Makomi
Alma 11


Mokapo 11

Libongisi ya mosolo ya Banefi esalemi—Amuleki aweli na Zezilomi—Klisto akobikisa bato kati na masumu na bango te—Bobele baoyo bakosangola libula ya bokonzi ya lola nde bakobikisama—Bato nyonso bakosekwa na bozangi kufa—Ezali na liwa te nsima ya Bosekwi. Penepene na mobu 82 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa ezalaki na mobeko ya Mosiya ete moto na moto nyonso oyo azalaki mosambisi ya mobeko, to bango oyo baponamaki mpo na kozala basambisi, bakozwa lifuta engebene na ntango oyo basalaki mpo na kosambisa bango oyo bamemamaki liboso na bango mpo na kosambisama.

2 Sikawa soki moto moko asengelaki kofuta mosolo na mosusu, mpe alingaki te kofuta oyo wana asengelaki, basengelaki kofunda ye na mosambisi; mpe mosambisi akosalela likoki, mpe kotinda basali ete moto wana amemama liboso na ye; mpe akosambisa moto wana engebene na mobeko mpe bilembo ya bosolo oyo bimemami na kofundaka ye, mpe boye moto yango asengisamaki kofuta oyo wana asengelaki, soki te kobotolama, soki te kobenganama uta na ntei ya bato lokola moyibi mpe mobotoli.

3 Mpe mosambisi azwaki lifuta na ye engebene na ntango na ye—senini yoko ya wolo mpo na mokolo moko, soki te senumi moko ya mpauni, oyo ekokani na senini yoko ya wolo; mpe oyo ezali engebene na mobeko oyo mopesamaki.

4 Sikawa oyo ezali nkombo ya biteni ya bikeseni ya wolo na bango, mpe ya mpauni na bango, engebene na motuya na yango. Mpe nkombo epesami na Banefi, mpo batiaki bimekiseli te na lolenge ya Bayuda baoyo bazalaki na Yelusaleme; mpe batiaki bimekiseli te na lolenge ya Bayuda; kasi babalolaki mituya mpe bimekiseli na bango, engebene na mayele mpe bizaleli ya bato, na nkola moko moko, kino na boyangeli ya basambisi, mpe batiamaki na mokonzi Mosiya.

5 Sikawa mituya ezali boye—senini yoko ya wolo, seoni yoko ya wolo, sumi yoko ya wolo, mpe limina moko ya wolo.

6 Senumi yoko ya mpauni, aminoli yoko ya mpauni, ezilomi yoko ya mpauni, mpe otie yoko ya mpauni.

7 Senumi yoko ya mpauni ekokanaki na senini yoko ya wolo, mpe mpo na emekiseli yoko ya loso, mpe lisusu mpo na emekiseli ya mboto ya ndenge na ndenge.

8 Sikawa motuya ya seoni ya wolo ezalaki mbala mibale motuya ya senini yoko.

9 Mpe sumi yoko ya wolo ezalaki mbala mibale motuya ya seoni.

10 Mpe limina moko ya wolo ezalaki motuya na yango nyonso.

11 Mpe aminoli yoko ya mpauni ezalaki monene lokola senumi mibale.

12 Mpe ezilomi yoko ya mpauni ezalaki monene lokola senumi minei.

13 Mpe otie ezalaki monene lokola yango nyonso.

14 Sikawa oyo ezali motuya ya mitango ya moke koleka ya mituya na bango—

15 Sibiloni yoko ezali ndambo ya senumi yoko; boye, sibiloni yoko ezalaki ndambo ya emekiseli yoko ya loso.

16 Mpe sibilumi yoko ezali ndambo ya sibiloni yoko.

17 Mpe leya yoko ezali ndambo ya sibilumi yoko.

18 Sikawa oyo ezali motango ya yango, engebene na mituya na yango.

19 Sikawa antioni yoko ya wolo ekokanaki na sibiloni misato.

20 Sikawa, ezalaki se mpo na ntina moko ya kozwa mosolo, mpo bazalaki kozwa lifuta na bango engebene na mosala na bango, boye, balamusaki bato na mobulu makasi, mpe ndenge nyonso ya bobundami mpe nkuna, ete bakoka kozala na mosala mingi, ete bakoka kozwa mosolo engebene na makambo oyo mamemamaki liboso na bango; boye balamusaki bato na nkanda ya Alma mpe Amuleki.

21 Mpe Zezilomi oyo abandaki kotuna Amuleki, kolobaka: Ekolinga yo koyanola ngai mwa mituna oyo nakotuna yo? Sikawa Zezilomi azalaki moto moko oyo azalaki nganga na mayele mabe ya zabulu, ete akoka kobebisa oyo wana ezalaki malamu; boye, alobaki epayi na Amuleki: Elingi yo koyanola mituna oyo nakotuna yo?

22 Mpe Amuleki alobaki epayi na ye: Iyo, soki ezali engebene na Molimo ya Nkolo, oyo azali na ngai; mpo nakoloba eloko moko te oyo ezali na bokeseni na Molimo ya Nkolo. Mpe Zezilomi alobaki epayi na ye: Tala, ezali na otie motoba awa ya mpauni, mpe nyonso oyo nakopesa yo soki owangani bozali ya Mozali ya Nta Likolo.

23 Sikawa Amuleki alobaki: O yo mwana ya lifelo, mpo na nini ekosenginia yo ngai? Oyebi ete moto ya sembo akomitikaka te na masenginia ya lolenge oyo?

24 Endimi yo ete Nzambe azali te? Nalobi epayi na yo, Te, oyebi ete ezali na Nzambe moko, kasi yo olingi kozwa lifuta mingi koleka ye.

25 Mpe sikawa okosi ngai liboso ya Nzambe. Olobi epayi na ngai—Tala otie motoba, oyo ezali ya motuya monene, nakopesa epayi na yo—ntango ozalaki na yango na motema na yo ete opimela ngai yango; mpe ezalaki se bobele mposa na yo ete nawangana Nzambe ya solo mpe ya bomoi, ete okoka kozwa ntina ya kobebisa ngai. Mpe sikawa tala, mpo na mabe oyo ya monene okozwa mbano na yo.

26 Mpe Zezilomi alobaki epayi na ye: Olobi ezali na Nzambe moko ya solo mpe ya bomoi?

27 Mpe Amuleki alobaki: Iyo, ezali na Nzambe moko ya solo mpe ya bomoi.

28 Sikawa Zezilomi alobaki: Bazali mingi koleka Nzambe moko?

29 Mpe ayanolaki, Te.

30 Sikawa Zezilomi alobaki epayi na ye lisusu: Lolenge kani eyebi yo makambo oyo?

31 Mpe alobaki: Anjelu moko ya Nzambe asalaki ete eyebana epayi na ngai.

32 Mpe Zezilomi alobaki lisusu: Nani oyo akoya? Ezali Mwana ya Nzambe?

33 Mpe alobaki epayi na ye, Iyo.

34 Mpe Zezilomi alobaki lisusu: Ekobikisa ye bato na ye kati na masumu na bango? Mpe Amuleki ayanolaki mpe alobaki epayi na ye: Nalobi epayi na yo akosala yango te, mpo ekoki kosalema te ete awangana liloba na ye.

35 Sikawa Zezilomi alobaki epayi ya bato: Mona ete bomikundola makambo oyo; mpo alobaki ezali bobele na Nzambe moko; nzokande alobi ete Mwana ya Nzambe akoya, kasi akobikisa bato na ye te—lokola soki azalaki na likoki ya kotinda Nzambe.

36 Sikawa Amuleki alobi epayi na ye lisusu: Tala okosi, mpo olobi ete nalobaki lokola soki nazali na likoki ya kotinda Nzambe, mpo nalobaki ete akobikisa bato na ye kati na masumu na bango te.

37 Mpe nalobi epayi na yo lisusu ete akoki kobikisa bango kati na masumu na bango te; mpo nakoki kowangana liloba na ye te, mpe alobi ete eloko moko te ya mbindo ekoki kosangola libula ya bokonzi ya lola; boye, lolenge kani ekoki bino kobikisama, longola se soki bosangoli libula ya bokonzi ya lola? Yango wana, bokoki kobika kati na masumu na bino te.

38 Sikawa Zezilomi alobi lisusu epayi na ye: Ezali Mwana ya Nzambe mpenza Tata ya Seko?

39 Mpe Amuleki alobaki epayi na ye: Iyo, azali mpenza Tata ya Seko ya lola mpe ya mabele, mpe ya biloko nyonso oyo ezali kati na yango; ye azali ebandeli mpe nsuka, ya yambo mpe ya nsuka;

40 Mpe akoya kati na mokili mpo na kosikola bato na ye; mpe akokamata likolo na ye bobuki mibeko ya baye bandimeli na nkombo na ye; mpe oyo ezali baye bakozwa bomoi ya seko, mpe lobiko ekoya na mosusu te.

41 Na boye bato ya mabe batikali lokola soki bosikoli esalemaki te, longola kaka bofungwami ya singa ya liwa; mpo tala, mokolo ekoya oyo wapi banso bakotelema na bakufi mpe bakotelema liboso ya Nzambe, mpe bakosambisama engebene na misala na bango.

42 Sikawa, ezali na liwa moko oyo ebiangami liwa ya ntango; mpe liwa ya Klisto ekofungola singa ya liwa ya ntango moke, ete nyonso bokotelemisama na liwa oyo ya ntango moke.

43 Molimo mpe nzoto ekosangana lisusu na lolenge na yango ya kobonga nie; enama mpe ekangisele ya nzoto lokola ekozongisama na lolenge na yango mpenza, kutu lokola tozali na ntango oyo; mpe tokomemama mpo na kotelema liboso ya Nzambe, koyebaka makambo kutu lokola toyebi sikawa, mpe tokozala na bokundoli ya polele ya elindo nyonso na biso.

44 Sikawa, bozongisi boye ekoya na nyonso, ezala na mobange mpe na elenge lokola, ezala na moumbu mpe na nsomi mpe lokola, ezala na mwasi mpe na mobali mpe lokola, ezala na moto ya nkuna mpe na moto ya sembo mpe lokola; mpe kutu ata nsuki moko te ya mitu na bango ekobunga; kasi eloko na eloko ekozongisama na nzoto na yango ya kobonga nie, lokola ezali sikawa, soki te na nzoto oyo, mpe ekomemama mpe ekotiama na bosambisi liboso ya esambiselo ya Klisto Mwana, mpe Nzambe Tata, mpe Molimo Mosantu, oyo azali Nzambe moko ya Seko, mpo na kosambisama engebene na misala na bango, soki ezalaki malamu to soki ezalaki mabe.

45 Sikawa, tala, nalobaki epayi na bino mpo na oyo etali liwa ya nzoto ya kufa, mpe lisusu mpo na oyo etali bosekwi ya nzoto ya kufa. Nalobi epayi na bino ete nzoto oyo ya kufa esekwisami na nzoto oyo ezanga kufa, oyo elingi koloba, esekwisami uta na liwa, kutu uta na liwa ya yambo mpo na bomoi, ete bakoka kokufa lisusu te; milimo na bango kosanganaka na nzoto na bango, mpo na kokabwana soki moke te; boye mobimba kokomaka moto ya molimo mpe oyo azanga kufa, ete bakoka komona lisusu te bopoli.

46 Sikawa, ntango Amuleki asilaki koloba maloba oyo bato babandaki lisusu kokamwa, mpe lisusu Zezilomi abandaki kolenga. Mpe boye esukaki maloba ya Amuleki, soki te oyo nde ezali nyonso oyo nakomaki.

Bimisa na lokasa