Makomi
Alma 16


Mokapo 16

Balamani babebisi bato ya Amoniya—Zolami akambi Banefi na elonga likolo ya Balamani—Alma mpe Amuleki mpe mingi basusu bateyi liloba—Balakisi ete nsima ya Bosekwi na Ye Klisto akomonana epayi ya Banefi. Penepene na mibu 81–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na mobu ya zomi na moko ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, na mokolo ya mitano ya sanza ya mibale, nsima kimia ezalaki mingi na mboka ya Zalayemila, nsima bitumba ezalaki te mpe boweli te mpo na yoko motango ya mibu, kutu kino na mokolo ya mitano ya sanza ya mibale, na mobu ya zomi na moko, nde eyokanaki makelele moko ya bitumba epayi nyonso na mboka.

2 Mpo tala, mampinga ya Balamani eyaki na ngambo ya esobe, kati na bandelo ya mboka, kutu kati na engumba ya Amoniya, mpe babandaki koboma bato mpe kobebisa engumba.

3 Mpe sikawa esalemaki ete, yambo Banefi bakoka kosangisa limpinga ya bato ya kokoka mpo na kobimisa bango uta na mboka, babebisaki bato oyo bazalaki na engumba ya Amoniya, mpe lisusu boko bato nzinganzinga na bandelo ya Noa, mpe bamemaki basusu bakangemi kati na esobe.

4 Sikawa esalemaki ete Banefi bazalaki na mposa ya kozwa bango oyo bamemamaki bakangemi kati na esobe.

5 Boye, ye oyo aponamaki kapitene mokonzi likolo ya mampinga ya Banefi, (mpe nkombo na ye ezalaki Zolami, mpe azalaki na bana mibali mibale, Lehi mpe Aya)—sikawa Zolami mpe bana na ye mibali mibale, lokola bayebaki ete Alma azalaki nganganzambe monene likolo ya eklezia, mpe lokola bayokaki ete Alma azalaki na molimo ya masakoli, boye bakendaki epayi na ye mpe bazalaki na mposa ya koyeba uta na ye soki Nkolo akolinga ete bakende kati na esobe mpo na koluka bandeko na bango, baoyo bazwamaki bakangemi na Balamani.

6 Mpe esalemaki ete Alma alukaki koyeba uta na Nkolo mpo na oyo etali likambo yango. Mpe Alma azongaki mpe alobaki epayi na bango ete: Tala, Balamani bakokatisa ebale ya Sidoni na sudi ya esobe, mosika mpenza na ngambo mosusu ya bandelo ya mboka ya Mati. Mpe tala, kuna ekokutana bino na bango, na esti ya ebale ya Sidoni, mpe kuna Nkolo akopesa bino bandeko na bino baoyo bazwamaki bakangemi na Balamani.

7 Mpe esalemaki ete Zolami mpe bana mibali na ye bakatisaki likolo ya ebale ya Sidoni, elongo na mampinga na bango, mpe batambolaki mosika na ngambo ya ndelo ya Mati kati na a esobe ya sudi, oyo ezalaki na ngambo ya esti ya ebale ya Sidoni.

8 Mpe bayaki likolo ya mampinga ya Balamani, mpe Balamani bapanzanaki mpe babenganamaki kati na esobe; mpe bakamataki bandeko na bango oyo bazwamaki bakangemi na Balamani, mpe moto moko te oyo azwamaki mokangemi kati na bango abungaki. Mpe bamemamaki na bandeko na bango mpo na kozwa bamboka na bango moko.

9 Mpe boye esilaki mobu ya zomi na moko ya basambisi, Balamani babenganamaki uta na mboka, mpe bato ya Amoniya babebisamaki; iyo, moto nyonso na bomoi na kati ya Baamoniyayite abomamaki, mpe lisusu engumba monene na bango, oyo balobaki Nzambe akokaki te kobebisa, na ntina ya bonene na yango.

10 Kasi tala, na mokolo moko etikalaki mpamba; mpe bibembe biliamaki na mbwa mpe banyama ya esobe.

11 Nzokande, nsima ya mikolo mingi nzoto na bango oyo ekufa etondaki likolo ya etando ya mabele meke, mpe ezipamaki na mwa mabele moke likolo. Mpe sikawa solo na yango ezalaki makasi ete bato bakendaki te kozwa mboka ya Amoniya mibu mingi. Mpe ebiangamaki Libebi ya Banewolo; mpo bazalaki ya boyambi ya Newolo, baoyo babomamaki; mpe mboka na bango etikalaki ya kobeba.

12 Mpe Balamani bayaki lisusu te kobunda na Banefi kino na mobu ya zomi na minei ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi. Mpe boye mpo na mibu misato bato ya Nefi bazalaki na kimia ya ntango nyonso na mboka mobimba.

13 Mpe Alma mpe Amuleki bakendaki koteyaka boyamboli na bato kati na batempelo na bango, mpe kati na bandako esantu na bango, mpe lisusu kati na basinagoga na bango, oyo itongamaki na lolenge ya Bayuda.

14 Mpe mingi lokola balingaki koyoka maloba na bango, epayi na bango bayebisaki liloba ya Nzambe, na kotalaka bilongi te, ntango nyonso.

15 Mpe boye Alma mpe Amuleki bakendaki, mpe bato basusu mingi koleka baponamaki mpo na mosala, mpo na koteya liloba epayi nyonso na mboka mobimba. Mpe mosala ya kotiaka eklezia ekomaki bisika nyonso epayi nyonso na mboka, na bituka nyonso nzinganzinga mpembeni, na kati ya bato nyonso ya Banefi.

16 Mpe bozangi bokokani ezalaki te na kati na bango; Nkolo asopaki mpenza Molimo na ye likolo ya etando mobimba ya mboka mpo na kolengela mayele ya bana ya bato, to mpo na kolengela mitema na bango mpo na koyamba liloba oyo ekoteyama na kati na bango na ntango ya boyei na ye—

17 Ete bakoka te kozala batomboki na liloba, ete bakoka te kozala bato bazangi bondimi, mpe kokoba kokende na bobebisami, kasi ete bakoka koyamba liloba na bosepeli, mpe lokola etape ekangemi kati na nzete ya vinyo ya solo, ete bakoka kokota kati na bopemi ya Nkolo Nzambe na bango.

18 Sikawa banganganzambe oyo wana bakendaki na kati ya bato bateyaki na kotelemelaka lokuta, mpe bokosi, mpe boluli, mpe songisongi, mpe nko, mpe mafinga, mpe boyibi, boyongoli, bopunzi, bobomi, bosali ekobo, mpe ndenge nyonso ya bonsoni, kobelelaka ete makambo oyo esengeli te kozala bongo—

19 Kolakisaka makambo oyo ekoya kala mingi te; iyo, kolakisaka boyei ya Mwana ya Nzambe, mpasi mpe liwa na ye, mpe lisusu bosekwi ya bakufi.

20 Mpe mingi ya bato balukaki koyeba mpo na oyo etali esika wapi Mwana ya Nzambe akoya; mpe bateyamaki ete akomonana epayi na bango nsima ya bosekwi na ye; mpe oyo bato bayokaki na bosepeli mpe nsai monene.

21 Mpe sikawa esilaki eklezia kotiama epayi nyonso na mboka mobimba—nsima ya kozwaka elonga likolo ya zabulu, mpe liloba ya Nzambe koteyamaka na bopeto na yango na mboka mobimba, mpe Nkolo kosopaka mapamboli na ye likolo ya bato—boye nde esilaki mobu ya zomi na minei ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

Bimisa na lokasa