Makomi
Alma 17


Lisitwale ya bana mibali ya Mosiya, baoyo babwakaki makoki na bango na bokonzi mpo na liloba ya Nzambe, mpe bakendaki na mboka ya Nefi mpo na koteya na Balamani; mpasi na bango mpe bokangoli na bango—engebene na lisolo ya makomi ya Alma.

Ezali na mikapo 17 kino na nsuka ya mokapo 27.

Mokapo 17

Bana mibali ya Mosiya bazali na molimo ya masakoli mpe emoniseli—Bakei na banzela na bango ebele mpo na kosakola liloba epayi ya Balamani—Amona akey na mboka ya Yisamaele mpe akomi mosali ya mokonzi Lamoni—Amona akangoli bitonga ya mokonzi mpe abomi banguna na ye na mai ya Sebu. Milongo ya kotanga 1–3, penepene na mobu 77 Liboso na mbotama ya Klisto; molongo ya kotanga 4, penepene na mibu 91–77 Liboso na mbotama ya Klisto; mpe milongo ya kotanga 5–39, penepene na mobu 91 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete lokola ezalaki Alma kokendaka mobembo uta na mboka ya Gideona epayi na sudi, mosika na mboka ya Mati, tala, na bokamwi na ye, akutanaki na bana mibali ya Mosiya, kokendaka mobembo na mboka ya Zalayemila.

2 Sikawa bana mibali oyo ya Mosiya bazalaki elongo na Alma na ntango anjelu amonanaki na ye mbala ya yambo; na boye Alma asepelaki mingi koleka mpo na komona bandeko na ye; mpe nini ebakisaki mingi na bosepeli na ye, bazalaki kaka bandeko na ye kati na Nkolo; iyo, mpe bakomaki makasi na boyebi ya bosolo; mpo bazalaki bato ya bososoli malamu mpe balukaki koyeba makomi na molende, ete bakoka koyeba liloba ya Nzambe.

3 Kasi oyo ezali nyonso te; bamipesaki na losambo mingi, mpe bokili; na boye bazwaki molimo ya bosakoli, mpe molimo ya emoniseli, mpe ntango bazalaki koteya, bazalaki koteya na nguya mpe na likoki ya Nzambe.

4 Mpe bateyaki liloba ya Nzambe mpo na ntaka ya mibu zomi na minei na kati ya Balamani, mpe bazwaki elonga mingi na komemaka bato mingi na boyebi ya bosolo; iyo, na nguya ya maloba na bango bato mingi bamemamaki liboso ya etumbelo ya Nzambe, mpo na kobelela nkombo na ye mpe kotubela masumu na bango liboso na ye.

5 Sikawa oyo ezali makambo oyo malandaki bango na mibembo na bango, mpo bazalaki na mitungisi mingi; bayokaki mpasi ebele, na nzoto mpe na makanisi, lokola nzala, mposa ya mai mpe bolembi, mpe lisusu mosala mingi na molimo.

6 Sikawa, oyo ezalaki mibembo na bango: nsima ya kokabwanaka na tata na bango, Mosiya, na mobu ya yambo ya basambisi; nsima ya koboyaka bokonzi boye tata na bango azalaki na mposa ya kopesa likolo na bango, mpe lisusu oyo ezalaki makanisi ya bato;

7 Nzokande bakendaki libanda ya mboka ya Zalayemila, mpe bakamataki mipanga na bango, mpe makonga na bango, mpe matimbo na bango, mpe makula na bango, mpe bilingongo na bango; mpe oyo basalaki ete bakoka kozwa bilei mpo na bango moko na esobe.

8 Mpe boye bakendaki kati na esobe elongo na motango na bango oyo baponaki, mpo na kokende na mboka ya Nefi, mpo na koteya liloba ya Nzambe epayi ya Balamani.

9 Mpe esalemaki ete bakendaki mobembo mikolo mingi na esobe, mpe bakilaki mingi mpe basambelaki mingi ete Nkolo apesa bango ndambo yoko ya Molimo na ye mpo na kokende elongo na bango, mpe atikala elongo na bango, ete bakoka kozala esalelo yoko na maboko ya Nzambe mpo na komema, soki ekokaki kosalema, bandeko na bango, Balamani, na boyebi ya bosolo, na boyebi ya bokwei na ebebi ya mimesano ya batata na bango, oyo ezalaki malamu te.

10 Mpe esalemaki ete Nkolo ayaki kotala bango na Molimo na ye, mpe alobaki epayi na bango: Bobondisama. Mpe babondisamaki.

11 Mpe Nkolo alobaki epayi na bango lisusu: Bokende na kati ya Balamani, bandeko na bino, mpe botia liloba na ngai; kasi bokozala na bompikiliki kati na minyokoli mpe mitungisi, ete bokoka kolakisa ndakisa malamu epayi na bango na nzela na ngai, mpe nakosalela bino lokola esalelo yoko na maboko na ngai mpo na lobiko ya bato mingi.

12 Mpe esalemaki ete mitema ya bana mibali ya Mosiya, mpe lisusu bango oyo bazalaki elongo na bango, bazwaki mpiko ya kokende epayi ya Balamani mpo na kosakola epayi na bango liloba ya Nzambe.

13 Mpe esalemaki ete ekomaki bango na bandelo ya mboka ya Balamani, ete bakabwanaki, mpe bakendaki moto moko mosika na mosusu, kolikyaka motema na Nkolo ete bakokutana lisusu na nsuka ya eleko ya bobuki mbuma na bango; mpo babanzaki ete mosala oyo babandaki ezalaki monene.

14 Mpe solo ezalaki monene, mpo babandaki koteya liloba ya Nzambe na bato ya nkei mpe ya mitema makasi mpe ya loma; bato oyo basepelaki na kobomaka Banefi, mpe kobotolaka mpe koyongolaka biloko na bango; mpe mitema na bango ekangamaki na bozwi, soki te likolo ya wolo mpe mpauni, mpe mabanga ya ntalo; kasi bazalaki koluka kozwa biloko oyo na kobomaka mpe koyongolaka, ete bakoka te kosala mpo na yango na maboko na bango moko.

15 Boye bazalaki bato ya goigoi, mingi ya baoyo kani basambelaki bikeko, mpe bolakeli mabe ya Nzambe ekweyaki likolo na bango na ntina ya mimesano ya batata na bango; ata bilaka ya Nkolo epesamaki epayi na bango na masengami ete basengeli koyambola.

16 Boye, oyo ezalaki ntina nini bana mibali ya Mosiya babandaki mosala, ete mbele bakoka komema bango na boyamboli; ete mbele bakoka komema bango na koyeba mwango ya bosikoli.

17 Boye bakabwanaki moko na mosusu, mpe bakendaki na kati na bango, moto na moto ye moko, engebene na liloba mpe nguya ya Nzambe oyo epesamaki epayi na ye.

18 Sikawa Amona lokola azalaki mokonzi na kati na bango, soki te kutu asalelaki bango, mpe akabwanaki na bango, nsima ya kopambola bango engebene na bibonga na bango ya ndenge na ndenge, koyebisaka liloba ya Nzambe epayi na bango, soki te kosalisaka bango yambo ya kokende na ye; mpe boye basalaki mibembo ebele epayi nyonso na mboka.

19 Mpe Amona akendaki na mboka ya Yisamaele, mboka oyo ebiangamaki na nkombo ya bana mibali ya Yisamaele, oyo bakomaki Balamani mpe lokola.

20 Mpe lokola Amona akotaki na mboka ya Yisamaele, Balamani bakamataki ye mpe bakangaki ye singa singa, lokola ezalaki momeseno mpo na kokanga Banefi nyonso oyo bakweyaki na maboko na bango, mpe komema bango liboso ya mokonzi; mpe boye etikalaki se na bolingi ya mokonzi mpo na koboma bango, soki te kosimba bango kati na bokangemi, soki te kobengana bango uta na mboka na ye, engebene na bolingi mpe elengi na ye.

21 Mpe boye Amona amemamaki liboso ya mokonzi oyo azalaki likolo ya mboka ya Yisamaele; mpe nkombo na ye ezalaki Lamoni; mpe azalaki eboto ya Yisamaele.

22 Mpe mokonzi atunaki Amona soki ezalaki mposa na ye kofanda na mboka na kati ya Balamani, soki te na kati ya bato na ye.

23 Mpe Amona alobaki epayi na ye: Iyo, nazali na mposa ya kofanda na kati ya bato oyo mpo na ntango moko; iyo, mpe mbele kino na mokolo nakokufa.

24 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamoni asepelaki mingi na Amona, mpe asalaki ete singa singa na ye efungwama; mpe alingaki ete Amona akamata moko ya bana basi na ye na bolongani.

25 Kasi Amona alobaki epayi na ye: Te, kasi nakozala mosali na yo. Boye Amona akomaki mosali ya mokonzi Lamoni. Mpe esalemaki ete atiamaki elongo na basali basusu mpo na kokengela bitonga ya Lamoni, engebene na momeseno ya Balamani.

26 Mpe nsima ya kozala na mosala ya mokonzi mikolo misato, lokola azalaki elongo na basali ya Balamani kokendaka elongo na bitonga na bango esika ya mai, oyo ebiangamaki mai ya Sebu, mpe Balamani nyonso bazalaki kokamba bitonga na bango kuna, ete bakoka kozwa mai—

27 Boye, lokola Amona mpe basali basusu ya mokonzi bazalaki kokamba bitonga na bango na esika ya mai, tala, yoko motango ya Balamani, baoyo bazalaki na bitonga na bango na mai, batelemaki mpe bapanzaki bitonga ya Amona mpe basali ya mokonzi, mpe bapanzaki bango na lolenge ete basusu bakimaki na banzela mingi.

28 Sikawa basali ya mokonzi babandaki koyima-yima, kolobaka: Sikawa mokonzi akoboma biso, lokola asalaki bandeko na biso mpo bitonga na bango bipalanganaki mpo na nkuna ya bato oyo. Mpe babandaki kolela mpenza, kolobaka: Tala, bitonga na biso bisilaki kopanzana kala.

29 Sikawa balelaki na ntina ya bobangi ete bakoboma bango. Sikawa emonaki Amona oyo motema na ye evimbaki kati na ye na bosepeli; mpo, alobaki, nakolakisa nguya na ngai epayi ya baninga na ngai basali, soki te nguya oyo ezali na ngai, na kozongisaka bitonga oyo epayi ya mokonzi, ete nakoka kolonga mitema ya baninga na ngai basali, ete nakoka kokamba bango na kondima maloba na ngai.

30 Mpe sikawa, oyo ezalaki makanisi ya Amona, ntango amonaki mitungisi na bango oyo abiangaki bandeko na ye.

31 Mpe esalemaki ete abendaki bango na maloba na ye, kolobaka: Bandeko na ngai, bozala na bobangi te mpe tokende koluka bitonga, mpe tokosangisa yango esika moko mpe tokomema yango lisusu epayi na mai; mpe boye tokobatela bitonga ya mokonzi mpe akoboma biso te.

32 Mpe esalemaki ete bakendaki koluka bitonga, mpe balandaki Amona, mpe bakendaki noki na lombangu mingi mpe batelemaki liboso ya bitonga ya mokonzi, mpe basangisaki yango elongo lisusu na esika ya mai.

33 Mpe bato wana lisusu batelemaki mpo na kopanza bitonga na bango; kasi Amona alobaki epayi ya bandeko na ye: Bofanda mpembeni nzinganzinga na bitonga ete bikima te; mpe nakeyi mpe nakowela na bato oyo bapalanganisi bitonga na biso.

34 Boye, basalaki lokola Amona atindaki bango, mpe akendaki mpe atelemaki mpo na kowela na bango oyo batelemaki mpembeni na mai ya Sebu; mpe bazalaki moke te na motango.

35 Boye babangaki Amona te, mpo babanzaki ete moko ya bato na bango akokaki koboma ye engebene na elengi na ye, mpo bayebaki te ete Nkolo alakaki Mosiya ete akobikisa bana mibali na ye uta na maboko na bango; mpe bayebaki eloko moko te mpo na oyo etali Nkolo; boye basepelaki na bobebisami ya bandeko na bango; mpe mpo na ntina oyo batelemaki mpo na kopanza bitonga ya mokonzi.

36 Kasi Amona atelemaki mpe abandaki kobwaka mabanga epayi na bango na bilingongo na ye; iyo, na nguya makasi abwakaki mabanga na kati na bango mpenza; mpe boye abomaki motango moko na bango na lolenge ete babandaki kokamwa na nguya na ye; nzokande basilikaki na ntina ya liwa ya bandeko na bango, mpe bazwaki mokano ete akweya; boye, lokola bamonaki ete bakokaki te kobeta ye na mabanga na bango, bapusanaki mpembeni na banzete mpo na koboma ye.

37 Kasi tala, moto moko moko oyo atombolaki nzete na ye mpo na kobeta Amona, ye abakolaki maboko na bango na mompanga na ye; mpo atelemelaki kobeta na bango na kokataka maboko na bango na mbeli ya mompanga na ye, mpenza ete bakamwaki, mpe babandaki kokima liboso na ye; iyo, mpe bazalaki bato moke te na motango; mpe na makasi ya loboko na ye asalaki ete akimisa bango.

38 Sikawa motoba kati na bango bakweyaki na bilingongo na ye, kasi abomaki moto moko te longola se mokonzi na bango na mompanga na ye; mpe abakolaki maboko mingi na bango lokola matombolamaki na ye, mpe ezalaki moke te.

39 Mpe esilaki ye kobengana bango mosika, azongaki mpe bamelisaki bitonga na bango mai mpe bazongisaki bango na lopango ya matiti ya mokonzi, mpe nde bayingelaki epayi ya mokonzi, kokumbaka maboko oyo ebakolamaki na mompanga ya Amona, na bango oyo balukaki koboma ye; mpe mamemamaki epayi ya mokonzimpo na litatoli moko ya makambo oyo basalaki.

Bimisa na lokasa