bibele ezali nkombo na ye; mpe akobiangama Mosikoli na yo, Mosantu ya Yisalaele—Nzambe ya mokili mobimba.

6 Mpo Nkolo abiangi yo lokola mwasi oyo asundolama mpe ayokisama mpasi na molimo, mwasi moko ya bolenge, ntango obwakamaki, elobi Nzambe na yo.

7 Mpo nasundolaki yo mwa ngonga moke, kasi na boboto monene nakosangisa yo.

8 Na nkele ya moke nabombaki elongi na ngai uta na yo mpo na ntango moke, kasi na bolamu ya libela nakozala na boboto likolo na yo, elobi Nkolo Mosikoli na yo.

9 Mpo ntango oyo, ezali lokola mai ya Noa mpo na ngai, mpo lokola nalapaki ndai ete mai ya Noa makokende likolo ya mokili lisusu te, boye nalapi ndai ete nakozala na nkanda na yo te.

10 Mpo bangomba minene ekokende mpe bangomba ya mike ekolongwa, kasi bolamu na ngai ekolongwa uta na yo te, mpe liyokani na ngai ya kimia ekolongolama te, elobi Nkolo, oyo azali na boboto likolo na yo.

11 O yo moto oyo otungisami, obetami na mopepe makasi, mpe obondisami te! Tala, na kolalisa mabanga na yo na langi ya malonga, mpe nakolalisa moboko na yo na safili.

12 Mpe nakosala maninisa na yo na agata mpe bikuke na yo na balekete; mpe ndelo na yo nyonso na mabanga ya ntalo.

13 Mpe bana na yo nyonso bakoteyama na Nkolo; mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.

14 Okotiama na bosembo, okozala mosika uta na bonyokwami mpo okobanga te, mpe mosika uta na nsomo mpo ekoya te penepene na yo.

15 Tala, na ntembe te bakosangana esika moko mpo na kotelemela yo, kasi na bolingi na ngai te; nyonso oyo bakosangana esika moko mpo na kotelemela yo bakokweya mpo na ntina na yo.

16 Tala, nakelaki motuli oyo afulaka makala na moto, mpe amemaka esalelo moko mpo na mosala na ye; nakelaki mopanzi biloko mpo na kobebisa.

17 Ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobundisa yo ekolonga; mpe okokweisa lolemo nyonso oyo ekofinga yo na bosambisi. Oyo ezali libula ya basali ya Nkolo, mpe bosembo na bango ezali na ngai, elobi Nkolo.

Bimisa na lokasa