Makomi
3 Nefi 6


Mokapo 6

Banefi bafuluki—Lolendo, nkita, bokeseni ya nkondo ebimi—Eklezia epasuki na bokabwani—Satana akambi bato na botomboki ya polele—Baprofeta mingi babeleli boyamboli mpe babomami—Babomi na bango basali ekokolo mpo na kokweisa ekobima. Penepene na mibu 26–30 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete bato nyonso ya Banefi bazongaki nyonso na bamboka na bango moko na mobu ya ntuku mibale na motoba, moto na moto, elongo na libota na ye, bibwele na ye, mpe bitonga na ye, babampunda na ye, mpe banyama na ye ya kobokola, mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bango.

2 Mpe esalemaki ete basilisaki bilei nyonso na bango te; boye bakamataki elongo na bango oyo nyonso baliaki te, mboto na bango nyonso ya ndenge na ndenge, wolo na bango, mpe mpauni na bango, mpe biloko nyonso na bango ya motuya, mpe bazongaki na bamboka na bango moko, mpe bozwi na bango, ezala na nordi mpe na sudi mpe lokola, ezala na mboka epayi na nordi mpe na mboka epayi na sudi mpe lokola.

3 Mpe bapesaki epayi ya bayongoli wana oyo bakotaki kati na liyokani oyo ezalaki ya kobatela kimia ya mboka, baoyo bazalaki na mposa ya kotikala Balamani, biteni ya mabele, engebene na mitango na bango, ete bakoka kozwa, na misala na bango, nini bakokaki kobika na yango; mpe boye bafandisaki kimia na mboka mobimba.

4 Mpe babandaki lisusu kofuluka mpe kokoma bato banene; mpe mibu ya ntuku mibale na motoba mpe na nsambo elekaki, mpe ezalaki na molongo monene mpenza na mboka; mpe basalaki mibeko na bango engebene na alima mpe boyengebene.

5 Sikawa ezalaki na eloko moko te kati na mboka mobimba mpo na kopekisa bato bafuluka ntango nyonso, longola se soki bakokweya kati na bobuki mobeko.

6 Mpe sikawa ezalaki Gidigidoni, mpe mosambisi, Lakonusi, mpe bango oyo baponamaki bakambi, oyo bafandisaki kimia monene oyo na mboka.

7 Mpe esalemaki ete ezalaki na bingumba mingi oyo etongamaki sika, mpe bingumba mingi ya kala ebongisamaki lisusu.

8 Mpe balabala minene mingi itongamaki, mpe balabala mingi esalemaki, oyo ezalaki kokamba uta engumba na engumba, mpe uta mboka na mboka, mpe uta esika na esika.

9 Mpe boye elekaki mobu ya ntuku mibale na mwambe, mpe bato bazalaki na kimia ya ntango nyonso.

10 Kasi esalemaki ete na mobu na ntuku mibale na libwa boko boswani ebandaki kozala na kati ya bato; mpe boko bato bamitombwanaki na lolendo mpe bifundeli na ntina ya bozwi monene koleka na bango, iyo, kutu kino na minyokoli minene;

11 Mpo ezalaki na bato ya mombongo mingi kati na mboka, mpe lisusu balobeli mingi mpe bakambi mingi ya leta.

12 Bato babandaki kokesenisama na nkondo, engebene na bozwi na bango mpe mabaku bazwaki mpo na koyekola; iyo, boko bazangaki boyebi na ntina ya bobola na bango, mpe basusu bazwaki boyekoli monene na ntina ya bozwi na bango.

13 Boko bato batombwamaki na lolendo, mpe basusu bazalaki bato na bomikitisi mpenza; boko bazongisaki mafinga na mafinga, nzokande basusu bazwaki mafinga mpe minyokoli mpe ndenge nyonso ya mitungisi, mpe balingaki te kozongisa mpe kofinga lisusu, kasi bazalaki bato na bomikitisi mpe bayamboli liboso ya Nzambe.

14 Mpe boye bokeseni monene ekomaki kati na mboka mobimba, na lolenge ete eklezia ebandaki kokabwana, iyo, na lolenge ete na mobu ya ntuku misato eklezia ekabwanaki na mboka mobimba longola se na kati ya ndambo moke ya Balamani baoyo babongwanaki mpo na bondimi ya solo; mpe balingaki te kolongwa uta na bondimi yango, mpo bazalaki ngwi, mpe makasi, kozangaka koningana, kolingaka na etingia nyonso kobatela mitindo ya Nkolo.

15 Sikawa ntina ya mabe ya bato oyo ezalaki eye—Satana azalaki na nguya monene, mpo na kolamusa bato ete basala ndenge nyonso ya mabe, mpe mpo na kovimbisa bango na lolendo, kosenginiaka bango mpo na koluka nguya, mpe likoki, mpe bozwi, mpe biloko ya mpamba mpamba ya mokili.

16 Mpe boye Satana akambaki mitema ya bato mpo na kosala ndenge nyonso ya mabe; yango wana basepelaki na kimia bobele mwa mibu mike.

17 Mpe boye, na ebandeli ya mobu ya ntuku misato na moko—bato bamitikaki mpo na ntango moko molai mpo na komemama na masenginia ya zabulu wapi epayi azalaki na mposa ya komema bango, mpe mpo na kosala mabe nyonso kani azalaki na mposa basala—mpe boye na ebandeli ya eye, mobu ya ntuku misato, bakomaki na ezaleli moko ya nkuna ya nsomo.

18 Sikawa basumukaki na bozangi boyebi te, mpo bayebaki bolingi ya Nzambe mpo na oyo etali bango, mpo eteyamaki epayi na bango; boye batombokaki na Nzambe na motema moko.

19 Mpe sikawa na mikolo ya Lakonusi, ezalaki na mwana mobali ya Lakonusi, mpo Lakonusi akamataki kiti ya tata na ye mpe ayangelaki bato na mobu mona.

20 Mpe ebandaki kozala na bato oyo bafulami uta na lola mpe batindamaki, kotelemaka na kati ya bato na mboka mobimba, koteyaka mpe kotatolaka na mpiko masumu mpe mabe ya bato, mpe kotatolaka epayi na bango mpo na oyo etali bosikoli boye Nkolo akosala mpo na bato na ye, soki te na maloba mosusu, bosekwi ya Klisto; mpe batatolaki na mpiko liwa mpe mpasi na ye.

21 Sikawa ezalaki na mingi ya bato oyo basilikaki mingi koleka na ntina na bango oyo batatolaki makambo oyo; mpe bango oyo basilikaki bazalaki mingi basambisi bakonzi, mpe bango oyo bazalaka banganganzambe banene mpe balobeli; iyo; bango nyonso oyo bazalaki balobeli basilikaki na bango oyo batatolaki makambo oyo.

22 Kasi ezalaki na mosambi moko te to molobeli moko te soki te nganganzambe monene moko te oyo akokaki kozala na nguya mpo na kokatela moto etumbu ya liwa longola se soki etumbu etiamaki maboko na mokambi etuka ya mboka yango.

23 Sikawa ezalaki na mingi na baye oyo batatolaki na oyo etali makambo ya Klisto, baye batatolaki na mpiko, oyo bakamatamaki mpe batiamaki na liwa na nkuku na basambisi, ete boyebi ya liwa na bango ekomelaki epayi mokambi ya mboka te kino nsima ya liwa na bango.

24 Sikawa tala, oyo ezalaki na bokeseni ya mibeko ya mboka, ete moto abomama longola se soki bazalaki na nguya uta na mokambi ya etuka—

25 Boye bofundi moko eyaki uta epayi na mboka ya Zalayemila, na mokambi ya etuka, likolo ya basambisi baoyo bakatelaki baprofeta ya Nkolo etumbu mpo na liwa, engebene na mobeko te.

26 Sikawa esalemaki ete bakamataki mpe bamemaki bango liboso ya mosambisi, mpo na kosambisama na mabe oyo basalaki, engebene na mobeko oyo epesamaki na bato.

27 Sikawa esalemaki ete balobeli bana bazalaki na baninga mpe bandeko mingi; mpe baoyo batikali, iyo, kutu penepene na basambi nyonso mpe banganganzambe banene, basanganaki bango moko esika moko, mpe bazwanaki na bomoko elongo na bandeko ya basambisi bana oyo basengelaki kosambisama engebene na mobeko.

28 Mpe bakotaki kati na liyokani moko na mosusu, iyo, kutu kati na liyokani oyo epesamaki na bango na bato ya kala, liyokani oyo epesamaki mpe esalemaki na zabulu, mpo na kosangana na kotelemelaka bosembo nyonso.

29 Boye basanganaki na kotelemelaka bato ya Nkolo, mpe bakotaki kati na liyokani mpo na kobebisa bango, mpe kokangola bango oyo bazalaki na elindo ya bobomi uta na maboko ya boyengebene, oyo ezalaki penepene na kosalema engebene na mobeko.

30 Mpe batiaki ntembe na mobeko mpe makoki ya ekolo na bango; mpe basalaki liyokani moko na mosusu mpo na kobebisa mokambi ya etuka, mpe kotia mokonzi moko likolo ya mboka, ete mboka ezala lisusu te na lipanda kasi eyangelama na bakonzi.

Bimisa na lokasa