Makomi
3 Nefi 23


Mokapo 23

Yesu andimi maloba ya Yisaya—Atindi bato baluka baprofeta—Maloba ya Samwele Molamani mpo na oyo etali Bosekwi ebakisami na lisolo ya makomi na bango. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na bino, ete bosengeli koluka malamu mpenza makambo oyo. Iyo, napesi epayi na bino motindo moko ete boluka makambo oyo na molende; mpo maloba ya Yisaya ezali minene.

2 Mpo na ntembe te alobelaki makambo nyonso matali bato na ngai, oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele; boye esengeli mpenza ete alobela Bayuda-te mpe lokola.

3 Mpe makambo nyonso oyo alobaki ezalaki mpe ekozala, kutu engebene na maloba oyo alobaki.

4 Boye bosala keba na maloba na ngai; bokoma makambo oyo nalobeli bino; mpe engebene na ntango mpe bolingi ya Tata makokende epayi ya Bayuda-te.

5 Mpe moto nyonso oyo akoyoka maloba na ngai mpe ayamboli mpe abatisami, se ye moko wana akobikisama. Boluka malamu mpenza baprofeta, mpo ezali na mingi baoyo batatoli makambo oyo.

6 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Yesu alobaki maloba oyo alobelaki bango lisusu, nsima ya kolimbolaka makomi nyonso epayi na bango oyo bazwaki, alobaki epayi na bango: Tala, nalingi bokoma makomi mosusu, oyo bozali na yango te.

7 Mpe esalemaki ete alobaki epayi ya Nefi: Mema lisolo ya makomi oyo obombaki.

8 Mpe ntango Nefi amemaki masolo ya makomi, mpe atiaki yango liboso na ye, abwakaki miso na ye likolo na yango mpe alobaki:

9 Solo nalobi epayi na yo, natindaki mosali na ngai Samwele, Molamani, ete asengeli kotatola epayi ya bato oyo, ete na mokolo oyo Tata akokembela nkombo na ye na nzela na ngai ete ezalaki na basantu mingi oyo bakosekwa uta na bakufi, mpe bakomonana epayi ya mingi, mpe bakosalela bango. Mpe alobaki epayi na bango: Ezalaki boye te?

10 Mpe bayekoli na ye bayanolaki ye kolobaka: Iyo, Nkolo, Samwele asakolaki engebene na maloba na yo, mpe nyonso ekokisamaki.

11 Mpe Yesu alobaki epayi na bango: Ezali boni ete bokomaki likambo oyo te, ete basantu mingi basekwaki, bamonanaki epayi ya mingi, mpe basalelaki bango?

12 Mpe esalemaki ete Nefi amikundolaki ete likambo oyo ekomamaki te.

13 Mpe esalemaki ete Yesu atindaki ete esengeli kokomama; boye ekomamaki mpenza lokola atindaki.

14 Mpe sikawa esalemaki ete Yesu alimbolaki makomi nyonso na mobimba, oyo bakomaki, atindaki bango ete bateya makambo oyo alimbolaki epayi na bango.

Bimisa na lokasa