Makomi
3 Nefi 28


Mokapo 28

Libwa kati na bayekoli zomi na mibale bazali na mposa mpe balakelami kosangola libula ya bokonzi ya Klisto ntango bakokufa—Banefi Misato mosusu bazali na mposa mpe bapesami nguya likolo ya liwa ete batikala likolo ya mabele kino Yesu akoya lisusu—Babongalami mpe bamoni makambo mapekisami mpo na koloba, mpe bazali sikawa kosalaka na kati ya bato. Penepene na mibu 34–35 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete ntango esilaki Yesu koloba maloba oyo, alobaki epayi na bayekoli na ye, moko na moko, kolobaka epayi na bango: Eloko nini oyo bozali na yango mposa uta na ngai, nsima ete nakende epayi na Tata?

2 Mpe nyonso balobaki, longola se Misato, kolobaka: Tozali na mposa ete wana ekosila biso kozala na bomoi mpo na mibu ya moto, ete, mosala na biso, oyo wapi obiangi biso, mokoka kokoma na nsuka, ete tokoka noki koya epayi na yo kati na bokonzi na yo.

3 Mpe alobaki epayi na bango: Bopambolami mpo bozali na mposa ya likambo oyo uta na ngai; boye, nsima ete bokoma na mibu ntuku sambo na mibale bokoya epayi na ngai kati na bokonzi na ngai; mpe elongo na ngai bokozwa bopemi.

4 Mpe ntango esilaki ye koloba na bango, abalukaki epayi na Misato, mpe alobaki epayi na bango: Eloko nini bolingi ete nasala mpo na bino, ntango ekokende ngai epayi na Tata?

5 Mpe bayokaki mawa na mitema na bango, mpo bakokaki te kolobela ye eloko oyo bazalaki na yango mposa.

6 Mpe alobaki epayi na bango: Tala, nayebi makanisi na bino; mpe bozali na mposa ya eloko oyo Yoane, molingami na ngai, oyo azalaki elongo na ngai kati na mosala na ngai, liboso ete natombwama likolo na Bayuda, azalaki na yango mposa uta na ngai.

7 Boye, bopambolami koleka, mpo bino bokomeka soki moke te liwa; kasi bokozala na bomoi mpo na komona misala ya Tata epayi na bana ya bato, kutu kino makambo nyonso makokokisama, engebene na bolingi ya Tata, ntango nakoya kati na nkembo na ngai elongo na banguya ya lola.

8 Mpe bokoyeba soki moke te bolozi ya liwa, kasi ntango nakoya kati na nkembo na ngai, bokobongolama na bofini ya liso, uta na bokufi na bozangi kufa, mpe na ntango wana bokopambolama kati na bokonzi ya Tata na ngai.

9 Mpe lisusu, bokozala na bolozi te wana ezali bino na mosuni, mawa mpe te longola se soki ezali mpo na masumu ya mokili; mpe nyonso oyo nakosala na ntina ya likambo oyo bozali na yango mposa uta na ngai, mpo bozali na mposa ete bomema milimo ya bato epayi na ngai, wana ekowumela mokili.

10 Mpe mpo na ntina oyo bokozala na litondi ya bosepeli mingi; mpe bokofanda na bokonzi ya Tata na ngai; iyo, bosepeli na bino ekotondisama, kutu lokola Tata apesi ngai litondi ya bosepeli; mpe bokozala kutu lokola nazali, mpe nazali kutu lokola Tata, mpe Tata mpe ngai tozali moko.

11 Mpe Molimo Mosantu atatolaka mpo na ntina ya Tata mpe ngai; mpe Tata apesaka Molimo Mosantu epayi na bana ya bato, na ntina na ngai.

12 Mpe esalemaki ete esilaki Yesu koloba maloba oyo, asimbaki moko na moko na bango na mosapi na ye, longola se Misato baye basengelaki kotikala, mpe nsima akendaki.

13 Mpe tala, lola efungwamaki, mpe bakamatamaki likolo na lola, mpe bamonaki mpe bayokaki makambo oyo makoki kolobama te.

14 Mpe epekisamaki koloba epayi na bango; mpe bapesamaki nguya te ete bakoka koloba makambo oyo bamonaki mpe bayokaki;

15 Mpe ezala ete bazalaki na nzoto soki te libanda ya nzoto, bakokaki te koyeba; mpo emonanaki epayi na bango lokola bobongolami na bango, ete babongwamaki uta na nzoto ya mosuni kati na ezalela ya bozangi kufa, ete bakokaki komona makambo ya Nzambe.

16 Kasi esalemaki ete basalaki likolo ya etando ya mabele; nzokande basalaki te mpo na oyo etali makambo oyo bamonaki mpe bayokaki, engebene na motindo mopesamaki na bango na lola.

17 Mpe sikawa, soki bazalaki bato ya kufa soki te bazanga kufa, uta na mokolo ya bobongolami na bango, nayebi te;

18 Kasi oyo mingi nayebi, engebene na lisolo ya makomi oyo epesami—bakendaki epayi na etando ya mboka, basalelaki bato nyonso, kosanganisaka bato na eklezia mingi lokola bandimaki mateya na bango; kobatisaka bango, mpe mingi lokola babatisamaki, bazwaki Molimo Mosantu.

19 Mpe babwakamaki kati na boloko na bato oyo bazalaki ya eklezia te. Kasi bandako ya boloko ekokaki kokanga bango te, mpo epasukaki na biteni mibale.

20 Mpe babwakamaki kati na mabele; kasi babetaki mabele na liloba ya Nzambe, na lolenge ete na nguya na ye babikisamaki uta na bozindo ya mabele; mpe boye bakokaki te kotimola mabulu ya bozindo oyo makoki mpo na kokanga bango.

21 Mpe mbala misato babwakamaki na litumu ya moto, mpe bazwaki mpasi te.

22 Mpe mbala mibale babwakamaki kati na libulu ya banyama ya zamba, mpe tala basakanaki elongo na banyama lokola mwana moke elongo na mwana ya mpate oyo azali komelaka mabele; mpe bazwaki mpasi te.

23 Mpe esalemaki ete bakendaki na kati ya bato nyonso ya Nefi, mpe bateyaki nsango malamu ya Klisto epayi ya bato nyonso likolo ya etando ya mboka; mpe babongwanaki epayi ya Nkolo, mpe basanganaki na eklezia ya Klisto; mpe boye bato ya nkola wana bapambolamaki, engebene na liloba ya Yesu.

24 Mpe sikawa, ngai, Mormon, natie nsuka mpo na kolobaka na ntina ya makambo oyo mpo na ntango moko.

25 Tala, nazalaki mpembeni na kokoma nkombo na bango oyo bakomeka liwa te, kasi Nkolo apekisaki; boye nakomi yango te, mpo ebombami uta na mokili.

26 Kasi tala, ngai namoni bango, mpe basaleli ngai.

27 Mpe tala, bakozala na kati ya baoyo bazali Bayuda-te, kasi Bayuda-te bakoyeba bango te.

28 Bakozala mpe lokola na kati ya Bayuda, kasi Bayuda bakoyeba bango te.

29 Mpe ekosalema, ntango Nkolo akomona ete elongobani na bwania na ye ete basala epayi ya mabota mapanzama ya Yisalaele, mpe bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso mpe bato nyonso, mpe bakomema uta na bango milimo mingi epayi na Yesu, ete mposa na bango ekokisama, mpe lisusu na ntina ya nguya ya bondimisi ya Nzambe oyo ezali kati na bango.

30 Mpe bazali lokola banjelu ya Nzambe, mpe soki basambeli Tata na nkombo ya Yesu, bakoki komilakisa epayi ya moto nyonso lokola ekomona bango malamu.

31 Boye, misala minene mpe ya kokamwa mikosalema na bango, liboso ya mokolo monene mpe oyo ezali koya ntango bato nyonso basengeli na ntembe te kotelema liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto;

32 Iyo, kutu na kati ya baoyo bazali Bayuda-te, mosala monene mpe ya kokamwa ekosalema na bango, liboso ya mokolo wana ya bosambisi.

33 Mpe soki bozalaka na makomi nyonso oyo ezali kopesa lisolo ya misala nyonso ya kokamwa ya Klisto, bolingaki koyeba, engebene na maloba ya Klisto, ete makambo oyo esengeli koya na ntembe te.

34 Mpe lisuma ezala epayi na ye oyo akoyoka maloba ya Yesu te, mpe lisusu bango oyo aponaki mpe atindaki na kati na bango; mpo moto nyonso oyo akoyamba te maloba ya Yesu mpe maloba na bango oyo atindaki ayambi ye te; mpe boye akoyamba bango te na mokolo ya nsuka.

35 Mpe elingaki kozala malamu koleka mpo na bango soki babotamaka te. Mpo ebanzi bino ete bokoki kokima boyengebene ya Nzambe oyo atukami, oyo aniatami na nse ya makolo ya bato, ete lobiko ekoka koya na nzela wana?

36 Mpe sikawa tala, lokola nalobaki mpo na oyo etali bango oyo Nkolo aponi, iyo, kutu Misato oyo bakamatamaki kati na lola, ete nayebaki te soki bapetolamaki uta na bokufi na bozangi kufa—

37 Kasi tala, uta nakomaki, natunaki na Nkolo, mpe asali emonisama epayi na ngai ete esengeli mpenza mbongwana esalema likolo ya nzoto na bango, to soki bongo te basengelaki komeka liwa;

38 Boye, mpo ete bakoka te komeka liwa, mbongwana esalemaki likolo ya nzoto na bango, ete bakoka te koyoka mpasi ya bolozi to mawa, longola se soki ezali mpo na masumu ya mokili.

39 Sikawa mbongwana oyo ekokani te na oyo ekosalema na mokolo ya nsuka; kasi ezalaki na mbongwana moko oyo esalemaki kati na bango, na lolenge ete Satana akokaki te kozala na nguya likolo na bango, ete akokaki kosenginia bango te; mpe basantisamaki na mosuni, ete bakomaki basantu, mpe ete nguya ya mokili ekoki te kosimba bango.

40 Mpe na ezalela oyo basengelaki kotikala kino na mokolo Klisto akoya kosambisa; mpe na mokolo wana, basengelaki kozwa mbongwana monene koleka, mpe koyambama kati na bokonzi ya Tata mpo na kobima lisusu te, kasi kofanda elongo na Nzambe seko kati na balola.

Bimisa na lokasa