Makomi
3 Nefi 27


Mokapo 27

Yesu atindi ete Eklezia ebiangama na nkombo na Ye—Etinda na ye mpe mbeka ya bomikabi na ye nde esali nsango malamu na Ye—Bato batindami bayambola mpe babatisama mpo ete basantisama na Molimo Mosantu—Basengeli kozala kutu lokola Yesu azali. Penepene na mibu 34–35 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete wana ezalaki bayekoli ya Yesu kokendaka mibembo mpe bazalaki koteyaka makambo bamonaki mpe bayokaki, mpe kobatisaka bato na nkombo ya Yesu, esalemaki ete bayekoli basanganaki mpe basalaki bomoko kati na losambo mpe bokili ya makasi.

2 Mpe Yesu amimonisaki lisusu epayi na bango, mpo bazalaki kosambela Tata na nkombo na ye; mpe Yesu ayaki mpe atelemaki na katikati na bango, mpe alobaki epayi na bango: Nini bolingi ete napesa bino?

3 Mpe bango balobaki epayi na ye: Nkolo, tolingi ete oyebisa biso na nkombo nini tokobianga eklezia oyo; mpo boswani ezali na kati ya bato mpo na oyo etali likambo oyo.

4 Mpe Nkolo alobaki epayi na bango: Solo, solo, nalobi epayi na bino, mpo na nini ezali bato koyima-yima mpe koswana na ntina ya likambo oyo?

5 Etangaki bango makomi te, oyo malobi ete bosengeli kokamata likolo na bino nkombo ya Klisto, oyo ezali nkombo na ngai? Mpo na nkombo oyo bokobiangama na mokolo ya nsuka;

6 Mpe moto nyonso oyo akokamata likolo na ye nkombo na ngai, mpe akotia molende kino na nsuka, se ye moko wana akobikisama na mokolo ya nsuka.

7 Boye, nyonso oyo bokosala, bokosala yango na nkombo na ngai; boye bokobianga eklezia na nkombo na ngai; mpe bokobelela Tata na nkombo na ngai ete apambola eklezia mpo na ntina na ngai.

8 Mpe lolenge boni ekoki yango kozala eklezia na ngai longola se soki ebiangami na nkombo na ngai? Mpo soki eklezia moko ebiangami na nkombo ya Mose, nde ezali eklezia ya Mose; to soki ezali na nkombo ya moto moko, nde ezali eklezia ya moto moko; kasi soki ebiangami na nkombo na ngai nde ezali eklezia na ngai, soki ezali bongo ete etongami likolo ya nsango malamu na ngai.

9 Solo nalobi epayi na bino, ete botongami likolo ya nsango malamu na ngai; boye bokobianga biloko nyonso bobiangaka, na nkombo na ngai; boye soki bobeleli Tata, mpo na eklezia, soki ezali na nkombo na ngai, Tata akoyoka bino;

10 Mpe soki ezali bongo ete eklezia etongami likolo ya nsango malamu na ngai Tata akolakisa misala na ye kati na yango.

11 Kasi soki etongami likolo ya nsango malamu na ngai te, mpe etongami likolo ya misala ya bato, soki te likolo ya misala ya zabulu, solo nalobi epayi na bino bakosepela na misala na bango se mpo na eleko moko, mpe nsuka ekoya moke moke, mpe bakokatama na nse mpe bakobwakama kati na moto, uta wapi nzela ya kozonga ezali te.

12 Mpo misala na bango mikolanda bango, mpo ezali na ntina ya misala na bango ete bakitisami na nse; boye bomikundola makambo oyo nayebisi bino.

13 Tala napesaki epayi na bino nsango malamu na ngai, mpe oyo ezali nsango malamu oyo napesaki epayi na bino—ete nayaki kati na mokili mpo na kosala bolingi ya Tata na ngai, mpo Tata na ngai atindaki ngai.

14 Mpe Tata na ngai atindaki ngai ete nakoka kotombwama likolo ya ekulusu; mpe esili ngai kotombwama likolo ya ekulusu, ete nakoka kobenda bato nyonso epayi na ngai, ete lokola natombwamaki na bato kutu boye bato batombwama na Tata, mpo na kotelema liboso na ngai, mpo na kosambisama na misala na bango, soki ezali malamu to soki ezali mabe—

15 Mpe mpo na ntina oyo natombwamaki; boye, engebene na nguya ya Tata nakobenda bato nyonso epayi na ngai, ete bakoka kosambisama engebene na misala na bango.

16 Mpe ekosalema, ete moto nyonso oyo ayamboli mpe abatisami na nkombo na ngai akotondisama na Molimo; mpe soki atii molende kino na nsuka, tala, ye nakotala lokola moto azangi elindo liboso ya Tata na ngai na mokolo nakotelema mpo na kosambisa mokili.

17 Mpe ye oyo akotia molende kino na nsuka te, se ye moko wana akokitisama na nse mpe akobwakama kati na moto, uta na esika oyo wapi bakoki kozonga lisusu te, na ntina ya boyengebene ya Tata.

18 Mpe oyo ezali liloba oyo apesaki epayi na bana ya bato. Mpe mpo na ntina oyo akokisi maloba oyo apesaki, mpe akosaka te, kasi akokisaka maloba na ye nyonso.

19 Mpe eloko moko te ya mbindo ekoki kokota kati na bokonzi ya lola; boye eloko moko te ekotaka na bopemi na ye longola se soki ezali bango oyo basukolaki bilamba na bango kati na makila na ngai, na ntina ya bondimi na bango, mpe boyamboli ya masumu na bango nyonso, mpe bosembo na bango kino na nsuka.

20 Sikawa oyo ezali motindo yango: Boyambola, bino nyonso nsuka ya mabele, mpe boya epayi na ngai, mpe bobatisama na nkombo na ngai, ete bokoka kosantisama na kozwaka Molimo Mosantu, ete bokoka kotelema na kozangaka mbindo liboso na ngai na mokolo ya nsuka.

21 Solo, solo, nalobi epayi na bino, oyo ezali nsango malamu na ngai; mpe boyebi makambo oyo bosengeli kosala kati na eklezia na ngai; mpo misala oyo bomoni ngai kosala yango wana nde bokosala mpe lokola; mpo oyo wana bomoni ngai kosala yango wana nde bokosala lokola;

22 Boye, soki bosali makambo oyo bopambolami, mpo bokotombwama na mokolo ya nsuka.

23 Bokoma makambo oyo bomoni mpe boyoki, longola se soki ezali oyo wana mapekisami.

24 Bokoma misala ya bato oyo, oyo bakosala, kutu lokola ekomamaki, mpo na ntina ya oyo esalemaki.

25 Mpo tala, uta na buku oyo ekomami, mpe oyo ekokomama, bato oyo bakosambisama; mpo engebene na yango misala na bango mikoyebana epayi ya bato.

26 Mpe tala, makambo nyonso ekomami na Tata; boye uta na buku oyo ekokomama mokili ekosambisama.

27 Mpe boyeba ete bokozala basambisi ya bato oyo, engebene na bosambisi boye nakopesa epayi na bino, oyo ezali bosambisi ya alima. Boye, lolenge kani ya bato bosengeli kozala? Solo nalobi epayi na bino, kutu lokola nazali.

28 Mpe sikawa nakeyi epayi na Tata. Mpe solo nalobi epayi na bino, biloko nyonso kani bokosenga Tata na nkombo na ngai, ekopesama epayi na bino.

29 Boye, bosenga, mpe bokozwa; bobeta, mpe bakofungolela bino; mpo ye oyo akosenga, akozwa; mpe epayi na ye oyo akobeta, ekofungolama.

30 Mpe sikawa, tala, bosepeli na ngai ezali monene, kutu kino na litondi, na ntina na bino, mpe lisusu na ntina ya nkola oyo; iyo, mpe kutu Tata asepeli, lokola banjelu basantu nyonso, na ntina na bino mpe nkola oyo, mpo moko te kati na bango abungi.

31 Tala, nalingi ete bososola; mpo nalingi koloba bango oyo bazali sikawa na bomoi na nkola oyo; mpe moko te na bango abungi; mpe na bango nazali na litondi ya bosepeli.

32 Kasi tala, epesi ngai mawa na ntina ya nkola ya minei uta na nkola oyo, mpo bamemami bakangemi mosika na ye kutu lokola ezalaki mwana mobali ya ebomi; mpo bakoteka ngai mpo na mpauni mpe wolo, mpe mpo na oyo mpomboli ebebisaka mpe bayibi bakoki kokota mpe koyiba. Mpe na mokolo wana nakobimela bango, kutu nakobalolaka misala na bango moko likolo ya mitu na bango.

33 Mpe esalemaki ete ntango Yesu asilisaki maloba oyo, alobaki epayi na bayekoli na ye: Bokota na ekuke ya moke; mpo moke ezali ekuke, mpe nkaka ezali nzela oyo ekambaka na bomoi, mpe moke ezali bango oyo bakozwa yango; kasi monene ezali ekuke, mpe ya etando ezali nzela oyo ekambaka na liwa, mpe mingi ezali bango oyo bakendeke kuna, kino butu ekomi, wapi moto moko akoki kosala te.

Bimisa na lokasa